Baamona: Libota oyo ezongisaki koyina mpo na boboto
ENGUMBA ya ntango na biso oyo ebéngami Amman, mboka-mokonzi ya Royaume Hâchémite ya Jordanie, ezali kobomba bitikali ya libota moko oyo esilá kolimwa na mabelé. Bato ya libota yango bazalaki kobéngama ete Baamona. Bazalaki banani, mpe liteya nini tokoki koyekola na kolimwa na bango?
Baamona bazalaki bakitani ya moto ya sembo Lota. (Genese 19:35-38) Lokola Lota azalaki mwana ya ndeko ya Abalayama, tokoki koloba ete Baamona bazalaki bandeko ya Bayisalaele. Nzokande, bakitani ya Lota bamipesaki na losambo ya banzambe ya lokuta. Atako bongo, Yehova atyaki likebi na ye likoló na bango. Wana libota ya Yisalaele lizalaki kobɛlɛma na Mokili ya ndaká, Nzambe akebisaki bango ete: “Bótungisa [Baamona] te mpe bóbunda na bango te, mpo ete nakopesa bino ndambo na mokili na bana na Amona lokola libula te mpo ete nasili kopesa yango na bana na Lota lokola libula.”—Deteronome 2:19.
Baamona bamonisaki botɔ́ndi mpo na boboto motindo yango? Na kokesena, baboyaki kondima ete Yehova apesaki bango eloko. Bazongisaki koyina makasi epai na libota ya Nzambe, Bayisalaele mpo na likebi ya bolingo oyo Nzambe amoniselaki bango. Atako Bayisalaele batosaki malako ya Yehova mpe babundisaki bango te, Baamona mpe bandeko na bango, Bamoaba, bamiyokaki ete bazalaki na likámá. Ezali solo ete, Baamona batindaki basodá te mpo na kobundisa, kasi bafutaki mosakoli moko na nkombo Balama mpe basɛngaki na ye ete alakela Yisalaele mabe!—Mituya 22:1-6; Deteronome 23:3-6.
Likambo ya kokamwa lisalemaki. Biblia elobi ete Balama akokaki te kobimisa maloba ya kolakela mabe. Akokaki bobele kobimisa maloba ya mapamboli likoló na bango, ete: “Ye oyo apamboli yo apambolama, mpe ye oyo alakeli yo mabe alakelama mabe.” (Mituya 24:9) Baoyo batalelamaki, sangisa Baamona, bazwaki bongo liteya moko monene na likambo yango: Wana libota ya Nzambe likanelami, azali ntango nyonso pene mpo na kokɔtela bango!
Nzokande, Baamona balandaki koluka myango ya kotɛmɛla Yisalaele. Na eleko ya Basambisi, Baamona bayanganaki ebele elongo na Bamoaba mpe Baamaleke mpe bakɔtaki na Mokili ya ndaká, bakendaki kino na Yeliko. Nzokande, elónga na bango ezalaki bobele ya ntango mokuse, mpamba te Ehude, Mosambisi ya Yisalaele, abenganaki babundisi wana. (Basambisi 3:12-15, 27-30) Mwa bopemi moke eumelaki kino mikolo ya Mosambisi Yɛfɛta. Na eleko yango libota ya Yisalaele esilaki komikɔtisa na losambo ya bikeko, mpe bongo Yehova alongolaki libateli na ye likoló na bango. Na yango, Nzambe “apesaki bango . . . na lobɔkɔ na Baamona” mpo na boumeli ya mibu soko 18. (Basambisi 10:6-9) Baamona bakweisamaki lisusu na kokweisama monene wana Bayisalaele batikaki losambo ya bikeko mpe bayanganaki na nsé ya litambwisi ya Yɛfɛta.—Basambisi 10:16–11:33.
Eleko oyo Yisalaele eyangelamaki na Basambisi esukaki ntango Saulo atyamaki mokonzi ya liboso likoló na yango. Nokinoki nsima wana Saulo abandaki koyangela, koyina ya Baamona epelaki lisusu makasi. Mokonzi Nahasa abundisaki pwasa Yabese-Gilada, engumba moko ya Yisalaele. Ntango bato ya engumba wana balukaki kimya, Nahasa Moamona apesaki bango lisɛngami oyo ya kotuka: “Mpo na kondimana oyo ekokata ngai na bino, nakobimisa liso na mobali na moko na moko na bino.” Mokomi na makambo ya kala, Flavius Josèphe, alobaki ete yango ezalaki mpe lokola meko ya komibatela, ete “wana liso na bango ya mwasi ekozipama na nguba, bakokoka soko moke te kosala likambo moko kati na etumba.” Nzokande, mokano ya solosolo ya lisɛngami wana ya motema mabe ezalaki ya kokómisa Bayisalaele wana ndakisa ya nsɔ́ni monene.—1 Samwele 11:1, 2.
Baamona bazongisaki lisusu koyina mpo na boboto ya Yehova. Yehova azangaki te kotya likebi na kokanelama wana ya mabe. “[Elimo ya Nzambe ebandaki kosala likoló na Saulo], wana eyokaki ye likambo yango [ya Nahasa] mpe nkanda na ye epelaki mingi.” Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Saulo ayanganisaki limpinga ya mibali ya etumba 330000 oyo epalanganisaki mpenza Baamona kino “bato mibale batikalaki esika moko lisusu te.”—1 Samwele 11:6, 11.
Lobanzo ya moimi ya Baamona, elongo na motema mabe mpe lokoso na bango ememaki bango na kolimwa libela. Lokola Sefania, mosakoli ya Yehova asakolaki yango, bakómaki “lokola Sɔdɔmɔ . . . esika ebebi libela na libela . . . mpo ete batukaki mpe balobaki na lolɛndɔ kotɛmɛla bato na [Yehova] na bibele.”—Sefania 2:9, 10.
Bakonzi ya mokili ya ntango na biso basengeli kotya likebi na oyo ekómelaki Baamona. Motindo moko Nzambe asili komonisa mwa boboto epai na mabota na kopesáká bango nzela ya koumela na mabelé, etyelo ya makolo na ye. Kasi na esika ya kobatela mabelé, mabota ya moimi mazali nde kobebisa yango, nkutu mazali kotya etando na biso na likámá ya kobebisama na nikleere. Na esika ya komonisa boboto epai na basaleli ya Yehova awa na mabelé, mbala mingi mabota mamonisaka koyina, manyokolaka bango makasi. Mpo na yango, liteya ya likambo oyo ekómelaki Baamona ezali ete Yehova atalelaka na lisɛki te likambo ya kozongisa koyina mpo na boboto. Mpe na ntango oyo asili kobongisa, akosala likambo lolenge moko asalaki na ntango ya kala.—Kokanisá na Nzembo 2:6-12.
[Elilingi na lokasa 9]
Bitikali ya Baloma na Amman, esika ezalaki Laba, mboka-mokonzi ya Baamona
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Elilingi na lokasa 10]
Baamona bazalaki na bomoi na esika oyo
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.