Tosangani na mosala ya Nzambe na ntango malamu mpe na ntango ya mpasi
Lisoló ya Michel mpe Babette Muller
MONGANGA alobaki ete: “Nazali na nsango ya mawa mpo na bino. Bokoki kobosana likanisi na bino ya bomoi ya misionere na Afrika.” Wana atalaki mwasi na ngai Babette, alobaki ete, “Ozali na kanser ya libɛlɛ.”
Tobulunganaki makasi mpenza. Tokanisaki na ntina na makambo ndenge na ndenge. Liboso tokanisaki ete tozalaki kokende epai na monganga bobele mpo na ekizamé ya nsuka. Tiké na biso ya bozongi na Bénin, na Afrika ya Wɛ́sti, esilaki kosombama. Tozalaki kolikya kozonga kuna kati na pɔ́sɔ wana. Na boumeli ya mibu 23 ya bomoi na biso ya libala, tosilaki kolekisa esika moko ntango malamu mpe ntango ya mpasi. Wana tobulunganaki mpe na bobángi na motema, sikawa tomilɛngɛlaki mpo na kobundisa kanser.
Tiká tóbanda uta ebandeli. Michel abotamaki na Sɛtɛ́mbɛ 1947, Babette na Augústo 1945. Tokólaki na France mpe tobalanaki na 1967. Tozalaki kofanda na Paris. Mokolo moko na ntɔ́ngɔ ya ebandeli ya mobu 1968, Babette alongwaki na ndako noki te mpo na kokende na mosala. Mwasi moko ayaki na ekuke mpe apesaki ye mwa búku moko ya makambo ya losambo; azwaki yango. Na nsima mwasi yango alobaki: “Nakoki kozonga elongo na mobali na ngai mpo na kosolola na yo mpe mobali na yo?”
Babette azalaki kokanisa mingi na ntina na mosala na ye. Alingaki ete mwasi yango akende, yango wana alobaki, “Malamu, malamu.”
Michel alobi ete: “Nazalaki kosepela na mangomba te, kasi mwa búku yango ebendaki likebi na ngai, mpe natángaki yango. Nsima ya mwa mikolo, Joceline Lemoine, azongaki elongo na mobali na ye, Claude. Ayebaki mpenza kosalela Biblia malamu. Azalaki kopesa biyano na mituna na ngai nyonso. Nakamwaki mpenza.
“Babette azalaki Mokatolike ya molende kasi azalaki na Biblia te, yango ezali likambo ya kokamwa te epai na Bakatolike. Asepelaki mingi na komona mpe na kotánga Liloba ya Nzambe. Na nzela ya boyekoli na biso tososolaki ete mateya mingi ya mangomba oyo bateyaki biso mazalaki ya lokuta. Tobandaki kosolola na bandeko mpe baninga na biso makambo oyo tozalaki koyekola. Na Yanuáli 1969 tokómaki Batatoli ya Yehova oyo bazwi batisimo. Bato libwa kati na bandeko mpe baninga na biso bazwaki batisimo mwa moke na nsima.”
Tokei kosala esika mposa ya basakoli ezali monene
Nokinoki nsima ya kozwa batisimo, tokanisaki ete: ‘Tozali na bana te. Mpo na nini tokoki te kosɛnga mosala ya ntango nyonso?’ Na yango, na 1970 totikaki mosala na biso, tobandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe tokendaki na engumba moke ya Magny-Lormes, penepene na Nevers, na ntéi ya France.
Ezalaki esika oyo mosala ezalaki na mpasi. Ezalaki pɛtɛɛ te kokutana na bato oyo bazalaki na mposa ya koyekola Biblia. Tokokaki te kozwa mosala ya mosuni, na yango tozalaki bobele na mosolo moke. Na bantango mosusu tozalaki kolya bobele mbálá ya mpamba. Na ntango ya mpiɔ makasi temperatire ezalaki kokita kino -22° C. Tobéngaki eleko yango ntango ya bangɔmbɛ nsambo ya kokɔnda makasi.—Genese 41:3.
Kasi Yehova asungaki biso. Mokolo moko wana totikalaki lisusu mpenza na bilei te, mosáli ya pósita ayaki kotikela biso liboke moko monene ya fromage oyo eutaki epai na ndeko ya Babette ya mwasi. Mokolo mosusu tozongaki na ndako nsima ya mosala ya kosakola mpe tokutaki baninga oyo basalaki mobémbo ya bakilomɛtɛlɛ 500 na motuka mpo na koya kotala biso. Lokola basilaki koyoka lolenge nini makambo mazalaki, bandeko yango batondisaki mituka na bango mibale na bilei mpo na komemela biso.
Nsima ya mbula moko na ndambo, la Société atindaki biso lokola babongisi-nzela monene. Na boumeli ya mibu minei oyo milandaki, tosakolaki na Nevers, nsima na Troyes, mpe na nsuka na Montigny-lès-Metz. Na 1976, Michel aponamaki mpo na kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga na súdi-wɛ́sti ya France.
Nsima ya mibu mibale, na boumeli ya eteyelo moko ya bakɛngɛli ya zongazonga, tozwaki mokanda ya la Société Watch Tower oyo ezali kobyanga biso ete tókende na mboka-mopaya lokola bamisionere; mokanda molobaki ete tokokaki kopona kati na Tchad mpe Burkina Faso (oyo ebéngamaki kala Haute-Volta). Toponaki Tchad. Mwa moke na nsima tozwaki mokanda mosusu, oyo etindaki biso tokenda kosala na nsé ya litambwisi ya filiale Ya Tahiti. Tosɛngaki tókenda na kɔntiná monene, Afrika, kasi nokinoki tomimonaki likoló na esanga moko moke!
Tozali kosala na Pasifiki ya Súdi
Tahiti ezalaki esanga moko kitoko ya mikili ya molungé kati na Pasifiki ya Súdi. Ntango tokómaki, bandeko soko mokama bayaki mpo na koyamba biso na libándá ya mpɛpɔ. Bayambaki biso na fololo ebéngami leis, mpe atako tolɛmbaki nsima ya mobémbo molai uta na France, tozalaki na esengo monene.
Sanza minei nsima ya kokóma na Tahiti, tokɔtaki na masúwa moko moke etambwisami na mopɛpɛ oyo etondisamaki na mbuma ya kokoti oyo ekauki. Nsima ya mikolo mitano tokómaki na esika ya sika ya mosala na biso—esanga ya Nuku Hiva na Bisanga Marquesas. Bato soko 1500 bazalaki kofanda na esanga yango, kasi bandeko bazalaki kuna te. Tozalaki bobele biso moko.
Na ntango wana biloko ya mindɛlɛ bizalaki mpenza mingi te kuna. Tozalaki kofanda kati na ndako moke etongami na bɛtɔ́ mpe na makeke. Lontiliki ezalaki te. Tozalaki na pompi ya mai oyo na bantango mosusu ezalaki kopesa mai, kasi mai yango mazalaki na pɔtɔpɔ́tɔ mingi. Mbala mingi tozalaki kosalela mai ya mbula oyo ezalaki kotonda kati na tonó moko. Nzela ya gudrɔ ezalaki te, kasi bobele banzela ya pɔtɔpɔ́tɔ.
Mpo na kokóma na biteni ya mosika ya esanga yango, tosengelaki kofutela bampunda. Bifandelo na yango esalemaki na mabaya—ezalaki koswa, mingimingi mpo na Babette, oyo atambolaki naino na mpunda te. Tozalaki komema mbeli mpo na kokatakata bambu oyo ekweaki na nzela. Ezalaki solo lolenge ya bomoi oyo ekeseni mosika na oyo ya France.
Tozalaki kosala makita ya Mwalomingo, atako tozalaki bobele biso mibale. Na ebandeli tozalaki kosala makita mosusu te mpo ete tozalaki bobele biso mibale. Na esika na yango tozalaki kotánga elongo masoló mapesamaki mpo na makita.
Nsima ya mwa basanza, tomonaki ete ebongaki te ete tokóba lolenge yango. Michel ayebisi ete: “Nalobaki na Babette, ‘Tosengeli kolata bilamba malamu. Fandá wana, mpe ngai nakofanda awa. Nakobanda na libondeli, mpe na nsima tokosala Eteyelo ya mosala ya teokrasi mpe Likita ya mosala. Nakotuna mituna, mpe okoyanola, atako tozali bobele ngai na yo kati na ndako.’ Ezalaki mpenza malamu ete tosalaki bongo mpamba te ezali mpasi te kolɛmba na elimo wana lisangá lizalaki te.”
Ezwaki ntango mingi liboso ete bato báya na makita na biso ya boklisto. Na boumeli ya basanza mwambe ya liboso tozalaki bobele biso mibale. Na nsima, moko, mibale, mbala mosusu misato basanganaki elongo na biso. Na mobu moko boye, tobandaki bobele biso mibale milulu ya mbula na mbula ya Elámbo ya mpokwa ya Nkolo. Nsima ya miniti zomi, bato mosusu bayaki, bongo nakataki mpe nabandelaki lisusu lisukúlu.
Lelo oyo, ezali na basakoli 42 mpe na masangá 3 kati na Bisanga Marquesas. Atako eteni eleki monene ya mosala mosalemaki na baoyo bayaki nsima na biso, bato mosusu oyo tokutanaki na bango na ntango wana basili sikawa kozwa batisimo.
Bandeko na biso bazali na motuya mingi
Toyekolaki ezaleli ya motema pɛtɛɛ na Nuku Hiva. Tosengelaki kozela ete biloko nyonso eya, longolá biloko ya ntina oyo tozalaki na yango mposa mpo na bomoi. Na ndakisa, soki olingi búku moko, osengelaki kokoma mpo na kosɛnga yango, mpe bongo kozela sanza mibale to misato liboso ete ekóma.
Liteya mosusu oyo toyekolaki ezalaki ete bandeko na biso bazali na motuya mingi. Ntango tokendaki na Tahiti mpe toyanganaki na makita mpe toyokaki bandeko bazali koyemba, tolelaki. Ekoki kozala solo ete ezali mpasi koyokana malamu elongo na bandeko mosusu, kasi wana ozali yo moko, okososola ete ezali malamu kozala kati na bandeko. Na 1980 la Société azwaki ekateli ete tosengelaki kozonga na Tahiti mpe kosala kati na mosala ya zongazonga. Tolendisamaki kuna mingi na boyambi ya esengo oyo bandeko bamonisaki mpe na bolingo na bango mpo na mosala ya kosakola. Tolekisaki mibu misato kati na mosala ya zongazonga na Tahiti.
Longwá na esanga moko kino mosusu
Na nsima totindamaki na ndako moko ya bamisionere na Raïatéa, esanga mosusu ya Pasifiki, mpe toumelaki kuna penepene na mibu mibale. Nsima ya Raïatéa, totindamaki mpo na kosala mosala ya zongazonga na etuluku ya bisanga Tuamotu. Totalaki bisanga 25 kati na bisanga 80 na nzela ya masúwa. Ezalaki mpasi mpo na Babette. Ntango nyonso oyo azalaki kosala mobémbo na masúwa, azalaki komiyoka malamu te.
Babette alobi ete: “Ezalaki nsɔ́mɔ! Ntango nyonso oyo tozalaki kolekisa kati na masúwa nazalaki kobɛla. Soki tosengelaki koumela mikolo mitano likoló na mai, nazalaki kobɛla mikolo mitano. Nkísi moko te ekokaki kosunga ngai. Nzokande, atako nazalaki komiyoka malamu te, nazalaki kokanisa ete mai monene mazalaki kitoko. Ezalaki kitoko komona yango. Ba dauphins bazalaki komekana mbangu na masúwa. Mbala mingi bazalaki kopumbwa libándá soki tobɛti mabɔkɔ!”
Nsima ya mibu mitano kati na mosala ya zongazonga, totindamaki lisusu na Tahiti mpo na mbula mibale mpe tosepelaki lisusu na mosala ya kosakola. Motuya ya basakoli ya lisangá na biso mosilaki koyikana mbala mibale longwá na 35 kino 70 bobele nsima ya mbula moko na ndambo. Kati na bango, zomi na mibale oyo toyekolaki na bango Biblia bazwaki batisimo mwa moke liboso ete tólongwa. Basusu kati na bango bazali sikawa basaleli na misala kati na lisangá.
Tolekisaki lokola bambula 12 na Pasifiki ya Súdi. Bongo tozwaki mokanda moko ya la Société oyo elobaki ete bazalaki lisusu na mposa ya bamisionere te na bisanga wana mpamba te masangá masilaki kokóma makasi. Basakoli bazalaki pene na 450 ntango tokómaki na Tahiti mpe basilaki koleka 1000 wana tolongwaki kuna.
Na nsuka tokei na Afrika!
Tozongaki na France, mpe nsima ya sanza moko na ndambo, la Société apesaki biso esika ya sika ya mosala—Bénin, na Afrika ya Wɛ́sti. Mibu 13 na liboso tolingaki kokenda na Afrika, na yango tosepelaki mingi mpenza.
Tokómaki na Bénin na 3 Novɛ́mbɛ 1990, mpe tozalaki kati na bamisionere ya liboso oyo bakómaki kuna nsima ya bipekiseli ya mosala ya kosakola oyo eumelaki mibu 14. Ezalaki mpenza esengo. Tozalaki na mikakatano te ya komesena mpamba te lolenge ya bomoi ekokani na oyo ezalaki na bisanga ya Pasifiki. Bato bazali komonisa boninga mingi mpe bazali bayambi ya bapaya. Okoki kotɛlɛmisa moto nyonso na nzela mpe kosolola na ye.
Bobele mwa bapɔ́sɔ nsima wana tokómaki na Bénin, Babette amonaki litútú moko na libɛlɛ na ye. Na yango tokendaki na lopitalo moko moke penepene na biro ya filiale oyo eutaki kofungwama. Monganga atalaki ye mpe alobaki ete asengelaki koleka na lipasó nokinoki mpenza. Mokolo oyo molandaki tokendaki na lopitalo mosusu epai tomonanaki na monganga Mondɛlɛ, gynécologue oyo autaki na France. Ye mpe alobaki ete tosengelaki kokenda na France nokinoki mpo ete Babette aleka na lipasó. Mikolo mibale na nsima tozalaki kati na mpɛpɔ mpo na kokenda na France.
Tozalaki na mawa ya kotika Bénin. Lokola bonsomi ya losambo epesamaki sika, bandeko basepelaki ete bazwaki bamisionere ya sika, mpe tozalaki na esengo monene ya kozala kuna. Na yango totungisamaki ete tolongwaki bobele nsima ya kolekisa mwa bapɔ́sɔ na mboka yango.
Ntango tokómaki na France, monganga-mopasoli atalaki Babette mpe andimisaki ete asengelaki koleka na lipasó. Minganga basalaki nokinoki, basalaki lipasó moko moke, mpe na mokolo molandaki babimisaki Babette na lopitalo. Tokanisaki ete esukaki bobele bongo.
Nsima ya mikolo mwambe, tokutanaki na monganga-mopasoli. Ezalaki na ntango yango nde abimisaki nsango ete Babette azalaki na kanser ya libɛlɛ.
Kokanisáká mayoki azalaki na yango na ntango wana, Babette alobi ete: “Liboso, nabulunganaki mingi te lokola Michel. Kasi na mokolo oyo molandaki nsango wana ya mawa, nazalaki lisusu na liyoki moko te. Nazalaki kokoka kolela te. Nakokaki kosɛka te. Nakanisaki ete nalingaki kokufa. Mpo na ngai, kanser elimbolaki kokufa. Likanisi na ngai lizalaki ete, tosengeli kosala nyonso ekoki na biso.”
Tobundisi Kanser
Toyokaki nsango yango ya mawa na Mwamitano, mpe na Mwamibale Babette asengelaki koleka na lipasó ya mbala ya mibale. Tozalaki kofanda epai ya yaya na Babette ya mwasi, kasi ye mpe azalaki na bokɔnɔ, yango wana tokokaki te kokóba kofanda kati na ndako moke epai azalaki.
Tomitunaki soki tokokaki kokenda epai wapi. Bongo tomikundolaki Yves mpe Brigitte Merda, babalani oyo tozalaki kofanda liboso epai na bango. Babalani yango basilaki liboso koyamba biso malamu. Na yango tobéngaki Yves na telefone mpe toyebisaki ye ete Babette asengelaki koleka na lipasó mpe tozalaki na esika te epai tosengelaki kofanda. Toyebisaki ye lisusu ete Michel asengelaki kozwa mosala.
Yves apesaki Michel mosala moko na ndako na ye. Bandeko basungaki mpe balendisaki biso na makambo mingi oyo mazalaki komonisa boboto na bango. Basungaki mpe biso na mosolo. La Société afutaki mosolo ya lopitalo mpo na Babette.
Lipasó yango lizalaki ya monene. Minganga basengelaki kolongola bambuma oyo ezalaki na banzela ya lymphe mpe kolongola libɛlɛ yango. Babandaki nokinoki mwango ya kosalisa na nkísi. Nsima ya pɔ́sɔ moko Babette akokaki kobima na lopitalo, kasi asengelaki kozonga kuna nsima ya pɔ́sɔ misato nyonso mpo na kolanda kozwa nkísi.
Na boumeli ya ntango oyo Babette azalaki kozwa lisalisi ya monganga, bandeko ya lisangá basungaki biso mingi. Ndeko moko ya mwasi asilaki mpe kokutana na bokɔnɔ ya kanser ya libɛlɛ mpe azalaki elendiseli monene. Ayebisaki Babette nini oyo esengelaki kokóma mpe abɔndisaki ye mingi.
Nzokande, tozalaki motema likoló na ntina na mikolo mizalaki koya. Ntango basosolaki yango, Michel mpe Jeanette Cellerier bamemaki biso na rɛstorá moko mpo na kolya.
Toyebisaki bango ete tosengelaki kotika mosala ya misionere mpe ete tokokaki lisusu te kozonga na Afrika. Nzokande, ndeko Cellerier alobaki ete: “Nini? Nani alobi ete bosengeli kotika? Lisangani ya Mikóló-bakambi? Bandeko na France? Nani alobaki yango?”
Nazongisaki ete, “Moto moko te alobaki yango, ngai nde nazali koloba yango.”
Ndeko Cellerier alobaki ete, “Te, te! Bokozonga!”
Lisalisi ya nkísi elandanaki na oyo ya kotumba na radiation, oyo esilaki na nsuka ya Augústo 1991. Minganga balobaki ete bamonaki mokakatano moko te na bozongi na biso na Afrika, soki Babette akokaki kozonga mbala na mbala na France mpo na ekizamé.
Tozongi lisusu na Bénin
Bongo tokomelaki biro monene na Brooklyn, mpo na kosɛnga ndingisa ya kozongela mosala ya misionere. Tozalaki motema likoló mpo na kozwa eyano na bango. Emonanaki lokola ete mikolo yango mizalaki koumela mpenza! Na nsuka, Michel akokaki lisusu te kozela, na yango abéngaki na Brooklyn na telefone mpe atunaki soki basilaki kozwa mokanda na biso. Balobaki ete basilaki kotalela yango—tosengelaki kozonga na Bénin! Tozalaki mpenza na botɔ́ndi epai na Yehova!
Libota ya ba Merda ebongisaki elambo monene mpo na kosepela na nsango yango. Na Novɛ́mbɛ 1991 tozongaki na Bénin, mpe bandeko bayambaki biso na elambo moko monene!
Emonani ete Babette azali sikawa na kolɔngɔ́nɔ́ malamu. Mbala na mbala tosili kozonga na France mpo na ekizamé ya monganga, mpe minganga bamonaki lisusu elembo moke te ya kanser. Tozali na esengo monene ya kozonga na esika na biso ya mosala ya misionere. Tomoni ete bazali na mposa na biso na Bénin, mpe Yehova asili kopambola mosala na biso. Uta tozongaki tosili kosalisa bato 14 kino kozwa batisimo. Mitano kati na bango bazali sikawa babongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe moko asili koponama mosaleli na misala. Tosili mpe komona lisangá na biso oyo ezalaki moke kokóla mpe kobimisa masangá mibale.
Na boumeli ya mibu mingi, tosili kosalela Yehova lokola babalani mpe tosili kozwa mapamboli mingi mpe tosili koyebana na bato mingi ya kosepelisa. Lisusu Yehova abongisaki mpe alendisaki biso ete tóyikela mikakatano mpiko. Lokola Yobo, tozalaki ntango nyonso kososola te mpo na nini makambo masalemaki na lolenge yango, kasi toyebi ete Yehova azalaki ntango nyonso wana mpo na kosalisa biso. Ezali lokola Liloba ya Nzambe elobi ete: “Talá lobɔkɔ na [Yehova] ezali mokuse te ete ezanga kobikisa; litoi na ye ezali na bozito te ete ezanga koyoka.”—Yisaya 59:1.
[Elilingi na lokasa 23]
Michel mpe Babette Muller balati na motindo ya mboka Bénin
[Bililingi na lokasa 25]
Mosala ya misionere kati na ba Polynésiens na mboka ya molungé Tahiti