Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/3 lok. 3
  • ‘Nazali na ntina na miso ya Nzambe?’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nazali na ntina na miso ya Nzambe?’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • “Kondimana ya Kala” esilá ngala?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mokolo oyo tosengeli kokanisaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Yoane 3:16​—“Mpo Nzambe alingaki mokili mingi”
    Ndenge bavɛrsɛ ya biblia elimbolami
  • Filipo—Mosakoli ya nsango malamu na molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/3 lok. 3

‘Nazali na ntina na miso ya Nzambe?’

“NAZALI na ntina? Nzambe amibanzabanzaka mpo na ngai?” Wana ezalaki motó ya lisoló moko oyo ebimaki kati na zulunalo Christianity Today. Philip Yancey, mokomi ya lisoló yango, alobaki ete: “Na boumeli ya bambula mingi ya mosala na ngai ya mokomi mikanda nasili kokoma mingi mpenza likoló na likambo litali mpasi. Nazongelaka makambo yango mbala na mbala, lokola ete natyaka misapi likoló na mpótá oyo esilaka te. Nayokaka makambo oyo batángi ya mikanda na ngai balobaka, mpe makambo na bango ya mawa endimisi ngai solo ete nazali na ntina ya kobɛtabɛta ntembe.”

Mbala mosusu yo mpe osilá komituna soki Nzambe atyaka likebi likoló na bomoi na yo. Ah, ekoki kozala ete oyebi malamu Yoane 3:16, oyo elobi ete “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana-na-likinda na ye.” To mpe osilá mbala mosusu kotánga Matai 20:28, oyo elobi ete Yesu ayaki “kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” Atako bongo, okoki komituna ete: ‘Nzambe atalelaka ngai? Amibanzabanzaka mpo na ngai mpenza?’ Bantina malamu ezali ya kondima ete ee, lokola tokomona yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto