Mpo na nini tosengeli kobanga Nzambe ya solo uta sikawa?
“Bangá Nzambe mpe batelá mitindá na ye. Mpamba te oyo ezali bongo mokumba nyonso ya motó.”—MOSAKOLI 12:13, NW.
1, 2. Mpo na nini kobanga Nzambe na lolenge malamu ebongi mpenza?
KOBANGA Nzambe na lolenge lobongi mpe na limemya mozindo ezali malamu mpo na bato. Ee, atako ndenge mingi bobángi oyo bato bazalaka na yango ebulunganisaka mayoki, ebebisaka bolamu na biso, kasi ebongi na biso ete tóbanga Yehova.—Nzembo 112:1; Mosakoli 8:12.
2 Mozalisi ayebi yango. Mpo na bolingo oyo azali na yango epai na bikelamu na ye, apesi bango nyonso etindá ete bábanga ye mpe básambela ye. Tozali kotánga ete: “Namonaki anzelu mosusu kopumbwa na nzángá, mpe azalaki na Nsango Malamu na seko mpo na kosakola na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na [bikólo, NW] nyonso. Alobi na mongongo makasi ete, [Bangá, NW] Nzambe mpe pesá ye nkembo, mpo ete ntango na [kosambisa] na ye eyei. Bósambela ye oyo asalaki likoló, na nsé.”—Emoniseli 14:6, 7.
3. Mozalisi asalaki nini mpo na baboti na biso ya liboso?
3 Tosengeli soko moke te kobosana Mozalisi ya biloko nyonso, Eutelo ya bomoi, mpamba te biso mpe etando oyo, tozali biloko na ye. (Nzembo 24:1) Mpo na komonisa bolingo na ye monene, Yehova apesaki bomoi epai ya bana na ye ya mabelé mpe apesaki bango esika moko kitoko mpo na kofanda—paladiso enzenga na mabelé. Nzokande, likabo wana kitoko epesamaki mpamba te. Ya solo, epesamaki mpo ete ebatelama malamu. Baboti na biso ya liboso basengelaki kobatela efandelo na bango mpe kopalanganisa yango kino balingaki kotondisa mokili mobimba mpe kotya yango na nsé na bango. Bazalaki na mabaku malamu mpe na mikumba likoló na banyama ya mabelé, ndeke, mpe mbisi—bikelamu mosusu nyonso ya bomoi bisengelaki kozala na bango elongo kati na mabelé mpe elongo na bana na bango. Bato basengelaki kozongisa monɔkɔ mpo na mokumba monene oyo mopesamelaki bango.
4. Bato basili kosala nini likoló na bozalisi ya Nzambe?
4 Atako na ebandeli makambo mazalaki malamu mpenza, talá oyo bato basili kosala mpo na kobebisa efandelo na bango enzenga ya mabelé! Basili kokómisa mabelé esika ya bosoto na kotyoláká mpenza lotómo ya Nzambe, nkolo ya eloko oyo ya motuya mingi. Kobebisama ya mabelé ezali sé kotya bomoi ya lolenge mingi ya nyama, ndeke, mpe mbisi kati na likámá. Nzambe na biso ya boyengebene mpe ya bolingo akolanda ntango nyonso te kotika nzela na likambo motindo oyo. Kobebisama ya mabelé ezali mpenza kosɛnga ete bato bázongisa monɔkɔ mpo na yango, likambo oyo mingi bazali na ntina ya kobanga. Epai mosusu, mpo na baoyo bazali kotya elikya epai na Nzambe na limemya nyonso, ezali likambo ya esengo na koyeba makambo oyo makobima. Yehova akosɛnga ete bato bázongisa monɔkɔ, mpe mabelé ekobongisama lisusu. Oyo ezali solo bansango ya kopesa esengo mpo na bato nyonso ya motema sembo oyo bazali awa na mabelé.
5, 6. Yehova akosala nini mpo na makambo mabe oyo bato basili kosala likoló na bozalisi na Ye?
5 Nzambe akosambisa na nzela nini? Na nzela ya Yesu Klisto, oyo sikawa asili kotyama Mokonzi ya Bokonzi na Nzambe ya likoló. Na nzela ya Mwana na ye wana ya likoló, Yehova akosukisa ebongiseli oyo ya mbindo, ya botomboki. (2 Batesaloniki 1:6-9; Emoniseli 19:11) Na lolenge yango, akosilisa mpasi ya baoyo babangaka ye mpe, na mbala moko, akobikisa mpe akobatela efandelo na biso oyo mabelé.
6 Lolenge nini yango ekosalema? Biblia ezali koloba na ntina na koya ya bolɔ́zi monene oyo ekosuka na etumba ya Armagedon. (Emoniseli 7:14; 16:16) Yango ekozala bongo lisambisi ya Nzambe likoló na ebongiseli ya biloko oyo esilá kobeba mpe likoló na baoyo bazali kobebisa yango. Bato mosusu bakotikala na bomoi? Ee! Ekozala te baoyo bazali kobanga Nzambe na lolenge ya mabe, na lolenge ezangi kolongobana, kasi baoyo bazali kobanga ye na limemya nyonso mpe na mozindo mpenza. Bango bakobikisama.—Masese 2:21, 22.
Lolenge eleki kitoko ya komonisa nguya
7. Mpo na nini Nzambe akɔtelaki Bayisalaele na eleko ya Mose?
7 Likambo monene oyo Yehova akosala emonisamaki liboso na elilingi na likambo moko ya nguya oyo asalaki mpo na basambeli na ye, soko bambula 1 500 liboso ya Ntango na Biso. Nguya monene ya basodá ya Ezipito bakangaki kati na boombo mpe na mosala makasi Bayisalaele oyo bayaki kofanda na mboka na bango, balukaki nkutu kosilisa Bayisalaele nyonso na ntango mokonzi na bango, Falo, apesaki etindá ete bana mibali nyonso ya Bayisalaele oyo bazalaki kobotama sika bábomama. Elónga ya Nzambe likoló na Ezipito esengelaki kozala bongo ya kobimisa Yisalaele kati na ebongiseli wana ya politiki oyo ezalaki konyokola bango, ee, esengelaki kosikola bango longwa na mboka oyo ebebisamaki mpo na losambo ya ebele ya banzambe ya lokuta.
8, 9. Lolenge nini Mose mpe Bayisalaele bamonisaki botɔ́ndi mpo na lolenge oyo Nzambe akɔtelaki bango?
8 Lisoló ya likambo oyo Bayisalaele basalaki mpo na lolenge babikisamaki na Ezipito ezwami kati na Exode mokapo 15. Kotalela lisoló yango ekosalisa biso ete tómona lolenge oyo baklisto bakoki kosikolama na elimo mpe na mosuni longwa na ebongiseli ya lelo oyo esilá kobeba. Tiká tótalela Exode mokapo 15, na kotyáká likebi mingi likoló na milɔngɔ́ miponami mpo na koyekola ntina oyo tosengeli kopona kobanga Yehova, Nzambe ya solo. Tóbanda na milɔngɔ́ 1 mpe 2:
9 “Na nsima Mose mpe bato na Yisalaele bayembaki loyembo epai na [Yehova] ete, Ngai nakoyembela [Yehova], mpo ete ye alóngi na nkembo; ye abwaki mbalata mpe motamboli na yango kati na mai. [Yehova] azali nguya mpe loyembo na ngai, ye akómi mpe lobiko na ngai.”
10. Nini esalemaki liboso ya kobebisama ya limpinga ya Ezipito?
10 Kati na mokili mobimba, bato bayebi malamu lisoló oyo elobeli lolenge Yehova abikisaki Yisalaele longwa na Ezipito. Akweisaki malɔ́zi likoló na nguya wana ya mokili mobimba kino Falo ayaki kotika nzela na Bayisalaele ete bákende. Kasi na nsima basodá ya Falo balandaki bato yango oyo bazangaki bibundeli mpe bazwaki bango lokola na motambo na libongo ya Mai Motane. Atako emonanaki lokola ete bana ya Yisalaele balingaki nokinoki kobungisa bonsomi na bango oyo bautaki kozwa, nzokande Yehova azalaki kokanisa kosala likambo mosusu. Na lolenge ya kokamwa, afungolaki nzela kati na mai mpe abatelaki bato na ye. Na ntango basoda ya Ezipito balandaki, azipaki Mai Motane likoló na bango mpe azindisaki Falo mpe mampinga na ye kati na mai.—Exode 14:1-31.
11. Likambo oyo Yehova asalaki likoló na Ezipito ebimisaki nini?
11 Koboma oyo Yehova abomaki mampinga ya Ezipito esanzolaki ye liboso na basambeli na ye mpe esalaki ete nkombo na ye eyebana mingi. (Yosua 2:9, 10; 4:23, 24) Ee, nkombo na ye etombwanaki likoló na banzambe ya lokuta ya Ezipito oyo bazangi nguya, oyo bakokaki te kosikola basambeli na bango. Elikya oyo batyaki epai na banzambe na bango mpe epai na moto oyo akoki kokufa mpe epai na nguya ya basodá ekokisamaki te, yango epesaki bango mawa mpenza. (Nzembo 146:3) Ezali likambo ya kokamwa te na komona lolenge oyo Bayisalaele bapusamaki na koyemba masanzoli oyo emonisaki bobángi oyo elongobani epai na Nzambe ya bomoi, oyo na nguya nyonso, oyo abikisaka bato na ye na nguya nyonso!
12, 13. Liteya nini tokoki kozwa mpo na elongá ya Nzambe na Mai Motane?
12 Bobele bongo, tosengeli koyeba ete nzambe moko te ya lokuta na eleko na biso mpe mokili moko te ya nguya, ata soki ezali na mandoki ya nikleere, ekoki kokokana na Yehova. Azali na makoki mpe na mokano ya kosikola bato na ye, mpamba te “akosalaka lokola elingi ye kati na ebele na likoló mpe na kati na bafandi na mokili; mpe moto moko akoki kopekisa lobɔ́kɔ na ye te, to kolobela ye ete, Ozali kosala nini?” (Danyele 4:35) Soki tosimbi mpenza ntina ya maloba oyo, biso mpe tokopusama na koyemba masanzoli na ye na esengo nyonso.
13 Loyembo ya elongá na Mai Motane ekóbi ete: “[Yehova] azali mobali na etumba; [Yehova] ezali nkombo na ye.” Na yango, Mobali wana na etumba oyo moto akoki kolónga ye te, azali moto ya lisapo mpamba te, azangi mpe nkombo te. Azali na nkombo! Azali “Ye oyo ayeisaka,” Mokeli Monene, Ye “oyo azali na nkombo [Yehova], . . . Oyo-Aleki-likoló na mokili mobimba.” (Exode 3:14; 15:3-5; Nzembo 83:18) Ondimi ete ekokaki kozala likambo ya mayele soki Baezipito wana ya kala bazalaki na bobángi oyo elongobani mpe na limemya mpo na Mozwi-na-Nguya-Nyonso na esika ya kotɛmɛla ye, boye te?
14. Lolenge nini ntina ya kobanga Nzambe emonisamaki na Mai Motane?
14 Lokola azali Mobandisi ya mabelé, Mokeli ya mai monene azali mpenza na bokonzi likoló na mai. (Exode 15:8) Kosaleláká mpe bokonzi oyo azali na yango likoló na mopepe, asalaki likambo oyo limonanaki lokola ete likokaki kosalema te. Akabwanisaki mai na bozindo na esika moko mpe apusaki yango nsima ngámbo na ngámbo ete etika nzela na katikati, ete bato na ye báleka. Kanisá naino lolenge likambo yango elekaki: bamilió ya batone ya mai kati na mai monene ekangami maboke milai etombwani likoló lokola bifelo mibale epai na epai, kopesáká na Bayisalaele nzela ya kokima mpe ya komibatela. Ee, baoyo babangaki Yehova na lolenge lobongi bazwaki libateli. Na nsima, Nzambe afungolaki mai, kotikáká yango ete ezonga na nguya lokola mpela monene, kozindisáká bongo mampinga ya Falo mpe bibundeli na bango nyonso. Nzambe amonisaki mpenza nguya na ye likoló na banzambe bazangi ntina mpe likoló na nguya ya mampinga ya bato! Na ntembe te, Yehova azali ye oyo tosengeli kobanga, boye te?—Exode 14:21, 22, 28; 15:8.
Tómonisa ete tozali na bobángi Nzambe
15. Tokosala nini mpo na misala ya nguya mpe ya kobikisa ya Nzambe?
15 Soki totɛlɛmaki na libateli nyonso elongo na Mose, na ntembe te, mbɛlɛ tolingaki kopusama na koyemba ete: “Ee, [Yehova] nani azali lokola yo kati na banzambe? Nani azali lokola yo, na lokumu kati na bulɛɛ, mpe na kobonga na kosambela na kosanzola, na misala na kokamwa?” (Exode 15:11) Kobanda na ntango wana, maloba yango ya komonisa mayoki mazali kozongelama mbala na mbala. Na mokanda ya nsuka ya Biblia, ntoma Yoane alobeli etuluku ya bapakolami basaleli ya sembo ya Nzambe ete: “Bayembi loyembo na Mose, moombo na Nzambe, mpe loyembo na mwana na mpate.” Loyembo yango kitoko elobi nini? “Misala na yo minene mpe ya kokamwa, e Nkolo Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, e mokonzi na mabota. Nani akozanga [kobanga, NW] yo, Nkolo? Nani akozanga kokumisa nkombo na yo? Yo moko ozali mosantu.”—Emoniseli 15:2-4.
16, 17. Makambo nini minene oyo tozali komona yango kosalema lelo?
16 Na yango, lelo oyo ezali mpe na basambeli oyo basikwami, oyo bazali kosepela te bobele na misala na ye ya kokamwa, kasi bazali mpe kosepela na bikateli na ye. Bato yango ya mabota nyonso basili kosikwama na elimo, bakabwani na mokili oyo esili kobeba mpamba te bayebi mpe bazali kosalela mibeko ya sembo ya Nzambe. Mbula na mbula, bankóto mingi bazali kokima mokili oyo mosili kobeba mpo na kofanda kati na lisangá ya pɛtɔ, ya sembo, ya basaleli ya Yehova. Mosika te, nsima wana bikateli makasi ya Nzambe bikokokisama likoló na mangomba ya lokuta mpe likoló na eteni mosusu ya ebongiseli oyo mabe, bakofanda seko kati na mokili ya sika ya boyengebene.
17 Na boyokani na Emoniseli 14:6, 7, bato bazali sikawa koyoka nsango ya kokebisa na ntina na kosambisama oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola na nsé ya litambwisi ya baanzelu. Na mbula oyo euti koleka, kati na mikili koleka 230, Batatoli soko milió mitano basakolaki nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe ntango na ye ya kosambisa. Mpo na kolakisa bazalani na bango makambo oyo bakoki kosala mpo ete bákoka kobika, Batatoli bazongelaki bato mbala na mbala na bandako na bango, kotambwisáká bongo boyekoli ya Biblia. Yango wana, mbula na mbula, bankóto mingi bazali koyekola oyo ekoki na bango mpo na kobanga Nzambe ya solo na mayele nyonso, bazali kopesa bomoi na bango epai na ye, mpe bazali kozwa batisimo. Oyo nde esengo lokola bato motindo wana bakómi kobanga Yehova!—Luka 1:49-51; Misala 9:31; kokanisá na Baebele 11:7.
18. Nini emonisi ete baanzelu bazali kosangana kati na mosala na biso ya kosakola?
18 Ezali solo ete baanzelu mpe basanganaka kati na mosala oyo ya kosakola? Emonani mpenza polele ete litambwisi wana ya baanzelu esili mbala mingi kokamba Batatoli ya Yehova na ndako moko epai kuna moto moko oyo anyokwami na makanisi azalaki na mposa makasi, azalaki ata mpe kosambela, mpo na kozwa lisungi ya elimo! Na ndakisa, Batatoli ya Yehova mibale oyo babimaki elongo na mwana moko ya moke bazalaki koyebisa nsango malamu na esanga moko ya Caraïbes. Wana midi elingaki kokoka, bakóló wana mibale bazwaki ekateli ete básuka wana mpo na mokolo yango. Kasi mwana moke amonisaki mpenza mposa makasi ya kokende na ndako oyo elandaki. Na ntango amonaki ete bakóló wana mibale bazalaki kolinga te kokende na ye elongo, akendaki ye moko mpe abetaki ekuke. Elenge mwasi moko afungolaki ndako. Na ntango mikóló bamonaki bongo, bapusanaki mpe basololaki na elenge mwasi yango. Akɔtisaki bango na ndako, ayebisaki ete ntango ayokaki ete bazalaki kobeta ekuke, ezalaki mpenza na ntango wana nde azalaki kobondela Nzambe ete atindela ye Batatoli ete báya koteya ye Biblia. Bibongiseli bikamatamaki mpo na kobanda boyekoli ya Biblia elongo na ye.
19. Litomba nini tokoki komonisa, oyo tozwaki mpo na bobángi Nzambe?
19 Wana tozali koyebisa nsango ya kosambisa ya Yehova na bosembo nyonso, tozali mpe koteya bikateli na ye ya sembo. Wana bikateli yango bizali kosalelama kati na bomoi ya bato, ezali komema mapamboli na mosuni mpe na elimo. Na ndakisa, Biblia ezali kokweisa polele lolenge nyonso ya mbindo na ntina etali kosangisa nzoto. (Baloma 1:26, 27, 32) Lelo oyo kati na mokili mobimba mibeko ya Nzambe mizali kotyelama likebi te. Mbuma nini ezaleli yango ebimisi? Mabala mazali kokufa. Mobulu mozali sé kobakisama. Bamaladi ya nsɔ́mɔ oyo eutaka na nzela ya kosangisa nzoto, oyo ezali kongala na ekeke oyo ya 20, mpe ezali sé kopalangana. Ya solo, maladi ya nsɔ́mɔ ya SIDA epalangani mingi mpenza na nzela ya pite. Kasi emonani ete kobanga Nzambe na limemya nyonso ezali libateli mpo na basambeli ya solo, boye te?—2 Bakolinti 7:1; Bafilipi 2:12; talá mpe Misala 15:28, 29.
Matomba oyo tozali kozwa lelo mpo na kobanga Nzambe
20. Nini emonisi ete bato mosusu mpe bayebi lokumu malamu ya Batatoli ya Yehova?
20 Mapamboli mazali mingi epai na baoyo bazali kobanga Nzambe mpe bazali kolanda bikateli na ye. Tótalela likambo moko oyo limonisi bokóli ya motángo ya bato oyo bazali kondima likambo oyo ete Batatoli ya Yehova bazali libota ya kimya ya baklisto oyo lizali na etamboli malamu. Etuluku moko ya Batatoli, oyo bakendeki na liyangani ya mikili mingi na Amerika ya Súdi, bazalaki kofanda kati na lotɛ́lɛ moko oyo kati na yango mokonzi ya mboka asengelaki kokamba likita mokolo moko na butu mpo na koyebisa makambo epai na etuluku moko ya bato oyo bazalaki Batatoli te. Wana etuluku ya basoda oyo babatelaka mokonzi bazalaki kolekisa ye nokinoki kati na etómbola, mwasi moko Motatoli oyo ayebaki te soki nani azalaki kati na yango amataki wana, mpe basoda ya mokonzi basutukaki! Nsima ya kososola libunga na ye, mwasi Motatoli yango asɛngaki bolimbisi lokola akɔtaki wana na ntango oyo esengelaki te. Alakisaki kálati na ye ya liyangani oyo emonisaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe alobaki ete akoki kosala mokonzi mabe te. Sodá moko asekaki mwa moke, na nsima alobaki ete: “Soki bato banso bazalaki lokola Batatoli ya Yehova, mbɛlɛ tolingaki kosala bokɛngɛli motindo oyo te.”—Yisaya 2:2-4.
21. Bato bapesameli libaku ya kosala nini lelo oyo?
21 Ezali lolenge wana ya bato nde Yehova azali koyanganisa sikawa mpe azali kobongisa mpo ete ‘bábika na bolɔ́zi monene’ oyo ekosukisa ebongiseli oyo. (Emoniseli 7:9, 10, 14) Lobiko yango ekozala likambo ya pwasa te. Mpo na kobika, moto asengeli kobanga Yehova, kondima ye lokola Moyangeli ya sembo, mpe komipesa epai na ye. Kasi, likambo monene ezali oyo ete mingi bakolóna te lolenge ya bobángi oyo ekomemela bango libateli. (Nzembo 2:1-6) Engebene bilembeteli oyo tozali na yango, Moyangeli oyo Yehova asili kopona, Yesu Klisto, azali koyangela lokola Mokonzi uta mobu ya ntina mingi ya 1914. Yango elimboli ete ntango oyo etikali ezali kosila mpo ete bato bákoka kokólisa mpe komonisa ezaleli ya kobanga Yehova na lolenge lobongi. Nzokande, Mozalisi na biso azali kopesa nzela na bato, ata mpe bato minene, ete báyanola: “Boye sasaipi, bino mikonzi, zalá na mayele; yoká toli, bino basambisi na mokili. Salelá [Yehova] mosala na botosi, sepelá nde na kolɛngalɛnga. Pwepwá [mwana, NW] ete asilika te, ete mpe bóbeba kati na nzela te; zambi akopelisa nkanda na ye noki. Bango nyonso bakomibomba epai na ye bakopambolama.”—Nzembo 2:7-12.
22. Baoyo bazali kobanga Nzambe lelo oyo bakozwa nini na mikolo mizali koya?
22 Tiká ete tózala kati na baoyo bakosanzola Yehova Mozalisi na biso lokola Ye oyo abikisaki biso. Nzokande, yango ezali kosɛnga na biso ete tóbanga Nzambe ya solo uta sikawa! (Kokanisá na Nzembo 2:11; Baebele 12:28; 1 Petelo 1:17.) Tosengeli kokóba koyekola bikateli na ye ya sembo mpe kotosa yango. Loyembo ya Mose mpe ya Mwana na Mpate, oyo ekomami kati na Emoniseli 15:3, 4, ekoyembama lisusu makasi mingi koleka na ntango Yehova akolongola mabe nyonso na mabelé mpo na kobikisa bato mpe efandelo na bango na mabelé na bopusi mabe ya lisumu. Na bongo, na motema na biso mobima, tokoyemba ete: “Misala na yo minene mpe ya kokamwa, e Nkolo Nzambe, Mozwi-na-Nguya-Nyonso. Nzela na yo sembo mpe na solo, e mokonzi na mabota. Nani akozanga [kobanga, NW] yo, Nkolo?”
Ozali komikundola?
◻ Mpo na nini Yehova abongi ete tómonisela ye bobángi ya malamu?
◻ Makambo oyo Yehova asalaki na Mai Motane emonisaki nini?
◻ Matomba nini tozwaka wana tozali kobanga Yehova na limemya nyonso?
◻ Elikya nini ezali mpo na baoyo bazali kobanga Nzambe sikawa?