Koyikana ya nsango mabe
OSILÁ naino komona te ete mitó ya masoló oyo eyebisaka nsango mabe ebendaka nokinoki likebi ya batángi mingi koleka oyo eyebisaka nsango malamu? Ezala mitó ya makambo na zulunalo oyo ezali kolobela likámá liuti na biloko bizalisami to masoló ya bilobaloba oyo makomami na makomi minene likoló na ezipeli ya zulunalo kitoko, emonani lokola ete bazulunalo oyo eyebisaka nsango mabe etekamaka mingi koleka oyo ezali koyebisa nsango malamu.
Lelo oyo nsango mabe ezangaka soko moke te. Kasi, mbala mosusu tokoki komituna soki bapanzi-nsango mpe bakomi-zulunalo bayekolaka bobele kolukaluka nsango mabe—na kotikáká nsango malamu.
Etondi mingi na boumeli ya lisoló mobimba ya bato
Ya solo, nsango mabe etondi mingi na boumeli ya ebele ya bikeke, eleki mpenza nsango malamu nyonso. Kati na mikanda ya makambo ya kala, kiló eleki mingi na ngámbo ya mpasi, ya mawa, mpe na ngámbo ya bato oyo bazangi elikya, makambo oyo mazali ntango nyonso kokwela bato.
Tiká tótalela mwa bandakisa. Búku Chronicle of the World, oyo ebimisamaki na Jacques Legrand, esangisi makambo ya kala liboke, oyo mokomoko na likambo yango ekomamaki na ntina na dati moko ya sikisiki oyo yango esalemaki kasi na lolenge oyo bakomi-zulunalo ya mikolo na biso bayebisaka likambo moko oyo lisalemaki. Na nzela ya bolukiluki wana oyo esalemaki na bosikisiki, tokoki komona kopalangana ya nsango mabe oyo bato basili koyoka na boumeli ya bomoi na bango oyo etondi na yikiyiki awa na etando Mabelé.
Libosoliboso, talá nsango oyo ya kala euti na Grèce na mobu 429 L.T.B. Ezali kolobela etumba oyo ebundamaki na eleko wana kati na bato ya mboka Atene mpe mboka Sparte: “Engumba-ekólo ya Potidaea emipesaki na mabɔkɔ ya mampinga ya engumba Atene oyo mazingaki yango, nsima ya konyokwama na nzala makasi na boye ete bato bakómaki kolya bibembe ya bakufi na bango.” Oyo ezali mpenza nsango mabe!
Soki tokei na ekeke ya yambo liboso ya ntango na biso, tokoyoka lisoló ya kobulunganisa ya kufa ya Jules César, oyo ezalaki na Loma, mokolo mwa 15 Mársi 44 L.T.B. “Jules César asili kobomama. Etuluku moko ya batomboki babomaki ye na mbeli, kati na bango ezalaki na baninga na ye ya penepene, wana aponamaki lisusu lelo na ndako ya likita ya Sénat, na mokolo ya 15 Mársi.”
Na boumeli ya bikeke oyo bilandaki, nsango mabe elandanaki mingi. Ndakisa moko na yango oyo ezali kopesa mpasi na motema ezali bongo nsango oyo ya Mexico na mobu 1487: “Kati na ebongiseli moko monene ya kopesa mbeka oyo esalemaki naino liboso te na Tenochtitlan, mboka-mokonzi ya ba Aztec, bato 20000 balongolamaki mitema na bango, oyo epesamaki mbeka epai na Huitzilopochtli, nzambe ya bitumba.”
Ezalaki te bobele ezaleli ya motema mabe ya bato nde ezalaki kobimisa nsango mabe kasi mpe ezaleli na bango ya bopɔtu ebakisaki mpasi na molɔngɔ́ wana molai. Emonani lokola ete kozikisama monene oyo ekwelaki engumba Londres ezali ndakisa ya likámá motindo yango. Lapólo moko oyo euti na Londres, na Angleterre, na mokolo ya 5 Sɛtɛ́mbɛ 1666 elobi ete: “Nsukansuka, nsima ya mikolo minei mpe butu minei, mɔ́tɔ ya Londres mosili kozimisama na nkumu ya engumba York, oyo asalelaki bituluku ya basodá oyo babundaka na mai mpe basalelaki babɔ́mbi mpo na kopanza bandako na nzela ya mɔ́tɔ. Etando monene ya baɛktarɛ 160 ezikisami elongo na bandakonzambe 87 mpe bandako koleka 13000 ebebisamaki. Likambo ya kokamwa, bobele bato libwa nde bakufaki.”
Tosengeli kobakisa na bandakisa wana ya nsango mabe nsango ya makɔnɔ mabe oyo mayambanelaka, oyo enyokolaki bato ya bakɔ́ntiná nyonso—na ndakisa bokɔnɔ ya kolerá oyo ebimaki na ebandeli ya bambula 1830. Motó ya lisoló na zulunalo oyo eyebisaki nsango yango elobi ete: “Likámá ya kolerá lizali kotungisa mikili ya Mpótó.” Lisoló ya solosolo oyo elandi ezali kolobela nsango mabe na nsɔ́mɔ nyonso: “Kolerá oyo eyebanaki te na mikili ya Mpótó kino mobu 1817, ezali kopalangana epai na wɛ́sti longwa na Azia. Bingumba minene ya Russie lokola Moscou mpe St. Petersbourg esilaki kobungisa ntálo monene ya bato na yango—ebele ya baoyo bakufaki bazalaki babólá oyo bafandaka kati na bingumba wana.”
Boyikani na bambula oyo euti koleka
Na yango atako nsango mabe ezali eteni ya bomoi ya bato na boumeli ya lisoló na bango mobimba, bambula oyo euti koleka na ekeke oyo ya 20 esili kopesa bilembeteli ete nsango mabe ezali koyikana, ya solo, ezali kokóla nokinoki.
Na ntembe te, nsango ya bitumba nde ezali nsango oyo eleki mabe. Bitumba oyo bileki monene kati na lisoló ya bato—oyo ebéngami na lolenge lobongi Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe Etumba ya Mibale ya mokili mobimba—eyokisaki mpenza nsango mabe na meko eleki nsɔ́mɔ. Kasi yango ezali bobele eteni moke ya nsango mabe oyo eyokani na ekeke oyo ya mawa.
Talá mwa ndambo ya mitó ya makambo oyo eponami likolólikoló:
Na mokolo ya 1 Sɛtɛ́mbɛ 1923: Koningana ya mabelé ebebisi Tokyo—bato 300000 bakufi; 20 Sɛtɛ́mbɛ 1931: Mpasi—Grande-Bretagne ekitisi motuya ya livre sterling; 25 Yúni 1950: Corée du Nord ebundisi Corée du Sud; 26 Ɔkɔtɔ́bɛ 1956: Bato ya mboka Hongrie batombokeli boyangeli ya Union Soviétique; 22 Novɛ́mbɛ 1963: John Kennedy abomami na masasi na engumba Dallas; 21 Augústo 1968: Makálo ya etumba ya Russie eyei kosukisa botomboki na Prague; 12 Sɛtɛ́mbɛ 1970: Bampɛpo oyo ekamatami na banganga-mobulu epaswami na bómbi kati na mokili mokauki; 25 Desɛ́mbɛ 1974: Mopɛpɛ makasi Tracy ebebisi engumba Darwin—bato 66 bakufi; 17 Apríli 1975: Cambodge ekwei na mabɔkɔ ya nguya ya bakoministe; 18 Novɛ́mbɛ 1978: Ebele ya bato bamibomi na Guyane; 31 Ɔkɔtɔ́bɛ 1984: Madame Gandhi abomami na masasi; 28 Yanuáli 1986: Fizé Navette spaciale epanzani na ntango ya kopumbwa; 26 Apríli 1986: Montɛlɛ ya nikleere oyo epesaka lotilíki na Union Soviétique epeli mɔ́tɔ; 19 Ɔkɔtɔ́bɛ 1987: Kokwea monene ya mosolo; 25 Mársi 1989: Alaska etungisami na kosopama ya pitɔlɔ́ kati na mai monene; 4 Yúni 1989: Bituluku ya basodá babomi ebele na bato na esika ya bato mingi na engumba ya Tiananmen.
Ee, lisoló ya bato limonisi ete nsango mabe ezali ntango nyonso mingi mpenza, nzokande nsango malamu ezali mpenza mingi te. Lokola nsango mabe esili koyikana na bambula oyo euti koleka, nsango malamu ezali sé kokita wana bambula ezali koleka.
Mpo na nini yango ezali bongo? Ekozala ntango nyonso bongo?
Lisoló lilandi likotalela mituna wana mibale.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
WHO/League of Red Cross