Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/9 nk. 5-7
  • Nzela ya moke ezali komema na bonsomi ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzela ya moke ezali komema na bonsomi ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Lolenge nini nzela ya moke ezali kosikola
  • Tondimisami ete Nzambe akopesa lisungi
  • Batikaki kotambola na kati na nzela ya monene
  • Nzela ya monene ezangi bonsomi ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mangomba nyonso ezali ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobá koyoka mongongo na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tiká Yehova amema yo na bonsomi ya solosolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/9 nk. 5-7

Nzela ya moke ezali komema na bonsomi ya solo

BATO mingi te kati na bato ya mayele batyaka ntembe na likambo oyo ete molɔ́ngɔ́ etambwisami na mibeko ya ezingelo. Mibeko yango mitambwisaka biloko nyonso, kobanda na baatɔ́me ya mikemike kino bagalaksi ya nguya oyo ezali na ebele ya bamiliare ya myóto. Soki mibeko wana mizalaki te, mbɛlɛ kokána makambo mpe boyebi elingaki kozala te; bomoi yango moko mpe elingaki kozala te. Na kososoláká mibeko ya ezingelo mpe na kosaleláká yango, moto akómaki na likoki ya kosala makambo minene, lokola kotambola likoló na sanza mpe kotinda bililingi ya langi ndenge na ndenge longwa na esika moko awa na mabelé to ata uta na esika mosusu oyo ezali mosika na mabelé kino kokóma kati na batelevizyó na bandako na biso.

Kasi ezali boni mpo na mibeko mitali bizaleli malamu? Kotosa yango ezali mpe kopesa litomba mpe kobota mbuma malamu? Emonani lokola bato mingi bakanisaka ete mibeko ya bizaleli malamu mizali te mpe balandaka filozofi oyo ezali kotika nzela na makambo nyonso to lingomba oyo ezali kokokana na bamposa na bango.

Nzokande, ezali na ndambo ya bato oyo bazali kolanda nzela mosusu, ‘nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi’ lokola emonisami kati na Biblia. Tosengeli kokamwa te mpo ete bobele bato moke nde bazali kopona nzela yango, mpamba te Yesu alobaki na ntina na nzela yango ya moke ete: “Baoyo bakomona yango bazali mingi te.” (Matai 7:14) Mpo na nini bobele bato moke?

Mpamba te nzela ya moke eyeisami nkaká mpo na mibeko mpe malako ya Nzambe. Esengeli kobenda bobele ye oyo azali mpenza na mposa ya sembo ya koyokanisa bomoi na ye na mobeko ya Nzambe. Na kokesana makasi na nzela ya monene, oyo ezali komonisa lokola ete ezali na bonsomi kasi ezali nde kokanga mpenza bato kati na boombo; nzela ya moke, oyo emonani lokola ete etondi na bipekiseli, ezali nde kopesa moto bonsomi na makambo nyonso ya ntina mingi. Bandelo na yango etyami na lisalisi ya “mobeko mobongi, mobeko ya bonsomi.”​—Yakobo 1:25.

Lolenge nini nzela ya moke ezali kosikola

Ya solo, ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na kotikala kati na nzela ya moke. Bato nyonso bazangi kokoka mpe basangoli mposa ya kosala mabe. Yango wana moto akoki kopusama na kopɛngwa nzela mwa moke. Nzokande, mpo na litomba oyo tokoki kozwa na kokangamáká na ‘nzela ya nkaká’ ebongi ete tómipekisa to tomisembola mpo na yango, lokola esengeli mpenza, mpamba te Nzambe azali ‘kolakisa biso mpo na litomba na biso.’​—Yisaya 48:17; Baloma 3:23.

Na ndakisa: Baboti ya mayele basalaka ‘nzela ya nkaká’ mpo na bana na bango na ntina etali liponi ya lolenge ya bilei oyo basengeli kolya. Yango esɛngaka mbala mosusu kozala na ekateli makasi na ntango ya bolei. Kasi na ntango bana yango bakokóla, bakozala na botɔ́ndi mingi mpo na disipilini ya bolingo oyo baboti na bango bapesaki bango. Wana bakómi mikóló, bakozala na likoki ya koyeba kopona bilei oyo bibongi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto. Mpe lokola mitindo ya bilei oyo mibongi mpo na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mizali mingi, bakomiyoka te ete bazali kati na bipekiseli mingimingi.

Na elobeli ya elimo, Nzambe asalaka lolenge moko epai na baoyo bazali kotambola kati na nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi. Akólisaka kati na bato ya komikitisa mposa malamu oyo ezali komema na esengo mpe bonsomi ya solo. Apesaka yango na nzela ya Liloba na ye, Biblia. Lisusu, azali kobyanga biso ete tósɛnga elimo santu na ye ete esunga biso, mpe azali kopesa biso etindá ete tósangana elongo na baninga na biso baklisto, oyo bakoki kosalisa biso ete tótikala na nzela ya moke. (Baebele 10:24, 25) Ee, Nzambe azali bolingo, mpe ezaleli wana monene ezali moboko ya mikano na ye mpe lolenge na ye nyonso ya kosala makambo.​—1 Yoane 4:8.

Na ntango bolingo, kimya, malamu, komipekisa, mpe mbuma mosusu ya elimo ya Nzambe etyami liboso, nzela ya moke ekomonana te ete ezali na bipekiseli mingimingi. Lokola mokapo elobi yango, “mibeko kotɛmɛla makambo yango izali te.” (Bagalatia 5:22, 23) “Na esika ezali [elimo na Yehova, NW] wana bonsomi [ezali].” (2 Bakolinti 3:17) Ata lelo oyo, baklisto ya solo bazali komeka bonsomi yango. Bazali na bonsomi longwa na bobángi oyo ezali kopesa bato mpasi lelo, na ndakisa kobanga na ntina na mikolo mizali koya mpe kobanga ya biyambayamba na ntina na bakufi. Oyo nde esengo kokanisa na ntina na mikolo mizali koya, na ntango “mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai na monana”! (Yisaya 11:9) Na bongo, kobanga na ntina na mobulu ekozala lisusu te. Bikangeli mpe bibende ya kokanga maninisa ikozala lisusu te. Bato nyonso bakozala na bonsomi mpe na libateli​—na moi mpe na butu, na ndako mpe na libandá. Ekozala mpenza bonsomi!

Tondimisami ete Nzambe akopesa lisungi

Ya solo, kotosa mibeko ya Nzambe esɛngaka milende, nzokande “malako na ye mpe mazali na bozito te,” ata mpo na bato ya kozanga kokoka. (1 Yoane 5:3) Wana tozali kokɔta kati na nzela ya moke mpe tozali kozwa matomba ya kotambola kati na yango, tozali koyina bizaleli mpe makanisi oyo ezali kati na nzela ya monene. (Nzembo 97:10) Kotosa mibeko ya Nzambe eyokani malamu na lisosoli oyo Nzambe apesi biso. Na esika ya kozala na “mpasi na motema” mpe “mikakatano na [elimo, NW]” oyo ezali epai na bato mingi, Nzambe apesi elaka oyo ete: “Talá, baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo na motema.” Ee, ye oyo Yehova abongisi motema na ye azali na esengo mpe azali na bonsomi.​—Yisaya 65:14.

Yesu akufaki mpo ete biso tókoka kozwa bonsomi ya solosolo. Biblia elobi ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Sikawa, lokola azali Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na likoló, Yesu azali na mokumba ya kopesa matomba ya mbeka yango. Mwa ntango moke, na nsima ya “bolɔ́zi monene,” na ntango nzela ya monene mpe baoyo bazali kati na yango bakobomama, akokamba bato ya botosi malɛmbɛmalɛmbɛ elongo na baoyo bakotikala kati na nzela ya moke kino nsuka na yango, ezalela ya bomoto ya kokoka. (Emoniseli 7:14-17; Matai 24:21, 29-31) Na nsuka tokomona kokokisama ya elaka monene ete: “[Biloko bizalisami bikosikwama, NW] na boombo na libebisi kino lisiko na nkembo na bana na Nzambe.” Eloko moko te ekoki koleka bonsomi wana euti na Nzambe. Ata liwa mpe ekolongolama.​—Baloma 8:21; Emoniseli 21:3, 4.

Na komonáká mpe na kososoláká polele epai oyo nzela ya moke ezali komema, moto akozala na likoki malamu ya kopona nzela yango mpe kolanda ntango nyonso kotambola kati na yango. Mingimingi, bilenge bazwaka lisungi mpo ete bázala na mayele mokuse te mpe ete básilika te na ntina na oyo bazali kotalela yango lokola bipekiseli oyo mibeko ya Nzambe mizali kotya likoló na bango. Bazali koyekola kotalela yango lokola elembeteli ya bolingo ya Nzambe mpe lokola libateli liboso na mabe oyo ezali kati na nzela ya monene. (Baebele 12:5, 6) Ya solo, tosengeli kozala na motema pɛtɛɛ, komikundoláká ete esɛngaka ntango mpo na kolóna bizaleli mpe bamposa ya komipesa na Nzambe, motindo moko lokola esɛngaka ntango mpo ete nzeté ebota mbuma. Kasi nzeté ekobota mbuma soki ebatelami malamu mpe esopelami mai.

Na yango, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, kosangana elongo na baklisto mosusu, mpe ‘tóbɔndelaka na kotika te’ mpo na kozwa elimo santu. (1 Batesaloniki 5:17) Tyá elikya epai na Nzambe ete akosalisa yo mpo ete ‘atambolisa yo.’ (Masese 3:5, 6) Kasi yango ekoki mpenza kosalema? Epesaka matomba? Ee, epesaki matomba epai na Tom mpe Mary, oyo tolobelaki na lisoló lileki.

Batikaki kotambola na kati na nzela ya monene

Tom akomi ete: “Na katikati ya bambula 1970, tokutanaki na Batatoli ya Yehova na ntango moko na bango ayaki na ndako na biso. Lisoló ememaki biso na boyekoli ya Biblia. Mokemoke nabandaki kopɛtɔla bomoi na ngai. Nazwaki batisimo na 1982 mpe nazali sikawa kati na lisangá moko ya mboka na biso. Mwana na biso ya mobali mpe asili sikawa kozwa batisimo. Nazali na botɔ́ndi epai na mwasi na ngai mpamba te amonisaki motema molai epai na ngai na boumeli ya bambula nyonso oyo nalekisaki liboso ya koyekola solo. Likoló na nyonso, nazali kotɔ́nda Yehova mpe Mwana na ye Yesu Klisto, mpo na oyo nyonso bapesi biso mpo na elikya oyo tozali na yango lelo na ntina na mikolo mizali koya.”

Esukaki boni mpo na Mary? Ee, akanisaki ete Nzambe akokaki kolimbisa ye soko moke te, kasi alukaki koyeba ye mpo na litomba ya bana na ye. Na ntango ayokaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki koteya Biblia epai na moninga na ye ya pembeni, ye mpe asɛngaki lisalisi. Nzokande, bizaleli na ye ya mabe oyo bisilaki kokɔtela ye mpenza esalaki ete bokóli na ye ezala mpasi. Boyekoli ezalaki kokende liboso mpe ezalaki kozonga nsima. Nzokande, mwana na ye ya moke ya mwasi ya mibu nsambo azalaki ntango nyonso kolendisa ye ete, “Mama, kotika te. Okoki kolónga!” Na bongo Mary azalaki kosala makasi mingi lisusu.

Na ntango makángo na ye, oyo azalaki mpe momeli bilangwiseli, azongaki na ndako, ye mpe akómaki koyekola. Na nsima bango nyonso mibale balóngaki bizaleli na bango ya mabe. Bongo, na nsima ya kokomisa libala na bango na Leta mpe kozwa batisimo, bazwaki esengo monene mpe mpo na mbala ya liboso bayokaki ete bazali kati na libota ya solosolo. Na mawa nyonso, na nsuka sida ekamataki bomoi ya Mary, kasi kati na motema na ye azalaki na elikya ya lisekwa mpe ya bomoi kati na paladiso awa na mabelé, oyo ekopɛtɔlama na bilembo nyonso ya nzela mabe ya monene.

Ee, moto akoki kobima na nzela ya monene oyo ezali komema na libebi. Klisto Yesu alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete báyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Na yango, mpo na nini te kozwa ekateli ya kotambola kati na nzela ya moke oyo ezali komema na bomoi? Na kosimbáká malamu mpe na kosaleláká makambo oyo ozali koyekola kati na Liloba ya Nzambe, okoki komona kokokisama ya elaka ya Biblia oyo ya kosepelisa epai na yo mpenza: “Bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.”​—Yoane 8:32.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto