Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/12 nk. 4-7
  • Ntango bonkɔ́kɔ ezali kotɛmɛla solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango bonkɔ́kɔ ezali kotɛmɛla solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobebisama ya mai ya solo
  • Boklisto ya nkombo mpamba ebakisi libebi mosusu
  • Bopusi ya libebi ya elimo
  • Meká mimeseno ya bonkɔ́kɔ
  • Bonkɔ́kɔ bosengeli kowelana na solo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Baklisto basambelaka na elimo mpe na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Okoki kondimela Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Nini mpenza endimisaka yo makambo ondimaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/12 nk. 4-7

Ntango bonkɔ́kɔ ezali kotɛmɛla solo

LIKÁMÁ​—MAI OYO EZALI YA KOMELA TE. Ekoki kozala ete tomeseni komona makebisi lolenge oyo. Na bisika mingi bato bakebaka mpenza na ntina na bimeli mpamba te bayebi ete maziba mosusu ya mai masili kobebisama na biloko ya ngɛngɛ oyo babéngaka “lísenga ya nganga-nkisi.” Boyekoli moko eyebisi ete, lokola mbuma mabe ya kobebisama, na esika ete ezala “lisungi mpe libateli ya bomoi,” mai makoki kokóma “momemi ya mikrobɛ mpe . . . biloko ya chimie oyo bizali na ngɛngɛ.”​—Water Pollution.

Kobebisama ya mai ya solo

Mimeseno ya bonkɔ́kɔ oyo mizali kowelana na solo mizali lokola mai oyo masili kobebisama. Kozanga koyeba, tokoki mbala mosusu kokangama makasi na bonkɔ́kɔ​—masoló, makanisi, bindimeli to mimeseno oyo eyebisamaka longwa na libota moko kino na libota mosusu​—oyo esilaki kobebisama na “lísenga” ya makanisi mpe na bafilozofi ya lokuta mpe ya kozimbisa. Motindo moko na mai oyo mabebisami, yango ekoki kosala mabe mingi​—kobebisama ya elimo.

Ata soki tokanisi ete bindimeli na biso ya bonkɔ́kɔ na ntina na losambo bizali na moboko likoló na Biblia, tosengeli biso banso kozwa ntango ya kotalela yango na likebi nyonso engebene mateya ya Biblia. Omikundola, ntango Martin Luther akangamaki na bindimeli ya kala oyo bizalaki na ntango na ye mpe akweisaki Copernic, akanisaki ete Biblia ezalaki kosimba makanisi na ye. Nzokande, Luther alandaki te ndakisa eleki malamu ya bato ya Beloya na ntango ya kala oyo ‘bazalaki na makanisi malamu ya kolukaluka na likebi mpenza kati na Makomami mpo na kotala soko makambo yango mazalaki bongo.’​—Misala 17:10, 11.

Kanisá mpasi oyo bindimeli ya bonkɔ́kɔ ebimiselaki Bayuda ya ntango na Yesu. Bazalaki kondima na molende nyonso ete bonkɔ́kɔ na bango ezalaki solo. Ntango basilikaki mpo ete bayekoli ya Yesu bazalaki kobuka mibeko ya bonkɔ́kɔ, Yesu asukisaki bango na motuna oyo: “Mpo na nini bino bokosopa mibeko na Nzambe mpo na mateyo na bino?” (Matai 15:1-3) Mabungá mazalaki nini? Yesu amonisaki mokakatano yango ntango atángaki maloba ya mosakoli Yisaya ete: “Bakosanzolaka ngai [Nzambe] mpamba, bakolakisa malako mazali mibeko na bato.”​—Matai 15:9; Yisaya 29:13.

Ee, na esika ya solo oyo eutaki na Nzambe bateyaki makanisi oyo mautaki na bato to, mabe koleka, bateyaki makanisi oyo mautaki na bademó. Na ndakisa, búku Insight on the Scriptures, Volimi 1, lokasa 506, elimboli ete: “Bafalisai ya ntango wana bazalaki koteya ete soki moto alobi ete biloko na ye bizali ‘corban,’ to likabo lipesami na Nzambe, akokaki te kosalela biloko yango mpo na kokokisa bamposa ya baboti na ye, atako bazalaki mpenza kati na bosɛnga, nzokande akokaki kosalela biloko yango mpo na ye moko kino liwa na ye soki aponaki kosala bongo.” Mayele ya bomoto oyo ebebisaki mai ya solo esalaki bopusi mabe likoló na elimo ya Bayuda. Mingi kati na bango babwakaki Masiya oyo bazelaki mpo na ntango molai.

Boklisto ya nkombo mpamba ebakisi libebi mosusu

Libebi ya elimo motindo moko ekómaki nsima ya kufa ya Yesu. Mingi oyo bazalaki koloba ete bazalaki bayekoli na ye bazalaki kotánga bonkɔ́kɔ oyo ekomami te lokola eutelo ya mateya ya sika. Engebene búku Cyclopedia of Biblical, Theological, and Ecclesiastical Literature, ya McClintock mpe Strong, basusu oyo bazalaki komitánga baklisto bakanisaki ete bonkɔ́kɔ lolenge yango ezalaki “malako mapesamaki na monɔkɔ ya bantoma epai na mangomba ya boklisto ya ebandeli, oyo epesamaki uta eleko ya bantoma, mpe ebatelamaki pɛtɔ kino na ntango na bango mpenza.”​—Biso nde totɛngisi yango.

Nzokande, mingi na mateya ya bonkɔ́kɔ wana mazalaki mpenza makanisi ya pɛtɔ te, kasi ya lokuta. Lokola Cyclopedia yango ezali kolimbola, bafilozofi wana ya sika ezalaki “bongolabongola te bobele na mateya mosusu ya bonkɔ́kɔ, kasi lisusu bongolabongola na makomi mpenza ya bantoma oyo bazalaki na yango na mabɔkɔ.” Yango ezalaki mpenza likambo ya kokamwa te. Ntoma Paulo asilaki kokebisa baklisto ete: “Bókeba ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bibanzabanza na ye na motindo na Klisto te kasi na motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.”​—Bakolose 2:8.

Bobele bongo lelo, bindimeli mingi ya bonkɔ́kɔ bizali ‘bongolabongola na makomi mpenza ya bantoma.’ Boklisto ya nkombo mpamba esili kotya ngɛngɛ kati na mai ya solo na kokɔtisáká ebele ya makanisi oyo mapemami na bademó, makanisi lokola Bosato, lifelo ya mɔ́tɔ, kozanga kokufa ya molimo ya moto, bolingi-ekólo mpe losambo ya bikeko.a (1 Timoté 4:1-3) Lisoló ya makambo ya bato lizali kondimisa ezaleli ya bokɔnɔ ya elimo oyo esili kokanga bato oyo bakweaki na motambo ya mateya ya bademó oyo masili kokóma mateya ya bonkɔ́kɔ ya boklisto ya nkombo mpamba.​—Kokanisá na Yisaya 1:4-7.

Ezali solo ete, kobebisama ya solo lolenge yango esilaki kobanda uta ebandeli ya lisoló ya bato. Satana alandi bobele kosala lokola asalaki uta Edene, kobebisa makanisi ya bato na lokuta mpe bokosi. (Yoane 8:44; 2 Bakolinti 11:3) Na ntango libota ya bato lipalanganaki na mabelé mobimba nsima ya Mpela ya mikolo ya Noa, bato ya nkótá nyonso bakweaki na likámá ya kobebisama ya eutelo ya boyebi ya bato, oyo ebebisamaki na nkó nyonso na bafilozofi mpe na makanisi mapemamaki na bademó.

Bopusi ya libebi ya elimo

Libebi wana ya elimo likoki komema likámá nini? Tokoki kokokanisa yango na likámá ya mai oyo mabebisami likoló na nzoto na biso. Búku moko elobaki ete: “Bato pene na bamilió 200 bazali konyokwama na schistosomiase (bilharziose) [fiɛvrɛ oyo epesami na mbɛmbɛ mike ya mai, bokɔnɔ oyo ekitisaka makila, elɛmbisaka, etungisaka kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mpe ememaka nkutu na kufa], oyo ezwamaka wana moto akɔti na mai oyo mabebisami. Bato milió nkáma mitano bazali na trachome, moko na makɔnɔ minene ya koboma miso, mpamba te mai ya kosukola mazali ya bosoto. . . . Bato soko miliare mibale bazali na mai malamu te ya komela.” (Our Country, the Planet) Bamilió ya bato basili kolɛmba na elimo, basili kokufa miso mpe nkutu basili kobomama na elimo mpo ete balandaki bonkɔ́kɔ oyo esangisamaki na mateya ya lokuta ya bademó.​—1 Bakolinti 10:20, 21; 2 Bakolinti 4:3, 4.

Na ndakisa, bato mingi babulungani to bazali bakufi-miso mpo na oyo etali kokesenisa kati na Yesu Klisto mpe Tata na ye, Yehova Nzambe. Kolongola nkombo ya Nzambe, Yehova, kati na Makomami ya Greke ya boklisto esili kokóma momeseno epai na basusu oyo bazali komitánga baklisto. George Howard alobaki kati na Journal of Biblical Literature ete: “Na likanisi na biso, kolongolama wana ya Tétragram[me], etyaki mobulungano na makanisi ya baklisto oyo bautaki na bapakano mpo na oyo etalaki kokesenisa ‘Nkolo Nzambe’ mpe ‘Nkolo Klisto.’”

Kanisá lisusu mobulungano, biyambayamba mpe bobángi oyo eutaka na bonkɔ́kɔ oyo ekweisami na Makomami ete molimo ya moto mokufaka te. (Kokanisá na Mosakoli 9:5; Ezekiele 18:4.) Bato boni bakangami na boombo ya losambo ya bonkɔ́kɔ to bazali ntango nyonso kati na bobángi ete bakufi bakozonga kosala bango mabe? Bindimeli wana bisili nkutu kolendisa bato mosusu na komiboma to na koboma bato mosusu.

Ba Japonais mingi bakanisaka ete nsima ya kufa bilimu na bango bikokutanaka na mokili oyo mozali nsima ya liwa. Baboti mosusu oyo bakanaka komiboma, bakanisaka bongo ete, ezali malamu bakufa na bana na bango elongo. Búku moko (An English Dictionary of Japanese Ways of Thinking) elobi ete: “Na Japon komiboma etalelamaka ntango nyonso lokola likambo ya mabe te, kasi mbala mingi etalelamaka lokola lolenge malamu ya kosɛnga bolimbisi na libungá monene oyo moto asalaki . . . Ata komiboma ya libota mobimba ekoki mbala mosusu kolobelama na maloba ya boboto.”

Meká mimeseno ya bonkɔ́kɔ

Na kotalela makámá oyo mabimaka soki moto alandi bindimeli mpe mimeseno ya bonkɔ́kɔ bilandela, tosengeli bongo kosala nini? Pene na nsuka ya ekeke ya liboso, ntoma Yoane apesaki toli oyo epai na baninga na ye baklisto: “Balingami, bóndima [maloba mapemami, NW] nyonso te, kasi bómeka [maloba mapemami, NW] [lokola bamekaka mai mpo na koyeba soki ezali pɛtɔ] soko euti na Nzambe, mpo ete basakoli na lokuta mingi basili kobima kati na mokili.” (1 Yoane 4:1; talá lisusu 1 Batesaloniki 5:21) Okoyeba lolenge nini soki bonkɔ́kɔ moko ezali mabe? Mpo na komeka makambo oyo ondimaka, ozali na mposa ya eutelo moko ya mayele, bimekeli ya bopɛtɔ.

Biblia ezali liziba ya mayele lolenge yango. Yesu Klisto alobaki ete: “Bulisá bango kati na solo na yo. Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Alobaki lisusu ete: “Ntango ekoya, ɛɛ ezali sasaipi, wana basambeli na solo bakosambela Tata na bisambeli na [elimo] mpe na solo.” (Yoane 4:23) Na kosaleláká Liloba lipemami ya Nzambe, okozwa mai ya pɛtɔ ya solo na esika ete omela mai mabebisami na bafilozofi ya bato mpe ya bademó.​—Yoane 8:31, 32; 2 Timoté 3:16.

Omikundola ete, biloko oyo bikobebisaka ata soki bizali mike bikoki kozala na makámá minene. Mbala mosusu makámá yango makomonanaka bobele nsima ya bambula mingi. Shridath Ramphal, prezidá ya kala ya World Conservation Union alobi ete: “Mai ya bosoto masili kokóma mobomi oyo azali na mabe mingi koleka kati na mokili mobimba. Mokolo na mokolo bato koleka nkóto ntuku mibale na mitano bazali kokufa mpo ete basalelaki yango.” Bonkɔ́kɔ oyo esili kobebisama na elimo ezali na makámá mingi koleka.

Okozala na mpiko ya komisikola na bindimeli ya bonkɔ́kɔ oyo mbala mosusu otosaki yango na boumeli ya bambula mingi, soki emonani ete ezali kotɛmɛla solo? Tosá makebisi. Omibatela yo moko mpe libota na yo na komindimisáká ete bonkɔ́kɔ na bino ezali na boyokani na Liloba ya Nzambe oyo ezali pɛtɔ mpe solo.​—Nzembo 19:8-11; Masese 14:15; Misala 17:11.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá búku Comment raisonner à partir des Écritures mpo na komindimisa ete mateya lolenge yango mazali na moboko moko te kati na Biblia. Búku yango ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 7]

Liloba ya Nzambe oyo lizali solo likokani na ebale ya mai ya pɛtɔ

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto