Yehova akopesaka kimya mingi mpe solo mingi
“Nakobikisa bango mpe nakomonisa bango kimya mingi mpe solo mingi.”—YILIMIA 33:6, NW.
1, 2. (a) Na ntina na kimya, lisoló ya mabota emonisi nini? (b) Na 607 L.T.B., liteya nini Yehova apesaki na Yisalaele na ntina na kimya?
KIMYA! Bato bazalaka mpenza na mposa na yango, nzokande yango emonani mpenza te kati na lisoló ya bato! Mingimingi, ekeke ya 20 emonani te ete ezali ekeke ya kimya. Na esika ete ezala bongo, bitumba mibale oyo bibomaki bato mingi bisili kosalema na eleko yango. Nsima na etumba ya liboso ya mokili mobimba, Lisangá ya Mabota esalemaki mpo na kobatela kimya kati na mokili. Lisangá wana elóngaki te. Nsima na etumba ya mibale ya mokili mobimba, Lisangá ya Mabota Masangani esalemaki na mokano bobele moko wana. Bobele kotánga bazulunalo mokolo na mokolo ekoki kosalisa biso mpo na komona lolenge lisangá yango mpe ezangi kolónga na mobimba na yango.
2 Tosengeli nde kokamwa soki bibongiseli ya bato bizali kokoka te kopesa kimya? Soko moke te. Esili koleka mibu 2 500, Yisalaele, libota liponami ya Nzambe, ezwaki liteya na likambo yango. Na ekeke ya nsambo L.T.B., Babilone, oyo ezalaki nguya ya mokili mobimba na eleko wana elingaki kobebisa kimya ya Yisalaele. Mpo na kozwa kimya, Yisalaele atyaki motema epai na Ezipito. Ezipito ekweaki. (Yilimia 37:5-8; Ezekiele 17:11-15) Na mobu 607 L.T.B., mampinga ya Babilone mabebisaki lopango ya Yelusaleme mpe batumbaki tempelo ya Yehova. Na yango Yisalaele ezwaki liteya ya mpasi ete kotya motema na bibongiseli ya bato ezali bongo bozoba. Na esika ete ezala na kimya, libota yango likendeki na boombo na Babilone.—2 Ntango 36:17-21.
3. Mpo na kokokisama ya maloba ya Yehova na nzela ya Yilimia, makambo nini masalemaki na ntango ya kala oyo mapesaki Yisalaele liteya ya mibale ya ntina mpo na oyo etali kimya?
3 Nzokande, liboso ete Yelusaleme ekwea, Yehova asilaki komonisa ete ezali ye nde akoki kopesa kimya mpo na Yisalaele, kasi Ezipito te. Na nzela ya Yilimia alakaki ete: “Nakobikisa bango mpe nakomonisa bango kimya mingi mpe solo mingi. Nakozongisa mpe Yuda mpe Yisalaele longwa na kokangama, nakotonga mpe bango lokola na ebandeli.” (Yilimia 33:6, 7, NW) Elaka ya Yehova ebandaki kokokisama na mobu 539 L.T.B., ntango Babilone elóngamaki mpe bonsomi epesamaki epai na Bayisalaele oyo bazalaki na boombo. (2 Ntango 36:22, 23) Na eteni ya nsuka ya mobu 537 L.T.B., etuluku moko ya Bayisalaele bakumisaki Elambo ya Mingombo na mabelé ya Yisalaele mpo na mbala ya liboso na nsima ya bambula 70! Nsima na elambo yango, babandaki kotonga tempelo ya Yehova. Bazalaki na mayoki nini mpo na yango? Lisoló elobi ete: “Bangangaki na konganga monene wana esanzolaki bango Yehova mpo ete miboko ya ndako na Yehova isili kotongama.”—Ezela 3:11.
4. Lolenge nini Yehova apusaki Bayisalaele na kosala mosala ya kotonga tempelo, mpe elaka nini apesaki na ntina na kimya?
4 Atako bongo, nsima ya ebandeli wana ya esengo, Bayisalaele balɛmbisamaki na banguna mpe batikaki mosala ya kotonga tempelo. Mwa bambula na nsima, Yehova atɛlɛmisaki mosakoli Hagai mpe mosakoli Zekalia mpo na kopusa Bayisalaele na kosilisa mosala ya kotonga. Oyo nde likambo ya kosepelisa mpo na bango koyoka Hagai koloba na ntina na tempelo ete yango esengeli kotongama: “Yehova na bibele alobi ete, Nkembo na ndako oyo na nsima ekoleka yango na liboso mpe na esika oyo nakopesa kimya”!—Hagai 2:9.
Yehova akokisi bilaka na ye
5. Likambo nini lilobelami mingi na mokapo ya mwambe ya Zekalia?
5 Kati na mokanda na Biblia oyo ete Zekalia, tozali kotánga na ntina na bimonaneli mpe bisakweli mingi bipemami oyo bipesaki makasi na libota ya Nzambe na ekeke ya motoba L.T.B. Bisakweli wana bizali mpe kondimisa biso ete Yehova akosunga biso. Ezali kopesa biso ntina mpenza ya kondima ete Yehova akopesa mpe kimya na libota na ye na mikolo na biso. Na ndakisa, na mokapo ya mwambe ya mokanda oyo ebéngami na nkombo na ye, mosakoli Zekalia alobeli mbala zomi maloba: ‘Yehova alobi boye ete.’ Mbala na mbala, maloba wana mamonisi eyambweli ya Nzambe na ntina na kimya ya libota ya Nzambe. Mwa ndambo na bilaka yango bikokisamaki nsima ya mikolo ya Zekalia. Nyonso esilaki kokokisama to ezali naino kokokisama lelo.
“Nayoki zuwa mpo na Siona”
6, 7. Na lolenge nini Yehova azalaki na ‘zuwa mpo na Siona elongo na nkanda monene’?
6 Maloba yango mamonani mpo na mbala ya liboso na Zekalia 8:2, epai kuna totángi ete: “Yehova na bibele alobi boye ete, Nayoki zuwa mpo na Siona, ɛɛ zuwa monene; nazali na zuwa mpo na ye, ɛɛ, zuwa na nkanda monene mpenza.” Elaka ya Yehova ya kozala na zuwa, ya kozala na molende makasi, mpo na libota na ye elimboli ete akosɛnzɛla ete kimya na bango ekoka kozonga. Kozongisama ya Yisalaele na mokili na bango mpe kotongama lisusu ya tempelo emonisaki polele molende yango.
7 Atako bongo, ezali boni mpo na baoyo batɛmɛlaki libota ya Yehova? Molende na ye mpo na libota na ye esengeli kokokana na “nkanda monene” oyo azalaki na yango likoló na banguna wana. Ntango Bayuda ya sembo bazalaki kosambela kati na tempelo oyo esilaki kotongama lisusu, bazalaki na likoki ya kokanisa likoló na mpasi oyo ekómelaki Babilone ya nguya, oyo na ntango wana esilaki kokwea. Bakokaki lisusu kokanisa na ntina na kokwea monene ya banguna oyo bamekaki kopekisa kotongama ya tempelo. (Ezela 4:1-6; 6:3) Mpe bakokaki kotɔ́nda Yehova lokola asilaki kokokisa elaka na ye. Molende na ye epesaki bango bolóngi!
“Mboka na solo”
8. Na mikolo ya Zekalia, lolenge nini Yelusaleme ekómaki mboka na solo na bokeseni na ntango ya kala?
8 Na mbala ya mibale Zekalia akomi ete: “Yehova alobi boye ete.” Maloba ya Yehova na libaku oyo mazali nini? “Nabutwi epai na Siona, mpe nakofanda na kati na Yelusaleme. Yelusaleme akobyangama ete, Mboka na solo, mpe ngomba na Yehova na bibele ete, Ngomba na bulɛɛ.” (Zekalia 8:3) Liboso ya mobu 607 L.T.B., Yelusaleme ezalaki mpenza mboka na solo te. Banganga mpe basakoli na yango basilaki kobebisama mpe bato na yango bazangaki sembo. (Yilimia 6:13; 7:29-34; 13:23-27) Sikawa libota ya Nzambe lizalaki kotonga lisusu tempelo, komonisáká bokangami na bango mpo na losambo ya pɛto. Na lolenge ya elimo, Yehova afandaki lisusu na Yelusaleme. Makambo ya solo ya losambo ya pɛto elobelamaki lisusu kati na yango, na bongo, Yelusaleme ekokaki kobyangama ete “mboka na solo.” Lokola ezalaki na esika oyo etombwami, yango ekokaki kobyangama ete “ngomba na Yehova.”
9. Mbongwana monene nini ya ezalela emonanaki epai na “Yisalaele ya Nzambe” na 1919?
9 Lokola biyambweli wana mibale bizalaki na ndimbola mpo na Yisalaele ya kala, bizali mpe na ndimbola mpo na biso awa ekeke ya 20 ezali kobɛlɛma na nsuka. Esili koleka soko mibu 80, na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, mwa bankóto ya bapakolami oyo na ntango wana bazalaki komonisa “Yisalaele ya Nzambe” bakendaki na boombo ya elimo. (Bagalatia 6:16) Esakweli moko elobelaki bango lokola bibembe oyo bilali kati na balabála. Nzokande, bazalaki na mposa ya solosolo ya kosambela Yehova “na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Yango wana, na 1919, Yehova abimisaki bango longwa na boombo, kosekwisáká bango longwa na ezalela na bango ya kufa kati na elimo. (Emoniseli 11:7-13) Na yango, Yehova ayanolaki ɛɛ na mongongo makasi na motuna oyo mozwami kati na esakweli moko ya Yisaya: “Mokili ekobotama na mokolo moko? Libota bakobimisama na mwa ntango moke?” (Yisaya 66:8) Na 1919, libota ya Yehova lizongaki lisusu na bomoi lokola libota na elimo kati na “mokili” na bango, to ezalela na bango ya elimo awa na mabelé.
10. Kobanda 1919, mapamboli nini baklisto bapakolami bazwaki kati na “mokili” na bango?
10 Lokola bazalaki na libateli kati na mokili wana, baklisto bapakolami basalaki kati na tempelo monene ya elimo ya Yehova. Batyamaki lokola “moombo ya sembo mpe ya mayele,” kondimáká mokumba ya kobatela biloko ya Yesu oyo bizali awa na mabelé, libaku malamu oyo bazali na yango kino lelo, awa ekeke ya 20 ezali kobɛlɛma na nsuka na yango. (Matai 24:45-47) Bazwaki malamu liteya oyo ete Yehova azali “mpenza Nzambe na kimya.”—1 Batesaloniki 5:23.
11. Lolenge nini bakonzi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba basili komimonisa ete bazali banguna ya libota ya Nzambe?
11 Nzokande, ezali boni mpo na banguna ya Yisalaele ya Nzambe? Molende ya Yehova mpo na libota na ye ekokani na nkanda oyo azali na yango mpo na banguna wana. Na boumeli ya etumba ya liboso ya mokili mobimba, bakonzi na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bayeisaki minyoko makasi wana bazalaki komeka kosilisa etuluku moke wana ya baklisto oyo balobaka solo—kasi balóngaki te. Na boumeli ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, baministre ya boklisto ya nkombo mpamba basanganaki kati na likambo bobele moko: Mikili na bipai nyonso mibale oyo mizalaki kobunda misɛngaki na biyangeli ete bisilisa Batatoli ya Yehova. Ata mpe lelo, kati na mikili mingi bakonzi na mangomba bazali kopusa biyangeli ete bápekisa to bátya mindɔndɔ́ na mosala ya boklisto ya kosakola oyo Batatoli ya Yehova basalaka.
12, 13. Lolenge nini nkanda ya Yehova emonisami epai na boklisto ya nkombo mpamba?
12 Yehova azali komona nyonso wana. Nsima na etumba ya liboso ya mokili mobimba, boklisto ya nkombo mpamba, elongo na mangomba mosusu ya Babilone Monene, ekweaki. (Emoniseli 14:8) Bosolo ya kokwea ya boklisto ya nkombo mpamba eyebanaki polele wana, kobanda 1922, molɔngɔ́ ya malózi ya elilingi esopamaki likoló na yango, komonisáká polele ezalela na yango ya kufa kati na elimo mpe kokebisáká na ntina na kobomama na yango oyo ezali koya. (Emoniseli 8:7 kino 9:21) Lokola elembeteli ete kosopama ya malózi wana ezali kokóba, lisukúlu “Nsuka ya mangomba ya lokuta ebɛlɛmi” epesamaki na mokili mobimba na mokolo mwa 23 Apríli 1995, yango elandanaki na kokabolama ya bamilió mingi ya bakopi ya Nsango ya Bokonzi, trakte moko ya ntina.
13 Lelo oyo, boklisto ya nkombo mpamba ezali kati na ezalela moko ya mawa. Na boumeli ya ekeke ya 20, basangani na yango babomanaki bamoko na basusu na bitumba mabe oyo bipambolamaki na banganganzambe na bango mpe na bapastɛ́rɛ na yango. Na mikili misusu, bopusi na yango ezali komonana lisusu te. Boklisto ya nkombo mpamba ekobomama elongo na mangomba mosusu matikali ya Babilone Monene.—Emoniseli 18:21.
Kimya mpo na libota ya Yehova
14. Maloba nini ya esakweli mapesami na ntina na libota oyo ezali na kimya?
14 Epai mosusu, na mobu oyo ya 1996, libota ya Yehova ezali na kimya mingi kati na mokili na bango oyo ezongisami, lokola yango elobelami na eyambweli ya misato ya Yehova: “Yehova na bibele alobi ete, Naino banuni babali mpe banuni basi bakofanda na nzela kati na Yelusaleme, moto na moto na lingenda na lobɔkɔ na ye mpe na mikolo mingi. Mpe nzela na mboka ikotonda na bana babali mpe na bana basi baoyo bazali kosana na nzela na yango.”—Zekalia 8:4, 5.
15. Atako bitumba ya mabota, basaleli ya Yehova basili kozwa kimya ya lolenge nini?
15 Maloba wana ya kosepelisa mpe ya elilingi mazali komonisa likambo moko ya kobenda likebi kati na mokili oyo mobebisami na bitumba—kozala ya libota oyo lizali na kimya. Kobanda 1919, maloba ya esakweli ya Yisaya masili kokokisama: “Kimya! Kimya! epai na bato na mosika mpe na penepene, Yehova alobi bongo mpe nakobikisa ye. Nde . . . Nzambe na ngai alobi ete, Mpo na bato mabe kimya ezali te.” (Yisaya 57:19-21) Ya solo, libota ya Yehova, atako esangani na mokili te, ekoki te kopɛngola kozwa mpasi oyo euti na mobulu ya mabota. (Yoane 17:15, 16) Na mikili misusu, bazali koyika mpiko na mikakatano makasi, mpe mwa ndambo basili kobomama. Nzokande, baklisto ya solo bazali na kimya na mitindo mibale ya ntina mingi. Ya liboso, bazali na “kimya elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo [na bango] Yesu Klisto.” (Baloma 5:1) Ya mibale, bazali na kimya kati na bango moko. Bazali kolóna “mayele mauti na likoló,” oyo mazali “libosoliboso pɛto, na nsima mazali na kimya.” (Yakobo 3:17; Bagalatia 5:22-24) Lisusu, bazali kozela kosepela na kimya ya kokoka ntango “bato na bopɔlɔ bakosangola mabelé, mpe bakozwa mpenza esengo ya solosolo kati na kimya mingi.”—Nzembo 37:11.
16, 17. (a) Lolenge nini “banuni mibali mpe banuni basi” mpe “bilenge mibali mpe bilenge basi” basili kokembisa lisangá ya Yehova? (b) Nini ezali komonisa kimya ya libota ya Yehova?
16 Kati na libota ya Yehova ezali naino na bapakolami “banuni mibali mpe banuni basi” oyo bazali komikundola bolóngi ya liboso ya lisangá ya Yehova. Bosembo na bango mpe bompikiliki na bango ezali na motuya mingi. Bilenge bapakolami bakambaki mosala na boumeli ya mikolo ya mpasi ya bambula 1930 mpe ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe ya bambula oyo epesaki nzela na bokóli oyo elandaki. Lisusu, mingimingi kobanda 1935, “ebele monene” ya “bampate mosusu” emonanaki. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16) Lokola baklisto bapakolami basili konuna mpe bazali lisusu mingi te, bampate mosusu basili komipesa na mosala ya kosakola mpe basili kopalanganisa yango na mabelé mobimba. Na bambula euti koleka bampate mosusu basili kosopana kati na mokili ya libota ya Nzambe. Ɛɛ, bobele na mobu oyo mouti koleka bato 338 491 kati na bango bazwaki batisimo mpo na komonisa elembo ya komipesa na bango epai na Yehova! Ya solo, na elobeli ya elimo bato wana ya sika bazali mpenza bilenge. Nguya ya nzoto na bango mpe molende na bango ezali na motuya mingi lokola bazali koyikana na molɔngɔ́ ya baoyo bazali kopesa masanzoli ya botɔ́ndi “epai na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe epai na Mwana na Mpate!”—Emoniseli 7:10.
17 Lelo oyo, ‘banzela na mboka etondi na bana babali mpe na bana basi,’ Batatoli oyo bazali na nguya ekokani na oyo ya bilenge. Na mobu ya mosala 1995, lapólo eutaki na mikili 232 mpe na bisanga ya mai monene. Kasi bowelani ezali te kati na mboka ikeseni, koyinana kati na bikólo ezali mpe te, soko mpe zuwa ya mabe, kati na bapakolami mpe bampate mosusu. Bango nyonso bazali kokóla elongo kati na elimo, bazali na bomoko kati na bolingo. Bondeko kati na mokili mobimba oyo ezali komonana epai na Batatoli ya Yehova ekeseni mpenza na nyonso mosusu kati na mokili.—Bakolose 3:14; 1 Petelo 2:17.
Ezali likambo ya mpasi mpo na Yehova?
18, 19. Kobanda 1919, lolenge nini Yehova asili kokokisa oyo ekokaki komonana lokola likambo ya mpasi na miso ya bato?
18 Na 1918 ntango batikali bapakolami bazalaki bobele mwa motángo ya bankóto ya bato oyo balɛmbaki na boombo ya elimo, moko te akokaki komona na mosika lolenge makambo malingaki kosalema. Nzokande, Yehova ayebaki—lokola yango emonisami na eyambweli na ye ya minei ya esakweli: “Yehova na bibele alobi boye ete, Soko ezali likambo na kokamwa epai na litika na libota oyo na mikolo na lelo, ekozala nde likambo na kokamwa na miso na ngai? Yehova na bibele alobi bongo.”—Zekalia 8:6.
19 Na 1919, elimo na Yehova epesaki libota na ye makasi mpo na kokokisa mosala oyo ezalaki liboso na bango. Nzokande, esengelaki kozala na kondima mpo na kokangama ngwi na lisangá moke ya basambeli ya Yehova. Bazalaki mpenza moke, mpe makambo mingi mazalaki mpenza polele te. Atako bongo, mokemoke, Yehova akembisaki bango na makambo matali lisangá mpe abongisaki bango mpo na kosala mosala ya boklisto ya kosakola nsango malamu mpe ya kozalisa bayekoli. (Yisaya 60:17, 19; Matai 24:14; 28:19, 20) Mokemoke, asalisaki bango na kososola makambo ya ntina lokola kozanga kokɔta na makambo ya mokili mpe lotómo ya Nzambe ya kozala mokonzi na mɔlɔ́ngɔ́ mobimba. Ezalaki mpenza likambo ya mpasi mpo na Yehova mpo na kokokisa mokano na ye na nzela ya etuluku moke wana ya Batatoli? Eyano ezali ete ezalaki mpasi te! Yango emonisami na lokasa 12 kino na lokasa 15 ya zulunalo oyo, na etánda ya mosala ya Batatoli ya Yehova mpo na mobu ya mosala 1995.
“Ngai mpenza nakozala Nzambe na bango”
20. Lolenge nini koyanganisama ya libota ya Nzambe esakolamaki?
20 Eyambweli ya mitano emonisi lisusu ezalela ya esengo oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango lelo oyo: “Yehova na bibele alobi boye ete, Talá, nakobikisa bato na ngai longwa na mokili na ebimelo na moi mpe na mokili na elimwelo na moi mpe nakoyeisa bango mpe bakofanda na kati na Yelusaleme; bakozala bato na ngai mpe ngai mpenza nakozala Nzambe na bango na solo mpe na boyengebene.”—Zekalia 8:7, 8.
21. Na makambo nini kimya mingi ya libota ya Yehova esili kobatelama mpe kofuluka?
21 Na 1996, tokoki koloba kozanga kokakatana ete nsango malamu esili kosakolama na mokili mobimba, longwa na “mokili na ebimelo na moi” kino na “mokili na elimwelo na moi.” Bayekoli basili kozalisama na bato na mabota nyonso, mpe basili komona kokokisama ya elaka ya Yehova: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Yehova, mpe kolónga na bana na yo ekozala monene.” (Yisaya 54:13) Tozali na kimya mpamba te tolakisami na Yehova. Mpo na ntina wana, mikanda misili kobimisama na nkótá koleka 300. Bobele na mbula eleki, nkótá 21 ebakisamaki. Zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimisami sikawa nzela moko na nkótá 111, mpe Lamuká! na nkótá 54. Mayangani ya mboka moko to ya mikili mikeseni ezali komonisa polele elembeteli ya kimya ya libota ya Nzambe. Makita ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mazali koyeisa bomoko kati na biso mpe mazali kopesa biso bilendiseli oyo tozali na yango mposa mpo na kotikala ngwi. (Baebele 10:23-25) Ɛɛ, Yehova azali kolakisa libota na ye “kati na solo mpe boyengebene.” Azali kopesa libota na ye kimya. Oyo nde kopambwama mpo na biso na kozwa kimya yango mingi!
Okoki kolimbola?
◻ Na mikolo na biso, lolenge nini Yehova asili komonisa ‘zuwa elongo na nkanda monene’ mpo na libota na ye?
◻ Lolenge nini libota ya Yehova ezali kozwa kimya, ata kati na mikili oyo mibebisami na bitumba?
◻ Na lolenge nini ‘banzela etondi na bilenge mibali mpe na bilenge basi’?
◻ Bibongiseli nini bisili kokamatama mpo na komonisa ete libota ya Yehova ekoki koteyama na ye?
[Etanda na lokasa 12-15]
LAPOLO YA BATATOLI YA YEHOVA NA MOKILI MOBIMBA MPO NA MBULA YA MOSALA 1995
(Talá na zulunalo oyo ebimisamaki)
[Elilingi na lokasa 7]
Na ekeke ya motoba L.T.B., Bayuda ya sembo oyo batongaki lisusu tempelo bayaki koyeba ete bobele Yehova nde azali liziba ya kimya oyo ebongi kotyelama motema