Mokili mozangi bitumba—Ntango nini?
EYAMBWELI ya Mabota Masangani endimamaki na 24 Ɔkɔtɔ́bɛ 1945. Yango ezali mwango moleki bonene ya kimya oyo bato basili kosala na mokili. Elongo na bamboka 51 oyo bazalaki basangani na yango ya ebandeli, Mabota Masangani makómaki lisangá ya mabota mingi oyo lileki monene kati na lisoló ya bato. Lisusu, mpo na mbala ya liboso nkutu, lisangá moko ya mokili mobimba lizwaki ndingisa ya kosalela limpinga ya basodá mpo na kotya kimya mpe libateli mpe kotya mokili oyo mozangi bitumba.
Lelo oyo, na basangani 185, Mabota Masangani mazali na nguya mingi koleka na liboso. Bongo, mpo na nini lisangá ya mikili mingi oyo lileki nguya kati na lisoló ya bato lilóngi te kokokisa mpenza mikano na yango kitoko?
Mangomba—Epekiseli monene
Mokakatano monene mozali kouta na esika oyo mangomba mazali na yango kati na makambo ya mokili. Ezali solo ete uta kobotama na Mabota Masangani mangomba minene ya mokili malakaki kopesa mabɔ́kɔ na lisangá yango. Wana azalaki kolobela bokundoli mibu 50 ya Mabota Masangani, Pápa Jean Paul II alobaki ete Mabota Masangani mazali “esaleli eleki malamu mpo na kolendisa mpe kobatela kimya.” Bakonzi ya mangomba kati na mokili mobimba bazali na mayoki motindo moko lokola ye. Bokangami wana ya mayele kati na mangomba mpe biyangeli bokoki te kobomba likambo oyo ete mangomba mazali epekiseli mpe motungisi na miso ya Mabota Masangani.
Na boumeli ya bikeke mingi mangomba mazalaki na esika ya liboso mpo na kolendisa mpe kopesa mabɔ́kɔ na koyinana, na bitumba kati na mabota mpe kobomama ya bato ya bikólo mosusu. Kala mingi te, na ntina na kokumisa milende ya lingomba, bato babomanaki. Liloba “kopɛtɔlama ya ekólo” lisalelamaki mingi mpo na kolobela etumba na etúká ya Balkans. Nzokande, koyinana makasi oyo bato mingi bazali komonisa kuna moko epai na mosusu ezwi moboko likoló na bokabwani ya mangomba kasi likoló na bokeseni ya ekólo te, mpamba te mingi kati na bango bazali na eutelo ya ekólo bobele moko. Ee, mangomba masengeli kondima ngambo monene oyo mazali na yango kati na kosopama ya makila na mokili ya ex-Yougoslavie, epai wapi Mabota Masangani mazali kokoka te kopekisa yango.
Na lolenge lobongi, molakisi moko ya makambo ya mangomba na eteyelo monene alobaki ete “kati na mokili nsima ya eleko ya kokanelama ya banguya ya mokili mobimba, oyo kati na yango motángo ya bato na molende mabe ya mangomba mozali sé komata, botaleli mangomba mpe ya koboma nyɛɛ bato ya bikólo mosusu ekoki mpenza kozala bamoko na makambo ya liboso oyo tosengeli kosala, atako yango ezali nsɔ́ni.” Bososoli ya sika ya lolenge mangomba mazali kopekisa milende mpo na kimya ya mokili mobimba esili komonana polele lelo oyo.
Esakóla moko ya O.N.U. oyo ezwamaki na 1981 elobaki ete: “Awa Totungisami na bilembo ya kozanga kondimana mpe na koponapona na ntina na bokeseni ya mangomba to ya bindimeli oyo ezali naino komonana na bisika mosusu ya mokili, tozwi ekateli ya kokamata meko nyonso oyo esengeli mpo na kosilisa nokinoki kozanga kondimana wana ya makanisi na lolenge na yango nyonso mpe na komonisama na yango nyonso mpe ya kopɛngola mpe ya kobundisa koponapona oyo euti na bokeseni ya mangomba to ya bindimeli.”
Na boyokani na esakóla na bango wana, Mabota Masangani masakolaki mobu 1995 Mobu ya Kondimana makanisi. Nzokande, mpo na koloba solo, kotya kimya mpe libateli ekosalema mpenza kati na mokili oyo mokabwanikabwani na ntina na mangomba?
Makambo oyo mazali kozela mangomba
Esakweli moko kati na mokanda ya Emoniseli ezali kopesa eyano. Yango ezali kolobela “mwasi monene na pite” ya elilingi oyo afandi lokola “mokonzi mwasi” mpe azali na “bokonzi likoló na bakonzi ya mokili.” Mwasi wana ya pite azali na lolenge ya bomoi “ya kosepela na mosolo” mpe azali na boyokani elongo na biyangeli ya mokili. Biyangeli yango bimonisami lokola “nyama motane,” oyo likoló na yango mwasi ya pite afandi na esengo nyonso. (Emoniseli 17:1-5, 18; 18:7) Mwasi wana ya nguya mingi mpe ya mbindo oyo abéngami “Babilone Monene,” azwaki nkombo na ye wana epai na Babilone ya kala, eutelo ya mangomba ya losambo ya bikeko. Na lolenge lobongi mpenza, lelo oyo mwasi yango ya pite azali komonisa mangomba nyonso ya mokili, oyo masili komikɔtisa kati na makambo ya biyangeli.
Esakweli yango elandi na koloba ete, na mikolo ya nsima, Nzambe akotya na makanisi ya basangani ya nyama na yauli oyo bazali na mampinga ete bázwa bikateli. Bango “bakoyina mwasi na pite, bakobebisa ye, mpe bakozalisa ye bolumbu; bakolya mosuni na ye, mpe bakotumba ye na mɔ́tɔ.” (Emoniseli 17:16)a Na yango Yehova Nzambe ye moko akozwa meko na kopusáká mabota ya nguya mingi kati na etumba ya kosilisa mangomba ya lokuta. Ebongiseli ya mangomba ya mokili mobimba, elongo na batempelo mpe bamoskɛ na yango oyo ekɛmbisami na bozwi mingi, ekolongolama libela. Ezaleli ya mangomba ya kopekisa ete kimya mpe libateli etyama te ekosuka libela. Kasi atako bongo, kimya mpe libateli ya solo ekosila kotyama mpenza na mokili?
Bomoto ya kozanga kokoka
Ezali na ndanga oyo emonisi ete kobomama ya mangomba ekosilisa bitumba libela kati na mokili? Te. O.N.U. ekokóba kokutana na mindɔndɔ́. Epai moko, bato bazali koluka kimya mpe libateli. Nzokande, epai mosusu, ezali bango nde bazali mpenza kotya nkaká mpo na kimya mpe libateli. Koyinana, lolɛ́ndɔ, bomilingi, moimi mpe boínga ezali bizaleli ya bato oyo bizali eutelo ya matáta mpe ya bitumba ya lolenge nyonso.—Yakobo 4:1-4.
Biblia esilaki kosakola ete na mikolo na biso bato bakozala “balingi na bango moko, balingi na mosolo, bato na lofundo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi botosi epai na baboti, bato bazangi matɔ́ndi, bato bazangi sembo, bato bazangi bolingo ya motema, bato bazangi boboto, batɔ́ngi, bato bazangi komipekisa, bato na yauli, bayini na malamu, basúli, bato na mitó makasi, bato bavimbi na lolɛ́ndɔ.”—2 Timoté 3:1-4, NW.
Secrétaire-Général Boutros Boutros-Ghali andimaki ete “mokili mozali kobeba mpo na mikakatano ya bomoi ya bato mpe mpo na bizaleli oyo, na bisika mingi, bisili mpenza koyikana makasi.” Milende mingi ya mayokani ya politiki ekokoka te kosilisa bizaleli mabe ya kozanga kokoka ya bato.—Kokanisá na Genese 8:21; Yilimia 17:9.
Yesu Klisto—Nkóló na kimya
Ezali polele ete, O.N.U. ezali na makoki te ya kotya kimya na mokili. Basangani mpe basungi na yango bazali bango nyonso bato bazangi kokoka, atako bazali na mikano mitómbwani. Biblia elobi ete “nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” (Yilimia 10:23) Lisusu, Nzambe akebisi ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.”—Nzembo 146:3.
Biblia ezali kosakola oyo Yehova akosala na nzela na Mwana na ye, “Nkolo na Kimya.” Yisaya 9:6, 7 elobi ete: “Zambi mwana abotameli biso; mwana mobali apesameli biso; bokonzi ekozala likoló na lipeka na ye, nkombo na ye akobyangama ete, Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ikosuka te.”
Mabota ya mokili mobimba masili kolɛmba na boumeli ya mibu 50 na milende ya mpamba. Mosika te makoboma mangomba nyonso oyo makokani na mwasi ya pite. Bongo Yesu Klisto, “Mokonzi na bakonzi mpe Nkolo na bankolo,” mpe mampinga na ye ya babundi ya likoló bakolongola biyangeli nyonso ya bato mpe bakoboma baoyo nyonso bazali koboya bokonzi monene ya Nzambe. (Emoniseli 19:11-21; kokanisá na Danyele 2:44.) Ezali na mwango yango nde Yehova Nzambe akotya mokili oyo mozangi bitumba.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na boyekoli ya mozindo ya bisakweli ya Emoniseli na ntina na Babilone Monene, talá mokapo 33 kino mokapo 37 ya búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi!, ebimisamaki na 1992 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 7]
LIKANISI YA BAKLISTO NA NTINA NA MABOTA MASANGANI
Kati na bisakweli ya Biblia, biyangeli ya bato bikokisami mbala mingi na banyama na yauli ya elilingi. (Danyele 7:6, 12, 23; 8:20-22) Na yango, na boumeli ya bambula mingi zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki ete banyama na yauli ya Emoniseli mokapo 13 mpe mokapo 17 ezali biyangeli ya mokili ya mikolo na biso. Yango esangisi mpe Mabota Masangani, oyo mamonisami kati na Emoniseli mokapo 17 na nyama moko motane na mitó nsambo mpe na maseke zomi.
Nzokande, etɛlɛmɛlo wana ya Makomami epesi nzela soko moke te na lolenge nyonso ya kozanga limemya epai na biyangeli to bakonzi na yango. Biblia elobi polele ete: “Tiká ete moto na moto atosaka bango bazali na bokonzi. Zambi bokonzi ezali te bobele yango euti na Nzambe. Yango oyo izali ibongisami na Nzambe. Bongo, ye oyo azali kotombokela bokonzi, azali kotombokela yango ebongisami na Nzambe mpe baoyo bakotomboka, bakomiyeisela etumbu.”—Baloma 13:1, 2.
Na yango, Batatoli ya Yehova, oyo bazali kobatela etɛlɛmɛlo ya kozanga kokɔta na politiki, batyaka nkaká te na biyangeli ya bato. Babandisaka mbongwana te to basanganaka te na makambo ya kozanga botosi oyo ebongisamaka na bana-mboka. Nzokande, bandimaka ete boyangeli ezali na ntina mpo na kotosisa mibeko mpe kotambolisa makambo malamu kati na bato.—Baloma 13:1-7; Tito 3:1.
Batatoli ya Yehova batalelaka Lisangá ya Mabota Masangani lokola biyangeli mosusu nyonso ya mokili. Bayebi ete Mabota Masangani mazali kokóba kozala mpo na ndingisa ya Nzambe. Na boyokani na Biblia, Batatoli ya Yehova bazali kopesa limemya oyo lisengeli epai na biyangeli nyonso mpe batosaka yango wana botosi motindo yango bosɛngi te ete básala lisumu liboso na Nzambe.—Misala 5:29.