Mituna ya batángi
Tokoki koloba ete basaleli ya Nzambe na mikolo na biso, baoyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabelé, bazali na elimo santu ekokani na boíké motindo moko na oyo epesami epai na baklisto bapakolami na elimo?
Oyo ezali mbala ya liboso te ete motuna oyo motunama. Likambo yango litunamaki mpe na “Mituna ya batángi” kati na Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ́ 1952 (ebimeli ya Lifalansé). Uta ntango wana kino lelo, mingi basili kokóma Batatoli, na yango tokoki koyanola na motuna yango na kotaleláká mpe makambo oyo masilaki kolobama liboso.
Eyano ya moboko ezali ete, ee, bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali sembo, oyo bazali kati na bampate mosusu, bazali kozwa elimo ya Nzambe na boíké motindo moko na bapakolami.—Yoane 10:16.
Kasi, yango elimboli te ete elimo esalaka mosala na yango lolenge moko epai na bato nyonso. Tókanisa na ntina na basaleli ya Nzambe oyo bazalaki na bomoi liboso na Klisto, oyo na ntembe te, bazwaki mpe elimo ya Nzambe. Na nguya oyo bazwaki na lisalisi ya elimo ya Nzambe, basusu kati na bango babomaki nyama mabe, babikisaki bato ya maladi, mpe basekwisaki kútu bakufi. Mpe bazalaki na mposa ya elimo ya Nzambe mpo na kokoma mikanda mipemami ya Biblia. (Basambisi 13:24, 25; 14:5, 6; 1 Mikonzi 17:17-24; 2 Mikonzi 4:17-37; 5:1-14) Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete: “Atako bazalaki kati na kelasi ya bapakolami te, kasi batondisamaki na elimo santu.”
Tótalela likanisi mosusu, kanisá naino mibali mpe basi ya ekeke ya liboso oyo bapakolamaki na elimo santu, na yango bakómaki bana ya Nzambe na elimo mpe bakómaki na elikya ya bomoi na likoló. Bango nyonso bapakolamaki, kasi yango elimboli te ete elimo esalaki mosala kati na bango nyonso na lolenge moko. Yango emonani polele kati 1 Bakolinti mokapo 12. Epai kuna ntoma Paulo alobeli makabo ya elimo. Tozali kotánga kati na milɔngɔ́ 8, 9, mpe 11: “Moko azwi maloba na bososoli, mosusu azwi maloba na mayele na [elimo, NW] yango moko, mosusu azwi kondima kati na [elimo] yango, mosusu azwi nguya ya kobikisa kati na [elimo] yango. . . . Oyo nyonso izwi nguya mpo na [elimo] yango moko, oyo akokabela moto na moto yango pelamoko elingi ye.”
Elimboli ete, na ntango wana, ezali bapakolami nyonso te nde bazwaki likabo ya elimo mpo na kosala makamwisi. Na 1 Bakolinti mokapo 14, Paulo alobeli likita ya lisangá oyo kati na yango moto moko azalaki na likabo ya koloba nkótá ndenge na ndenge, kasi moko te kati na bango azalaki na likabo ya kobongola. Nzokande, na libaku mosusu oyo elobelami liboso, emonanaki ete bango nyonso bapakolamaki na elimo. Ebongi koloba ete ndeko oyo azalaki na likabo ya koloba nkótá ndenge na ndenge azalaki na elimo mingi koleka baoyo bazalaki wana? Te. Bapakolami mosusu wana bazalaki na litomba moke te, lokola nde bazangaki likoki ya kososola Biblia to ete bakokaki te kotɛlɛma ngwi liboso na mimekano. Elimo esalaki mosala na yango na lolenge moko ya sikisiki likoló na ndeko oyo akokaki koloba na nkótá ndenge na ndenge. Nzokande, ye mpe bango bazalaki na ntina ya kotikala ntango nyonso pene na Yehova mpe, lokola Paulo akomaki yango, ‘kokóba kotonda na [“elimo,” NW].’—Baefese 5:18.
Na ntina na batikali oyo bazali na bomoi lelo oyo, basili solo kozwa elimo ya Nzambe. Na libaku moko, esalaki mosala kati na bango na lolenge moko ya sikisiki—na ntango oyo bapakolamaki mpe bandimamaki lokola bana na elimo. Na nsima, ‘bakóbaki kotonda na [“elimo,” NW],’ kozwáká bongo lisungi na yango wana balingi kososola Biblia mingi lisusu koleka, wana basengeli kokamba mosala ya kosakola, to wana bakutani na komekama—ezala moto na moto to mpo na oyo etali lisangá mobimba.
Basangani ya “bampate mosusu,” atako bapakolami na elimo te, kasi na makambo mosusu, bazali kozwa elimo santu. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛ́mbɛ 1952 (ebimeli ya Lifalansé) elobaki ete:
“Lelo oyo ‘bampate mosusu’ bazali kosala mosala ya kosakola motindo moko na batikali, bazali mpe kokutana na komekama motindo moko, bazali komonisa bosembo mpe boyengebene motindo moko. Bazali kolya bobele na mesa moko ya elimo, bazali kolya bilei motindo moko, bazali kozwa solo motindo moko. Lokola bazali kati na etuluku ya bato oyo bakofanda awa na mabelé, baoyo bazali na elikya mpe na mposa na makambo ya mabelé, bakoki mpenza kozala na bosepeli makasi mpo na biloko ya mabelé, basengeli kotya likebi na bango mingi likoló na mikapo oyo mizali na boyokani na bomoi kati na mokili ya sika; nzokande baklisto bapakolami, oyo bazali na elikya ya kokende na likoló mpe basepelaka na makambo ya elimo, basengeli koyekola makambo yango na etingya nyonso mpenza kati na Liloba ya Nzambe. . . . Nzokande, likambo moko libongwani te, solo mpe bosolo motindo moko epesami na bituluku oyo mibale, mpe ezali nde lolenge moto na moto azali komipesa na botángi nde ezali kokesenisa bososoli ya makambo ya likoló mpe ya mabelé oyo bazali koyekola. Elimo ya Nkolo epesami na boíké motindo moko na batuluku wana mibale, boyebi mpe mayele epesami na boíké motindo moko epai na bituluku wana mibale, bazali na mabaku makokani ya kozwa yango.”