Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/4 nk. 5-7
  • Nsango malamu ezali liboso!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nsango malamu ezali liboso!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eutelo ya bansango mabe nyonso
  • Mpo na nini nsango mabe ezali koyikana mingi?
  • Ekozala ntango nyonso bongo te
  • Koyikana ya nsango mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • “Nsango malamu”!
    Tóyembela Yehova na esengo
  • Botomboki kati na mokili na elimo
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/4 nk. 5-7

Nsango malamu ezali liboso!

BISO banso toyokaka mawa ntango nyonso oyo tozwaka nsango mabe oyo etali biso. Na ngámbo mosusu, tosepelaka wana tozwi nsango malamu​—nsango ya bosepeli mpo na biso moko to mpo na balingami na biso. Nzokande na ntango oyo mabe ekómeli basusu kasi biso te, mbala mingi bato batunatunaka; bamoko kutu basepelaka koyoka nsango ya mpasi oyo ekweli bato mosusu. Yango ekoki mwa moke kolimbola mpo na nini nsango mabe etambolaka mingi koleka nsango malamu!

Na boumeli ya eteni ya liboso ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ezalaki na ndakisa ya polele oyo emonisi bosepeli ya mabe oyo bazalaki na yango mpo na mpasi ya baninga. Masúwa ya etumba oyo ezalaki na lombangu mingi oyo ememaka batone 10000, na nkombo ya Graf Spee, ezalaki kopesa lokumu na bamasúwa ya Allemagne na 1939. Na boumeli ya bapɔ́sɔ mingi masúwa wana ya etumba ebebisaki bamasúwa mingi ya mombongo ya banguna ya Allemagne na súdi ya mai monene Atlantiki mpe Indien. Na nsuka, bamasúwa misato ya Grande-Bretagne elandaki mpe ebundisaki masúwa Graf Spee, ebomaki basodá na yango mpe esalaki ete ekɔta na Montevideo, libóngo ya Uruguay mpo na kobongisama. Boyangeli ya Uruguay epesaki etindá nokinoki ete masúwa wana ya etumba ezonga na mai monene, soki bongo te bakobundisa bango. Na yango, etumba makasi ebɛlɛmaki mpo na kotɛmɛla yango.

Ntango bayokaki nsango wana, etuluku moko ya bato ya mombongo na États-Unis bafutelaki mpɛpo moko, oyo esɛngaki badolare 2500 mpo na moto na moto, mpo na kokenda na Uruguay komona etumba monene ya nsɔ́mɔ oyo elingaki kosalema kuna. Bosisoi monene mpo na bango, etumba yango esalemaki soko moke te. Adolf Hitler apesaki etindá ete Graf Spee ezindisama. Nzokande, ebele ya bankóto ya bato oyo bayaki na libóngo na elikya ya kotala etumba ya nsɔ́mɔ na mai monene, na esika na yango bamonaki mpe bayokaki nde kopaswama na lokito makasi oyo ezindisaki Graf Spee na nsé ya mai, wana ezindisamaki na basodá na yango bango mpenza. Kapitɛnɛ amibomaki na komibɛtáká lisasi na motó.

Atako bato mosusu bamonisaka ete bakabwani kati na mayoki na bango ya nsɔ́mɔ, ntálo monene ya bato bakondima ete balingaka koyoka nsango malamu kasi nsango mabe te. Okanisaka lolenge yango te? Na bongo, mpo na nini lisoló ya bato litondi na nsango mabe mpe mpo na nini nsango malamu ezali mingi te? Ezalela yango ekoki kobongwana?

Eutelo ya bansango mabe nyonso

Biblia ezali kolobela biso ntango oyo ezalaki bobele nsango malamu. Nsango mabe eyebanaki te, ezalaki koyokana te. Ntango Yehova Nzambe asilisaki mosala na ye ya kozalisa, etando oyo Mabelé esilaki kobongisama mpo ete bato mpe banyama báfanda wana. Lisoló ya Genese elobi ete: “Nzambe atalaki biloko nyonso bisilaki ye kozalisa, mpe izalaki malamu mingi.”​—Genese 1:31.

Kozanga ya nsango mabe eumelaki mingi te nsima ya kozalisama ya moto. Liboso ete Adama mpe Eva bábota mwana na bango ya liboso, nsango mabe etali kotombokela Nzambe mpe ebongiseli na ye ya makambo malamu eyebisamaki. Mwana moko ya elimo oyo azalaki na etɛlɛmɛlo ya lokumu akómaki motomboki mpe alóngaki na kobenda babalani mibale ya liboso ete básangana na botomboki mpe na bosuli na ye.​—Genese 3:1-6.

Ebele ya nsango mabe oyo bato basili koyoka ebandaki na ntango wana. Ezali likambo ya kokamwa te ete myango mabe, bokosi, lokuta, makambo mazangi sembo, kobongola bosolo ya makambo oyo etondi mingi kati na nsango mabe na mokili ebandaki uta na ntango yango. Yesu Klisto apamelaki Satana Zábolo polele ete azali mobandisi ya nsango mabe, wana alobaki na bakonzi ya mangomba ya mikolo na Ye ete: “Bino bouti na tata na bino, Satana, mpe mokano na bino ezali ete bósala mposa na tata na bino. Ye mobomi na bato longwa na ebandeli; atɛlɛmi kati na solo te mpo ete solo ezali kati na ye te. Wana ekosololaka ye lokuta, azali kosolola makambo na ye moko mpo ete azali mobuki na nkuta mpe tata na yango.”​—Yoane 8:44.

Wana bato bazalaki kokóma mingi, nsango mabe ebakisamaki mpe elongo na bango. Ya solo, yango elingi koloba te ete ntango ya esengo mpe ya bosepeli ezalaki te, mpamba te ezali na makambo mingi ya bomoi oyo mazali, mazalaki ntina ya esengo. Nzokande, mitungisi mpe mawa nde mazali komonana mingi kati na mabota nyonso ya bato kino sikawa.

Ntina monene mosusu ya ezalela wana ya mpasi ezali. Yango ezali bongo mposa oyo tosangolaki ya kosala mabe mpe ya kopesa basusu mpasi. Yehova ye moko amonisi polele ntina ya mabe oyo ekoki kopɛngolama te wana alobaki ete: “Makanisi na motema na moto izali mabe longwa na bolenge na ye.”​—Genese 8:21.

Mpo na nini nsango mabe ezali koyikana mingi?

Nzokande, ezali na ntina oyo mpo na yango nsango mabe esili koyikana mingi na ekeke oyo ya 20. Ntina wana emonisami polele kati na Biblia, oyo esakolaki ete bato ya ekeke oyo ya 20 basengelaki kokɔta na eleko moko ya ntango oyo eyebani lokola “mikolo ya nsuka,” to “ntango ya nsuka.” (2 Timoté 3:1; Danyele 12:4) Bisakweli mpe kronoloji ya Biblia ezali komonisa “eleko ya nsuka” ete ebandaki na mobu 1914. Mpo na bilembeteli ya sikisiki ya Makomami na ntina na likambo yango, talá mokapo 11 ya búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

Mikolo ya nsuka misengelaki kobanda na likambo moko oyo lisengelaki kosala ete na mbala moko nsango mabe eyikana awa na mabelé. Likambo nini? Ezalaki bongo kobwakama ya Satana Zábolo mpe mampinga ya bademó na ye na nsé. Okoki kotánga lisoló ya polele ya boyikani wana ya nsango mabe kati na Emoniseli 12:9, 12: “Dalagona yango monene abwakami, ye nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana, mozimbisi na bato na mokili mobimba; abwakami na nsé, baanze na ye mpe babwakami na ye elongo. . . . Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaka mokuse.”

Na yango kati na ntango moke oyo etikali kino kosukisama ya mikolo ya nsuka, tosengeli komizela ete nsango mabe eyikana mingi mpe ekóma mabe koleka.

Ekozala ntango nyonso bongo te

Ezali esengo mpo na bafandi na mabelé ete, ezalela ya mawa oyo ezali koyikanisa nsango mabe lelo oyo ekozala ntango nyonso bongo te. Ya solo, tokoki koloba na elikya nyonso ete mikolo oyo kati na yango mabe ekolanda koyikana mitikali mingi te. Tozali te kati na ezaleli ya kozanga elikya, atako makambo nini oyo makoki komonana lokola ete elikya ezali te. Nsuka ya nsango nyonso mabe esili kobɛlɛma mpe kozanga ntembe yango ekokóma na ntango ekanami na Nzambe.

Tokoki mpenza kondimisama na yango mpamba te esakolamaki ete mikolo ya nsuka mikosuka ntango Nzambe akobebisa mpe akolongola bantina nyonso ya nsango mabe. Akolongola bato mabe oyo babandisaka bitumba, baoyo baboyi kobongwana mpe baboyi kotika etamboli mabe na bango. Nsuka wana kati na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Mozwi-na-nguya-nyonso, oyo eyebani mingi lokola etumba ya Armagedon. (Emoniseli 16:16) Nokinoki nsima na yango, Satana Zábolo mpe mampinga na ye ya bademó bakokangama. Emoniseli 20:1-3 elobeli kokangama ya Satana, mobandisi ya nsango mabe nyonso: “Namonaki mwanze kokita na likoló, azalaki na lifungola na libulu bozindo, na monyɔlɔ́lɔ monene na lobɔkɔ na ye. Asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Motɛmɛli, Satana, mpe akangi ye na monyɔlɔ́lɔ mbula nkóto.”

Nsima ya makambo wana ya nsɔ́mɔ, ntango ya nsango malamu lokola oyo emonani naino te ekokómela mabelé mpe bafandi na yango. Kati na bafandi wana tokoki kotánga bamilió ya bato oyo bakobika na etumba monene ya Armagedon mpe bamiliare oyo bakosekwa longwa na mpɔngi ya kufa kati na nkunda. Bansango wana oyo eleki kitoko elobelami kati na mokanda ya nsuka ya Biblia ete: “Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Okoki kokanisa ntango wana ya esengo? Ya solo, ekozala ntango ya nkembo na mikolo mizali koya wana nsango mabe ekozala lisusu te. Ee, nsango mabe nyonso ekosila kolimwa mpe ekoyokana lisusu te. Nsango malamu ekoyikana bongo, mpe ekotonda mpo na libela.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto