Nkoma ya batángi
Koya monene Nalingi kotɔnda bino na motema mobimba mpo na lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kotika komitungisa lokola nazali koya monene?” (22 Mai 1999, ebimeli ya Lifalanse) Na mikolo eleki, nazalaki kokanisa eloko mosusu te, kaka ndenge nazali koya monene. Ntango namitalaka na talatala, namiyokaka nsɔni mpe nalingaka ata moke te komata na kilo. Nsima ya kotánga lisolo yango, namoni ete bomoto ya kati nde eleki ntina.
L. R., France
Bibɔsɔnɔ Nalekisaka ntango na ngai mingi na kiti ya bibɔsɔnɔ oyo batindikaka. Mwasi na ngai azali na maladi oyo elɛmbisaka nzoto makasi (syndrome de fatigue chronique) mpe anyokwamaka makasi na makanisi. Masolo “Elikya mpo na bibɔsɔnɔ” (8 Yuni 1999, ebimeli ya Lifalanse) elobaki ete ezali mabe te koyoka mawa ntango obungisi eloko moko ya ntina mingi. Lisusu, bililingi ya lisolo “Ntango maladi nyonso ekosila” esalisaki ngai namona mpenza ete na mikolo ekoya bamaladi na biso ekosila.
C. W., États-Unis
Nabukanaki lokolo na ngai ya mwasi na likama moko ntango nazalaki na mbula minei. Masolo na bino esalisaki ngai nalonga mikakatano na ngai ya konyokwama na makanisi. Bókoba na mosala malamu na bino ya kopesa toli na ntina na makanisi ya mabe.
A.J.T.P., Brésil
Esengeli bato báyeba ete bibɔsɔnɔ bazali na mayoki mpe na bomoto lokola moto nyonso mpe ekómelaka biso nyonso ete tózokisama na motema. Bato mosusu batalaka biso lokola nde tozali bato mpenza te mpe balobaka na biso maloba ya kozokisa, basusu basalaka lokola nde tozali na bomoi te. Bibɔsɔnɔ bazali bazoba te, bazali bato ya gɔigɔi te, bazali mpe te bato oyo bazangi elikya. Yebá ete soki bapesi biso libaku, mingi kati na biso bazali na likoki ya kolamba, kobongisa esika ezala pɛto, kosomba biloko na zando, kobɔkɔla bana, kosala mosala, mpe kutu kotambwisa motuka. Lokola nayebi Nzambe mpe nayebi ete atalelaka biso na bolingo mpe na boboto, yango esalisi ngai mingi. Nakómi naino Motatoli ya Yehova te, kasi nazali na elikya ete nakokóma.
A. G., États-Unis
Kozala na motuya na miso ya Nzambe Mbala mingi nanyokwamaka na makanisi mpe namimonaka ete nazali na ntina te. Na bantango mosusu nalobaka ete esengelaki te ete nazala mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso mpamba te nazali mpenza na makasi mingi te. Lisolo “Engebene Biblia . . . Ozali na motuya na miso ya Nzambe!” (8 Yuni 1999, ebimeli ya Lifalanse) esalisaki ngai mingi. Esalisi ngai nakanga ntina ete Satana alukaka na ndenge nyonso kopesa biso makanisi ya ndenge wana mpo tótika kosalela Yehova.
L. W., Canada
Lisolo yango ebɔndisaki ngai mingi. Nazalaki kokanisa ete Yehova azalaki koyoka mabondeli na ngai te. Kasi, nsima ya kotánga lisolo na bino, nakómi kotyela Yehova motema mingi, mpe ngai moko mpe nakómi komityela motema. Bókoba kobimisa masolo ya kobɔndisa ndenge wana.
R.V.T., Belgique
Na bomoi na ngai, nakutaná na makambo mingi ya mpasi mpe etikalá bilembo na motema na ngai—mabunga yango esali ete namimonaka ete nazali na mayele te. Lelo oyo, boyokani na ngai na Yehova mpe koyeba ete bolingo na ye eleki makanisi ya biso bato, epesi ngai esengo mpe nazali komiyoka ete nabatelami.
V.S.C., Brésil
Nauti kolanda lisolo yango kaka sikoyo na kasɛti. Namonaka te esili koleka mbula soki 44, mpe ata nsima ya kozwa batisimo, nakanisaka soki moke te ete nazali na ntina mpenza. Lisolo yango esimbaki motema na ngai mingi. Nazali kotɔnda Yehova mingi ndenge atalelaka biso te ndenge tomitalelaka biso moko.
A. K., Italie
Natungisamaki mingi na makanisi ete nazali na ntina te. Kasi, ntango natángaki lisolo yango, ezalaki lokola nde Yehova azalaki kosolola na ngai na boboto mpenza. Ezalaka mpasi mpo na kobongola makanisi, kasi nakosala makasi nabosana te oyo lisolo yango elobaki, ete: “Yehova ‘azali pene na biso lokola tata oyo alingaka bana na ye’—asɛnzɛlaka biso, atyelaka biso likebi, mpe azali ntango nyonso pene mpo na kosalisa biso.—Nzembo 147:1, 3.”
K. F., Japon