Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 9 points 1-7
  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Kobondela Nzambe ezali likambo ya lokumu monene
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Ndenge nini kobɛlɛma epai na Nzambe kati na libondeli
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Pusaná penepene na Nzambe na libondeli
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Zwá na motuya likabo oyo ozali na yango ya kobondela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 9 points 1-7
Liteya 09. Mwasi moko azali kobondela.

LITEYA 09

Pusaná penepene na Nzambe na nzela ya libondeli

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Ozalaka na mposa ya lisalisi? Ozalaka na mituna ya ntina mingi oyo olukaka kozwa biyano na yango? Ozalaka na mposa bábɔndisa to bálendisa yo? Olingaka kokóma moninga ya Yehova? Libondeli ekoki kosalisa yo na makambo wana nyonso. Kasi wapi lolenge ya malamu ya kobondela? Nzambe Ayokaka mabondeli ya bato nyonso? Osengeli kosala nini mpo ayoka mabondeli na yo? Tólobela yango.

1. Tosengeli kobondela nani, mpe mpo na makambo nini?

Yesu ateyaki ete tosengeli kobondela kaka Tata na biso ya likoló. Ye moko mpe abondelaki Yehova. Alobaki: “Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló . . .’” (Matai 6:9) Ntango tobondelaka Yehova, tokómisaka boninga na biso ná ye makasi.

Tokoki kobondela mpo na makambo ndenge na ndenge. Kasi, mpo Nzambe ayanola na mabondeli na biso, esengeli koyokana na mokano na ye. Biblia elobi: “Ezala eloko nini oyo tozali kosɛnga na boyokani na mokano na ye, ayokaka biso.” (1 Yoane 5:14) Yesu alobelaki mwa makambo oyo tokoki kobondela mpo na yango. (Tángá Matai 6:9-13.) Ntango tozali kobondela, tokoki koyebisa Nzambe mitungisi na biso, kasi tosengeli kobosana mpe te kopesa ye matɔndi mpo na oyo asaleli biso mpe kosɛnga ye asalisa basusu.

2. Tosengeli kobondela ndenge nini?

Biblia eyebisi biso ‘tófungolela [Nzambe] mitema na biso.’ (Nzembo 62:8) Mabondeli na biso esengeli mpenza kouta na motema. Tokoki kobondela na mongongo makasi to na mongongo ya nse, na ngonga nyonso mpe na esika nyonso oyo tolingi. Ntango tozali kobondela Yehova, tokoki kofukama, kotɛlɛma to kofanda, kasi tosengeli kosala yango na lolenge oyo ezali komonisa limemya epai na ye.

3. Ndenge nini Yehova ayanolaka na mabondeli na biso?

Yehova ayanolaka na mabondeli na biso na ndenge mingi. Apesá biso Biblia, Liloba na ye, esika oyo tokoki kozwa biyano na mituna na biso. Kotánga Biblia “ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.” (Nzembo 19:7; tángá Yakobo 1:5.) Akoki kopesa biso kimya ya motema ntango tokutani na mikakatano. Akoki mpe kotinda basaleli na ye mpo básalisa biso na ntango oyo tozali mpenza na mposa.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba ndenge oyo okoki kosala mabondeli oyo esepelisaka Nzambe, mpe bolamu oyo okozwa.

4. Nzambe andimaka mabondeli ya ndenge nini?

Makambo nini esalaka ete Nzambe andima to aboya libondeli ya moto? Talá VIDEO.

VIDEO: Nzambe ayokaka mabondeli nyonso? ​—Video ya mokuse (2:42)

Yehova alingi ete tóbondelaka ye. Tángá Nzembo 65:2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Okanisi nini: “Moyoki ya libondeli” alingi obondelaka ye? Mpo na nini?

Mpo Yehova ayoka mabondeli na biso tosengeli kotosa mibeko na ye. Tángá Mika 3:4 mpe 1 Petro 3:12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini ekoki kondimisa biso ete Yehova akoyanola na mabondeli na biso?

Na ntango ya etumba, basoda ya ngámbo nyonso mibale bakoki kobondela mpo bálonga. Okanisi mpenza ete Nzambe akoyanola na mabondeli ya ndenge wana?

5. Tosengeli koyebisa Yehova makambo oyo euti na motema

Bato mosusu bateyá bango bázongelaka liloba mokomoko ya libondeli moko boye. Kasi yango nde Nzambe alingi tósala? Tángá Matai 6:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okoki kosala nini mpo ‘ozongela kaka maloba moko mbala na mbala te’ ntango ozali kobondela?

Mokolo na mokolo kanisá likambo moko ya malamu oyo ekotinda yo opesa Yehova matɔndi. Soki osali bongo na pɔsɔ moko okomona ete okobondela mpo na makambo nsambo, kasi okozongela liloba mokomoko te.

Mwana moko azali kosolola na baboti na ye.

Tata ya malamu alingaka ete mwana na ye ayebisa ye makambo oyo euti na motema. Ndenge moko mpe, Yehova alingaka ete tóyebisa ye makambo oyo euti na motema ntango tozali kobondela ye

6. Libondeli ezali likabo oyo Nzambe apesá biso

Ndenge nini libondeli esalisaka biso mingimingi na ntango oyo tozali na mikakatano? Talá VIDEO.

VIDEO: Libondeli esalisaka biso tóyika mpiko (1:32)

Biblia elobi ete libondeli ekoki kopesa biso kimya ya solosolo. Tángá Bafilipi 4:6, 7, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Atako libondeli esilisaka ntango nyonso te mikakatano na biso, ndenge nini ekoki kosalisa biso?

  • Okosepela kobondela mpo na makambo nini?

Oyebaki yango?

Liloba “amen” elimboli “ezala kaka bongo.” Banda kala bato bazalaki koloba “amen” na nsuka ya libondeli.​—⁠⁠1 Ntango 16:⁠36.

7. Zwáká ntango ya kobondela

Na bantango mosusu tokoki kobosana kobondela mpo tozali na makambo mingi ya kosala. Ndenge nini Yesu azalaki kotalela libondeli? Tángá Matai 14:23 mpe Marko 1:35, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yesu azalaki kosala nini mpo na kozwa ntango ya kobondela?

  • Ntango nini okoki kobondela?

Bililingi: Mwasi moko azali kobondela. 1. Na ntɔngɔ. 2. Elongo na bana na ye. 3. Na mosala. 4. Liboso ya kolya.

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Namonaka ndeti Nzambe ayanolaka mabondeli na ngai te.”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Mabondeli oyo eutaka na motema esalaka ete tókóma baninga ya Nzambe, epesaka biso kimya ya motema mpe makasi oyo tozali na yango mposa mpo na kosepelisa Yehova.

Bozongeli

  • Tosengeli kobondela nani?

  • Tosengeli kobondela ndenge nini?

  • Bolamu nini libondeli epesaka?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Zwá biyano na mituna oyo bato mingi batunaka mpo na libondeli.

“Makambo nsambo osengeli koyeba mpo na libondeli” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2010)

Luká koyeba ntina oyo tosengeli kobondela mpe makambo oyo tokoki kosala mpo mabondeli na biso esepelisa Yehova.

“Mpo na nini nasengeli kobondela?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Biblia eyebisi biso moto oyo tosengeli kobondela.

“Nasengeli kobondela basantu?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Na video ya miziki oyo, okomona ete tokoki kobondela esika nyonso mpe ntango nyonso oyo tolingi.

Bondeláká ntango nyonso (1:22)

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto