Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/6 nk. 12-17
  • Mapamboli to bilakeli mabe​—⁠Liponi ezali liboso na yo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapamboli to bilakeli mabe​—⁠Liponi ezali liboso na yo!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzela ya kozwa mapamboli emonani
  • Ezali boni mpo na bilakeli mabe?
  • Kosakolama ya mapamboli mpe ya bilakeli mabe
  • Tótala na likebi nyonso
  • Liponi oyo Yisalaele esalaki ekesanaki mpenza
  • Mapamboli to bilakeli mabe​—⁠Bandakisa mpo na biso lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • ‘Poná bomoi mpo ozala na bomoi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mokanda ya Biblia nimero 5—Deteronome
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Sɛkɛmɛ—Engumba oyo etongamaki kati na lobwaku
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/6 nk. 12-17

Mapamboli to bilakeli mabe​—Liponi ezali liboso na yo!

“Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.”​—DETERONOME 30:19.

1. Bato bapesamelaki likoki nini?

YEHOVA NZAMBE asalaki biso bato, bikɛlamu na ye ya mayele, ete tózala na bonsomi ya kozwa bikateli. Tozalisamaki te lokola bamasini, kasi topesamelaki libaku mpe mokumba ya kopona kosala makambo oyo tolingi. (Nzembo 100:3) Bato ya liboso​—Adama na Eva​—bazalaki na bonsomi ya kopona nzela oyo balingaki kolanda, mpe basengelaki kozongisa monoko epai na Nzambe mpo na liponi na bango.

2. Liponi nini Adama asalaki, mpe ebimisaki likambo nini?

2 Mozalisi asalaki ebele ya biloko mpo ete bato bázwa mapamboli ya seko na paladiso awa na mabelé. Mpo na nini mokano yango ekokisamá naino te? Mpamba te Adama asalaki liponi ya mabe. Yehova apesaki mobali yango etindá oyo: “Okoki kolya mbuma na nzeté nyonso na elanga, nde mbuma na nzeté na koyeba malamu na mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Soki Adama aponaki kotosa etindá yango, mbɛlɛ baboti na biso ya liboso bazwaki mapamboli. Kozanga botosi ememelaki bango liwa. (Genese 3:6, 18, 19) Na yango, lisumu mpe liwa ekɔtaki epai na bakitani nyonso ya Adama.​—Baloma 5:12.

Nzela ya kozwa mapamboli emonani

3. Lolenge nini Nzambe apesaki endimiseli ete mokano na ye likoló na bato ekokokisama?

3 Yehova Nzambe atyaki esaleli moko oyo na nzela na yango, nsukansuka, mokano na ye ya kopambola bato ekokokisama. Ye moko alakaki ete asengelaki kobimisa Mombóto, wana asakolaki kati na Edene ete: “Nakotya koyinana kati na yo mpe mwasi mpe kati na mombóto na yo mpe mombóto na ye. Akonyata yo na motó mpe yo okoswa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Na nsima, Nzambe alakaki ete bato basengelaki kozwa mapamboli na nzela ya Mombóto wana, mokitani ya Abalayama.​—Genese 22:15-18.

4. Ebongiseli nini Yehova asalaki mpo na kopambola bato?

4 Mombóto yango oyo alakamaki, oyo asengelaki komema mapamboli, ezalaki bongo Yesu Klisto. Na ntina na mokumba na Ye kati na ebongiseli ya Yehova mpo na kopambola bato, ntoma moklisto Paulo akomaki ete: “Nzambe amonisi bolingo na ye mpo na biso na nzela oyo: naino ezalaki biso bato na masumu, Klisto akufelaki biso.” (Baloma 5:8) Mapamboli makopesama epai na bato bauti na mokili ya masumu, kasi bazali kotosa Nzambe mpe bazali kosala makasi bámonisa ete babongi kozwa litomba kati na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. (Misala 4:12) Okopona botosi mpe mapamboli? Kozanga botosi ekomemela yo likambo oyo likeseni na lipamboli.

Ezali boni mpo na bilakeli mabe?

5. Liloba “elakeli mabe” elimboli nini?

5 Oyo ekesani na lipamboli ezali bongo elakeli mabe. Liloba “elakeli mabe” elimboli koloba mabe na ntina na moto moko to kosakola likambo ya mabe likoló na ye. Liloba ya Liebele qela·lahʹ euti na liloba oyo ya moboko qa·lalʹ, oyo elimboli mpenza “kozala pɛpɛlɛ.” Nzokande, na ntango esalelami na elobeli ya elilingi, elimboli ‘kobénga mabe likoló na’ to ‘kotyola.’​—Levitike 20:9; 2 Samwele 19:43.

6. Likambo nini likómelaki Elisa pene na mboka Betele na ntango ya kala?

6 Tótalela ndakisa moko ya kobenda likebi kati na likambo oyo esalemaki nokinoki, kobimisáká bongo elakeli mabe. Likambo yango esalemaki na ntango mosakoli Elisa azalaki kotambola longwá na Yeliko kino na Betele. Lisoló yango lilobi ete: “Ekendaki ye na nzela, bana mike babimaki na mboka, batukaki ye, balobaki na ye ete, Butá, yo moto na libandi! Butá, yo moto na libandi! Abongwanaki mpe atalaki bango, afingaki [“abéngaki mabe likoló na,” NW] bango na nkombo na [Yehova]. Mpe nkosi [“ngombolo,” NW] mibale basi babimaki na zamba mpe bapasolaki bana ntuku minei na mibale na bango.” (2 Mikonzi 2:23, 24) Maloba ya sikisiki oyo Elisa abimisaki na ntango alakaki mabe likoló na bana wana oyo bazalaki kosɛka ye mayebisami te. Nzokande, maloba yango makokisamaki solo mpamba te malobamaki na nkombo na Yehova na nzela ya mosakoli ya Nzambe oyo azalaki kosala na boyokani na mokano na Ye.

7. Nini ekómelaki bana oyo basɛkaki Elisa, mpe mpo na nini?

7 Emonani ete ntina ya liboso mpenza mpo na yango bana wana bazalaki kosɛka ye ekokaki kozala ete Elisa alataki bilamba ya mosala oyo Eliya azalaki kolata mingimingi, mpe bana yango balingaki te ete mokitani moko ya mosakoli yango azala na mboka na bango. (2 Mikonzi 2:13) Mpo na kondimisa solo ete azalaki mpenza mokitani ya Eliya mpe mpo na koteya bilenge wana mpe baboti na bango ntina ya kozala na botosi ebongi epai na mosakoli ya Yehova, Elisa abéngaki mabe na nkombo na Nzambe likoló na etuluku ya bana wana oyo bazalaki kosɛka ye. Yehova amonisaki ete andimaki Elisa lokola mosakoli na ye na kosaláká na boye ete ngombolo mibale ya basi ebima na zamba mpe ekatakata bana 42 kati na baoyo bazalaki kotyola ye. Yehova azwaki ekateli wana ya makasi mpamba te bamonisaki polele kozanga botosi na bango liboso na mwango ya kosolola oyo azalaki kosalela awa na mabelé na eleko wana.

8. Bayisalaele bandimaki kosala nini mpe yango elingaki komemela bango nini?

8 Mwa bambula liboso, Bayisalaele bamonisaki kozanga botosi motindo yango na bibongiseli ya Nzambe. Talá lolenge yango elekaki: Na mobu 1513 L.T.B., Yehova amonisaki ngɔlu epai na bato ya Yisalaele na kobimisáká bango na boombo na Ezipito, komemáká bango lokola “na mapapu ya mpongo.” Mwa moke na nsima, balapaki ndai ya kotosa Nzambe. Tótala lolenge nini botosi mpe kozwa ngɔlu ya Nzambe ezali makambo mibale oyo makoki kokabolama soko moke te. Yehova alobaki na nzela ya Mose ete: “Soko bokotosa monɔkɔ na ngai mpe [bokobatela] kondimana na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai mpenza kati na bato nyonso, mpo ete mokili mobimba ezali na ngai.” Na nsima, bato bandimaki, na kolobáká ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].” (Exode 19:4, 5, 8; 24:3) Bayisalaele balobaki ete balingaki Yehova, ete bamipesaki epai na ye, mpe balakaki ete bakotosa mongongo na ye. Botosi epai na Yehova elingaki komemela bango mapamboli minene.

9, 10. Na ntango Mose azalaki na Ngomba Sinai, Bayisalaele basalaki nini, mpe yango ebimisaki makambo nini?

9 Nzokande, liboso ete malako ya moboko oyo mazwamaki kati na kondimana yango makomama likoló na libangá na lisalisi ya ‘mosapi na Nzambe,’ emonanaki ete elakeli mabe esengelaki kokwela bango. (Exode 31:18) Mpo na nini ebongaki mpenza ete makambo wana ya mpasi makómela bango? Bayisalaele basilaki komonisa mposa ya kosala nyonso oyo Yehova asilaki koloba, boye te? Ee, na maloba, bamonisaki ete bazalaki na mposa ya mapamboli, kasi na misala na bango, baponaki nzela oyo esengelaki komemela bango bobele bilakeli mabe.

10 Na boumeli ya mikolo 40 oyo Mose alekisaki na Ngomba Sinai mpo na kozwa Mibeko Zomi, Bayisalaele babukaki elaka oyo basilaki kosala ya kozala ntango nyonso sembo epai na Yehova. Lisoló lilobi ete: “Emonaki bato ete Mose aumelaki na kokita ngomba, bato yango bayanganaki epai na Alona mpe balobelaki ye ete, Tɛmá mpe salelá biso nzambe oyo akokenda liboso na biso. Mpo na Mose oyo, moto abimisaki biso na Ezipito, toyebi te soko likambo nini ekweli ye.” (Exode 32:1) Wana ezali ndakisa mosusu ya kozanga limemya oyo bamonisaki epai na moto oyo Yehova azalaki kosalela na eleko yango mpo na kotambwisa mpe kokamba libota na ye. Bayisalaele bazimbisamaki na kolandáká losambo ya bikeko ya Baezipito mpe babukaki nde mbuma ya nsɔ́mɔ, bato soko 3 000 kati na bango babomamaki na mopanga na mokolo moko.​—Exode 32:2-6, 25-29.

Kosakolama ya mapamboli mpe ya bilakeli mabe

11. Malako nini matali mapamboli mpe bilakeli mabe Yosua akokisaki yango?

11 Pene na nsuka ya mobémbo oyo Bayisalaele basalaki na boumeli ya mbula 40 kati na mokili mokauki, Mose atángaki mapamboli oyo bakokaki kozwa soki batosaki Nzambe. Alobelaki mpe bilakeli mabe oyo Bayisalaele basengelaki kozwa soki baponaki kozanga botosi epai na Yehova. (Deteronome 27:11–28:10) Mwa moke nsima wana Yisalaele ekɔtaki na Mokili na Ndaka, Yosua akokisaki malako ya Mose oyo matalelaki mapamboli mpe bilakeli mabe. Mabota motoba ya Yisalaele batɛlɛmaki pene na Ngomba Ebali, mpe mabota mosusu motoba batɛlɛmaki liboso na Ngomba Gelizimi. Balevi batɛlɛmaki na lobwaku oyo ezalaki katikati na bangomba wana. Emonani ete mabota oyo batɛlɛmaki liboso na Ngomba Ebali bandimaki ete “Ezala bongo!” mpo na bilakeli mabe, oyo etángamaki na ngámbo na bango. Basusu oyo bazalaki pene na Ngomba Gelizimi bayanolaki na mapamboli oyo Balevi batángaki na ngámbo na bango.​—Yosua 8:30-35.

12. Wapi mwa ndambo ya bilakeli mabe oyo Balevi basakolaki?

12 Kanisá naino ete ozalaki koyoka wana Balevi bazalaki koloba, ete: “Tiká alakelama mabe, moto oyo akosala elilingi ekatami soko enangwi, eloko na mbindo na miso na [Yehova], eloko esalami na mabɔkɔ na mosáli, mpe akotɛmisa yango na esika na nkuku. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akotyola tata na ye soko mama na ye. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akobikola ndelo na mozalani na ye. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akopɛngwisa moto na miso makufi na nzela. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akobebisa likambo na sembo na mopaya to na etike to na mwasi-akufeli-mobali. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akolala na mwasi na tata na ye, mpo ete akolala na ye oyo azali na tata na ye. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo alali na nyama soko na motindo nini. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo alali na ndeko na ye mwasi, soko ye azali mwana na tata na ye to mwana na mama na ye. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo alali na bokilo na ye mwasi. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo abomi mozalani na ye na nkuku. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo akamati lifuti mpo na koboma moyengebene. . . . Tiká alakelama mabe, moto oyo alendisi monɔkɔ na mibeko oyo te mpo na kosala yango te.” Nsima ya elakeli mabe mokomoko, mabota oyo batɛlɛmaki liboso na Ngomba Ebali bayanolaki ete: “Ezala bongo!”​—Deteronome 27:15-26.

13. Na maloba na yo moko, lolenge nini okoki koyebisa mwa ndambo ya mapamboli oyo Balevi basakolaki?

13 Sikawa, kanisá ete ozalaki koyoka baoyo bazalaki liboso na Ngomba Gelizimi koyanola na mongongo makasi na lipamboli mokomoko wana Balevi bazalaki kosakola ete: “Okopambolama na mboka mpe okopambolama na elanga. Bana na yo bakopambolama, mpe mbuma na elanga na yo, mpe bana na bibwɛlɛ na yo, bana na bangɔmbɛ na yo mpe bana na bampate na yo. Ekɔlɔ́ na yo mpe esalelo na yo na kwanga ikopambolama. Okopambolama na ntango na kokɔta na yo mpe okopambolama na ntango na kobima na yo.”​—Deteronome 28:3-6.

14. Nini elingaki kopesa Bayisalaele nzela ya kozwa lipamboli?

14 Basengelaki kosala nini mpo na kozwa mapamboli wana? Lisoló yango lilobi ete: “Soko okotosa mongongo na [Yehova] Nzambe na yo mpe okosɛnzɛla ete osala malako na ye nyonso oyo elakeli ngai yo lelo, mbɛ [Yehova] Nzambe na yo akonɛtɔla yo na likoló na mabota nyonso na nsé. Mapamboli oyo nyonso makokwela yo mpe makobila yo, soko okotosa mongongo na [Yehova] Nzambe na yo.” (Deteronome 28:1, 2) Ee, likambo ya ntina oyo basengelaki kosala mpo na kozwa mapamboli ya Nzambe ezalaki bongo kotosa Nzambe. Kasi ezali boni mpo na biso lelo oyo? Mokomoko na biso akopona mapamboli mpe bomoi na kokóbáká ‘kotosa mongongo na [Yehova]’?​—Deteronome 30:19, 20.

Tótala na likebi nyonso

15. Likambo nini ya ntina mingi ezwami kati na lipamboli oyo elobelami na Deteronome 28:3, mpe lolenge nini tokoki kozwela yango litomba?

15 Tiká ete tókanisa likoló na mwa ndambo ya mapamboli oyo Moyisalaele moko akokaki kozwa na ntina na botosi na ye epai na Yehova. Na ndakisa, Deteronome 28:3 elobi ete: “Okopambolama na mboka mpe okopambolama na elanga.” Kopambolama na Yehova etaleli te esika moto afandaka to mokumba oyo azali na yango. Basusu bakoki komona lokola ete ezalela ya makambo na bango ezali motambo mpo na bango, ekoki kozala mpo ete bazali kofanda na mboka oyo ezalela ya nkita ezali malamu te to na mboka oyo ebebisami na bitumba. Basusu bakoki koyoka mposa ya kokende kosalela Yehova na mboka mosusu. Mibali baklisto mosusu bakoki kolɛmba nzoto mpamba te bazali kopona bango te lokola basaleli na misala to bankulutu kati na lisangá. Na bantango mosusu, basi baklisto balɛmbaka na motema mpamba te ezalela ya makambo na bango ezali kopesa bango nzela te ya kosala mosala ya mobongisi-nzela to ya misionɛrɛ. Nzokande, moto na moto oyo ‘atosaka mongongo ya Yehova mpe akokisaka masɛngami na ye nyonso na bokɛngi mpenza’ akopambolama sikawa mpe seko na seko.

16. Lolenge nini lilako oyo lizwami kati na Deteronome 28:4 ezali lelo oyo kokokisama kati na lisangá ya Yehova?

16 Deteronome 28:4 elobi ete: “Bana na yo bakopambolama, mpe mbuma na elanga na yo, mpe bana na bibwɛlɛ na yo, bana na bangɔmbɛ na yo mpe bana na bampate na yo.” Kosalelama ya liloba ya Liebele oyo ezali kotalela moto moko, oyo ebongolami ete “yo,” emonisi ete ezalaki bongo likambo litalelaki Moyisalaele mokomoko oyo azalaki na botosi. Ezali boni mpo na basaleli ya Nzambe oyo bazali na botosi lelo oyo? Bokóli mpe koyeisama monene oyo ezali kosalema kati na lisangá ya Yehova euti bongo na lipamboli oyo Yehova azali kosopa likoló na milende ya basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe koleka 5 000 000. (Malako 13:10) Mpe likoki ya kozwa bokóli monene lisusu koleka ezali komonana polele mpamba te bato koleka 13 000 000 bayanganaki na molulu ya Elambo ya Mpokwa ya Nkolo oyo esalemaki na mobu 1995. Ozali kozwa mapamboli ya Bokonzi?

Liponi oyo Yisalaele esalaki ekesanaki mpenza

17. ‘Kobilama’ na mapamboli to na bilakeli mabe etalelaki makambo nini?

17 Ya solo, mapamboli masengelaki kokómela Moyisalaele ya botosi. Elaka oyo epesamaki, ete: “Mapamboli oyo nyonso makokwela yo mpe makobila yo.” (Deteronome 28:2) Bobele bongo, elobamaki na ntina na bilakeli mabe ete: “Bilakeli mabe nyonso oyo bikokwela yo mpe bikozwa yo.” (Deteronome 28:15) Soki ozalaki Moyisalaele na ntango ya kala, mbɛlɛ mapamboli malingaki ‘kobila’ yo to nde bilakeli mabe? Yango esengelaki kotalela soki ozalaki na botosi epai na Nzambe to soki ozalaki na kozanga botosi.

18. Lolenge nini Bayisalaele mbɛlɛ bakokaki kopɛngola bilakeli mabe?

18 Kati na Deteronome 28:15-68, mbuma mabe ya kozanga botosi elobelami lokola bilakeli mabe. Mosusu kati na yango ezali mpenza nde bokeseni ya mapamboli oyo matángami na Deteronome 28:3-14. Mingimingi, Bayisalaele bazalaki kobuka mbuma ya mpasi euti na bilakeli mabe mpamba te baponaki komipesa na losambo ya lokuta. (Ezɛla 9:7; Yilimia 6:6-8; 44:2-6) Oyo nde mawa! Bakokaki kopɛngola mbuma mabe wana soki basalaki liponi malamu, oyo ya kotosa mibeko mpe mitindá malamu ya Yehova, oyo ezali komonisa polele malamu na mabe. Bato mingi lelo oyo bazali na mpasi mpe na mawa monene mpamba te baponaki kosala oyo ekeseni na mitindá ya Biblia na kosaleláká losambo ya lokuta, na komipesáká na pite, na kosaleláká bilangwiseli, na komipesáká na milángwá, mpe na makambo mosusu ya mabe motindo yango. Lokola esalemaki na Yisalaele mpe na Yuda ya Kala, kosala maponi mabe motindo wana ememaka koboyama na Nzambe mpe mpasi ezangi ntina kati na motema.​—Yisaya 65:12-14.

19. Lobelá ezalela ya makambo ezalaki kati na Yuda mpe Yisalaele na ntango baponaki kotosa Yehova.

19 Mapamboli mazalaki mingi mpe kimya ezalaki na Yisalaele wana bazalaki kotosa Yehova. Na ndakisa, mpo na oyo etali mikolo na Mokonzi Salomo, tozali kotánga ete: “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo. . . . Yuda mpe Yisalaele bafandaki na kimya longwá na Dani kino Bele-seba, moto na moto na nsé na mowiti na ye na vinyo mpe na nzeté na ye na mbuma, mikolo nyonso na Salomo.” (1 Mikonzi 4:20-25) Ata na eleko ya Mokonzi Davidi, oyo na boumeli na yango Yisalaele ezwaki botɛmɛli makasi ya banguna ya Nzambe, ekólo yango emonaki ete Yehova azalaki kosunga bango mpe kopambola bango wana baponaki kotosa Yehova Nzambe ya solo.​—2 Samwele 7:28, 29; 8:1-15.

20. Nzambe andimisami na likambo nini mpo na oyo etali bato?

20 Okotosa Nzambe to okozanga kotosa ye? Bayisalaele basengelaki kosala liponi. Atako biso banso tosilá kosangola momeseno ya kosala masumu uta na Adama, tozwi mpe likabo ya kopona oyo tolingi kosala. Atako Satana azali, mokili oyo mabe ezali, bakisá mpe bizaleli na biso ya kozanga kokoka, kasi tokoki mpe kosala liponi malamu. Lisusu, Mozalisi na biso andimisami solo ete ata kati na komekama mpe masenginya oyo makoki kobima, ekozala na baoyo bakosala liponi malamu, bobele na maloba mpamba te, kasi lisusu na misala. (1 Petelo 5:8-10) Okozala kati na bango?

21. Tokotalela nini kati na lisoló lilandi?

21 Na lisoló lilandi, tokozwa likoki ya kotalela na mozindo bizaleli na biso mpe misala na biso na kotaleláká bandakisa ya bato ya kala. Tiká ete mokomoko na biso andima na botɔ́ndi nyonso maloba oyo Nzambe alobaki na Mose ete: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.”​—Deteronome 30:19.

Okoyanola lolenge nini?

◻ Lolenge nini Yehova asalaki ete bato ya masumu bázala na likoki ya kozwa mapamboli?

◻ Bilakeli mabe bizali nini?

◻ Lolenge nini Bayisalaele mbɛlɛ bakokaki kozwa mapamboli na esika ya bilakeli mabe?

◻ Mapamboli nini Bayisalaele bazwaki wana bazalaki kotosa Nzambe?

[Elilingi na lokasa 15]

Bayisalaele bayanganaki liboso na Ngomba Gelizimi mpe na Ngomba Ebali

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Pictoral Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto