Okoki kondimela Biblia?
NA MOKILI ya lelo, atako makambo ya sika ekómi mingi, bato mingi bazali naino kondimela Biblia. Na ndakisa, ankɛtɛ moko euti kosalema epai ya Baamerike emonisi ete bato 80 likoló na monkama bandimaka ete Biblia ezali Liloba epemami na Nzambe. Ata soki na esika ofandaka bato mingi bandimelaka Biblia to bandimelaka yango te, okokamwa te ete bandimi wana balingaka ete báteya bango Biblia na ndakonzambe. Kasi, mbala mingi bateyaka bango makambo ya Biblia te. Tókamata ndakisa ya liteya oyo elobaka ete milimo ya bato ezwaka etumbu nsima ya liwa.
Ezali nde na esika moko oyo Biblia eteyi likambo ya epongelo to lifelo ya mɔ́tɔ? Lelo oyo, banganga-mayele mingi ya Biblia na mangomba ya boklisto bazali koyanola ete te. Buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete: “Nsima ya kotalela makambo nyonso, tomoni ete liteya ya epongelo oyo Lingomba ya Katolike eteyaka euti na bonkɔkɔ, kasi euti na Makomami Mosantu te.” Diksionere moko (A Dictionary of Christian Theology) elobi boye mpo na lifelo: “Na kati ya Testama ya Sika, tomoni esika moko te epai ekomami ete baklisto ya liboso bazalaki koteya lifelo ya mɔ́tɔ.”
Eumeli naino te bapanzi nsango balobelaki mingi komisyo ya mateya ya Lingomba ya Angleterre ntango epesaki likanisi ete lingomba etika koteya lifelo ya mɔ́tɔ. Doktere Tom Wright, mokambi ya ndakonzambe ya Litchfield, alobi ete ndenge oyo tozalaki kokanisa mpo na lifelo na ntango ya kala “emonisaki Nzambe lokola elima mabe mpe liteya yango etiká bilembo mabe na makanisi ya bato mingi.” Lapolo ya komisyo wana elobi ete lifelo “ezalaka te.”a Bobele bongo, na oyo etali likanisi ya Lingomba ya Katolike, buku moko (New Catholic Encyclopedia) eyebisi ete, “Lelo oyo bato ya teoloji bazali kotalela lifelo lokola kokabwana na Nzambe.”
Makambo oyo Biblia ezali koteya na oyo etali molimo ekeseni mpenza na mateya ya epongelo mpe lifelo. Na bisika mingi Biblia elobeli kokufa ya milimo. “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4, talá libongoli ya King James mpe libongoli ya Katolike ebéngami Douay.) Biblia elobi ete bakufi bayebaka eloko te, bakoki koyoka mpasi te. “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” (Mosakoli 9:5) Biblia eyebisi ete bakufi bakosekwa na mikolo oyo ezali koya. Ntango Lasalo, moninga ya Yesu akufaki, Yesu akokisaki liwa na mpɔngi. Malata, ndeko mwasi ya Lasalo amonisaki elikya oyo Biblia eteyi ntango alobaki ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” Na ndenge Yesu asekwisaki Lasalo na bakufi, alakisaki ete elikya wana ezali elikya ya solo mpo na bato.—Yoane 5:28, 29; 11:11-14, 24, 44.
Banganga-mayele ya istware bazali komonisa ete liteya oyo elobi ete moto azali na molimo oyo ekufaka te mpe ekabwanaka na nzoto euti na Biblia te kasi na filozofi ya Bagreke. Buku New Catholic Encyclopedia emonisi ete Baebele bazalaki kokanisa te ete moto azali na nzoto ya mosuni mpe molimo oyo emonanaka te. Buku yango elobi boye mpo na endimeli ya Baebele: “Ntango mpema ya bomoi ekɔtaki na nzoto ya moto ya liboso oyo Nzambe asalaki na mputulu, akómaki ‘ekelamu ya bomoi.’ (Genese 2:7) Epai na bango, liwa ezalaki kokabwana ya biloko mibale te na kati ya moto ndenge filozofi ya Bagreke ezalaki koteya; mpema ya bomoi ebimaka mpe moto akómaka ‘ekelamu oyo ekufi.’ (Levitike 21:11; Mituya 6:6; 19:13) Na esika mokomoko, liloba ‘ekelamu’ ezali bongo [neʹphesh] na Liebele, oyo mbala mingi ebongolamaka ‘molimo’ kasi, ekokani kaka na moto.”
Buku yango eyebisi lisusu ete eumeli naino te, banganga-mayele ya Biblia na Lingomba ya Katolike “balobaki ete Testama ya Sika eteyaka te ete molimo ekufaka te lokola Baela [Bagreke].” Esukisaki boye: “Mpo na kosilisa mpenza mokakatano yango eleki malamu tóndima Lisekwa, oyo ezali likabo euti na Nzambe, kasi makanisi mpamba mauti na filozofi te.”
Biblia to bonkɔkɔ?
Kasi, ebandaki boni mangomba mábanda koteya makanisi mauti na Biblia te? Mangomba mingi mandimaka ete Biblia ezali na liloba ya nsuka na oyo etali bindimeli. Na ndakisa, na mikolo mileki, Pápa Jean Paul II alobaki ete ‘bato ya sembo basengeli kondima Makomami na mobimba na yango mpe lokola eutelo ya libosoliboso ya bindimeli na biso.’ Kasi, lelo oyo eyebani malamu ete mateya ya mangomba ya boklisto ekeseni na mateya ya baklisto ya ekeke ya liboso. Mangomba mingi etalelaka mbongwana ya mateya oyo ezali kosalema ete ezali bokoli oyo ezali koya mokemoke na mateya ya lingomba. Lisusu, na Lingomba ya Katolike balobaka ete mitinda ya lingomba ezali na motuya moko na Makomami. Buku New Catholic Encyclopedia elobi ete “liteya moko te [ya lingomba] euti kaka na Makomami, kozanga kotalela bonkɔkɔ, to euti kaka na bonkɔkɔ, kozanga kotalela Makomami.”
Makambo ya kala mamonisi ete mangomba etii bonkɔkɔ na esika ya mateya ya Makomami. Kutu, mangomba mingi mazali koloba ete mateya ya Biblia mazali na libunga. Na ndakisa, buku New Catholic Encyclopedia elobi ete, “soki totaleli boyebi ya siansi mpe ya istware oyo tozali na yango lelo, tokomona polele ete makambo mingi ya Biblia mazali solo te.” Mpo na liteya ya Biblia oyo elobi ete bakufi bayebaka likambo te, buku yango elobi lisusu ete: “Ata soki totaleli kaka makambo ya lingomba, tomoni ete Testama ya Kala emonisi ete ezali na boyebi ya kokoka te mpo na . . . bomoi nsima ya liwa.” Buku yango etángi Nzembo 6:5 (vɛrsɛ 6 na Babiblia mosusu) mpo na kopesa ndakisa na likambo yango: “Kati na kufa bakokanisa yo te; kati na esika na bakufi nani akopesa yo matɔndi?” Na biteyelo mosusu ya teoloji ya Baprotesta bateyaka lisusu te ete Biblia ekoki kokwea te. Epai mosusu, Lingomba ya Katolike elobaka ete bango nde bazali na lotomo ya kolimbola makambo oyo Biblia ezali koteya. Kasi, okoki komituna, ‘Bongo soki emonani ete bandimbola yango eyokani na Makomami te?’
Ntina ya Makomami
Mbala mingi Yesu azalaki kotánga Makomami mpo na kolongisa maloba na ye, mbala mingi azalaki kobanda makanisi na ye na maloba oyo: “Ekomami ete.” (Matai 4:4, 7, 10; Luka 19:46) Kutu, ntango Yesu alobelaki likambo ya kobala, atángaki lisolo ya bozalisi oyo ezali na Genese, kasi atángaki filozofi ya Bagreke te. (Genese 1:27; 2:24; Matai 19:3-9) Ezali polele ete Yesu azalaki kokanisa ete Makomami mapemami na Nzambe mpe mazali solo. Na libondeli moko oyo asalaki epai ya Nzambe, Yesu alobaki ete: “Liloba na yo ezali solo.”—Yoane 17:17.b
Biblia eyebisi ndenge Yesu azalaki kopamela bakonzi ya mangomba na ntango na ye: “Bokoboya malako na Nzambe mpo na kosimba mitindo miuti na bino mpenza . . . Bongo bokoyeisaka Liloba na Nzambe mpamba na ntina na motindo na bino ezali bino kolakisa.” (Malako 7:6-13) Ntoma Paulo, ye mpe atɛlɛmɛlaki bopusi ya kosangisa filozofi ya Bagreke to mpe bonkɔkɔ etondi na mabunga na mateya na ye. Akebisaki ete, “Bókeba, noki te moto moko akoya kobungisa bino makanisi lokola nyama oyo akwei na motambo na ye na nzela ya filozifi mpe bozimbisi mpamba ya kolanda bonkɔkɔ ya bato.” (Bakolose 2:8 NW; 1 Bakolinti 1:22, 23; 2:1-13) Paulo alendisaki baklisto ete bábatela bonkɔkɔ to mateya mosusu. Kasi mateya wana eutaki na Makomami mpe eyokanaki na yango mpenza. (2 Batesaloniki 2:13-15) Paulo akomaki ete: “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba . . . ete moto ya Nzambe azala mpenza oyo akoki, oyo abongisami mobimba mpo na mosala nyonso ya malamu.”—2 Timote 3:16, 17, NW.
Paulo ayebaki ete ekozala na ntango moko oyo bato mosusu bakotika kolanda Makomami. Akebisaki Timote ete: “Ntango ekoya wana ekoyokaka bato mateya na sembo te kasi, . . . bakopɛngwa longwa na koyoka makambo na solo.” Mpe alendisaki ye na maloba oyo: “Kasi yo, omisɛnzɛla na makambo nyonso.” (2 Timote 4:3-5) Kasi ndenge nini? Kozala na “makanisi malamu” lolenge moko. Nganga-mayele moko ya maloba ya Greke alimboli liloba yango ya Biblia ete ezali “mposa ya koyekola mpe koluka motuya ya eloko moko na bosembo nyonso.” Luka asalelaki maloba wana mpo na bato oyo Paulo ateyaki na Beloa na ekeke ya liboso. Paulo ateyaki bango oyo ezalaki makambo ya sika na matoi na bango, mpe balingaki te ete moto azimbisa bango. Luka akumisaki bango ntango akomaki ete: “[Bato ya Beloa] balekaki Batesaloniki na [makanisi malamu, NW], mpo ete bayambi Liloba na mposa mingi, mpe batángi Makomami mokolo na mokolo, kotala soko makambo yango mazali boye.” Kozala na makanisi malamu epesaki nzela na bato ya Beloa te ete bázala babɛti ntembe, baoyo balingaka kondima likambo ata moko te. Kasi, lokola balukaki koyeba makambo na bosembo nyonso, “mingi na bango bandimaki.”—Misala 17:11, 12.
Matomba ya kolanda mitinda ya Biblia
Baklisto ya ekeke ya liboso bayebanaki ete bazalaki mpenza kolanda mitinda ya Biblia mpe na bolingo oyo endimaka komipimela. Kasi, lelo oyo, bato mingi bazali na “lolenge na kosambela nde bazali kowangana nguya na yango.” (2 Timote 3:5) Lingomba nyonso ya boklisto oyo ezali kolanda boklisto ya liboso te, ekoki kozala na nguya ya solosolo te oyo ekopusa bato na misala malamu na bomoi na bango. Mbala mosusu ezali mpo na yango nde, na mikili mingi ya boklisto, tozali komona kobakisama ya makambo lokola mobulu, pite mpe ekobo, mabota oyo mazali kokabwana, mpe mposa ya biloko mingi ya mosuni. Na mikili mosusu “ya boklisto,” bato ya lingomba moko bazali kobunda kati na bango kaka mpo bazali bato ya etuluka moko te.
Bato ya makanisi malamu lokola bato ya Beloa bazalaka lisusu te na mokili oyo? Lelo oyo, ezali na etuluku ya bato oyo bandimaka mpe balandaka mitinda ya Biblia?
Buku moko (Encyclopedia Canadiana) emonisi ete: “Mosala ya Batatoli ya Yehova ezali kosekwisa mpe kozongisa boklisto ya ebandeli oyo Yesu na bayekoli na ye bazalaki kolanda na ekeke ya liboso mpe ya mibale na ntango na biso.” Buku mosusu (New Catholic Encyclopedia) elobaki boye mpo na Batatoli ya Yehova: “Batalelaka Biblia lokola liziba bobele moko ya bindimeli na bango mpe bizaleli oyo basengeli kolanda.”
Na ntembe te ezali mpenza mpo na yango nde Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba mpo na bolamu, kimya mpe esengo na bango ya elimo. Yango wana, tolendisi batángi ya zulunalo oyo ete báyekola mateya ya Biblia oyo mazali kopesa bolamu ya elimo. Koyeba makambo mingi ekoki kosalisa moto ete abakisa kondima na ye na Biblia mpe azala na kondima makasi epai ya Nzambe. Ebongi mpe ete tósala molende mpo na kozwa matomba ya seko oyo euti na kondima motindo wana.
[Maloba na nse ya lokasa]
a National Public Radio—“Morning Edition”
b Mpo na kozwa bandimbola mosusu oyo emonisi ete Biblia ezali solo, talá mwa buku Un livre pour tous, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
[Elilingi na lokasa 6]
Ntoma Paulo mpe basusu bateyaki na zando
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova “batalelaka Biblia lokola liziba bobele moko ya bindimeli na bango mpe bizaleli oyo basengeli kolanda”