Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 15/7 nk. 25-27
  • Kobimisa moto na lisangá​—Ebongiseli ya bolingo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobimisa moto na lisangá​—Ebongiseli ya bolingo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntina ya kobatela
  • Lolenge oyo kobimisa moto na lisangá ezali komonisa bolingo
  • Oyo yango esalaka likoló na basusu
  • Lisungi ya bolingo mpo na basangani ya libota
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na ebongiseli ya Yehova
  • Ndimáká disipilini ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Ntina oyo kobimisama na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo
    Lamuká!—1996
  • Mpo na nini kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Discipline oyo ezali kobota mbuma na kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 15/7 nk. 25-27

Kobimisa moto na lisangá​—Ebongiseli ya bolingo?

“SANTU! santu! santu! [Yehova] Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 4:8) Engebene maloba oyo, mitindá ya bulɛɛ miutaka epai na Yehova. Yango emonisami kati na “makomi [mosantu, NW]” mpe baklisto basengeli kolanda malako yango. Ya solo, basengeli koboya makambo nyonso oyo mazali mbindo na miso ya Yehova.​—2 Timoté 3:15; Yisaya 52:11.

Biblia epesi etindá oyo ya polele ete: “Bozala bulɛɛ na bizaleli nyonso na bino pelamoko oyo abyangi bino azali bulɛɛ. Zambi esili kokomama ete, Bozala bulɛɛ mpo ete ngai nazali bulɛɛ.” (1 Petelo 1:15, 16) Uta na ntango oyo lisangá ya boklisto ebandaki esili koleka bikeke 19, baklisto ya solo bazali kosala makasi mpo na kobatela yango na mbindo ya elimo mpe ya bizaleli.​—Yuda 3.

Ntina ya kobatela

Basaleli nyonso ya Nzambe bazali na mokumba monene ya komibatela pɛtɔ na bizaleli mpe na elimo. Mpo na yango, tosengeli kotɛmɛla banguna misato ya nguya​—Satana, mokili na ye, mpe bamposa mabe ya nzoto na biso. (Baloma 5:12; 2 Bakolinti 2:11; 1 Yoane 5:19) Mokili ya Satana ekopusa yo ete ozala na bizaleli ya mbindo, ekosɛnginya yo ete olanda banzela na yango, mpe ekopesa yo bozwi ya mosuni, koyebana mingi, lokumu, kozala moto monene mpe nguya. Kasi baoyo bazwi ekateli makasi ya kolanda losambo ya solo baboyaka lipesi ya Satana mpe bamibatelaka “pɛtɔ na makambo na mokili.” Mpo na nini? Mpamba te balingi kozala ntango nyonso na nsé ya libateli ya lisangá ya pɛtɔ ya Yehova oyo etondi na bolingo.​—Yakobo 1:27; 1 Yoane 2:15-17.

Yehova apesi lisungi mpo na mosangani nyonso ya lisangá ya boklisto oyo akwei na masenginya ya Satana mpo na bolɛmbu ya bomoto. Bankulutu oyo babongisami malamu na elimo baponami mpo na kobatela lisangá mpe kosunga na bolingo nyonso baoyo babungi nzela mpo ete bábongola motema na lisumu na bango mpe básala mbongwana oyo esengeli mpo na kozongela kolɔngɔ́nɔ́ na bango. Moklisto nyonso oyo asali mabe asengeli kosungama na motema pɛtɛɛ nyonso mpo ete abongwana na banzela na ye.​—Bagalatia 6:1, 2; Yakobo 5:13-16.

Lolenge oyo kobimisa moto na lisangá ezali komonisa bolingo

Basaleli ya Yehova oyo basili kozwa batisimo baoyo bazali kolanda nzela ya mabe na nkó nyonso mpe bazali koboya kobongwana basengeli kotalelama lokola baboyi kobongola motema mpe na yango babongi te kozala na boninga elongo na baklisto. (Kokanisá na 1 Yoane 2:19.) Bato motindo wana bakoki te kopesamela nzela ya kotikala kati na lisangá ya pɛtɔ ya boklisto mpe bongo kobebisa yango. Basengeli kobengana bango.

Litomba malamu ya kobengana baoyo bazali komipesa na misala mabe ekoki komonisama na ndakisa oyo: Lokola bitumba mpe mobulu ezali sé kokóma mingi epai na banakelasi, zulunalo moko ya Toronto, na Canada, The Globe and Mail elobi ete biteyelo mosusu bikamataki meko ya “kolongola libela banakelasi oyo basalelaka to bakanaka kosalela mandoki.” Babenganaka bango mpo na kobatela banakelasi oyo balingi kozwa litomba na ebongiseli ya mateya kozanga ete bazwa mpasi mpo na mobulu.

Mpo na nini kobengana mosáli mabe oyo aboyi kobongola motema na lisangá ezali likambo ya bolingo? Kosala bongo ezali elembo ya bolingo mpo na Yehova mpe banzela na ye. (Nzembo 97:10) Likambo yango ezali komonisa bolingo mpo na baoyo bazali kolanda nzela ya sembo mpamba te ezali kolongola moto oyo akoki kokɔtisa bopusi ya mabe kati na bango. Ezali mpe kobatela bopɛtɔ ya lisangá. (1 Bakolinti 5:1-13) Soki ezaleli ya bonsɔ́ni to ya mbindo ya elimo epesamelaki nzela kati na lisangá, mbɛlɛ elingaki kobeba mpe elingaki kobonga te mpo na kokokisa mosala ya bulɛɛ epai na Yehova, ye oyo azali mosantu. Lisusu, kobenganama ya mosáli mabe ekoki kosunga ye na komona bonene ya ezaleli na ye ya mabe, na kobongola motema, mpe na kosala mbongwana oyo esengeli, mpe na yango kondimama lisusu kati na lisangá.

Oyo yango esalaka likoló na basusu

Na ntango mosangani moko ya lisangá azali kosala lisumu moko monene, na ndakisa ekobo, azali kosepelisa motema ya Yehova te. (Masese 27:11) Moklisto nyonso oyo akwei na pite, na ntembe te, azali te kokanisa lokola Yosefe asalaki yango na ntango mwasi ya Potifala amekaki kobenda ye ete asangisa nzoto elongo na ye. Yosefe ayanolaki ete: “Nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?” (Genese 39:6-12) Yosefe atosaki mitindá ya bulɛɛ ya Yehova mpe akimaki. Epai mosusu, emonani ete mosáli ekobo azali na bolingo te epai na Nzambe mpo na komipekisa na bamposa na ye ya nzoto.​—Bagalatia 5:19-21.

Moto oyo asilá kozwa batisimo, oyo azali kobuka mibeko ya Yehova azali komonisa te ete azali komibanzabanza mpo na mabe mpe mpasi oyo akopesa epai na bandeko na ye ya mosuni oyo bazali bandimi. Mpasi na mayoki eswaka mingi koleka mpasi mosusu oyo moto akoki kozwa. Nsima ya koyeba ete mwana na ye ya mobali azalaki na ezaleli ya mbindo, moklisto moko ya mwasi amilelaki ete: “Bandeko mibali mpe bandeko basi moke mpenza, soki bazali, bakoki koyeba bonene ya mpota mpe kobulunganisama na biso. . . . Motema na biso etutami.” Lokumu malamu ya libota mobimba ekoki kotyelama ntembe. Konyokwama na makanisi mpe mwa ndambo ya liyoki ya komema ngambo ekoki kotungisa basangani ya libota oyo bazali sembo. Na bongo, etamboli mabe ya mosumuki ekoki kopesa libota motema mpasi.

Lisungi ya bolingo mpo na basangani ya libota

Basangani ya libota ya bato oyo babenganami basengeli komikundola ete kobimisa moto na lisangá ezali likambo ya bolingo mpe ya kobatela. Milende nyonso mikoki kosalema mpo na kosunga basáli mabe. Kasi soki amonisi ete azali na botosi te epai na Nzambe mpe aboyi kobongola motema na nkó nyonso, lisangá esengeli kobatelama mpe esengeli kosala likambo mosusu te bobele kosala lokola Yehova azali kotinda yango, “Bengana moto yango mabe kati na bino.” (1 Bakolinti 5:13) Lokola Motatoli moko alobaki yango: “Kobimisa moto na lisangá ezali likambo litali bosembo epai na Yehova.”

Na ntango mosangani moko ya libota abimisami na lisangá, bandeko ya mosuni oyo bazali baklisto bayokaka mpasi. Na yango, bankulutu baponami basengeli kosala oyo ekoki na bango mpo na kopesa bango libɔndisi ya elimo. (1 Batesaloniki 5:14) Bankulutu bakoki kosambela mpo na bango mpe elongo na bango. Mbala mingi, makoki ezali ya kokende kotala baklisto wana ya sembo mpo na kosolola masoló ya elimo oyo ekoki kolendisa. Babateli na etongá basengeli kosalela mabaku nyonso mpo na koyikisa balingami wana mpiko na elimo liboso mpe nsima ya makita ya lisangá. Bakoki kolendisama lisusu na kobimáká elongo na bango kati na mosala ya kosakola. (Baloma 1:11, 12) Babateli na mpate ya elimo basengeli komonisela basaleli ya sembo wana ya Yehova bolingo mpe likebi oyo ebongi na bango.​—1 Batesaloniki 2:7, 8.

Lisumu ya moto moko ezali kopesa nzela te na koboya basusu kati na libota na ye, baoyo batikali sembo epai na Yehova. Yehova abwakaki Saulo mokonzi mabe ya Yisraele, kasi Davidi atikaki nzela te ete yango ezala na bopusi likoló na bolingo na ye ya motema elongo na Yonatana mwana ya Saulo. Ya solo, bokangami ya Davidi mpe Yonatana ekómaki makasi mpenza. (1 Samwele 15:22, 23; 18:1-3; 20:41) Na yango, banso kati na lisangá basengeli kopesa lisungi mpe komonisa bolingo epai na baklisto oyo ndeko na bango ya mosuni asaleli Yehova lisumu.

Oyo nde kozanga bolingo ekomonana soki tokoboya to tokomonisa boboto te epai na basembwi wana! Basangani ya libota oyo bazali sembo bazali mpenza na mposa monene ya kolendisama. Bakoki komiyoka ete batikali bango moko mpe komona ete ezaleli na bango ezali mpenza mpasi. Mbala mosusu tokoki koyebisa bango likambo moko kitoko ya elimo to lisoló moko ya kolendisa na nzela ya telefone. Soki ezali moto oyo abimisami na lisangá nde ayanoli na telefone, sɛnga bobele ete osolola na ndeko na ye ya mosuni oyo azali moklisto. Okoki kobyanga basangani ya libota oyo bazali sembo kati na kominanola to na bolei kati na ndako na bino. Soki okutani na bango na ntango ozali kosomba biloko, okoki kosalela libaku wana mpo na boninga ya kolendisa. Omikundola ete, baklisto ya sembo oyo bazali na ndeko na bango ya mosuni abimisamá na lisangá bazali bobele basangani ya lisangá ya pɛtɔ ya Yehova. Kozanga nkaka, bakoki komitangola mpe kolɛmba. Na yango, tósɛnzɛla ete tómonisela bango boboto mpe bolingo. Tólanda kosala malamu ‘epai na baoyo bazali bandimi.’​—Bagalatia 6:10.

Tómonisa botɔ́ndi mpo na ebongiseli ya Yehova

Tokoki mpenza kozala na botɔ́ndi ete Yehova azali komonisa ete amibanzabanzaka mpenza mpo na mokomoko kati na libota ya mokili mobimba ya basáleli na ye. Na nzela ya lisangá na ye, na bolingo nyonso, asili kosala ebongiseli moko mpo na kosunga biso ete tótambola na bosembo nyonso liboso na ye. Ata soki mosangani moko ya libota asali lisumu na nkó mpe asengeli kobimisama na lisangá, akoki kozonga soki abongoli mpenza motema. Yango emonisami na ndakisa oyo:

Bankulutu bamekaki kosalisa mwasi moko oyo tokobénga ye Anna, kasi abandaki komela makaya, kolangwa masanga mpe kosalela bilangwiseli. Azangaki kobongola motema mpe azalaki lisusu kati na lisangá te. Nzokande, nokinoki, Anna abandaki koyoka mawa mpo azangaki boninga ya bolingo ya lisangá ya pɛtɔ ya Yehova mpe abondelaki ye mpo na kozwa lisalisi. Alobaki ete asosolaki mpenza te lolenge nini bankulutu bamibanzabanzaka na baoyo babungaka nzela. Anna azongelaki koyangana lisusu na makita, mpe yango ememaki ye na kobongola motema. Na nsima, azongisamaki kati na lisangá ya bolingo mpe ya kobatela. Lisusu, Anna azali kosimba makasi mitindá ya Yehova na ntina etali bizaleli malamu. Azali na botɔ́ndi mpo na bolingo oyo bankulutu bamonisaki epai na ye mpe alobi lisusu ete: “Bokoki komona te na meko nini mikanda ya boklisto mizalaki na bopusi malamu epai na ngai. Yehova azalaki mpenza kokokisa malamu bamposa na biso.”

Ya solo, Nzambe abongisi nzela ya kozonga mpo na baoyo babimisamaki na lisangá kasi na nsima babongolaki motema. Touti komona ete kobimisa moto na lisangá ezali ebongiseli ya bolingo. Kasi eleki malamu kopɛngola likambo wana ya mawa na kokangamáká ntango nyonso na banzela ya Nzambe na biso oyo azali bulɛɛ! Tiká ete tozalaka ntango nyonso na botɔ́ndi mpo na libaku malamu ya kosanzola Yehova lokola basangani ya lisangá na ye ya pɛtɔ, ya bolingo, mpe ya kobatela.

[Elilingi na lokasa 26]

Ozali komonisa bolingo epai na bandeko ya mosuni ya moto oyo abimisami na lisangá?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto