Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/9 nk. 26-28
  • Ludia: Mosaleli ya Nzambe oyo amonisaki boyambi bapaya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ludia: Mosaleli ya Nzambe oyo amonisaki boyambi bapaya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Moteki na bilamba motane”
  • Mosala ya kosakola ya Paulo na Filipi
  • “Mokumisi na Nzambe”
  • “Andimisi biso makasi”
  • Bandeko na Filipi
  • Bandakisa ya kolanda​—Lidia
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • “Leká na masedonia”
    ‘Tópesa litatoli malamumalamu’ mpo na Bokonzi ya Nzambe
  • Ndenge ya kozala na esengo
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Mokanda ya Biblia nimero 50—Bafilipi
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/9 nk. 26-28

Ludia: Mosaleli ya Nzambe oyo amonisaki boyambi bapaya

UTA ntango ya kala, basaleli ya Nzambe ya solo bamimonisaki na ezaleli na bango ya boyambi bapaya. (Genese 18:1-8; 19:1-3) Kolimbolamáká lokola “bolingo mpo na, boboto mpo na, to bosepeli mpo na bapaya,” boyambi bapaya oyo euti na motema sembo ezali kino lelo oyo elembo ya Boklisto ya solo. Kútu, ezali lisɛngami mpo na baoyo nyonso basengeli kosambela Nzambe na lolenge oyo endimami.​—Baebele 13: 2; 1 Petelo 4:9.

Ludia azali moto oyo amonisaki ndakisa mpo na oyo etali boyambi bopaya. “Andimisi” bamisionere Baklisto oyo bakómaki na Filipi ete báfanda na ndako na ye. (Misala 16: 15) Atako Ludia alobelami mingi te kati na Makomami, makambo moke oyo mayebisami na ntina na ye makoki kolɛndisa biso. Ndenge nini? Ludia azalaki nani? Toyebi nini na ntina na ye?

“Moteki na bilamba motane”

Ludia azalaki kofanda na Filipi, engumba monene ya Makedonia. Nzokande, azalaki moto ya Twatila, engumba moko ya etúká ya Ludia, na wɛstí ya Asie Mineure. Na ntina oyo basusu bakanisaka ete “Ludia” ezalaki nkombo bapesaki ye na Filipi. Na maloba mosusu, azalaki “moto na Ludia,” lolenge moko na mwasi oyo Yesu apesaki ye litatoli akokaki kobɛngama “Mwasi Mosamalia.” (Yoane 4:9) Ludia azalaki motɛki na “bilamba motane” to biloko mosusu epakolami lángi yango. (Misala 16:12, 14) Kozala ya basáli na lángi na Twatila mpe na Filipi endimisami na makomi oyo bato ya arkeoloji bakundolaki. Ekoki kozala ete Ludia asalaki mobembo mpo na mosala na ye, mbala mosusu mpo na kosala mombongo na ye moko to lokola momonisi ya kompanyi moko ya basáli lángi ya engumba Twatila.

Lángi motane mpo na bilamba ekokaki kozwama na biloko mingi. Oyo elekaki motuya ezalaki kozwama uta na lolenge moko ya mbembe ya mai monene. Engebene Martial, mokomi ya maloba ya ntɔ́ki Moloma ya ekeke ya liboso, lolenge oyo eleki kitoko kati na bilamba motane ya Tyre (engumba mosusu epai kuna bilamba motane ezalaki mpe kosalama) ekokaki kosombama na motuya ya sesterce 10 000, to denali 2 500, oyo ekokani na lifuta ya mikolo 2 500 mpo na mosáli na bilanga. Emonani polele ete molato yango ezalaki ya bonzenga mpenza oyo bobele bato moke bakokaki kosomba yango. Boye, Ludia azalaki mwasi ya bozwi. Na lolenge moko to mosusu, azalaki na makoki ya komonisa boyambi bapaya epai na ntoma Paulo mpe baninga na ye​—Luka, Silasi, Timote, mpe ekoki kozala na basusu.

Mosala ya kosakola ya Paulo na Filipi

Pene na mobu 50 T.B., Paulo asalaki mobembo na ye ya liboso na Mpɔ́tɔ́ mpe abandaki koteya na Filipi.a Na ntango akómi na engumba ya sika, Paulo azalaki na momesano ya kokende na eyanganelo mpo na koteya liboso Bayuda mpe bapakano oyo bakotaki na losambo ya Bayuda oyo bazalaki koyangana kuna. (Kokanisá na Misala 13:4, 5, 13, 14; 14:1.) Nzokande, engebene bato mosusu, mibeko ya Loma mipekisaki Bayuda ete básala losambo na bango te na kati ya “lopango ya bulee” ya Filipi. Na yango, nsima ya kolekisa “mwa mikolo” wana, na mokolo na Sabata bamisionere bamonaki esika mpembeni ya ebale na libándá ya engumba epai kuna ‘bamonaki ete ezalaki na esika ya kobondela.’ (Misala 16:12, 13) Emonani ete yango ezalaki ebale Gangite. Kuna bamisionere bakutaki bobele basi, baoyo Ludia azalaki moko na bango.

“Mokumisi na Nzambe”

Ludia azalaki “mokumisi na Nzambe,” kasi ekoki mpenza kozala ete azalaki prozelite ya lingomba ya Bayuda oyo azalaki koluka solo ya losambo. Atako azalaki na mosala oyo epesaki ye mosolo mingi, Ludia azalaki te kolinga biloko mingi ya mosuni. Na esika ya kosala bongo, amibombelaki ntango mpo na makambo ya elimo. “Nkolo azipolaki motema na ye ete ayamba makambo masololi Paulo,” mpe Ludia andimaki solo. Kútu, ‘ye na bato na ndako na ye babatisamaki.’​—Misala 16:14, 15.

Biblia eyebisi te banani bazalaki basangani mosusu ya ndako ya Ludia. Lokola balobeli mobali te, ekoki kozala ete azalaki monzemba to mwasi mokufeli mobali. Ekoki kozala ete “bato na ndako na ye” bazalaki bandeko na ye, kasi liloba yango ekoki mpe kolimbola baombo to basali. Ezala ndenge nini, Ludia akabolaki na molende nyonso elongo na bato ya ndako na ye makambo oyo ayekolaki. Mpe oyo nde esengo azwaki ntango bandimaki mpe bayambaki kondima ya solo!

“Andimisi biso makasi”

Ekoki kozala ete bamisionere bafandaki na ndako oyo bango moko bafutelaki, liboso ya kokutana na Ludia. Kasi azalaki na esengo ya kozala na likoki ya kopesa bango ndako mosusu. Boye likambo oyo ete atingamaki, emonisi ete liboso Paulo mpe baninga na ye baboyaki. Mpo na nini? Paulo alingaki ete ‘apesa nsango malamu mpamba, na lifuti te, bongo asala kilikili na bokonzi na ye te’ mpe akóma te bozito mpo na moto moko. (1 Bakolinti 9:18; 2 Bakolinti 12:14) Kasi Luka abakisi ete: “Esili ye kobatisama, na bato na ndako na ye, abondeli biso ete, Soko bokanisi ete nazali mondimi na Nkolo, bokóta na ndako na ngai koumela. Andimisi biso makasi.” (Misala 16:15) Ludia amibanzabanzaki mingi mpenza mpo na bosembo na ye epai na Yehova, mpe emonani ete komonisa boyambi bapaya ezalaki elembo ya kondima na ye. (Kokanisá na 1 Petelo 4:9.) Oyo nde ndakisa malamu mingi! Biso mpe tosalelaka bozwi na biso mpo na kotombola matomba ya nsango malamu?

Bandeko na Filipi

Ntango Paulo mpe Silasi babimisamaki na bɔlɔ́kɔ wana bakangaki bango na likambo ya elenge mwasi oyo azalaki na bilimu mabe, bazongaki na ndako ya Ludia, epai kuna bakutaki mwa bandeko mibali mosusu. (Misala 16:40) Ekoki kozala ete bandimi na lisangá ya sika ya Filipi basalelaki ndako ya Ludia lokola esika ya koyangana mbala na mbala. Ezali likanisi ya kolongobana na kokanisa ete ndako na ye ekobaki kozala esika ya misala ya Teokrasi na kati ya engumba yango.

Boyambi ya mɔ́tɔ oyo Ludia amonisaki na ebandeli ekomaki ezaleli ya lisangá mobimba. Atako bazalaki babólá, mbala mingi Bafilipi batindelaki Paulo biloko oyo asengelaki na yango, mpe ntoma azalaki na botɔ́ndi mingi mpo na yango.​—2 Bakolinti 8:1, 2; 11:9; Bafilipi 4:10, 15, 16.

Ludia alobelami te na mokanda oyo Paulo atindelaki Bafilipi pene na 60-​61 T.B. Makomami mayebisi te nini oyo ekómelaki ye nsima ya makambo oyo malobelami na Misala mokapo 16. Atako bongo, mwa lisolo moke na ntina na mwasi oyo ya molende esalisi biso ete ‘tónyangela bapaya.’ (Baloma 12:13) Oyo nde botɔ́ndi tozali na yango na kozala na Baklisto lokola Ludia kati na biso! Elimo na bango esalaka mingi ete masangá mazala na mɔ́tɔ mpe na boninga mpo na nkembo ya Yehova Nzambe.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na bingumba minene ya Makedonia, Filipi ezalaki oyo efandamaki na Basoda mpe ezalaki na mwa bokoli mpe eyangelamaki na jus italicum (Mibeko ya Italia). Mobeko yango ebatelaki ntɔ́mo ya Bafilipi lolenge moko na oyo ya Banamboka ya Loma.​—Misala 16:9, 12, 21.

[Etanda na lokasa 28]

Bomoi ya Bayuda na Filipi

Bomoi na Filipi esengelaki kozala pɛtɛɛ te mpo na Bayuda mpe bapakano oyo bandimaki losambo ya Bayuda. Esengelaki kozala na elimo ya koyina Bayuda, mpo ete mwa moke liboso ete Paulo akende kuna, Mokonzi Claude abenganaki Bayuda na Loma.​—Kokanisá na Misala 18:2.

Likambo ya kobenda likebi, Paulo mpe Silasi bamemamaki liboso ya basambisi nsima ya kobikisa moombo mwasi oyo azalaki na elimo mabe ya kosakola makambo makoya. Bankolo na ye, oyo babungisaki mwango ya kozwila litomba ya mosolo, basalelaki mayoki ya baninga na bango banamboka ya kokanisela basusu mabe na kolobáká ete: “Bato oyo awa bazali Bayuda, mpe bazali kotungisa mboka na biso. Bazali mpe kosakola mitindo mikoki na biso Baloma koyamba te soko kosala te.” Na yango, Paulo mpe Silasi babɛtamaki fimbo mpe babwakamaki na bolɔ́kɔ. (Misala 16:16-​24) Na ezalela ya makambo motindo wana, kosambela Yehova Nzambe ya Bayuda na lolenge ya polele, esɛngaki mpiko. Kasi emonani ete Ludia abangaki te kozala moto oyo akɛsɛni na basusu.

[Bililingi na lokasa 27]

Bitika ya Filipi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto