Esika monene ya Watchtower mpo na mateya ebimisi bamisionɛrɛ
GALADI, eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower, esili kosala bakelasi na yango na bisika ndenge na ndenge. Kobanda na 1943 kino 1960, bakelasi 35 esalemaki na South Lansing, na New York, na États-Unis, epai kuna banakelasi bautaki na mikili 95 basanganaki kati na yango bazwaki kobongisama ya sikisiki. Na nsima eteyelo yango ekómaki kosalema na biro monene na Brooklyn, na New York, epai kuna etambwisamaki na boumeli ya bambula 28. Kobanda 1988 kino 1995, bakelasi ya eteyelo ya Galadi ezalaki kosalema na Wallkill, na New York.
Na boumeli ya bambula wana, mosala ya eteyelo yango moyeisamaki monene. Na litambwisi na yango, mateya oyo mazalaki kopesama na boumeli ya pɔ́sɔ zomi epesamaki na bakelasi misato na Mexique; bakelasi mitano motindo yango etambwisamaki mpe na Allemagne; mibale na Inde. Kobanda 1987 eteyelo mosusu oyo euti na yango mpe ebéngami Eteyelo mpo na kobongisa basungi esalaki bakelasi na yango na mikili 34, kopesáká bongo mateya ya sikisiki na boumeli ya pɔ́sɔ mwambe mpo na kobongisa bilenge oyo bazali na makoki mpenza. Kasi, mateya oyo mapesamaki na kelasi ya 99 ya Galadi, na Esika monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, na New York, oyo euti kotongama sika, ezalaki bongo mateya ya pɔ́sɔ 20, kati na yango boyekoli mozindo ya Biblia, boyekoli ya lisoló ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso, bakisá mpe batoli ya sikisiki na ntina na mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya.
Na mokolo mwa 2 Sɛtɛ́mbɛ, bana ya kelasi ya 99 bazwaki mapɔlɔ́mi. Molulu ya kopesa mapɔlɔ́mi oyo moumelaki ngonga misato mosalemaki kati na ndako monene ya sika ya makita na Esika monene ya Watchtower mpo na mateya. Bato batondaki na bifandelo nyonso. Bato mosusu balandaki likita yango kati na bandako ya Betele na Patterson, na Wallkill, mpe na Brooklyn na nzela ya televizyó. Yango ezalaki mokolo ya esengo, bobele te mpo na banakelasi oyo bazwaki mapɔlɔ́mi elongo na bandeko na bango mpe baninga na bango ya pene, kasi mpe mpo na ebele ya baoyo basanganaki lokola basáli ya bolingo malamu kati na mosala ya kotonga bandako kitoko ya eteyelo wana.
Na maloba na ye ya ebandeli, Carey Barber, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, abendaki likebi likoló na likambo oyo ezalaki kosalema. Alobaki ete: “Oyo esengeli kozala esika ya kolakisama eleki monene euti na Yehova, oyo epesamá naino liboso te awa na mabelé.” Ayebisaki ete tozali kobɛlɛma na nsuka ya etumba kati na mombóto ya mwasi mpe mombóto ya nyoka. (Genese 3:15) Amonisaki ete baoyo bakobika na etumba ya nsɔ́mɔ na boumeli ya bolózi monene oyo ezali koya, ekozala bobele baoyo bazali na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe mpe batosaka yango.
Alobaki ete: “Ebongiseli na biso ya kolakisama na mikolo oyo ezali bongo na mokano ya kokamba basaleli nyonso ya Yehova oyo bazali bipai nyonso ete bákɔmela malamumalamu lokola elobelami kati na Masese 1:1-4—ya koyeba mayele mpe disipilini, kozala na likoki ya kososola mayele, kozwa disipilini oyo epesaka bwanya, boyengebene, koyeba kozwa bikateli, bosembo, mpe makoki ya kokanisa mozindo.” Kozala na bozwi nyonso wana ya elimo ezali mpenza libateli!
Batoli epai na baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi
Maloba wana ya ebandeli elandanaki na masoló mitano ya mokuse mpo na baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi. Harold Jackson, oyo azalaki kala molakisi na Galadi mpe azali sikawa moko na basangani ya biro monene na Brooklyn, alendisaki bana kelasi ete: “Bóbatela ngwi bosepeli na bino ya bato na Nzambe.” Lloyd Barry, misionɛrɛ ya kala mpe sikawa azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki motó ya likambo oyo ete “Bósalela Yehova na komikitisa nyonso.” Ayebisaki ete ezaleli wana ekozala na ntina mingi epai na baoyo bazwi mapɔlɔ́mi mpo na komesana na makambo ya sika oyo bakokutana na yango mpe komesana na baninga na bango bamisionɛrɛ, komesana na bandeko na masangá epai kuna bakotindama, mpe komesana na bato ya mboka.
Karl Adams, oyo azali sikawa kosala kati na eteyelo ya Galadi, asosolaki elongo na banakelasi likoló na motuna oyo ete “Kondima ekopusa bino na kosala nini?” Alendisaki bango ete bázala te lokola Bayisalaele oyo bazalaki kolelalela na ntina na ezalela oyo bazalaki kati na yango na mokili mokauki mpe bazalaki na mposa ya kozonga na Ezipito, kasi basengelaki nde kozala lokola Abalayama, oyo atalelaki Bokonzi ya Nzambe na esika ya kozonga na Ulu ya Bakaladi mpo na kosilisa mikakatano na ye. (Exode 16:2, 3; Baebele 11:10, 15, 16) Ulysses Glass, mokomeli ya eteyelo, atongaki lisoló na ye likoló na likambo oyo likómelaki Asafa, oyo eyebisami kati na Nzembo 73 mpo na kolendisa baoyo bazalaki kozwa mapɔlɔ́mi, ete “Bótángaka mapamboli na bino.” Mpe Albert Schroeder, mosangani na Komité ya koteya ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki lisoló oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Yehova akopesaka.” Lokola elembeteli mpo na yango, alobelaki eteyelo ya Galadi yango moko mpe mokumba oyo yango ekokisi kati na mosala monene ya koteya mpe ya kozalisa bayekoli.
Na nsima, bayangani balandaki na likebi mingi na ntango Milton Henschel, prezidá ya la Société Watch Tower, alobaki na ntina na “Basangani oyo bazali moko mpo na mosusu.” Atángaki mpe apesaki bandimbola mozindo likoló na Baloma mokapo 12. Kati na yango, alobaki mpe ete: “Tosengeli kotalela malamumalamu ete tózala na boyokani ya penepene mpenza elongo na baninga na biso basaleli ya Nzambe kati na lisangá.” Abakisaki ete: “Ezali malamu ete tómitalela moko na mosusu lokola biloko ya motuya ya Yehova, na esika ya kotɔ́ngatɔ́nga, na esika ya kolukaluka libungá, tiká ete tópesanaka lisungi ntango nyonso. Wana tozali kobatela bomoko ya elimo ya lisangá ya boklisto, tozali komisalisa biso moko mpenza.” Amonisaki ete kolamba bilei kati na bandako ya bamisionɛrɛ, koyebáká ete banso bakoki te kolya bilei motindo moko, ezali mpenza ezaleli ya kosungana. Alendisaki mpe ezaleli ya kosungana, na esika ya kotɔ́ngana, wana bazali kosangana na mosala ya kosakola elongo na baninga na bango baklisto oyo bazali babólá. Ndeko Henschel amonisaki ete soki tozali mpenza na ezaleli ya kosungana, ya kolendisana, mpe ya kopesana simbisi moko na mosusu, “mpo na yango Yehova akolinga biso.” Oyo nde bilendiseli kitoko mpo na bamisionɛrɛ oyo bakosala kati na mikili oyo ekeseni mpenza na mikili oyo bauti!
Tómeka koyeba banakelasi
Na mwayene, banakelasi 48 ya kelasi ya 99 bazalaki na mibu 32 ya kobotama mpe basilaki kolekisa bambula 11 kati na mosala ya ntango nyonso.
Mituna-lisoló oyo mizalaki kati na molulu ya kopesa mapɔlɔ́mi epesaki bayoki nzela ya koyeba ndambo moke na bango. Nikki Liebl, oyo autaki na États-Unis mpe Simon Bolton, oyo autaki na Angleterre, bayebisaki makambo oyo etyaki kondima na bango kati na komekama mpo na komonisa soki Yehova akokokisa bamposa na bango ya mosuni. Bamonaki mpenza ete Yehova amibanzabanzaki mpo na bango wana batyaki mosala ya ntango nyonso na esika ya liboso.
Isabelle Kazan, oyo lokótá na ye ya kobotama ezali bongo Lifalansé alobaki ete ayekolaki lokótá ya Arabe mpo ete akoka koteya bato oyo balobaka lokótá ya Arabe, oyo bazalaki kofanda na mboka na ye. Na ntango abandaki boyekoli yango na 1987, na Paris ezalaki na etuluku moko ya moke oyo ezalaki bobele na bandeko minei oyo balobaka lokótá ya Arabe, bakisá mpe ye moko mpe ndeko mosusu ya mwasi oyo azalaki koyekola lokótá yango. (Ezalaki pɛtɛɛ te. Bazalaki kolekisa ngonga mwambe mpo na kobongisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo ete bákoka kopesa biyano.) Milende na bango mizalaki na ntina? Lelo oyo Batatoli ya Yehova oyo balobaka lokótá ya Arabe bakabwani kati na zongazonga mitano na France mobimba. Mwanakelasi mosusu, Miko Puro, ayebisaki lolenge nini lokótá ya Lifalansé oyo ayekolaki na eteyelo esungaki ye ete ateya bato bakimá mboka na bango, baoyo bautaki na Afrique mpe bayaki kofanda na Finlande, mpe ekozala lisusu na ntina kati na mosala na ye ya misionɛrɛ na Bénin. Bonny Bowes alobelaki mikakatano oyo akutanaki na yango mpo na koloba Lifalansé malamu mpo ete akoka kosala malamu kati na engumba Québec, na Canada. Mpe Bjarki Rasmussen, oyo auti na Danemark, ayebisaki makambo oyo ye mpe mwasi na ye bakutanaki na yango na boumeli ya bambula ya mosala oyo balekisaki na bisanga Féroé. Ee, bamisionɛrɛ wana ya sika bazali basaleli ya ntango nyonso oyo bameseni mpenza na mosala.
Baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi batindamaki na mikili 19—na Afrika, na Amerika ya Katikati mpe na Amerika ya Súdi, na Mpótó ya Ɛ́sti mpe na Orient. Baoyo bazwaki mapɔlɔ́mi na bakelasi oyo esilá koleka basili kosala kati na mikili koleka 200. Mingi na bango bazali naino kokokisa mokumba na bango na bisika batindamaki. Bamisionɛrɛ oyo ya sika bakei kosangana elongo na bango mpo na kopalanganisa lisusu litatoli ya Bokonzi kino na nsuka na mokili.—Misala 1:8.
[Bililingi na lokasa 25]
Kati na kelasi na Esika monene ya Watchtower mpo na mateya
[Elilingi na lokasa 26]
Kelasi ya 99 ya Galadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda na liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Heffey, S.; Riley, E.; Mortensen, D.; Honable, A.; Bolton, J.; Poole, J.; Siimes, G.; Sousa, L. (2) Pashnitski, B.; Shepherd , D.; Pashnitski, W.; Järvinen, J.; Paulsen, K.; Rasmussen, E.; Schewe, C.; Olsson, L. (3) Paulsen, E.; Samsel, T.; Bowes, B.; Harris, E.; Kazan, I.; Liebl, N.; Sousa, P.; Puro, J. (4) Lager, K.; Lager, V.; Golden, K.; Bolton, S.; Johnson, M.; Johnson, S. ; Liebl, A.; Rasmussen, B. (5) Harris, D.; Samsel, W.; Schewe, O. ; Heffey, R.; Kazan, L.; Riley, T. ; Järvinen, O.; Puro, M. [male] (6) Mortensen, D.; Golden, R.; Honable, L.; Shepherd, M.; Bowes, R.; Siimes, T.; Poole, E.; Olsson, J.
[Bililingi na lokasa 27]
Bazali kino lelo kati na mosala na bango: (na lobɔkɔ ya mwasi) Charles Leathco elongo na mwasi na ye, Fern, na Brésil, bazwaki mapɔlɔ́mi na kelasi ya liboso mpe na kelasi ya motoba ya Galadi (na nsé) Martha Hess, na Japon, azwaki lipɔlɔ́mi na kelasi ya nsambo