“Nazali na motuya na miso ya Yehova!”
KATI na ‘eleko oyo ya mpasi,’ basaleli mingi ya sembo ya Yehova bazali ntango nyonso kobundisa mayoki ya komimona ete bazangi ntina. (2 Timoté 3:1) Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te moko na “misala ya mayele mabe” ya Satana ezali bongo ya kopesa biso mayoki ete bato balingaka biso te, ete ata mpe Mozalisi na biso alingaka biso te! (Baefese 6:11) Na ntango oyo ebongaki mpenza, na 1 Apríli 1995, nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezalaki na masoló mibale mpo na boyekoli kati na lisangá, mazalaki na mitó ya makambo “Ozali na motuya na miso ya Nzambe!” mpe “Tólendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu—Lolenge nini?” Mokano ya masoló wana ezalaki bongo ya kokundwela biso ete Yehova atalelaka milende na biso na motuya. Talá mwa ndambo ya maloba ya botɔ́ndi oyo tozwaki mpo na yango:
“Nazali sikawa na mibu 27 mpe nazali Motatoli ya Yehova, naino zulunalo moko esimbá motema na ngai boye te. Nakokaki te komipekisa kolela—masoló yango mapesaki ngai kobɔndisama monene mpenza. Sikawa namiyoki mpenza ete Yehova alingaka ngai. Ezali lokola nde bozito moko monene elongolami na mapeka na ngai.”—C. H.
“Natángaki zulunalo yango mbala minei na mokolo moko. Nasepelaki na lolenge lisoló yango elobaki ete soki okanisi ete ozali na motuya te, yebá ete bateyaki yo lokuta. Nakosalela lisoló yango kati na mosala ya kobatela bampate mpe na mosala ya kosakola ndako na ndako.”—M. P.
“Satana azali kosala mosala monene ya kopesa, ata epai na baoyo balingaka Yehova, mayoki ete bazangi ntina mpe balingami te. Bokundoli oyo kelasi ya ‘moombo ya sembo’ ekundweli biso ete Yehova alingaka biso mingi mpe ete asepelaka na makambo nyonso ya mike oyo tosalaka mpo na ye, ezali moko na makambo ya kolendisa mingi mpenza koleka nyonso oyo nasilá kotánga. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki na mayoki oyo bolobelaki kati na masoló wana. Nazalaki komiyoka te ete nabongi kolingama na Yehova, yango nazalaki kosala makasi mingi kati na mosala na ye mpo ete akoka kolinga ngai. Kasi ezalaki mayoki ya komema ngambo mpe nsoni nde ezalaki kopusa ngai na kosala bongo. Atako motuya ya bangonga boni nazalaki kolekisa kati na mosala ya kosakola, to motángo ya bato boni nasungaki, nazalaki komiyoka ete ezalaki bobele moke. Nazalaki komona bobele ete eloko moko ezalaki kozanga kati na ngai. Sikawa ntango nazali kosalela Yehova mpo ete napusami na bolingo, nazali kobanza ete azali kosɛka mwa moke mpe azali na esengo mpo na ngai. Yango ezali kosala ete bolingo na ngai mpo na ye ekóma lisusu monene mingi koleka mpe ezali kopusa ngai ete nasala lisusu mingi koleka. Sikawa nazali kozwa esengo monene kati na mosala na ngai mpo na Yehova.”—R. M.
“Oyo ezali mpenza masoló maleki kitoko, maleki mpo na kolendisa, ee, ya kobenda likebi mpenza, mpo na kosimba mitema na biso, oyo natángá naino liboso te! Esili koleka mibu 55 uta nabandaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe ezalaka na masoló mingi ya ntina mpenza. Kasi nimero oyo eleki nyonso oyo tosilá kotánga liboso mpo na oyo etali kosilisa mayoki ya kozanga elikya, kosilisa nsɔ́mɔ, mpe kosilisa bobángi oyo epusaka biso na kokanisa ete ‘tozangi motuya’ mpe ‘tolingami te’ mpe tokoki te kosala oyo ekoki mpo na ‘kozwa’ bolingo ya Yehova. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ezali na lisungi ya elimo ya lolenge oyo bandeko na biso bazali na mposa na yango makasi mpenza. Nazali na mokano ete nasalelaka masoló wana mbala na mbala kati na mosala ya kobatela bampate.”—F. K.
“Mpo na baoyo kati na biso bazali kobundana na mayoki ya kozanga komityela motema, to mpe na mayoki ya komiyina, ekoki kozala mpasi ete tósangisa makasi na biso mpo na kokóba kati na solo. Masoló wana mamonisaki mozindo ya mayoki ya motema mawa mpe ya komitya na esika ya basusu, ezalaki lokola kosalelama ya mafuta ya kosilisa mpasi, epakolami kati na motema mpenza. Ezalaki mpenza likambo ya kobɔndisa kotánga maloba wana kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe koyeba kozanga ntembe ete Yehova amityaka na esika na biso mpenza! Matondi mingi na lolenge bokundweli biso ete Yehova apusaka bato na ye te ete básalela ye kati na mayoki ya komema ngambo, na nsɔ́ni, to na kobanga. Atako bosangani na ngai kati na mosala ya kosakola ezalaki mpenza moke na mikolo oyo miuti koleka mpo na mikakatano ya mosolo mpe mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto kati na libota na biso, kasi nazali na esengo mpo na mwa ndambo oyo nakoki kosala. Namonaka ete nazalaka na esengo mingi koleka kati na mosala ya kosakola na ntango nasalaka makasi ete bolingo ezala nguya oyo ezali kopusa ngai.”—D. M.
“Nauti kosilisa kotánga lisoló ‘Ozali na motuya na miso ya Nzambe!’ Paragrafe mokomoko ezalaki kobimisa ngai mpisoli. Nauti na libota moko oyo emoniselaki ngai mpenza bolingo te. Bazalaki kotyola ngai, kotumola ngai, mpe kosɛka ngai. Na yango, uta bomwana na ngai mpenza, nazalaki komiyoka ete nazali na motuya te. Nazali naino na mayoki oyo ekangamaki na ngai uta bomwana na ngai, oyo enyokolaka ngai na ntango nakutanaka na likambo ya mawa. Na ntango nazalaki kosala lisusu te lokola nkulutu kati na lisangá, lokola momeseno, namiyokaki lokola ete nakweaki—liboso na Nzambe, liboso na libota na ngai, mpe liboso na bandeko kati na lisangá. Mayoki wana malongwaka nokinoki te, kasi lisoló wana ebimaki na ntango ebongi esungaki ngai ete nazongela mwa bokatikati. Engɛngisaki lolenge na ngai ya kotalela makambo.”—D. L.
“Matɔ́ndi mingi mpo na lisoló ‘Ozali na motuya na miso ya Nzambe!’ Nabundanaka na mayoki makasi ya komiyina mpe mayoki mozindo ya komimona ete nazangi ntina, mpo ete nabebisamaki na ntango nazalaki mwana moke. Ebongi solo mpenza kotalela kobulunganisama wana ya makanisi lokola mosala ya mayele mabe ya Satana. Ekoki ata mpe kosilisa moto mposa ya kozala na bomoi. Nasengeli mpenza kosala makasi mokolo na mokolo mpo na kotɛmɛla lokuta oyo ete nalingami te. Lisoló oyo ezali na ndimbola monene epai na ngai koleka mbala mosusu lolenge bokoki kososola yango.”—C. F.
“Lelo bandeko bazali kondima likanisi oyo ete Yehova asepelaka na misala oyo misalemi na bolingo koleka misala oyo misalemi mpo ete esɛngisami to epusami na makasi. Kotalela bomoto ya Yehova oyo etondi na bolingo mozindo, lolenge amibanzabanzaka mpo na bato na ye mokomoko, mpe lolenge amipesaka epai na biso na bolingo nyonso ezali kobɔndisa mpe ezali na bopusi likoló na biso. Mpo na yango, nokinoki nsima ya kozwa lisoló ‘Ozali na motuya na miso ya Nzambe!’ bato mingi bamonisaki botɔ́ndi na bango. Emonani ete ezali kofungolela bato mingi nzela ya kokólisa boyokani ya makasi mingi lisusu koleka, ya moto na moto elongo na Yehova. Ngai na mwasi na ngai tolingi kozongisa matɔ́ndi mpo na lolenge masoló ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mikolo oyo mazali kosalela elobeli ya kokitisa motema mpe ya kolendisa. Tozali kosala makasi mpo ete tókoka kosalela makambo yango wana tozali kotala masangá.”—Euti na mokɛngɛli moko ya zongazonga.
“Nazali motángi monene uta mibu 30, kasi naino natánga likambo moko te ya kopesa bopusi, ya kolendisa mpenza lokola oyo. Mikapo misalelami na nguya, na mayele, esalisi ngai ete nalongola makambo ya lokuta oyo mabombamaki kati na mayoki na ngai, yango epesaki ngai nzela ete nabɛlɛma pene na Yehova. Na boumeli ya bambula mingi, nazalaki kosalela Yehova bobele mpo na mayoki ya komema ngambo. Nasosolaki lisiko mpe bolingo ya Nzambe bobele na mayele ya motó. Matɔ́ndi mingi mpo na masoló oyo mazali na bwanya mingi mpe mazali na makanisi mozindo. Nazali kolikya ete nakotánga masoló mingi mosusu oyo ekokani na oyo.”—M. S.
“Na boumeli ya bambula 29 nyonso oyo nalekisi kati na solo, nazali komikundola te ntango nini lisoló moko elamwisaki botɔ́ndi na ngai mpe mayoki na ngai na motindo oyo. Atako nabokwamaki na bolingo monene mpe na libota oyo ebatelaki ngai malamu, namiyokaki te ete nabongi kozala na bomoi, nazalaki mpe komiyoka ete nabongaki te kosalela Yehova. Nsima ya lisoló wana, natyaki mabolongo na ngai na nsé, natɔndaki Yehova botɔndi mpenza. Nakolinga lisoló wana mpo na libela. Awa nasili kososola ete nazali na motuya na miso ya Nzambe, nakomitalela lisusu te lolenge nazalaki komitalela liboso.”—D. B.