Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/7 nk. 5-7
  • Lolenge nini tosengeli kobondela Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini tosengeli kobondela Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nkombo oyo esengeli kobulisama
  • Makambo mabongi kosɛngama kati na libondeli
  • Batoli mosusu na ntina na libondeli
  • Mabondeli oyo Nzambe ayokaka
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tosengeli kotinda mabondeli epai na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mabondeli oyo mazali kondimama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/7 nk. 5-7

Lolenge nini tosengeli kobondela Nzambe?

NA NTANGO moyekoli moko asɛngaki na Yesu ete apesa ye malako na ntina na libondeli, aboyaki te. Engebene Luka 11:2-4, ayanolaki ete: “Wana ekobondela bino, lobá ete, Tata, nkombo na yo ezala bulɛɛ. Bokonzi na yo eya. Pesá biso kwanga ekoki na mokolo na mokolo, mpe limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso. Kamba biso kati na komekama te.” Ezali yango nde eyebani mingi lokola losambo ya Tata wa biso. Ezali koyebisa makambo mingi kati na yango.

Na ebandeli, liloba ya liboso mpenza lizali koyebisa biso epai ya nani tosengeli kotinda mabondeli na biso​—epai na Tata wa biso. Tomoni ete Yesu apesaki nzela soko moke te ete tósambela moto mosusu, ekeko, “mosantu,” mpe ata ye moko te. Nzambe asilaki koloba ete: “Nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” (Yisaya 42:8) Mabondeli oyo matindami epai na eloko to moto mosusu nyonso, kasi epai na Tata wa biso na likoló te makoki kokóma na matoi na ye te, ata soki mosambeli asali yango na bosembo nyonso. Kati na Biblia, bobele Yehova nde abéngami “moyoki na libondeli.”​—Nzembo 65:2, NW.

Basusu bakoki koloba ete “basantu” bazali bobele bayokanisi na biso na Nzambe. Kasi Yesu ye moko apesaki lilako oyo ete: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto akokóma epai na Tata te soko na nzela na ngai te. Mpe likambo nini likolɔmba bino na nkombo na ngai, ngai nakosala yango ete Tata akumisama kati na Mwana.” (Yoane 14:6, 13) Na yango, Yesu apɛngolaki likanisi oyo ete moto nyonso oyo abéngami mosantu akoki kokokisa mokumba ya moyokanisi. Talá mpe oyo ntoma Paulo alobaki na ntina na Klisto: “Akufaki, mpe asekwaki na kufa, oyo azali na lobɔkɔ na mobali na Nzambe, ye wana azali kobondela mpo na biso!” “Bakobelema na Nzambe na nzela na ye, awa ezali ye na bomoi libela ete abondela mpo na bango.”​—Baloma 8:34; Baebele 7:25.

Nkombo oyo esengeli kobulisama

Na nsima Yesu alobaki ete: “Nkombo na yo ezala bulɛɛ.” Lolenge nini tokoki kobulisa, elingi koloba, kosantisa, to kotya pembeni, nkombo ya Nzambe soki toyebi yango te mpe tosaleli yango te? Koleka mbala 6 000 kati na “Kondimana ya Kala,” Nzambe abéngami na nkombo na ye mpenza Yehova.

Maloba na nsé ya lokasa na Exode 6:3 kati na libongoli ya Katolike, Douay, malobi na ntina na nkombo ya Nzambe ete: “Babongoli mosusu na ntango na biso babimisi nkombo Yehova . . . , mpamba te ebéngeli ya solo ya nkombo [ya Nzambe], ndenge emonani kati na makomi ya Liebele, ebungaki mpo ete basalelaki yango te na boumeli ya ntango molai.” Na yango Biblia Liloba lya Nzambe ya Katolike esaleli nkombo Yawe. Atako banganga mayele mingi balingaka ebéngeli wana, “Yehova” ezali lolenge ya solosolo mpe oyo esilá kosalelama uta kala mpo na kobénga nkombo ya Nzambe na Lingala. Nkótá mosusu ezali na lolenge na yango ya kobénga nkombo ya Nzambe. Likambo ya ntina mingi ezali ete tosengeli kosalela nkombo yango mpo na kobulisa yango. Lingomba na yo eteyaki yo kosalela nkombo Yehova kati na libondeli?

Makambo mabongi kosɛngama kati na libondeli

Na nsima Yesu ateyaki bayekoli na ye básambela ete: “Bokonzi na yo eya.” Evanzile ya Matai ebakisi maloba oyo: “Tiká mokano na yo esalema na nsé pelamoko na Likoló.” (Matai 6:10) Bokonzi ya Nzambe ezali boyangeli oyo epesami na mabɔkɔ ya Yesu. (Yisaya 9:6, 7) Engebene esakweli ya Biblia, mosika te boyangeli yango ekokitana biyangeli nyonso ya bato mpe ekoyeisa kimya kati na mokili mobimba. (Nzembo 72:1-7; Danyele 2:44; Emoniseli 21:3-5) Na yango, kati na mabondeli na bango, baklisto ya solo balobelaka mingi Bokonzi ya Nzambe. Lingomba na yo eteyaka yo kosala bongo?

Likambo ya kobenda likebi ezali ete, Yesu amonisaki ete tokoki mpe kolobela makambo na biso moko kati na mabondeli na biso. Alobaki ete: “Pesá biso kwanga ekoki na mokolo na mokolo, mpe limbisá biso masumu na biso, mpo ete biso tokolimbisaka bato nyonso bazali na nyongo na biso. Kambá biso kati na komekama te.” (Luka 11:3, 4) Maloba ya Yesu malimboli ete tokoki koluka mokano ya Nzambe kati na makambo ya mokolo na mokolo, tokoki kobɛlɛma na Yehova na koyebisáká likambo nyonso oyo ekoki kotungisa to kobulunganisa kimya na biso ya elimo. Kosɛnga na Nzambe mbala na mbala na motindo wana ekosalisa biso ete tómona malamumalamu lolenge bomoi na biso ekangami bobele na ye. Na bongo tozali lisusu kokóma na bososoli malamu koleka na ntina na bopusi oyo azali na yango kati na bomoi na biso. Bobele bongo mpe kosɛnga mokolo na mokolo ete alimbisa mabungá na biso ezali kopesa litomba. Na yango tozali kososola malamu mpenza ete tozali bato na bolɛmbu​—na yango tókangaka motema te na mabungá ya basusu. Elendiseli ya Yesu oyo ete tosengeli kobondela mpo na kosikolama na masenginya ezali mpe na ntina, mingi mpenza mpo ete tozali kobika kati na mokili oyo bizaleli malamu bizali sé kobeba. Na boyokani na libondeli wana, tozali komisɛnzɛla ete tópɛngola makambo oyo makoki komema biso na kosala mabe.

Na bongo, ezali polele ete losambo ya Tata wa biso ezali koteya biso makambo mingi matali lolenge ya kosala mabondeli oyo masepelisaka Nzambe. Kasi, Yesu alingaki koloba ete tosengeli kokamata libondeli yango mpe kozongela bobele maloba na yango mbala na mbala?

Batoli mosusu na ntina na libondeli

Yesu apesaki malako mosusu na ntina na libondeli. Matai 6:5, 6 elobi ete: “Ekobondela bino, bózala lokola bakosi te, baoyo balingi kotɛlɛma mpe kobondela na biyanganelo mpe na bizwanelo na nzela ete bámonana na bato. . . . Nde yo, wana ekobondela yo, ingela na eteni na yo na ndako mpe fungá ekuke, mpe bondelá epai na Tata na yo oyo azali na nkúku.” Maloba oyo mateyi biso ete libondeli esengeli te kosalema na lolenge ya komonisa to ya koluka kobenda likebi ya moto mosusu. Ofungolelaka Yehova motema na yo na nkúku, lokola Biblia ezali kosɛnga yango?​—Nzembo 62:8.

Yesu apesaki likebisi oyo: “Ezali bino kobondela, bólobaloba lokola ekosalaka bapakano te, zambi bazali kokanisa ete Nzambe akoyoka bango mpo na kolobaloba na bango.” (Matai 6:7) Emonani polele ete, Yesu aboyaki likambo ya kokanga mabondeli na motó​—aboyaki mpe ezaleli ya kotánga yango kati na mokanda. Maloba na ye mamonisi mpe ete aboyaki kosalelama ya sapelé.

Búku missel Katolike endimi likambo oyo ete: “Libondeli na biso ya malamu mpenza ekoki kozala makanisi oyo mabimi na motema na biso moko soki tomibaloli epai na ye mpo na kopesa ye matɔ́ndi to komonisa mposa na biso, na ntango ya mpasi, to kati na lolenge tosambelaka ye mokolo na mokolo.” Mabondeli ya Yesu mazalaki kouta na nsé ya motema na ye moko, kasi azalaki te kobimisa oyo asilá kokanga na motó. Na ndakisa, tángá libondeli ya Yesu oyo ezwami kati na Yoane mokapo 17. Eyokani na libondeli ya ndakisa, ezali komonisa mingi mpenza mposa oyo Yesu azalaki na yango mpo na kobulisa nkombo ya Yehova. Libondeli ya Yesu liutaki na nsé ya motema mpe lizalaki mozindo mpenza.

Mabondeli oyo Nzambe ayokaka

Soki bateyaki yo kosala mabondeli ya kozongelazongela makambo oyo osilá kokanga na motó, kobondela “basantu” to bikeko to kosalela biloko ya losambo, lokola sapelé, likanisi ya kosambela na kolandáká ndakisa ya Yesu likoki liboso kobangisa yo. Nzokande, mpo na kolónga tosengeli koyekola koyeba Nzambe​—nkombo na ye, mikano na ye, mpe bomoto na ye. Okoki kokóma na boyebi wana na nzela ya boyekoli ya Biblia. (Yoane 17:3) Batatoli ya Yehova bazali pene mpe bazali na bolingo malamu ya kosalisa yo mpo na yango. Basili kútu kosunga bamilió ya bato kati na mokili mobimba ete ‘bámeka mpe básosola ete [Yehova] azali malamu’! (Nzembo 34:8) Soki okómi na boyebi mingi na ntina na Nzambe, ekozala na bopusi mingi likoló na yo ete okoka kosanzola ye kati na libondeli. Mpe soki ozali kobɛlɛma mingi epai na Nzambe na libondeli mozindo, boyokani na yo elongo na ye ekokóma lisusu makasi mingi.

Na yango, basambeli nyonso ya solo ya Nzambe balendisami ete ‘bábondelaka na kotika te.’ (1 Batesaloniki 5:17) Talá malamu mpo na koyeba soki mabondeli na yo mayokani na Biblia mpe na malako ya Yesu Klisto. Na lolenge yango, okoki kondimisama ete mabondeli na yo makondimama na Nzambe.

[Elilingi na lokasa 7]

Soki toyekoli makambo mingi na ntina na Yehova, ekozala na bopusi mingi likoló na biso ete tóbondela ye na nsé ya motema

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto