Nzela ya monene ezangi bonsomi ya solo
Libota moko ya basangani misato—tata, mama, mpe mwana mwasi ya moke—bazalaki kati na ndako na bango na engumba Sydney, na Australie, na ntango ndako na bango epelaki mɔ́tɔ. Bamekaki kopumbwa na maninisa, kasi yango ekangamaki na bibende. Bato oyo bazimisaka mɔ́tɔ bakokaki te kobikisa bango mpamba te bibende ya komibatela bipesaki bango nzela te. Tata mpe mama bakufaki na milinga mpe na mɔ́tɔ. Mwana ya mwasi akufaki na nsima na lopitalo.
OYO nde mawa, libota yango likufaki mpo na biloko oyo bitongamaki na mokano ete bibatela bango! Elobamaka mingi na mikolo na biso ete ezali bobele libota wana te nde ezali na ndako oyo ebatelami na maninisa matyami bibende mpe bikangeli ya komibatela. Bato mingi ya zingazinga bazali mpe na bandako mpe na mapango oyo ekokani na bisika bitongami makasi. Mpo na nini? Bazali koluka libateli mpe kimya. Oyo nde mawa mpo na mokili ya “bonsomi” epai kuna bato bazali komiyoka ete bazali na libateli bobele na komikanga lokola bato ya bolɔ́kɔ kati na bandako na bango moko! Na bakartyé mingi, bana bakoki lisusu te kosakana na kimya nyonso pene na bitando ya polele to kokende na eteyelo kozanga ete baboti na bango to mikóló mosusu bákende kotika bango. Kati na makambo mingi ya bomoi, bonsomi ezali kosila nokinoki.
Lolenge ya bomoi ebongwani
Na ntango ya bankɔ́kɔ na biso makambo mazalaki lolenge mosusu. Wana bazalaki bana mike, bakokaki kosakana epai nyonso oyo balingaki, kozanga kobanga. Na ntango bakómaki mikóló, bazalaki komibanzabanza mingi te mpo na bikangeli mpe bibende ya kobatela ndako. Bazalaki komiyoka ete bazalaki na bonsomi, bazalaki mpe na mwa ndambo ya bonsomi. Kasi bankɔ́kɔ na biso bamonaki mbongwana na elimo ya mokili wana ezalaki bango naino na bomoi. Bolingo ekiti, moimi ekóli; na bisika mingi bolingo epai na mozalani ekómi nde bobángi mozalani, yango nde ebimisaki likambo ya nsɔ́mɔ oyo touti kolobela. Ezalela wana ya kozanga bonsomi ezali kolandana elongo na kobeba makasi ya bizaleli malamu. Bato bakómi kosepela mingi na “mitindá ya sika ya bizaleli,” kasi na bosolo, ezalela ya makambo ekómi sikawa na meko oyo ezali mpasi mpo na komona ata mwa ndambo ya bizaleli malamu.
Molakisi moko ya kala na Eteyelo monene ya Queensland, Dr. Rupert Goodman, akomi ete: “Bilenge bazali kobika kati na mokili oyo lolenge na yango ya bomoi ekeseni, ya koluka bobele bisengo . . . epai kuna “moimi” ezali makasi mingi: komisepelisa, komiyeba, komikokisela, komilukela litomba.” Alobi lisusu ete: “Bizaleli malamu lokola komipekisa, komiyina, mosala makasi, kobomba mosolo, kotosa bakonzi, bolingo mpe komemya baboti . . . bato mingi bameseni na yango te.”
Nzela ya monene mpenza
Baoyo bayebi malamu bisakweli ya Biblia bazali kokamwa te mpo na kopalangana ya ezaleli ya moimi, mpamba te Yesu Klisto akebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Ekuke ezali monene mpe nzela ezali na esika monene oyo ekoleka kino libebi. Bazali mingi baoyo bakoyingela na yango. Mpo ete ekuke ezali na nkaka mpe nzela ekangani oyo ekoleka na bomoi mpe baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:13, 14) Nzela ya liboso, oyo eleki na bonene ekoki mpo na batamboli mingi, ezali “monene” mpamba te bipekiseli ya mibeko ya Biblia oyo mitambwisaka bizaleli malamu mpe bomoi ya mokolo na mokolo mizali kuna te. Ezali kobenda bato oyo balingaka kokanisa na lolenge oyo bango moko basepelaka na yango mpe kozala na lolenge ya bomoi oyo esepelisaka bango—kozanga mibeko, kozanga mitindá.
Ya solo, mingi oyo baponi nzela ya monene balobaka ete basepelaka na bonsomi na bango. Kasi mingi na bango bapusami na elimo ya moimi oyo epalangani mingi. Biblia elobi ete batambwisami na “[elimo, NW] oyo ezali kosala sasaipi kati na bana na nkanza.” Elimo yango ezali kopusa bango na kobika “na mposa na mosuni . . . kosaláká mikano na mosuni,” ezala pite, kosalela bilangwiseli, koluka bozwi, lokumu, mpe nguya na konyokoláká bato.—Baefese 2:2, 3.
Nzela ya monene ezali komema na libebi
Tomoni ete baoyo bazali kotambola kati na nzela ya monene bapusami na “kosaláká mikano na mosuni.” Yango emonisi ete bazali na bonsomi soki moke te—bazali na nkolo na bango. Bazali baombo ya nzoto na bango. Mpe kosalela nkolo wana ekoki kopesa mpasi mingi—makɔnɔ oyo mazwamaka na nzela ya kosangisa nzoto, mabota makabwani, nzoto mpe bɔɔngɔ́ oyo ebebi mpo na kosalela bilangwiseli to kolangwa masanga, wana ezali bobele mwa ndambo oyo totángi. Ata mobulu, moyibi, kobebisa basi ezwi moboko na yango kati na makanisi ya moimi oyo ezali koyeisama makasi kati na nzela ya monene oyo ezangi mibeko. Mpe, wana “nzela ya monene oyo ezali komema na libebi” ezali naino kokóba, mbuma na yango ekopesa mpasi mingi lisusu.—Masese 1:22, 23; Bagalatia 5:19-21; 6:7.
Tókamata bandakisa ya makambo oyo masalemaki mpenza na Australie. Mary akweaki na lisenginya, amipesaki na kosalela bilangwiseli mpe na kosala pite.a Kasi esengo oyo alukaki ekimaki ye. Ata nsima ya kobota bana mibale, bomoi na ye ezalaki na mokano te. Ayokaki mpenza mpasi makasi na motema na ntango bayebisaki ye ete azali na sida.
Tom azwaki mpasi na lolenge mosusu. Akomaki ete: “Nakólaki kati na misyó moko ya lingomba na nɔ́rdi ya Queensland. Na ntango nakómaki na mibu 16, nabandaki komela masanga mingi. Tata na ngai, banɔ́kɔ́ na ngai, mpe baninga na ngai bazalaki komela masanga mingi, na yango emonanaki ete ezalaki na yango mabe te. Nakómaki kino komela kozanga kosala liponi, kobanda na bière kino lotoko oyo ezikisaka mongóngó. Nabandaki mpe kobeta masano ya mpunda, mbala mosusu nazalaki kobungisa eteni monene ya lifuti na ngai oyo nazalaki kozwa na mpasi. Ezalaki mosolo moke te, mpamba te nazalaki kozwa lifuti malamu na mosala na ngai ya kokata nkokó.
“Na nsima, nabalaki mpe tobotaki bana. Na esika ya kokokisa mikumba na ngai, nasalaki oyo baninga na ngai bazalaki kosala—komela, kobeta masano ya mbongo, mpe kobunda. Natyamaki na bolɔ́kɔ mbala mingi. Kasi atako bongo nazalaki sé kobeba mokolo na mokolo. Bomoi na ngai ezalaki kokita. Ezalaki mobulungano.”
Ee, na komipesáká na bamposa mabe, Tom mpe Mary bamipesaki mpasi bobele bango moko te kasi lisusu epai na mabota na bango. Na mawa nyonso, bilenge mingi mosusu bazali kolengolama na elimo ya bonsomi ya mabe, bakosami na elimo ya bonsomi oyo ezali kati na nzela ya monene. Soki bilenge bakoki ata komona bokosi oyo ezali kati na bonsomi wana. Soki bakokaki ata komona lolenge mpenza nzela ya monene ezali—motuya monene ya mpasi oyo batámboli na nzela yango basengeli kofuta na nsima. Ya solo, ezali monene mpe ezali mpasi te mpo na kokɔta kuna. Kasi bonene na yango nde ememaka mpenza mpasi. Nzela ya mayele ezali bongo ya kosimba malamu likambo oyo likoki soko moke te kotyelama ntembe ete “soko [moto] akokóna kati na nzoto akobuka libebi kati na nzoto.”—Bagalatia 6:8.
Nzokande, liponi ya malamu ezali. Ezali bongo nzela ya moke. Kasi na lolenge nini nzela yango ezali ya nkaká, ya mpasi, ya moke? Mpe yango ezali komema wapi?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo ebongolamaki.