Mapamboli to bilakeli mabe—Bandakisa mpo na biso lelo
“Makambo oyo mayeli bango lokola bilakiseli [“bandakisa,” “NW”] ikomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.”—1 BAKOLINTI 10:11.
1. Bobele lokola moto akoki kotalatala esaleli moko, eloko nini tosengeli kotalela yango na mozindo?
ESALELI moko ya ebende ekoki kobanda koguga mokemoke kozanga ete eyebana mpamba te epakolami lángi. Ekoki kokamata mwa ntango liboso ete koguga yango emonana polele. Bobele bongo, bizaleli mpe bamposa ya nsé ya motema ya moto ekoki kobanda kobeba ntango molai liboso ete ebimisa mbuma mabe to liboso ete bato mosusu bámona yango. Lokola toyebi ete ezali likambo ya mayele kotalela malamu esaleli moko mpo na koyeba soki ebandi koguga, bobele bongo kotalela motema na biso na mozindo mpe kobongisa yango na ntango malamu ekoki kobatela bosembo na biso ya boklisto. Na elobeli mosusu, tokoki kozwa mapamboli ya Nzambe mpe kopɛngola bilakeli mabe biuti na Nzambe. Basusu bakoki kokanisa ete mapamboli mpe bilakeli mabe oyo bisakolamaki likoló na Yisalaele ya kala ezali na ntina mingi te mpo na baoyo bazali kobika na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo. (Yosua 8:34, 35; Matai 13:49, 50; 24:3) Nzokande, ezali bongo te. Tokoki kozwa matomba mingi uta na bandakisa oyo ezali mpenza makebisi mpo na biso na kotalela makambo oyo makómelaki Yisalaele, lokola eyebisami na 1 Bakolinti mokapo 10.
2. Mokapo ya 1 Bakolinti 10:5, 6 elobi nini na ntina na makambo oyo Bayisalaele bakutanaki na yango kati na esobe?
2 Ntoma Paulo akokanisaki Bayisalaele oyo bazalaki na nsé ya litambwisi ya Mose na Baklisto oyo bazali na nsé ya litambwisi ya Klisto. (1 Bakolinti 10:1-4) Atako libota ya Yisalaele mbɛlɛ bakokaki kokɔta banso na Mokili ya Ndaka, “nde Nzambe asepelaki na mingi na bango te, mpo ete bakweisamaki kati na lisobe.” Na yango, ntoma Paulo ayebisaki baninga na ye baklisto ete: “Makambo oyo nyonso mazali elakiseli [“ndakisa,” “NW”] epai na biso ete tózala na mposa na mabe te pelamoko ezalaki bango na mposa.” (1 Bakolinti 10:5, 6) Mposa ekólaka kati na motema; na yango tosengeli kotya likebi na bandakisa oyo Paulo atángi yango lokola makebisi.
Likebisi likoló na losambo ya bikeko
3. Lolenge nini Bayisalaele basalaki lisumu na likambo litali ekeko ya mwana na ngɔmbɛ esalemi na wolo?
3 Likebisi ya liboso oyo Paulo apesaki elobi ete: “Bózala basambeli na bikeko te pelamoko basusu na bango. Lokola ekomami ete, Bato bafandaki kolya mpe komela mpe batɛlɛmaki mpo na kobina.” (1 Bakolinti 10:7) Ndakisa oyo epesami lokola likebisi elobeli lolenge oyo Bayisalaele bazongelaki mitindo ya bomoi ya Ezipito mpe lolenge basalaki ekeko ya mwana na ngɔmbɛ na wolo mpo na kosambela yango. (Exode, mokapo 32) Moyekoli Sɛtɛfanɔ alobelaki mozindo ya likambo yango wana ayebisaki ete: “Batata na biso balingaki kotosa [Nzambe] te, kasi bapusi ye na pembeni, mpe na mitema na bango bazongi na Ezipito. Balobi na Alona ete, Salelá biso banzambe oyo bakokenda liboso na biso; mpo ete na ntina na Mose oyo abimisi biso na mokili na Ezipito, toyebi te soko likambo nini ebimeli ye. Na mikolo yango basali ekeko na motindo na mwana na ngɔmbɛ na wolo, mpe bakabi mbeka na ekeko yango, mpe basepeli misala na mabɔkɔ na bango.” (Misala 7:39-41) Tomoni ete “na mitema na bango,” Bayisalaele wana ya motó makasi bakólisaki bamposa mabe kati na bango, yango ememaki bango na losambo ya bikeko. “Basali ekeko na motindo na mwana na ngɔmbɛ, mpe bakabi mbeka na ekeko yango.” Lisusu, “basepeli na misala na mabɔkɔ na bango.” Miziki, nzembo, mabina, kolya mpe komela ezalaki. Emonani polele ete losambo ya bikeko ezalaki kolɛngola bango mpe epesaki bango libaku ya kominanola.
4, 5. Misala nini ya losambo ya bikeko tosengeli kopɛngola yango?
4 Oyo ekokani lelo na Ezipito—mokili ya Satana—ezali mpenza kosambela kominanola. (1 Yoane 5:19; Emoniseli 11:8) Ezali kosambela basani, bayembi, bavɛdɛti na masano, bakisá mpe mabina na bango, miziki na bango, makanisi na bango mpo na oyo etali bisengo mpe kosepelisa nzoto. Mingi bakutanaki na masenginya ya komikɔtisa mobimba kati na kominanola atako bazali komitánga basambeli ya Yehova. Wana esengeli ete moklisto moko apamelama na ntina na likambo ya mabe oyo asalaki, mingimingi ezaleli ya bolɛmbu na ye ya elimo ekoki komonana ete yango ebandaki libosoliboso na komela masanga, na kobina, mpe na kosepelisa nzoto na lolenge moko to mosusu oyo ekokani na losambo ya bikeko. (Exode 32:5, 6, 17, 18) Lolenge mosusu ya kominanola ebongi malamu mpenza mpe epesaka esengo. Nzokande, lelo oyo miziki, mabina, bafilme, mpe bakasɛti video mingi ya mokili ekólisaka mposa ya nzoto na lolenge ya mabe.
5 Baklisto ya solo bamitikaka te na losambo ya bikeko. (2 Bakolinti 6:16; 1 Yoane 5:21) Biso mpe tosengeli kozala na bokɛngi ete tókóma te baombo ya kominanola oyo ememaka na losambo ya bikeko mpe ete tózwa te mitungisi oyo mibimaka mpo na komipesa na kosepelisa nzoto na lolenge ya bato ya mokili. Soki tomitiki ete mokili etambolisa biso, bamposa mpe bizaleli mabe bikoki mpenza kozwa esika kati na makanisi mpe mitema na biso kozanga ete tókoka koyeba. Soki esembolami te, nsukansuka, ekoki komema na ‘kokweisama kati na lisobe’ oyo ete mokili ya Satana.
6. Ekateli nini malamu tokoki kokamata na ntina na kominanola?
6 Na ndakisa ya Mose ntango likambo ya ekeko ya mwana na ngɔmbɛ esalemi na wolo ebimaki, lelo “moombo na sembo mpe na mayele” azali solo koloba ete: “Soko nani azali moto na [Yehova] aya epai na ngai.” Soki tozwi ekateli oyo ezali komonisa ete totɛlɛmi ngwi kati na losambo ya solo tokobikisa bomoi na biso. Libota ya Levi, oyo Mose autaki na yango, basalaki nokinoki mpo na kobengana bopusi mabe. (Matai 24:45-47; Exode 32:26-28) Na yango, tóponaka na bokɛngi nyonso lolenge ya kominanola, miziki, bakasɛti video, mpe makambo mosusu ya motindo yango. Soki ezali ya mabe na lolenge moko to mosusu, zwá ekateli ya komitya na ngambo ya Yehova. Na kotyáká motema epai na Nzambe kati na libondeli, salá mbongwana kati na liponi mpo na oyo etali kominanola mpe miziki, tumbá biloko nyonso oyo bikoki kobebisa elimo na yo, lokola Mose atumbaki ekeko ya mwana na ngɔmbɛ esalemi na wolo.—Exode 32:20; Deteronome 9:21.
7. Lolenge nini tokoki kobatela motema na biso ya elilingi?
7 Lolenge nini tokoki kopɛngola ete motema na biso ebebisama te? Na koyekoláká Liloba ya Nzambe na etingya nyonso, na kotikáká ete solo na yango ezwa esika kati na makanisi mpe kati na mitema na biso. (Baloma 12:1, 2) Ya solo, tosengeli koyangana na makita ya boklisto pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. (Baebele 10:24, 25) Bobele koyangana mpamba na makita ekoki kokokanisama na kopakola lángi likoló na esika oyo esilá koguga. Yango ekoki kongɛngisa biso mpo na mwa ntango moke, kasi ekosilisa te mokakatano oyo mobombami na nsé. Nzokande, na komibongisáká liboso, na komanyoláká, mpe kopesáká biyano na makita, tokoki kolongola na mpiko nyonso biloko ya libebisi oyo ekoki kofanda na nsé ya mitema na biso ya elilingi. Yango ekosunga biso ete tókoka kokangama na Liloba ya Nzambe mpe ekopesa biso makasi ya koyika mpiko wana kondima na biso etyami kati na komekama mpe ekokómisa biso bato “babongi kozanga eloko te.”—Yakobo 1:3, 4; Masese 15:28.
Likebisi likoló na pite
8-10. (a) Ndakisa nini ya likebisi elobelami kati na 1 Bakolinti 10:8? (b) Lolenge nini maloba ya Yesu oyo mazwami kati na Matai 5:27, 28 makoki kosalelama mpo na kozwela yango litomba?
8 Kati na ndakisa oyo Paulo alobelaki na nsima, apesaki biso toli oyo ete: “Ekoki ete tósala makambo na pite te pelamoko bamosusu na bango basalaki pite mpe bakweaki bato nkóto ntuku mibale na misato na mokolo moko.”a (1 Bakolinti 10:8) Ntoma Paulo azalaki kolobela ntango oyo Bayisalaele bangumbamelaki banzambe ya lokuta mpe ‘basalaki ekobo na bana basi na Moaba.’ (Mituya 25:1-9) Pite ememaka etumbu ya liwa! Kotika ete makanisi mabe mpe bamposa mabe eumela kati na biso ezali lokola kotika nzela na “koguga” kati na motema. Yesu alobaki ete: “Boyoki ete balobaki boye, Salá ekobo te. Nde ngai nazali koloba na bino ete, ye nani akotala mwasi na mposa mabe na ye, asili kosala na ye ekobo na motema na ye.”—Matai 5:27, 28.
9 Mbuma mabe oyo ebimaka mpo na ‘kotala mwasi na mposa mabe’ emonani polele kati na likambo libimaki ntango baanzelu oyo bazangaki botosi liboso ya Mpela na eleko ya Noa bamitikaki kolɛngolama na makanisi ya mbindo. (Genese 6:1, 2) Tómikundola mpe ete, moko na makambo ya mpasi mingi oyo makómelaki Mokonzi Davidi kati na bomoi na ye esalemaki mpo ete akóbaki kotala mwasi moko na mposa mabe. (2 Samwele 11:1-4) Na bokeseni, Yobo, mobali oyo asilaki kobala mpe azalaki moto na sembo ‘asalaki kondimana na miso na ye ete atala te epai na moseka,’ na yango apɛngolaki pite mpe amonisaki ete azalaki mosembwi. (Yobo 31:1-3, 6-11) Miso ezali lokola maninisa ya motema. Mpe motema mobebisami nde ebimisaka makambo mabe mingi.—Malako 7:20-23.
10 Soki tosaleli maloba ya Yesu, tokotika te ete makanisi mabe mayangela biso na kotaláká bafilme mpe na kotángáká mikanda oyo elakisaka pite to na kokólisáká makanisi ya kosala pite na moninga moklisto moko, na moninga moko ya mosala, to na moto mosusu nyonso. Koguga elongolamaka likoló na ebende te bobele na kopangwisáká esika oyo egugi. Na yango, kobengana makanisi ya pite bobele na mwa nguya moke te lokola nde ezali likámá monene te. Kamatá meko ya nguya mpenza mpo na kobengana makanisi ya pite. (Kokanisá na Matai 5:29, 30.) Paulo alendisi baninga na ye bandimi ete: “Bóboma bizaleli na bino biuti na nsé: pite, mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela oyo ezali losambo na bikeko. Nkanda na Nzambe ezali koya mpo na makambo na ndenge yango.” Ee, likoló na makambo motindo oyo lokola pite, “nkanda na Nzambe ezali koya” lokola elembo ya elakeli mabe na ye. Na yango tosengeli “koboma” binama ya nzoto na biso na ntina na makambo motindo wana.—Bakolose 3:5, 6.
Likebisi likoló na botomboki mpe komilelalela
11, 12. (a) Likebisi nini lipesami kati na 1 Bakolinti 10:9, mpe likambo nini lilobelami kati na yango? (b) Likebisi ya Paulo esengeli kozala na bopusi nini likoló na biso?
11 Paulo apesi lisusu likebisi ete: “Ekoki te ete tómeka Nkolo pelamoko bamosusu na bango bamekaki ye mpe babomamaki na nyoka.” (1 Bakolinti 10:9) Wana bazalaki kosala mobémbo kati na esobe pene na ndelo ya Edome, Bayisalaele “basilikaki na Nzambe mpe na Mose ete, Bobimisaki biso na Ezipito mpo na kokufa na lisobe mpo na nini? Mpo ete biloko na kolya bizali te mpe mai ezali te, mpe biloko mabe oyo ebai biso,” balingaki kolobela mana oyo epesamaki na lolenge ya likamwisi. (Mituya 21:4, 5) Kanisá naino! Bayisalaele wana “basilikaki na Nzambe,” na kotyoláká makambo malamu oyo asalelaki bango!
12 Na komilelalela na bango, Bayisalaele bamekaki motema pɛtɛɛ ya Yehova. Bazwaki etumbu, mpamba te Yehova atindaki nyoka mabe kati na bango, mpe mingi bakufaki mpo baswamaki na nyoka. Nsima wana bato babongolaki motema mpe ete Mose abondelaki na ntina na bango, etumbu yango esilaki. (Mituya 21:6-9) Na ntembe te, likambo yango esengeli kozala likebisi mpo na biso ete tómonisa te elimo ya botomboki, ya komilelalela, mingi mpenza liboso na Nzambe mpe bibongiseli na ye ya Teokrasi.
Likebisi likoló na ezaleli ya koimaima
13. Mokapo ya 1 Bakolinti 10:10 ezali kokebisa biso na likambo nini, mpe ntoma Paulo alingaki kolobela botomboki nini?
13 Wana atángaki ndakisa na ye ya nsuka na ntina na Bayisalaele kati na esobe, Paulo akomaki ete: “Ekoki te ete tóimaima pelamoko bamosusu na bango baimaimaki mpe babebisami na Mobebisi.” (1 Bakolinti 10:10) Botomboki ebimaki na ntango Kola, Datana, Abilama mpe bato oyo basanganaki na bango elongo basalaki na kozanga kotosa ebongiseli ya Teokrasi mpe babɛtelaki bokonzi ya Mose mpe ya Alona ntembe. (Mituya 16:1-3) Nsima ya kobomama ya batomboki wana, Bayisalaele babandaki koimaima. Ezalaki bongo mpamba te bakanisaki ete kobomama ya batomboki wana ezalaki likambo ya sembo te. Mituya 16:41 elobi ete: “Nde na mokolo na nsima lingomba mobimba na bato na Yisalaele baimaimaki na ntina na Mose mpe na Alona. Balobaki ete, Bino bosili koboma bato na Yehova.” Lokola Bayisalaele batyolaki lolenge oyo likambo yango likatamaki, 14 700 kati na bango bakufaki na maladi oyo Nzambe atindaki.—Mituya 16:49.
14, 15. (a) Wapi moko na masumu “batyoli na Nzambe” oyo bakɔtaki na lisangá basalaki? (b) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo likómelaki Kola?
14 Na ekeke ya liboso T.B., emonanaki ete “batyoli na Nzambe” oyo bamikɔtisaki na mayele mabe nyonso kati na lisangá ya boklisto bazalaki balakisi ya lokuta mpe baimaimi. Mibali yango bazalaki ‘kotyola makonzi, kotukáká baoyo na nkembo,’ mibali bapakolami oyo bazalaki na mokumba ya elimo mpo na kokɛngɛla lisangá. Na ntina na batyoli mpe bapɛngwi wana, Yuda moyekoli ya Yesu alobaki lisusu ete: “Bazali baimaimi baoyo bakoimaima mpo na makambo na bango, kotamboláká pelamoko na mposa na bango.” (Yuda 3, 4, 8, 16) Lelo oyo, bato mosusu bakómaka baimaimi mpamba te batikaka nzela na elimo ya libebisi ete ekóla kati na mitema na bango. Mingimingi, batyaka likebi koleka likoló na kozanga kokoka ya bato oyo bazali bakɛngɛli kati na lisangá mpe babandaka koimaima likoló na bango. Ezaleli na bango ya koimaima mpe ya komilelalela ekoki ata mpe kokóma kino kotyola mikanda mibimisami na ‘moombo na sembo.’
15 Ezali mabe te kotuna mituna ya sembo likoló na makambo matali Makomami. Kasi ekozala boni soki tokólisi elimo mabe oyo emonani polele kati na masoló na biso elongo na baninga, masoló ya kotya ntembe na makambo mpe ya koloba mabe likoló na bato? Ekozala malamu tómituna ete: ‘Elimo oyo ekoki mpenza komema biso kino wapi? Ekozala malamu ete tótika koimaima mpe tóbondela na komikitisa nyonso mpo na kosɛnga mayele, boye te?’ (Yakobo 1:5-8; Yuda 17-21) Ekoki kozala ete Kola mpe baoyo balandaki ye, baoyo batombokelaki bokonzi ya Mose mpe ya Alona, bamindimisaki ete likanisi na bango lizalaki malamu, na bongo batalelaki te mikano na bango ya nsé ya motema. Nzokande, bazalaki na elóngá soko moke te. Ezalaki mpe bongo mpo na Bayisalaele oyo baimaimaki na ntina na kobomama ya Kola mpe batomboki mosusu. Ezali mpenza likambo ya mayele ete bandakisa motindo oyo epusa biso na kotalela mikano na biso ya nsé ya motema, ete tóbengana elimo ya koimaima to ya komilelalela, mpe tótikela Yehova nzela ete apɛtola biso!—Nzembo 17:1-3.
Zwá liteya mpo ete ozwa mapamboli
16. Makambo nini ya ntina mazwami kati na elendiseli oyo ezali na 1 Bakolinti 10:11, 12?
16 Na kopemama na Nzambe, Paulo asukisi nsango na ye ya likebisi na elendiseli oyo: “Makambo oyo eyeli bango lokola bikebiseli [“bandakisa,” NW] ikomami mpo na kolakisa biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso. Boye, tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:11, 12) Tiká ete tótalela te etɛlɛmɛlo na biso kati na lisangá ya boklisto na motuya moke.
17. Soki tomiyoki ete matindiki mabe mazali kati na motema na biso, tosengeli kosala nini?
17 Lokola ebende esukaka mingimingi na koguga, bobele bongo biso bakitani ya Adama moto ya masumu tosilá kosangola momeseno ya kosala mabe. (Genese 8:21; Baloma 5:12) Na yango, tosengeli kolɛmba te soki tomiyoki ete matindiki mabe mazali kati na motema na biso. Na esika ya kolɛmba, tiká ete tókamata ekateli ya nguya. Soki ebende etyami na esika oyo mopepe ya mamwe ezali kopolisa yango to etyami penepene na eloko mosusu oyo ekoki kobebisa yango, kobɛbisama na yango ekosalema nokinoki. Tosengeli kopɛngola komitya na esika oyo “mopepe” ya mokili ya Satana ezali, bakisá mpe kominanola na yango ya mbindo, pite oyo ezali sé kopalangana, mpe mposa ya kosala mabe.—Baefese 2:1, 2.
18. Yehova asalaki nini mpo na oyo etali bamposa mabe ya bato?
18 Yehova apesi biso bato mwango ya kotɛmɛla mposa mabe oyo tosilaki kosangola. Apesaki Mwana-mobotami bobele moko na ye mpo ete bato oyo bakomonisa kondima epai na ye bákoka kozwa bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Soki tolandi ndakisa ya Yesu na bokɛngi nyonso mpe tomonisi bomoto ekokani na oyo ya Klisto, tokozala lipamboli mpo na basusu. (1 Petelo 2:21) Lisusu, tokozwa bilakeli mabe te, kasi mapamboli mauti na Nzambe.
19. Litomba nini tokoki kozwa na kotaleláká bandakisa oyo ezwami kati na Makomami?
19 Atako biso mpe lelo oyo tokoki kosala mabungá lokola Bayisalaele na ntango ya kala, tozali na Liloba ya Nzambe likomami na mobimba na yango mpo na kotambwisa biso. Kati na yango tozali kozwa liteya likoló na lolenge oyo Yehova asalelaka bato mpe likoló na bizaleli na ye oyo Yesu Klisto amonisaki yango na nzela ya ndakisa, ye azali bongo ‘kongɛnga na nkembo na Nzambe, elilingi na motindo na Ye.’ (Baebele 1:1-3; Yoane 14:9, 10) Na nzela ya libondeli mpe ya boyekoli ya Makomami na etingya nyonso, tokoki kozala na “elimo na Klisto.” (1 Bakolinti 2:16, NW) Wana tokutani na masenginya mpe makambo mosusu oyo matye kondima na biso na komekama, tokoki kozwa litomba na kotaleláká bandakisa ya bato ya kala oyo ezwami kati na Makomami mpe mingi mpenza ndakisa eleki monene ya Yesu Klisto. Soki tokosala bongo, bilakeli mabe ya Nzambe bikokwela biso te. Nzokande, tokozwa ngɔlu ya Yehova lelo oyo mpe mapamboli na ye mpo na libela.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yulí 1992, lokasa 4.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Lolenge nini tokoki kosalela toli ya Paulo oyo elobi ete tosengeli te kokóma basambeli na bikeko?
◻ Tokoki kosala nini mpo na kolanda likebisi ya ntoma Paulo likoló na pite?
◻ Mpo na nini tosengeli kopɛngola koimaima mpe komilelalela?
◻ Lolenge nini tokoki kozwa mapamboli mauti na Nzambe, kasi bilakeli mabe te?
[Elilingi na lokasa 18]
Soki tolingi kozwa mapamboli ya Nzambe, tosengeli kopɛngola losambo ya bikeko
[Bililingi na lokasa 20]
Motindo moko koguga esengeli kolongolama, tiká ete tózwa ekateli makasi ya kolongola bamposa mabe kati na mitema na biso