Tótɛmɛla mitindo ya bonkɔ́kɔ oyo mizali kotuka Nzambe!
YESU KLISTO alobaki ete: “Solo ekosikola bino.” (Yoane 8:32) Ee, boklisto ya solo ezali kosikola bato—longwá na boombo ya biyambayamba, longwa na kondimela mateya ya lokuta mpe bilikya ya lokuta, longwa na boombo ya misala ya nsɔ́ni.
Nzokande, lolenge moko na ntango ya kala, lelo oyo baklisto bazali mbala na mbala kozwa bopusi ya kozongela mimeseno ya kala. (Bagalatia 4:9, 10) Elingi koloba te ete mimeseno nyonso ya mboka mizali mabe. Ya solo, epai nyonso bazali kofanda, baklisto bakoki kopona kolanda mimeseno oyo mizali malamu mpe mikoki kopesa litomba. Kasi soki mimeseno yango mizali na boyokani te na Liloba ya Nzambe, baklisto bakobebisa bosembo na bango te. Eyebani malamu ete Batatoli ya Yehova baboyaka kosangana na milulu ya Eyenga ya Mbótama, kokumisa mokolo ya kobotama, mpe mimeseno mosusu oyo mizali na boyokani te na Liloba ya Nzambe.
Etɛlɛmɛlo wana ya mpiko esili mbala na mbala komemela bango botyoli mpe botɛmɛli makasi ya baninga, bato ya pembeni, mpe bandeko oyo bazali bandimi te. Yango emonani mingimingi kati na mikili mosusu ya Afrika, epai kuna mitindo mingi ya bonkɔ́kɔ misalemaka na matánga, bilambo ya mabala, mpe mbotámá. Bopusi mpo na kotosa yango ekoki kozala ya makasi mpenza—mbala mingi elandanaka na makaneli mpe monyokoli. Lolenge nini baklisto oyo bafandaka na bisika motindo wana bakoki kotɛlɛma ngwi? Tokoki kopɛngola koswana kozanga kobebisa bosembo na biso? Mpo na koyanola na motuna wana, tiká tótalela lolenge nini baklisto ya sembo basilaki kolónga mitindo mosusu ya bonkɔ́kɔ oyo miyokani na makomami te.
Biyambayamba na ntina na liláká
Na súdi ya Afrika , ezali na mitindo mingi ya bonkɔ́kɔ oyo ezali na boyokani na liláká mpe bokundi bibembe. Mingimingi, baoyo bakufeli moto balekisaka butu mobimba—to butu mingi—na ndako ya liláká, epai mɔ́tɔ mozali kopelisama ntango nyonso. Baoyo bakufeli moto bazalaka na lotómo ya kolamba te, ya kokatisa nsuki te, to ata mpe ya kosukola nzoto te liboso ete ebembe ekundama. Na nsima, basengeli kosukola nzoto na matiti masangisami na bikelákela. Baklisto bakoki kondima mimeseno wana? Soko moke te. Mimeseno wana nyonso mizali komonisa kondima kati na liteya oyo ete molimo ekufaka te mpe kobanga bakufi.
Mosakoli 9:5 elobi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” Koyeba solo wana ezali kosikola bato na nsɔ́mɔ ya ‘bilimu ya bakufi.’ Kasi moklisto asengeli kosala nini na ntango bandeko oyo bazali na mokano malamu basɛngi na ye ete asangana na milulu motindo wana?
Tótalela ndakisa ya Motatoli moko Moafrikɛ́ na nkombo ya Jane, oyo tata na ye akufaki. Wana akómaki na esika liláká lizalaki, nokinoki bayebisaki ye ete ye mpe basangani mosusu ya libota basengelaki kobina zingazinga ya nzoto ya mowei na boumeli ya butu mobimba mpo na kobondela elimu ya mowei. Jane alobi ete: “Nayebisaki bango ete lokola nazali Motatoli ya Yehova, nakoki te komikɔtisa na makambo wana.” “Nzokande, na nsima ya mokolo ya bokundi ebembe, bandeko ya mosuni oyo bazalaki bampaka balobaki ete basengelaki kokende kosukola basangani ya libota ya mowei mpo na kobatelama na elimu ya mowei. Naboyaki lisusu kosangana na yango. Bobele na ntango yango, bakangelaki mama kati na ndako. Moto nyonso oyo alingaki komona ye asengelaki liboso komela masanga ya makasi oyo elɛngɛlamaki mpo na ntina yango.
“Naboyaki kosala makambo wana nyonso. Nzokande, nazongaki na ndako na ngai mpo na kokende kolamba mwa bilei, namemaki yango na ndako epai mama azalaki. Yango epesaki libota na ngai nkanda. Bandeko na ngai bakanisaki ete nazwi ligboma.” Lisusu, batyolaki ye mpe balakelaki ye mabe, balobaki ete: “Lokola oboyi kotosa bonkɔ́kɔ na biso mpo na lingomba na yo, elimu ya tata na yo ekotungisa yo. Nkutu, okobota lisusu te.” Nzokande, Jane abangaki te. Likambo nini libimaki? Alobi ete: “Na ntango wana nazalaki na bana mibale. Sikawa nazali na bana motoba! Yango epesaki nsɔ́ni epai na baoyo balakelaki ngai mabe ete nasengelaki kobota lisusu te.”
“Kopɛtɔlama” na makambo ya kosangisa nzoto
Momeseno mosusu motaleli molulu ya kopɛtɔla ye oyo mobalani na ye akufi. Soki mwasi akufi, libota na ye bakomemela mobali na ye semeki na ye to mwasi mosusu oyo azali ndeko ya penepene ya mwasi oyo akufi. Ekosengela ete asangisa na ye nzoto. Bobele na nsima nde akoki kobala mwasi mosusu oyo ye alingi. Esalemaka bongo mpe na ntango mwasi akufeli mobali. Ekanisami ete momeseno wana epɛtɔlaka mobalani oyo atikali na bomoi na “elimu” ya mobalani oyo akufi.
Moto nyonso oyo aboyi “kopɛtɔlama” wana akoki koyinama makasi na bandeko na ye. Bakoki kotangola ye mpe kotyola ye mpe kolakela ye mabe. Nzokande, baklisto baboyi kolanda momeseno wana. Bayebi ete na esika ete ezala lolenge moko ya “kopɛtɔlama,” kosangisa nzoto na libandá ya libala ezali mbindo na miso ya Yehova. (1 Bakolinti 6:18-20) Lisusu, baklisto basengeli kobala “[bobele, NW] kati na Nkolo.”—1 Bakolinti 7:39.
Mwasi moklisto moko ya Zambie, na nkombo ya Violet akufelaki mobali. Na nsima, bandeko ya mobali bamemelaki ye mobali moko, kotindáká ye na makasi ete asangisa na ye nzoto. Violet aboyaki, mpe lokola etumbu, bapekisaki ye ete atokaka mayi te na libulu ya mayi ya mboka. Bapekisaki ye lisusu ete atambolaka mpe na nzela ya monene te, noki likámá likokwela ye. Nzokande, abangaki te ezala bandeko na ye to mpe bato ya mboka.
Na nsima, Violet abyangisamaki na esambiselo moko ya mboka. Epai kuna, kozanga kokakatana, alimbolaki bantina euti na makomami mpo na yango aboyaki kosangisa nzoto oyo elongobani te. Esambiselo epesaki ye elónga, balobaki ete esambiselo ekoki te kopusa ye ete asalela mimeseno mpe mitindo ya bonkɔ́kɔ oyo mizali na boyokani te na bindimeli na ye. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete etɛlɛmɛlo na ye ya makasi mpo na koboya kobuka mibeko ya Nzambe esalaki ete Batatoli mosusu kati na mboka wana bázwa bopusi mingi te na ntango bango mpe bakutanaki na mokakatano lolenge moko.
Motatoli moko Moafrikɛ́ na nkombo ya Monika atɛmɛlaki bopusi motindo wana nsima ya liwa ya mobali na ye. Bandeko ya mobali balingaki bobele ete bápesa ye mobali mosusu. Monika alobi ete: “Naboyaki, nazalaki na ekateli makasi ya kotosa etindá oyo ezwami kati na 1 Bakolinti 7:39.” Atako bongo, bopusi yango esilaki te. Monika amikundoli ete: “Babangisaki ngai. Balobaki ete: ‘Soki oboyi, okobala lisusu te.’ Balobaki nkutu na bokosi ete baninga na ngai baklisto mosusu bandimaki kosala lolenge wana ya kopɛtɔlama na nkuku.” Nzokande, Monika atikalaki ngwi. “Nafandaki monzemba na boumeli ya mibu mibale, na nsima na yango nabalaki lisusu na lolenge eyokani na boklisto.” Monika azali sikawa kosala lokola mobongisi-nzela ya sanza na sanza.
Kosopana ya zemi mpe kobota mwana-akufá
Baklisto na súdi ya Afrika basengeli mpe kotɛmɛla mimeseno oyo misalemaka soki zemi ya mwasi esopani to aboti mwana-akufá. Makambo wana ya mpasi mabimaka mpo na kozanga kokoka ya bato—kasi ezali etumbu ya Nzambe te. (Baloma 3:23) Soki zemi ya mwasi esopani, mimeseno mosusu ya Afrika misɛngaka ete asundolama na boumeli ya mwa ntango.
Mwasi moko oyo zemi na ye eutaki kosopana akamwaki wana amonaki Motatoli moko koya na ndako na ye. Wana Motatoli yango akómaki pembeni, mwasi angangaki epai na ye ete: “Koya awa te! Engebene bonkɔ́kɔ na biso, mwasi oyo zemi na ye euti kosopana asengeli koyamba bato te.” Nzokande, Motatoli yango ayebisaki ye ete Batatoli ya Yehova bamemaka nsango ya Biblia epai na bato ya lolenge nyonso mpe batosaka te mimeseno ya mboka na ntina etali kosopana ya zemi. Na nsima atángelaki ye Yisaya 65:20, 23, kolimboláká ye ete na nsé ya bokonzi ya Nzambe kosopana ya zemi mpe makambo ya kobota mwana-akufá ekosalema te. Na nsima, mwasi yango andimaki boyekoli ya Biblia.
Mimeseno ya biyambayamba mikoki mpe kosalema na ntango ya bokundi bana babotami-bakufá. Na ntango Motatoli moko na nkombo ya Joseph akendaki na bokundi ya motindo wana, bayebisaki ye ete bato nyonso oyo bazalaki wana basengelaki kosukola mabɔ́kɔ na bango na matiti ya bikelákelá mpe bápakola nkisi na yango na ntólo na bango. Elobamaki ete yango ekopekisa “elimu” ya mwana ete ezonga te mpe epesa bango mpasi te. Na botosi nyonso, Joseph aboyaki, koyebáká liteya ya Biblia oyo ete bakufi bakoki te kosala bato ya bomoi mabe. Nzokande, basusu bamekaki kopusa ye ete asalela nkisi wana. Joseph aboyaki lisusu. Wana bamonaki ete moklisto yango atikalaki ngwi kozanga kobanga, basusu oyo bazalaki wana baboyaki kosalela matiti yango.
Tópɛngola koswana, kasi totɛlɛma ngwi
Kobanga bato oyo bazali na bomoi mpe kolɛngalɛnga noki bakoboya biso ekoki kosala bopusi makasi likoló na biso ete tóbebisa bosembo na biso. Masese 29:25 elobi ete: “Kobanga bato ekoyeisa motambo.” Masoló oyo touti kolobela mamonisi bosolo ya eteni ya nsuka ya mokapo yango: “Nde ye oyo akotalela [Yehova akobatelama, NW].”
Nzokande, tokoki mbala mingi kopɛngola koswana. Na ndakisa, soki moklisto moko akei na bokundi ebembe ya ndeko moko ya mosuni, asengeli te kozela kino akomona ete likambo oyo likotya bosembo na ye na komekama elingi kobima. “Moto na mayele akososola mpasi liboso mpe akomibomba, bilɛma bakoleka mpe bakozwa etumbu.”—Masese 27:12.
Ekozala malamu kotuna na mayele nyonso makambo nini ya bonkɔ́kɔ makosalema wana. Soki yango ezali kobebisa lisosoli, baklisto bakosalela libaku yango mpo na kolimbola ntina oyo bakoki te kosangana na yango, kosaláká bongo na “bopɔlɔ mpe na limemya mozindo.” (1 Petelo 3:15, NW) Soki moklisto alimboli liboso na limemya nyonso etɛlɛmɛlo na ye oyo ezwi moboko na yango na Biblia, mingimingi bandeko na ye ya mosuni bakozala mpenza pene ya komemya bindimeli na ye mpe mbala mingi bakosalela makaneli te to bakoluka te kobangisa.
Ata soki eyano ya bandeko ya mosuni ekozala nini, moklisto akoki soko moke te kobebisa bosembo na ye na kolandáká mitindo ya bonkɔ́kɔ oyo mizali kotyola Nzambe—ata soki bakokanela ye to bakonyokola ye. Tosili kosikolama na bobángi ya biyambayamba. Ntoma Paulo apesaki elendiseli oyo ete: “Klisto akangoli biso mpo na bonsɔ́mi. Bongo botɛlɛma ngwi mpe boingela lisusu kati na ekanganeli na boombo te.”—Bagalatia 5:1.
[Elilingi na lokasa 29]
Mingi bakanisaka ete moto oyo auti kokufa akoki kozala molobeli mpe koyebisa bansango epai na bandeko na bango oyo bakufá uta kala.