Baanzelu bazali nde kati na biso?
Esalemaki nokinoki mpenza. Wana azalaki kati na makanisi mozindo mpe atyaki likebi lisusu te na makambo oyo mazalaki koleka zingazinga na ye, Marilynn azalaki kolekisa ntango na kotamboláká kati na nzela ya engbunduka. Na pwasa, ayokaki lokito makasi. Atalaki, mpe nokinoki asosolaki ete ye atɛlɛmaki mpenza na nzela ya engbunduka oyo ezalaki koya! Marilynn asenzwaki wana alɛmbaki mpo na nsɔ́mɔ. Engbunduka yango ezalaki mpenza penepene na boye ete akokaki komona miso ya bulé ya mokumbi oyo elongi na ye ebulunganaki na nsɔ́mɔ. Marilynn abosanaka soko moke te likambo oyo lisalemaki na nsima. Alobaki ete: “Ezalaki lokola nde moto moko monene azalaki nsima na ngai mpe atindikaki ngai. Napumbwaki longwa na nzela ya engbunduka mpe nakweaki mosika likoló na mputulu.” Lokola azokaki bobele moke, Marilynn atɛlɛmaki mpo na kotɔ́nda moto oyo abikisaki ye—kasi amonaki moto te zingazinga na ye! Akómaki na bosukisi nini? Marilynn alobi ete: “Anzelu mobateli na ngai nde abikisaki bomoi na ngai. Soki ye te, ekokaki bongo kozala nani?”
EMONANI ete mokili ya bato oyo babɛtaka ntembe na makambo nyonso mokómi na mbala moko kosepela mingi na baanzelu. Na boumeli ya mibu oyo miuti koleka, bikelamu ya likoló bikómi makambo oyo bazali kolakisa na televizyó, na bafilime mpe kati na bandako ya masano. Babúku oyo ezali kolobela baanzelu ezali na bisika ya liboso kati na mikanda ya mangomba oyo mitekisamaka mingi mpenza. Ezali na bituluku ya bato, na mateya ya bayekoli mpe na mikanda oyo ezali kotalela baanzelu. Bibongiseli ya koteya bisili kotyama mpo na kosunga yo—lokola lisoló ya zulunalo moko lilobi yango—mpo na kozwela “yo ‘libateli ya anzelu.’”
Bato mosusu ya mombongo ya lokoso basalelaka libaku wana ya likambo ya baanzelu mpo na kokumisa ebele ya biloko ya kotekisa. Moko na bankolo magazini moko na Etats-Unis alobi ete: “Eloko nyonso oyo ezali na bililingi ya baanzelu ekosombamaka mingi.” Lisusu, longola ebele ya babúku, atángaki “bikeko, bilembo, bana-popi, batiliko, bililingi mpe bakálati ya kokoma mikanda oyo ezali na baanzelu”—nyonso esangisi oyo mokomi zulunalo moko abéngaki ete “matomba ya likoló.”
Bakumisi ya baanzelu bazali koloba na etingya nyonso ete, yango ezali te bobele likambo ya kobenda likebi oyo likoumela ntango moke. Mpo na kosimba likanisi na bango, bamonisaka bilembeteli moko nsima na mosusu—“bato oyo bazali na bomoi” baoyo bakutanaki na baanzelu. Ezali na bato oyo balobaka ete bamonaki anzelu moko na lolenge ya moto. Basusu bamonaki pole, bayokaki mongongo, bayokaki kozala ya moto, to bayokaki mposa moko makasi, oyo bakanisaki ete, eutaki na baanzelu. Lokola Marilynn, bato mingi bazali koloba ete anzelu moko nde abikisaki bomoi na bango.
Likambo nini lizali kosalema? Joan Wester Anderson oyo akomaki babúku mibale likoló na bato oyo bakutanaki na “bato oyo baleki nguya ya bato” alobi ete: “Nakanisi ete ezali kozongisama ya ezaleli ya elimo.” Alma Daniel, oyo apesaki lisungi mpo na kokoma búku mosusu, apusi likanisi yango mosika. Alobi ete baanzelu “bazwi sikawa mitindá ya komimonisa mpo ete bákutana na bato mingi mpenza. Ntina oyo tozali komona makambo mingi na ntina na bango ezali mpamba te balingi ete ezala bongo. Bazali kosala yango.”
Ezali mpenza solo? To likambo mosusu lizali nsima ya kobendama monene epai na baanzelu oyo tozali komona lelo? Mpo na koyeba yango, tosengeli kotalela Liloba ya Nzambe. Biblia ezali na makambo ya solo na ntina na baanzelu, lokola tokomona yango.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Pages 3 and 4: The New Testament: A Pictorial Archive from Nineteenth-Century Sources, by Don Rice/Dover Publications, Inc.