Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/11 nk. 25-29
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali na “Elimo etutami”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali na “Elimo etutami”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bokundoli oyo epesaka mpasi”
  • Esalemaki mpenza?
  • Ebombamelo
  • Tózala ntango nyonso makasi na elimo
  • Ezali boni mpo na ye oyo afundami ete azali mobebisi?
  • Bankulutu bakoki kosala nini?
  • Tótɛmɛla Zábolo
  • “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bolingo mpe bosembo etinda biso tóbatela bana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Kobɔndisa baoyo basalá bango makambo ya nsɔni na bomwana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Koluka kosangisa na moto nzoto na makasi—Eteni 2: Soki basalá yo yango
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/11 nk. 25-29

Libɔndisi mpo na baoyo bazali na “Elimo etutami”

LELO oyo, mokili ya Satana “ezali lisusu na nsɔni te.” (Baefese 4:19, NW; 1 Yoane 5:19) Ekobo mpe pite esili kopalangana mingi mpenza. Na mikili mingi 50 % ya mabala to koleka mazali kosuka na kobomama. Bato mingi bazali kondima ete kosangisa nzoto mibali na mibali ezali malamu. Kosangisa nzoto na makasi​—kobebisa basi​—ezali kolobelama mingi kati na bansango. Kolakisa bolumbu ya mibali mpe ya basi ezali mosala oyo ezali kokɔtisa bamiliare ya badolare.​—Baloma 1:26, 27.

Likambo oyo ezali mpenza nsɔ́mɔ koleka bizaleli nyonso ya mbindo ezali bongo kobebisama ya bana mike oyo bayebi eloko te. Lolenge moko na mayele ya mokili oyo ya Satana, kosangisa nzoto na bana mike ezali ezaleli “ya bonyama, ya bademó.” (Yakobo 3:15, NW) Zulunalo Time elobi ete bobele na Etats-Unis, “mbula na mbula balakisi mpe minganga bazali kokoma balapólo koleka 400 000 ya makambo masalemaki mpenza, oyo matali kobebisama ya basi mpe bilembeteli na yango.” Na ntango baoyo babebisamaki na bomwana bazali kokóma mikóló, mingi na bango bazali naino na mpasi makasi na mayoki, mpe mpasi yango ezalaka mozindo mpenza! Biblia elobi ete: “Elimo [makanisi mpe mayoki mozindo] ya moto ekoki kokanga motema na maladi na ye; elimo oyo etutami [ezokisami, eyokisami mpasi], nani akoki koyikela yango mpiko?”​—Masese 18:14, NW.

Nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ebendaka bato ya lolenge nyonso, kati na bango mpe “baoyo na motema mopaswani” mpe na baoyo bazali na “elimo elɛmbisami.” (Yisaya 61:1-4, NW) Ezali likambo ya kokamwa te na komona ete bato mingi oyo bazali na mpasi na mayoki bazali koyanola na libyangi oyo ete: “Tiká moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) Lisangá ya boklisto ekoki kozala esika ya libɔndisi mpo na bato motindo wana. Bazali na esengo ya koyoka ete mosika te mpasi ekokóma likambo ya kala. (Yisaya 65:17) Nzokande liboso ete ntango yango eya, bakoki kozala na mposa ya ‘kobɔndisama’ mpo ete mpotá na bango ya mayoki ‘esila.’ Paulo apesaki baklisto toli oyo ebongi ete: “Bóloba na kobɔndisama nyonso epai na baoyo banyokwami na makanisi, bósunga bato na motau, bózala na motema molai epai na bato banso.”​—1 Batesaloniki 5:14, NW.

“Bokundoli oyo epesaka mpasi”

Na bambula oyo, bato mingi basili kokóma na “mitema mipaswani” mpo na bantina oyo ekoki kozala mpasi ete basusu básosola yango. Bazali mikóló oyo, engebene likambo oyo ebéngamaki ete “bokundoli oyo epesaka mpasi,” bazali koloba ete babebisaki bango na ntango bazalaki bana mike.a Basusu babosanaki ete babebisamaki kino, na pwasa, babandaki lisusu komona makambo masilá koleka mpe “bokundoli” oyo kati na yango mokóló moko (to mikóló) bazali kobebisa bango na ntango bazalaki bana mike. Kati na lisangá ya boklisto mpe ezali na bato oyo bazali na makanisi ya kobulunganisama motindo wana? Ee, na ndambo moke ya mikili, baklisto motindo wana oyo basilá komipesa bakoki kozala na mawa makasi, na nkanda, na nsɔni, to komiyoka ete basundolami. Lokola Davidi, bakoki komiyoka ete basundolami na Nzambe mpe kolela ete: “Ee, [Yehova] mpo nini okotikala mosika? Mpo nini okobombama na ntango na mpasi?”​—Nzembo 10:1.

Minganga oyo basalisaka makɔnɔ ya makanisi basosoli naino malamu te mitindo mingi ya “bokundoli” wana. Atako bongo, “bokundoli” motindo wana ekoki kobebisa elimo ya baklisto oyo basilá komipesa. Na yango tokotalela Liloba ya Nzambe na elikya nyonso mpo na kozwa litambwisi mpe lolenge ya kosalisa bango. Biblia ezali kopesa biso “bososoli na makambo nyonso.” (2 Timoté 2:7; 3:16) Ezali mpe kosalisa baoyo nyonso batalelami na mokakatano yango ete bázala na kondima epai na Yehova, “Tata na mawa mpe Nzambe na kobɔndisa nyonso. Ye akobɔndisa biso kati na bolózi na biso.”​—2 Bakolinti 1:3, 4.

Esalemaki mpenza?

Kati na mokili, bowelani ezali mingi mpo na koyeba soki “bokundoli” yango ezali nini mpe na meko nini ezali kokundola makambo oyo masalemaki solo mpenza. Batatoli ya Yehova bazali “bato na mokili te” mpe basanganaka te kati na bowelani motindo wana. (Yoane 17:16) Engebene balapólo oyo esilá kobimisama na mikanda, “bokundoli” yango ezalaki mbala mosusu mpenza ya sikisiki. Na ndakisa, nsima wana mosáli moko ya kompanyi ya assurance, Frank Fitzpatrick “amikundolaki” ete sángó moko abebisaki ye, bato mosusu pene na monkámá bayaki koloba ete bango mpe babebisamaki bobele na sángó wana. Elobami ete sángó yango andimaki mabe na ye.

Nzokande, tosengeli koyeba ete bato mingi bakokaki te kopesa bilembeteli oyo ekoki kondimisa “bokundoli” ya makambo na bango. Basusu oyo bazwaki mpasi motindo wana bamikundolaki na ntina na bato oyo bazalaki kobebisa to kobebisama oyo ezalaki kosalema na esika moko ya sikisiki. Nzokande, na nsima, bilembeteli mosusu ya solo oyo ekesanaki emonisaki polele ete makambo wana oyo “makundolamaki” mazalaki solo te.

Ebombamelo

Nzokande, lolenge nini tokoki kobɔndisa moto na “elimo etutami” mpo na “bokundoli” motindo oyo? Tómikundola lisese ya Yesu ya Mosamalia ya boboto. Moto moko abundisamaki na miyibi, babɛtaki ye mpe babotolaki ye biloko na ye nyonso. Na ntango Mosamalia ayaki, akangaki motema te mpo na moto wana oyo azokaki bampotá. Asalaki nini? Alukaki bobele koyeba makambo nyonso oyo malekaki na ntango abɛtamaki? To Mosamalia yango alukaki koyeba lolenge miyibi yango bazalaki mpe mbala moko alandaki bango? Te. Moto yango azokisamaki! Na yango, Mosamalia azipaki mpotá na ye na bilamba mpe na bolingo nyonso, amemaki ye na esika ya kimya na ndako moko ya mobembo oyo ezalaki zingazinga epai kuna akokaki kozongela kolɔngɔ́nɔ́ na ye.​—Luka 10:30-37.

Ya solo, bokeseni ezali kati na mpotá ya mosuni mpe “elimo etutami” mpo na kobebisama mpenza na bomwana. Kasi nyonso mibale epesaka mpasi mpenza. Na yango, oyo Mosamalia asalaki mpo na Moyuda wana oyo azokaki bampotá na nzoto ezali komonisa oyo tokoki kosala mpo na kosalisa moninga moklisto oyo azwi mpasi na mayoki. Likambo ya liboso mpenza ezali bongo ya kopesa libɔndisi litondi na bolingo mpe kosalisa ye ete abikisama.

Zábolo apesaki mosembwi Yobo mpasi, emonani ete andimisamaki ete mpasi moko te ya mayoki to ya nzoto elingaki kobebisa bosembo na ye. (Yobo 1:11; 2:5) Uta ntango wana, Satana azali mbala mingi kosalela monyoko​—ezala oyo ye moko azali kosala mbala moko to na nzela mosusu​—mpo na kolɛmbisa kondima ya basaleli ya Nzambe. (Kokanisá na 2 Bakolinti 12:7-9) Tokoki kokakatana mpo na kondima ete lelo oyo Zábolo azali kosalela kobebisama ya bana mike mpe “elimo ebwakami” ya bato mingi oyo bakómi lelo mikóló, oyo bakutanaki na makambo wana (to babulunganisami mpo na “bokundoli” mpasi oyo basilaki kozwa) mpo na komeka kolɛmbisa kondima ya baklisto? Lokola Yesu ntango amekamaki na Satana, moklisto oyo azali na mpasi kasi azali na mpiko nyonso kokokangama bobele na bosembo na ye azali koloba ete: “Longwá na yo, Satana!”​—Matai 4:10.

Tózala ntango nyonso makasi na elimo

“Moombo ya sembo mpe ya mayele” asili kobimisa masoló oyo makoki kosalisa mpo na kosilisa mpotá ya elimo mpe ya mayoki oyo euti na kobebisama na bomwana. (Matai 24:45-47) Makambo mamonisi ete ye oyo azali na mpasi akoki kosalisama malamu soki atye motema na ‘makasi na nguya na Nkolo,’ kolatáká bongo “molato mobimba na etumba na Nzambe.” (Baefese 6:10-17) Biteni ya molato yango ezali bongo “solo,” oyo ezali kotɔndɔla Satana lokola monguna oyo aleki monene mpe ezali kosilisa molili oyo kati na yango ye mpe balandi na ye bazali kosala mosala na bango. (Yoane 3:19) Na yango, ezali mpe na “boyengebene lokola ebolo makasi na ntólo.” Ye oyo anyokwami asengeli kosala makasi ete abatela mitindá ya sembo. Na ndakisa, basusu bazalaka na bopusi makasi ya komipesa mpasi to ya kosala pite. Mbala nyonso oyo batɛmɛlaka bopusi wana, bazwaka elónga!

Eteni mosusu ya molato ya etumba ya elimo ezali bongo “nsango malamu na kimya.” Kosolola na bato mosusu na ntina na mikano ya Yehova epesaka makasi epai na moto oyo azali kosolola yango mpe epai na ye oyo azali koyoka. (1 Timoté 4:16) Soki ozali kati na baoyo “batutami na elimo,” mpe ete ezali mpasi mpo na yo kosolola na ntina na nsango malamu, meká kolanda moninga moklisto mosusu wana ezali ye kosala mosala oyo ya lobiko. Mpe kobosana te “nguba na kondima.” Zalá na kondima ete Yehova alingaka yo mpe ete akozongisa nyonso oyo obungisaki. Ndimá na kozanga kokakatana ete Yesu mpe alingaka yo, mpe amonisaki yango na lolenge akufaki mpo na yo. (Yoane 3:16) Ntango nyonso Satana azali koloba na lokuta nyonso ete Yehova abatelaka basaleli na ye te. Wana mpe ezali moko na nkuta monene, ya nsɔ́mɔ.​—Yoane 8:44; kokanisá na Yobo 4:1, 15-18.

Soki mpasi na yo na motema ezali kopekisa yo na kondima ete Yehova amibanzabanzaka mpo na yo, ekozala malamu ete osangana elongo na basusu oyo bandimisami makasi ete amibanzabanzaka mpenza mpo na biso. (Nzembo 119:107, 111; Masese 18:1; Baebele 10:23-25) Kondima te ete Satana alongola yo mbano na yo ya bomoi. Omikundola ete, “ekoti na kobika” ezali mpe eteni ya molato na etumba; bobele bongo mpe “mopanga na [elimo, NW].” Biblia epemami na elimo santu ya Nzambe, oyo Satana akoki te kolónga yango. (2 Timoté 3:16; Baebele 4:12) Maloba na yango ya kobikisa ekoki kokitisa mpasi ya mayoki.​—Kokanisá na Nzembo 107:20; 2 Bakolinti 10:4, 5.

Na nsuka, kotika te kobondela mpo na kozwa makasi ya koyika mpiko. (Baloma 12:12; Baefese 6:18) Mabondeli mauti na nsé ya motema masungaki Yesu kati na mpasi makasi ya mayoki pene na liwa, yango ekoki mpe kosalisa yo. (Luka 22:41-43) Ezali mpasi mpo na yo kobondela? Sɛngá na basusu ete bábondela elongo na yo mpe bábondela mpo na yo. (Bakolose 1:3; Yakobo 5:14) Elimo santu ekosimba mabondeli na yo. (Kokanisá na Baloma 8:26, 27) Lolenge moko lokola ezalaka mpo na maladi ya mosuni, basusu oyo bazali na mpasi ya mayoki bakoki kobikisama na mobimba te kati na boumeli ya ebongiseli ya biloko oyo. Kasi na lisalisi ya Yehova tokoki koyika mpiko, mpe koyika mpiko ezali bongo bolóngi, lokola yango ezalaki mpo na Yesu. (Yoane 16:33) “Bino bato bózala na elikya epai na [Yehova] ntango nyonso; zipolá mitema na bino liboso na ye. Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.”​—Nzembo 62:8.

Ezali boni mpo na ye oyo afundami ete azali mobebisi?

Moto oyo abebisi mwana moke na kosangisa na ye nzoto azali mobebisi mpe asengeli kotalelama lolenge wana. Moto nyonso oyo abebisami lolenge wana azali na lotómo ya kofunda ye oyo abebisaki ye. Kasi, kofunda esengeli kosalema nokinoki te soki ezwi moboko na yango bobele likoló na “bokundoli oyo epesaka mpasi” ya kobebisama. Na yango, likambo eleki mpenza ntina mpo na ye oyo azali na mpasi ezali bongo kozongela bokatikati na ye ya mayoki. Nsima ya koleka ya mwa ntango, akoki kozala na etɛlɛmɛlo malamu ya koyeba “bokundoli” wana mpe kokata soki ezali na likambo moko alingi kosala mpo na yango.

Tótalela ndakisa ya Donna. Elobamaki ete momeseno na ye ya kolya ebulunganisamaki mpe akendeki epai na mopesi-toli moko​—emonanaki ete moto yango ayebaki mpenza mosala na ye malamu te. Nokinoki afundaki tata na ye ete asangisaki na ye nzoto mpe likambo yango efundamaki na esambiselo. Basambisi bakokaki kozwa ekateli te, na yango tata wana akɔtaki bolɔ́kɔ te, kasi asengelaki kofuta lománde ya badolare 100 000. Na nsima na nyonso wana, Donna ayebisaki baboti na ye ete andimaki lisusu te ete likambo wana lisalemaki!

Na mayele nyonso, Salomo alobaki ete: “Kobima te mpo na kokamata efundeli nokinoki.” (Masese 25:8) Soki ezali na bantina malamu ya kokanisa ete mobebisi oyo “akundolami” azali kino sikawa kobebisa bana mike, likebisi lisengeli kopesama. Bankulutu kati na lisangá bakoki kopesa lisungi kati na likambo motindo wana. Soki bongo te, kosala makambo na lombangu te. Na nsuka, okoki kokitisa motema na kosundoláká likambo yango. Kasi, soki olingi kokutana na mobebisi oyo afundami mpo na kolobela ye yango (nsima ya koyeba liboso soki mayoki na yo ekozala nini mpe likambo oyo yango ekoki kobimisa), ozali na lotómo ya kosala yango.

Na boumeli ya ntango wana moto oyo azali kosala “bokundoli” azali kobikisama, makambo ya kokamwa makoki kosalema. Na ndakisa, moto moko akoki komona kati na makanisi ete azali kobebisama na moto oyo ye amonaka mikolo nyonso. Mibeko mikoki kotyama te mpo na lolenge ya kosala liboso ya likambo motindo oyo. “Moto na moto akomema bozito na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Na bantango mosusu moto moko akoki kokanisa ete ndeko moko ya mosuni to mosangani moko ya penepene ya libota atalelami kati na likambo yango. Kobosana te ete “bokundoli oyo epesaka mpasi” ezalaka bongolabongola wana esengeli bongo koluka moto oyo akanisami ete azali mobebisi. Kati na likambo motindo oyo, lokola likambo lisili naino komonana polele te, kozala pene na libota​—na kokende kotaláká bango, na kotindáká nkomá, to na telefone​—ekomonisa ete ozali kosala engebene Makomami.​—Kokanisá na Baefese 6:1-3.

Bankulutu bakoki kosala nini?

Soki bankulutu bakei epai na mosangani moko ya lisangá oyo atungisami na kozongelama ya makambo masilá koleka to “bokundoli oyo epesaka mpasi” mpo na lolenge abebisamaki na bomwana, mingimingi bankulutu mibale baponamaka mpo na kopesa lisalisi. Bankulutu basengeli kolendisa na boboto nyonso ye oyo azwi mpasi ete atya likebi na ye mingi likoló na lolenge ya kolónga konyokwama na ye na makanisi. Bankombo ya babebisi nyonso oyo “bakundolami” esengeli kobombama lokola sɛkɛlɛ́.

Mokumba ya liboso ya bankulutu ezali bongo ya kosala lokola babateli na mpate. (Yisaya 32:1, 2; 1 Petelo 5:2, 3) Basengeli kosɛnzɛla ete ‘bámilatisa mitema na mawa, na boboto, na kosɔkɛma, na bopɔlɔ, na mitema pɛtɛɛ.’ (Bakolose 3:12) Pesá bango nzela ya koyoka na boboto nyonso mpe ya kosalela maloba ya kobikisa oyo mazwami kati na Makomami. (Masese 12:18) Basusu oyo batungisami mpo na “bokundoli” ya mpasi mingi bamonisaki botɔ́ndi mpo na bankulutu oyo bakendaka kotala bango mbala na mbala to mpe babéngaka bango na telefone mpo na koyeba soki bazali malamu. Kosala bongo esɛngaka bobele ntango molai te, kasi yango ezali komonisa ete lisangá ya Yehova emibanzabanzaka mpo na bango. Na ntango ye oyo azali na mpasi asosoli ete bandeko na ye baklisto bazali solo na bolingo epai na ye, ekoki kozala lisungi monene mpo na ye ete azongela bokatikati na ye ya mayoki.

Bankulutu bakosala nini soki ye oyo azali na mpasi azwi ekateli ete afunda likambo yango?b Na bongo, bankulutu mibale wana bakoki kopesa ye toli ete, na boyokani na lilako oyo ezwami na Matai 18:15, asengeli ye moko kokutana na mofundami na ntina na likambo yango. Soki mayoki ya mofundi epesi ye nzela te mpo na kolobana polele na moto oyo azali kofunda, akoki kosala yango na nzela ya telefone to na kotindáká nkomá. Na lolenge wana, mofundami apesameli libaku ya kosala eyambweli liboso na Yehova na eyano na ye liboso na efundeli. Akoki nkutu kowangana mpenza mbeba na ye. To mbala mosusu mofundami akoyambola mabe na ye mpe boyokani ekoki kozongisama. Ekozala mpenza lipamboli! Soki eyambweli esalemi, na nsima bankulutu wana mibale bakotalela makambo yango na boyokani na mitindá ya Makomami.

Soki efundeli yango endimami te, bankulutu basengeli kolimbola na mofundi ete kosambisama ekolandana lisusu te. Mpe lisangá ekokóba kotalela mofundami lokola moto oyo asali eloko te. Biblia elobi ete batatoli basengeli kozala mibale to misato liboso ya kosambisama. (2 Bakolinti 13:1; 1 Timoté 5:19) Ata soki bato mibale to koleka “bamikundoli” ete bobele moto moko wana abebisaki bango, lolenge wana ya komikundola ezali mpenza sikisiki te mpo ete bikateli bikamatama likoló na yango kozanga bilembeteli mosusu. Yango elimboli te ete “bokundoli” wana etalelami ete ezali lokuta (to etalelami ete ezali solo). Kasi mitindá ya Biblia misengeli kolandelama liboso ya kosambisa likambo.

Kasi, ekozala boni, soki ye oyo afundami​—atako azali kowangana mabe na ye​—azali mpenza na mbeba? Tokoki koloba ete alóngi mpenza kopɛngola etumbu? Soko moke te! Mbeba na ye to kozanga kosala likambo na ye ekoki kotikama na libateli nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. “Masumu na bato mosusu mazali polele mpe makokambaka bango kati na kosambisa; nde masumu na bamosusu makobilaka bango nsima.” (1 Timoté 5:24; Baloma 12:19; 14:12) Mokanda ya Masese elobi ete: “Elikya ya bayengebene ezali esengo; nde elikya na bato mabe ekobeba.” “Ekokufa moto na masumu, elikya na ye ekosuka.” (Masese 10:28; 11:7) Na nsuka, Yehova Nzambe mpe Yesu Klisto bakokamata ekateli ya nsuka na bosembo nyonso.​—1 Bakolinti 4:5.

Tótɛmɛla Zábolo

Na ntango bato oyo basili komipesa bazali koyika mpiko mpo na mpasi ya nzoto to mpasi na mayoki, yango emonisaka mpenza nguya na bango mpe bolingo mozindo oyo bazali na yango mpo na Yehova! Mpe ezalaka mpenza elembeteli ete nguya ya elimo ya Yehova ezali kosunga bango!​—Kokanisá na 2 Bakolinti 4:7.

Maloba oyo ya Petelo ekokani epai na bango, ete: “Bótɛmɛla [Satana] ngwi mpo na kondima.” (1 Petelo 5:9) Kosala bongo ekoki kozala mpasi. Na bantango mosusu, ekoki kozala mpasi mpo na kokanisa malamu mpe na mayele nyonso. Kasi kolɛmba te! Mosika te, Zábolo mpe misala na ye ya mayele mabe bakozala lisusu te. Ya solo, tozali kozela ntango yango na mposa makasi, wana “Nzambe . . . akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

[Maloba na nse ya lokasa]

a “Bokundoli oyo epesaka mpasi” mpe maloba mosusu oyo ekokani na yango etyami kati na bilembo ya bilobisi mpo na kokesenisa yango na bokundoli ya makambo ya kala, na lolenge esalemaka epai na biso banso.

b Ekoki mpe kozala na ntina ete lolenge elobelami na paragrafe oyo ekoka kosalelama soki likambo yango eyebani mingi kati na lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto