LISOLO YA BOYEKOLI 19
Bolingo mpe bosembo etinda biso tóbatela bana (Eteni 3/4)
“Ozali Nzambe oyo asepelaka na mabe te; moto mabe akoki kofanda mwa ntango epai na yo te.”—NZ. 5:4.
LOYEMBO 142 Tósimba makasi elikya na biso
NA MOKUSEa
1-3. (a) Na kotalela Nzembo 5:4-6, ndenge nini Yehova atalelaka mabe? (b) Mpo na nini tokoki koloba ete kobebisa mwana eyokani ata moke te na “mobeko ya Kristo”?
YEHOVA NZAMBE ayinaka mabe ya ndenge nyonso. (Tángá Nzembo 5:4-6.) Na ntembe te, ayinaka likambo ya kobebisa bana na makambo ya kosangisa nzoto, oyo ezali lisumu moko ya monene mpenza! Lokola tomekolaka Yehova mpo tozali basaleli na ye, toyinaka likambo ya kobebisa bana mpe tondimaka yango te na lisangá.—Rom. 12:9; Ebr. 12:15, 16.
2 Kobebisa mwana eyokani ata moke te na “mobeko ya Kristo”! (Gal. 6:2) Mpo na nini tokoki koloba bongo? Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mobeko ya Kristo, elingi koloba makambo nyonso oyo Yesu ateyaki na maloba mpe na ndakisa na ye, esimbami na bolingo mpe elendisaka bato bázala sembo. Lokola bakristo ya solo batambwisami na mobeko yango, basalelaka bana makambo na ndenge oyo ekosala ete bámiyoka ete babatelami mpe balingi bango. Kasi, moto oyo abebisi mwana azali moimi, azangi bosembo mpo likambo yango esalaka ete mwana amiyoka ete abatelami te mpe balingi ye te.
3 Likambo ya mawa, kobebisa bana na makambo ya kosangisa nzoto epalangani mingi na mokili, mpe ekómelaki bana mosusu na lisangá. Mpo na nini? Mpo “bato mabe mpe bakosi” bakómi ebele, mpe basusu bakoki koluka kokɔta na lisangá. (2 Tim. 3:13) Lisusu, bato mosusu oyo balobaka ete bazali na kati ya lisangá bamipesi na bamposa oyo esengeli te, mpe babebisi bana na makambo ya kosangisa nzoto. Tólobela ntina oyo kobebisa bana ezali lisumu moko monene. Na nsima, tokotalela makambo oyo bankulutu basalaka soki lisumu ya monene esalemi na lisangá, na ndakisa ntango babebisi mwana. Tokotalela mpe ndenge oyo baboti bakoki kobatela bana na bango.b
LISUMU MOKO YA MONENE
4-5. Mpo na nini kobebisa mwana ezali kosalela ye lisumu?
4 Kobebisa mwana esalaka mabe mpo na ntango molai. Enyokolaka mwana oyo babebisi, ata mpe bato oyo balingaka ye, na ndakisa, bato ya libota mpe bandeko ya lisangá. Kobebisa mwana ezali mpenza lisumu moko ya monene.
5 Lisumu epai ya moto oyo abebisami.c Kopesa basusu mpasi mpe konyokola bango ezali lisumu. Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, mokóló oyo abebisi mwana asali ye likambo oyo ekopesa mwana mpasi mpe ekonyokola ye na ndenge ya mabe mpenza. Ekokóma mpasi mwana atyela moto motema, mpe akoyoka lisusu te ete abatelami. Na yango, tosengeli kobatela bana na likambo wana ya mabe. Longola yango, tosengeli kosalisa mpe kobɔndisa baoyo babebisamá.—1 Tes. 5:14.
6-7. Na ndenge nini kobebisa mwana ezali kosalela lisangá mpe bakonzi ya Leta lisumu?
6 Kobebisa mwana ezali kosalela lisangá lisumu. Na lisangá, moto oyo abebisi mwana abebisi lokumu ya lisangá. (Mat. 5:16; 1 Pe. 2:12) Ezali mpenza likambo ya kozanga bosembo epai ya bamilio ya bakristo ya sembo oyo bazali ‘kobunda etumba makasi mpo na kondima’! (Yuda 3) Tondimaka te ete basali-mabe oyo baboyi kobongola motema mpe bazali kobebisa lokumu ya lisangá bázala kati na biso.
7 Kobebisa mwana ezali kosalela bakonzi ya Leta lisumu. Bakristo basengeli ‘koyokelaka bakonzi oyo bazali liboso.’ (Rom. 13:1) Tokomonisa ete toyokelaka bakonzi soki tozali kotosa mibeko ya mboka. Soki moto moko na lisangá abuki mobeko moko ya monene ya Leta, na ndakisa abebisi mwana, asaleli bakonzi ya Leta lisumu. (Talá mpe Misala 25:8.) Bankulutu bazali na bokonzi te ya kopesa etumbu na bato oyo babuki mibeko ya mboka. Kasi, babatelaka te moto oyo abebisi mwana mpo azwa te etumbu ya Leta. (Rom. 13:4) Mosumuki asengeli kobuka oyo alonaki.—Gal. 6:7.
8. Ndenge nini Yehova atalelaka moto oyo asaleli moto mosusu lisumu?
8 Na koleka, kobebisa mwana ezali kosalela Nzambe lisumu. (Nz. 51:4) Ntango moto asaleli moto mosusu lisumu, asaleli mpe Yehova lisumu. Tótalela ndakisa moko oyo euti na Mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele. Mibeko elobaki ete moto oyo ayibi to abubi moninga na ye, “azangi mpenza bosembo epai ya Yehova.” (Lev. 6:2-4) Na yango, ntembe ezali te ete na lisangá, moto oyo abebisi mwana, ayibi libateli ya mwana yango, azangi mpenza bosembo epai ya Nzambe. Moto yango afingisi mpenza nkombo ya Yehova. Na yango, tosengeli koyeba ete kobebisa mwana ezali mabe mpenza, ezali lisumu monene na miso ya Nzambe.
9. Makanisi nini oyo eyokani na Makomami ebongiseli ya Yehova ebimisi na boumeli ya bambula, mpe mpo na nini?
9 Na boumeli ya bambula, ebongiseli ya Yehova ebimisi makanisi ebele oyo eyokani na Makomami na likambo etali kobebisa bana. Na ndakisa, masolo mosusu ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! emonisi makambo oyo bato oyo babebisamá na makambo ya kosangisa nzoto bakoki kosala mpo na mpasi oyo bayokaka na motema, ndenge oyo basusu bakoki kosalisa mpe kolendisa bango, mpe ndenge oyo baboti bakoki kobatela bana na bango mpo bábebisa bango te na makambo ya kosangisa nzoto. Bankulutu bazwaka malako ya sikisiki oyo eyokani na Biblia mpo na ndenge ya kosala ntango moto moko ya lisangá abebisi mwana. Ebongiseli ya Yehova ekobaka kotalela mbala na mbala malako oyo masangá ekoki kosalela soki babebisi mwana. Mpo na nini? Mpo tómindimisa ete ndenge na biso ya kotalela likambo yango eyokani na mobeko ya Kristo.
OYO BANKULUTU BASALAKA NTANGO LISUMU MOKO YA MONENE ESALEMI
10-12. (a) Ntango bankulutu bayoki ete lisumu moko ya monene esalemi, likambo nini babosanaka te, mpe batalelaka nini? (b) Na kotalela Yakobo 5:14, 15, bankulutu balukaka kosala nini?
10 Ntango bankulutu bazali kotalela lisumu moko ya monene, babosanaka te ete mobeko ya Kristo esɛngi ete básalela bandeko ya lisangá makambo na bolingo mpe básala oyo ezali malamu mpe sembo na miso ya Nzambe. Na yango, ezali na makambo oyo batalelaka malamumalamu ntango bayoki ete moto moko asali lisumu ya monene. Bankulutu balukaka libosoliboso kobatela bosantu ya nkombo ya Nzambe. (Lev. 22:31, 32; Mat. 6:9) Batalelaka mpe ndenge ya kosalisa bandeko ya lisangá mpo bázala na boyokani malamu na Yehova; balukaka kosalisa mpe kobɔndisa moto oyo babebisi ná bandeko ya libota na ye.
11 Lisusu, soki moto oyo asali lisumu yango azali na lisangá, bankulutu batalelaka ndenge ya kosalisa ye mpo abongisa boyokani na ye na Yehova, soki likoki ezali. (Tángá Yakobo 5:14, 15.) Mokristo oyo asali lisumu ya monene mpo na kokokisa bamposa na ye ya mabe azali na maladi ya elimo. Elingi koloba ete azali lisusu na boyokani ya malamu te na Yehova.d Na ntango wana, tokoki koloba ete bankulutu bazali lokola minganga. Balukaka kosala nyonso ‘bábikisa moto oyo azali kobɛla [elingi koloba, mosali-mabe].’ Toli ya Biblia oyo bakopesa ye ekoki kosalisa ye abongisa boyokani na ye na Nzambe, kasi ekosalema bongo kaka soki abongoli mpenza motema.—Mis. 3:19; 2 Ko. 2:5-10.
12 Ezali polele ete bankulutu bazali mpenza na mokumba monene. Batyelaka mpenza etonga oyo Nzambe apesi bango likebi. (1 Pe. 5:1-3) Balingaka ete bandeko báyoka ete lisangá ezali mpenza esika ya libateli. Yango wana, basalaka na lombangu soki bayoki ete moto moko na lisangá asali lisumu moko ya monene, na ndakisa abebisi mwana. Basalaka nini? Tótalela mituna oyo ezali na ebandeli ya paragrafe 13, 15, mpe 17.
13-14. Bankulutu balandaka mibeko ya mboka oyo esɛngi koyebisa likambo ya kobebisa mwana epai ya bakonzi ya Leta? Limbolá.
13 Bankulutu balandaka mibeko ya mboka oyo esɛngi koyebisa likambo ya kobebisa mwana epai ya bakonzi ya Leta? Ɛɛ. Na bamboka oyo mibeko yango ezalaka, bankulutu basalaka nyonso mpo na kotosa mibeko yango soki moto abebisi mwana. (Rom. 13:1) Mibeko ya ndenge wana ebuki mobeko ya Nzambe te. (Mis. 5:28, 29) Na yango, ntango bankulutu bayoki nsango ete moto moko abebisi mwana, kozanga koumela basololaka na biro ya filiale mpo na koyeba oyo bakoki kosala mpo na kotosa mobeko oyo esɛngi koyebisa likambo yango epai ya bakonzi ya Leta.
14 Ntango bankulutu bazali kosolola na moto oyo abebisami, na baboti na ye mpe na bato mosusu oyo bayebi likambo yango, bakoyebisa bango ete bazali na lotomo ya komema likambo yango epai ya bakonzi ya Leta. Bongo soki moto oyo asali likambo yango azali na lisangá mpe likambo yango eyebani mingi esika bafandi? Mokristo oyo ayebisaki likambo yango asengeli komona ete afingisi nkombo ya Nzambe? Te. Moto oyo abebisi mwana nde afingisi nkombo ya Nzambe.
15-16. (a) Na kotalela 1 Timote 5:19, mpo na nini esengeli batatoli bázala ata mibale liboso ya kosala komite ya kosambisa? (b) Bankulutu basalaka nini ntango bayoki ete moto moko na lisangá abebisi mwana?
15 Na lisangá, liboso ete bankulutu básala komite mpo na kosambisa, mpo na nini esɛngi bázwa litatoli ya bato ata mibale? Na kotalela Biblia, yango nde emonisaka bosembo. Soki mosumuki ye moko ayamboli te, esɛngi batatoli bázala mibale mpo likambo endimama mpe bankulutu bázwa nzela ya kosala komite ya kosambisa. (Mib. 19:15; Mat. 18:16; tángá 1 Timote 5:19.) Yango elingi nde koloba ete liboso ya koyebisa bakonzi ya Leta ete moto abebisi mwana, esɛngi kaka litatoli ya bato mibale? Te. Mpo na koyebisa bakonzi likambo oyo ebuki mibeko, bankulutu to bato mosusu bakolanda te mobeko oyo esɛngi batatoli bázala mibale.
16 Soki bankulutu bayoki ete moto moko na lisangá abebisi mwana, basalaka nyonso bálanda mibeko ya mboka oyo esɛngi koyebisa likambo yango epai ya bakonzi ya Leta; na nsima, bakolandela likambo yango malamumalamu. Nsima na yango, na kolanda oyo Biblia elobi, bakotala soki esɛngi kosala komite ya kosambisa. Soki moto yango awangani, bankulutu bakoyoka bato mosusu oyo bayebi likambo yango. Soki ezali na litatoli ya bato ata mibale, elingi koloba moto oyo afundi likambo ná moto mosusu oyo akoki komonisa ete ezali solo moto yango abebisi mwana to abebisá mwana mosusu liboso, bankulutu bakoki kosala komite ya kosambisa.e Soki motatoli ya mibale azali te, yango elingi koloba te ete efundeli yango ezali solo te. Ata soki batatoli mibale bazwami te mpo na kondimisa ete likambo ya mabe esalemaki, bankulutu bayebaka ete mbala mosusu lisumu ya monene esalemi, oyo ezokisi mpenza bato. Bankulutu bakobaka kobɔndisa mpe kolendisa moto oyo babebisaki. Longola yango, bankulutu basengeli kofungola miso mpe kobatela lisangá mpo moto moko te abebisa bana.—Mis. 20:28.
17-18. Komite ya kosambisa ezali na mokumba nini?
17 Komite ya kosambisa ezali na mokumba nini? Liloba “kosambisa” elingi koloba te ete bankulutu bakataka soki moto oyo abebisi mwana asengeli kozwa etumbu to te epai ya bakonzi ya Leta mpo abuki mobeko. Bankulutu batɛmɛlaka mibeko ya Leta te; batikaka makambo oyo ebuki mibeko na mabɔkɔ ya bakonzi ya Leta. (Rom. 13:2-4; Tito 3:1) Kosambisa ya bankulutu ezalaka nde mpo na kokata soki moto asengeli kotikala na lisangá to te.
18 Ntango bankulutu basalisaka moto na komite ya kosambisa, batalelaka kaka makambo ya losambo. Na lisalisi ya Biblia, batalaka soki moto oyo abebisi mwana abongoli motema to te. Soki abongoli motema te, bankulutu bakoyebisa ye ete alongolami na lisangá, mpe bakoyebisa na lisangá ete azali lisusu Motatoli ya Yehova te. (1 Ko. 5:11-13) Soki abongoli motema, akoki kotikala na lisangá. Kasi, bankulutu bakoyebisa ye ete ezali na makambo oyo akozwa libaku ya kosala te na kati ya lisangá bambula mingi to bomoi na ye mobimba, to mpe akozwa mikumba te. Mpo na bolamu ya bana, na ndenge ya nkuku, bankulutu bakoki koyebisa baboti oyo bazali na bana mike ete basengeli kozala ekɛngɛ ntango bana na bango bazali zingazinga ya moto yango. Ntango bankulutu bazali kozwa bibongiseli ya ndenge wana, basengeli kokeba ete bátánga te bankombo ya bato oyo babebisamaki.
NDENGE YA KOBATELA BANA NA YO
Baboti bazali koteya bana na bango makambo etali kosangisa nzoto mpo na kobatela bango na likambo ya kobebisa bana. Bazali kosalela mikanda ya ebongiseli ya Nzambe mpo na kosalisa bana. (Talá paragrafe 19-22)
19-22. Ndenge nini baboti bakoki kobatela bana na bango? (Talá elilingi ya ezipeli.)
19 Nani azali na mokumba ya kobatela bana mpo básala bango mabe te? Baboti.f Bana na yo bazali likabo to “libula oyo euti na Yehova.” (Nz. 127:3) Yehova apesi yo mokumba ya kobatela bango. Ndenge nini okoki kobatela bana na yo mpo bábebisa bango te?
20 Ya liboso, luká koyeba makambo oyo etali kobebisa bana. Luká koyeba lolenge ya bato oyo babebisaka bana mpe mayele oyo basalelaka mpo na kokosa bango. Fungolá miso na makambo oyo ekoki kozala likama. (Mas. 22:3; 24:3) Kobosana te ete mbala mingi, bato oyo babebisaka bana ezali bato oyo bana bayebi mpe oyo batyelaka motema.
21 Ya mibale, sololáká malamu na bana na yo. (Mib. 6:6, 7) Yango elimboli mpe ete osengeli koyokaka bana na yo na likebi. (Yak. 1:19) Yebá ete mbala mingi mwana oyo babebisi akokaka kolobela likambo yango te. Ntango mosusu abangaka ete bato bakondimela ye te, to mbala mosusu moto oyo abebisi ye ayebisaki ye ayebisa moto te likambo yango. Soki omoni mwa likambo ya mabe epai ya mwana, sololá na ye na boboto, tuná ye mituna, mpe zelá oyoka biyano na ye.
22 Ya misato, teyá bana na yo. Yebisá bango makambo etali basi ná mibali, oyo eyokani na mbula na bango. Yebisá bango oyo basengeli koloba to kosala soki moto moko aluki kosimba bango na ndenge oyo ebongi te. Salelá biloko oyo ebongiseli ya Nzambe ebimisi mpo na ndenge ya kobatela bana.—Talá etanda “Omiteya mpe teyá bana na yo.”
23. Ndenge nini biso Batatoli totalelaka likambo ya kobebisa bana, mpe lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna nini?
23 Biso Batatoli ya Yehova tomonaka ete kobebisa bana na makambo ya kosangisa nzoto ezali lisumu moko ya monene mpe likambo moko ya mabe mpenza. Lokola totambwisami na mobeko ya Kristo, na masangá na biso, totikaka bato oyo babebisaka bana bábuka mbuma ya masumu na bango. Kasi, tokoki kosala nini mpo na kosalisa baoyo babebisamá na bomwana? Lisolo oyo elandi ekopesa eyano na motuna yango.
LOYEMBO 103 Babateli ya mpate—Makabo oyo ezali bato
a Na lisolo oyo, tokolobela ndenge oyo tokoki kobatela bana mpo bábebisa bango te na makambo ya kosangisa nzoto. Tokoyekola makambo oyo bankulutu basalaka mpo na kobatela lisangá mpe ndenge oyo baboti bakoki kobatela bana na bango.
b NDIMBOLA YA MALOBA: Maloba kobebisa mwana na makambo ya kosangisa nzoto esalelamaka ntango mokóló moko akokisi bamposa na ye ya kosangisa nzoto epai ya mwana. Na ndakisa, soki asangisi na ye nzoto; afibi to alɛmboli enama na ye ya kobotela; asangisi na ye nzoto na esumbeli; asimbisimbi ye na ndenge oyo ebongi te na enama ya kobotela, na mabɛlɛ, to na masɔkɔ; to asali ye makambo mosusu ya nsɔni. Atako bato oyo babebisamaka mingi ezali nde bana basi, babebisaka mpe bana mibali. Mikóló oyo babebisaka bana bazalaka mingi mibali, kasi basi mosusu mpe babebisaka bana.
c NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo mpe na oyo elandi, tosaleli maloba “moto oyo abebisami” mpo na kolobela mwana oyo mokóló moko asaleli mpo na kokokisa bamposa na ye ya nzoto. Maloba yango ezali komonisa polele ete basali nde mwana mabe, babubaki ye mpe ayebi eloko te.
d Kozala na maladi ya elimo epesi moto nzela te amipesa na masumu. Mosumuki akozongisa monɔkɔ mpo na bikateli mpe misala na ye ya mabe, mpe Yehova akosambisa ye.—Rom. 14:12.
e Esengeli soki moke te kosɛnga mwana azala esika bazali kosolola na moto oyo bafundi ete abebisaki ye. Moboti to mokóló mosusu oyo mwana yango atyelaka motema akoki koyebisa bankulutu makambo oyo mwana ayebisaki ye. Na ndenge yango, mwana akonyokwama koleka ndelo te na makanisi.
f Makambo oyo elobami mpo na baboti, etali mpe moto nyonso oyo abɔkɔlaka bana oyo bazali ya ye te.