Mibu ya milende ya mpamba
“BISO BIKÓLO YA MABOTA MASANGANI TOZWI EKATELI MAKASI ya kobikisa mabota oyo makolanda nsima ete mázwa mpasi ya bitumba te, oyo bisili koyeisa mawa monene mbala mibale na boumeli ya bomoi na biso, mpe tondimi kozongisa lotómo ya bato ya moboko, limemya mpe motuya ya bomoto, na lotómo ya bokokani kati na mibali mpe basi mpe kati na bikólo minene mpe bikólo mike, . . . ”—Maloba ya ebandeli ya eyambweli ya Mabota Masangani.
DATI ya 24 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, ekozala bokundoli mibu 50 ya Mabota Masangani. Bamboka 185 nyonso oyo esangani kati na yango endimi mitindá mpe mikano ya ebandeli ya lisangá yango lokola emonisamaki kati na eyambweli wana ete: kobatela kimya mpe libateli na mokili; kosilisa mobulu oyo mozali likámá mpo na kimya ya mokili; kolendisa boyokani ya motema kati na bikólo; kobatela bonsomi ya moboko mpo na bato ya bikólo binso kozanga koponapona mposo, likambo ya kozala mobali to mwasi, lokótá to lingomba; mpe kosala boyokani kati na bikólo mpo na kosilisa mikakatano ya nkita, ya bomoi ya bato mpe ya ntɔ́ki.
Na boumeli ya mibu 50 Lisangá ya Mabota Masangani lisili kosala milende mingi mpo na kotya kimya mpe libateli kati na mokili. Emonani lokola ete yango epɛngoli etumba ya misato ya mokili mobimba ete esalema te, mpe epekisaki ete kobebisama monene ya bomoi ya bato na bómbi atɔ́mike ezongelama te. Mabota Masangani masili kopesa bilei mpe nkísi mpo na ebele ya bamilió ya bana. Masili kopesa mabɔ́kɔ na kotombola kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto ya bato na bikólo mingi, na kopesáká bango biloko lokola mai malamu ya komela mpe kokata mangwele mpo na komibatela na makɔnɔ ya mabe. Bamilió ya bato bakimá mboka na bango basili kozwa lisungi.
Mpo na kotɔ́nda misala na yango, basili kopesa Lisangá ya Mabota Masangani libonza ebéngami Prix Nobel de Paix mbala mitano. Nzokande, likambo ya mawa lizali ete tokɔti naino te kati na mokili mozangi bitumba.
Kimya mpe libateli—Mikano mikokisami te
Nsima ya mibu 50 ya milende, kimya mpe libateli ezali mikano oyo mikokisami naino te. Kati na lisoló moko oyo auti kosala kala mingi te liboso na Likita Monene ya Mabota Masangani, prezidá ya Etats-Unis amonisaki mayoki na ye ya mawa na kolobáká ete “ekeke oyo etondi na elikya, na libaku malamu mpe na makambo minene masalemi, ezali mpe eleko ya kobebisama mpe oyo ya kozanga elikya eleki monene.”
Wana mobu 1994 mobɛlɛmaki na nsuka na yango, zulunalo The New York Times elobaki ete: “Pene na bitumba to matáta 150 ezali naino kokóba oyo kati na yango bankóto ya bato bazali kokufa—basivíli bazali kokufa mingi koleka basodá—mpe ebele ya bankóto bazali kokima mboka na bango.” Departema ya kopanza nsango ya Mabota Masangani elobaki ete kobanda na mobu 1945 bato koleka milió 20 basili kokufa mpo na bitumba. Madeleine Albright, ntoma ya Etats-Unis na O.N.U., amonisaki ete “matáta oyo mazali na bitúká mosusu makómi sikawa makámá mingi na mitindo mikeseni.” Kotyola lotómo ya bato mpe koponapona ezali kolobelama mingi kati na nsango ya mokolo na mokolo. Emonani lokola ete bikólo mingi bizali bobele kondimana makanisi na esika ya kozala na boninga makasi moko na mosusu.
Sir David Hannay, ntoma ya Grande-Bretagne na O.N.U., alobaki ete “Kino bambula 1980, Mabota Masangani mazalaki mpenza pene na kokwea.” Boutros Boutros-Ghali, Secrétaire Général ya Mabota Masangani, amilelaki na ntina na kozanga bosepeli mpe kolɛmba ya bikólo oyo bizali basangani mpo na oyo etali kosilisa mobulu. Akómaki na bosukisi ete mpo na basangani mingi, “Mabota Masangani mazali mokano ya liboso te.”
Bopusi ya bipanzeli-nsango
Atako Mabota Masangani mazali komonana na nguya monene, mbala mingi milende na yango milembisamaka na bato ya politiki mpe na bipanzeli-nsango. Soki Mabota Masangani mazangi lisungi ya basangani na yango, makoki kozala na nguya te. Kasi soki bato mingi bandimeli yango te, basangani mingi ya O.N.U. bakopesa mabɔ́kɔ te na Mabota Masangani. Na ndakisa, engebene zulunalo The Wall Street Journal, “Kozanga bolóngi monene na Somalie mpe na Bosnie esili kondimisa ba Américains mingi ete lisangá yango lizali te bobele kolya mosolo mpamba, kasi lizali mpenza likámá monene.” Elimo wana oyo ezali epai na bato mingi, esili mpe kondimisa bato mosusu ya politiki ya Amerika na kobimisa likanisi ete Etats-Unis ekitisa motuya ya mosolo oyo ekólo yango epesaka mpo na kosunga Mabota Masangani.
Masangá ya kopanza nsango makakatanaka te wana mazali kotɔndɔla mpenza Mabota Masangani. Maloba lokola “ayebi ata eloko te,” “tambola-malɛmbɛ,” “azali na litomba moko te,” mpe “akangami na pɔtɔpɔ́tɔ” masalelamaka polele wana balobelaka mitindo mikeseni ya mikumba ya O.N.U. Kala mingi te Zulunalo The Washington Post National Weekly Edition elobaki ete “Mabota Masangani matikali bobele etuluku ya basáli ya biro oyo bazali kotambwisa makambo malɛmbɛmalɛmbɛ, baoyo bazali kobundabunda mpo na komiyokanisa na botamboli ya mokili ya lelo.”
Zulunalo mosusu etángaki maloba ya Boutros Boutros-Ghali, Secrétaire Général wana azalaki komonisa motema mpasi oyo azalaki koyoka na ntina na kobomana na Rwanda. Alobaki ete: “Ezali kozanga bolóngi bobele mpo na Mabota Masangani te; ezali nde kozanga bolóngi mpo na bato ya mokili mobimba. Mpe biso banso tozali na ngambo kati na kozanga bolóngi wana.” Bansango kati na emisyó moko oyo elingamaki mingi, oyo elekaki mbala moko moko na televizyó na 1993 elobaki ete Mabota Masangani “malóngi te kopekisa likámá lileki monene oyo lizali kokanela kimya—bopalangani ya bibundeli ya niklɛɛre.” Emisyó yango ya televizyó elobelaki Mabota Masangani oyo “na boumeli ya mibu mingi mazalaki bobele bilobáloba.”
Ezalela wana ya kolɛmba nzoto oyo epalangani mingi kati na bato ezali mpenza kotungisa makanisi ya basáli ya Mabota Masangani mpe ezali kobulunganisa bango. Nzokande, atako mayoki ya mawa, emonani lokola ete mingi basili kozongisa lisusu elikya na bango mpe bazali kozela ebandeli ya sika na bokundoli ya mibu 50 ya Mabota Masangani. Atako andimaki mabúngá ya Mabota Masangani, ntoma Albright amonisaki mayoki ya ebele na bato ntango alobaki ete: “Tosengeli kotika kolobela makambo oyo tosalaki kala, kasi tosengeli nde kolobela oyo tokosala na mikolo mizali koya.”
Ee, mokili mozali kokende wapi? Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Soki ee, mokumba nini Mabota Masangani makokokisa kati na yango? Mingi koleka, soki ozali moto oyo abangaka Nzambe, okoki komituna ete ‘Mokumba nini Nzambe akokokisa kati na likambo yango?’
[Etanda na lokasa 4]
MILENDE YA MPAMBA
Kimya mpe libateli ekoki kozala te wana bitumba, bobólá, koboma bato mpe kanyaka ezali naino. Kala mingi te Mabota Masangani mabimisaki mituya milandi.
Bitumba: “Likoló na bitumba 82 oyo bisalemaki katikati na 1989 mpe 1992, 79 ezalaki mobulu ya bana-mboka bango na bango, mingi na yango ezalaki matáta mpo na bokeseni ya bikólo; 90% ya baoyo bazwaki makámá bazalaki basivíli.”—Departema ya Mabota Masangani oyo epesaka nsango (UNDPI)
Bibundeli: “C.I.C.R. [Comité International de la Croix Rouge)] ekanisi ete bakompanyi 95 na bamboka 48 ezali kosala katikati na milió 5 mpe milió 10 ya bamine ya bitumba mbula na mbula.”—Haut Commissariat des Nations Unies pour les Réfugiés (UNHCR)
“Na Afrika, ezali na bagrenade soko milió 30 oyo epalangani na bamboka koleka 18.”—UNHCR
Bobólá: “Kati na mokili mobimba, moto moko likoló na bato mitano—nyonso koleka bato miliare moko—bazali kati na bobólá, mpe ekanisami ete katikati na milió 13 mpe milió 18 bazali kokufa mbula na mbula na bokɔnɔ oyo bouti na bobólá.”—UNDPI
Mobulu: “Makambo ya mobulu oyo mayebisamaki masili kokóla kati na mokili mobimba na mwayene ya 5% mbula na mbula uta bambula 1980; bobele na Etats-Unis, mbula na mbula makambo ya mobulu milió 35 mazali kosalema.”—UNDPI
Kanyaka: “Kanyaka epai na basáli ya Leta epalangani bipai binso. Ekanisami ete na bamboka mosusu mosolo ya mpako oyo mofutami te mokokani na 10% ya mosolo mobimba ya mboka yango na boumeli ya mbula moko.”—UNDPI