Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/10 nk. 3-4
  • Tosengeli kolɔta ndɔ́tɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosengeli kolɔta ndɔ́tɔ
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bandɔ́tɔ
  • Bandɔtɔ
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bandɔtɔ oyo Nzambe azalaki kolɔtisa bato
    Lamuká!—2014
  • Ndɔ́tɔ ekoki kosakola makambo mazali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nzoto na yo esengeli na mpɔngi
    Lamuká!—1995
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/10 nk. 3-4

Tosengeli kolɔta ndɔ́tɔ

OLƆTAKA ndɔ́tɔ? Ezali likambo ya mayele kondima ete olɔtaka, mpamba te biso banso tolɔtaka wana ezali biso kolala, atako tokoki koloba ete tolɔtaka te. Ekanisami ete koleka 95 % ya bandɔ́tɔ na biso tomikundolaka yango te. Oyo wapi nde omikundolaka yango? Ya solo, ndɔ́tɔ oyo tomikundolaka ezalaka oyo tolɔtaki mwa moke liboso ete tólamuka.

Balukiluki na makambo matali ndɔ́tɔ bamonaki ete mpɔ́ngi ezali mwango oyo esalemaka malɛmbɛmalɛmbɛ oyo ezalaka mozindo na mwa bangonga ya liboso mpe ekómaka likolólikoló na nsuka na yango. Ndɔ́tɔ eyaka mingi mpenza na ntango miso ebɛtaka nokinoki, ntango oyo ebéngami ete mpɔ́ngi ya kobɛtabɛta nokinoki ya miso. Yango ekitanaka na mpɔ́ngi ya kotika kobɛtama ya miso. Zolongano mobimba ya mpɔ́ngi ya kobɛtama nokinoki ya miso/mpɔ́ngi ya kotika kobɛtama ya miso eumelaka miniti soko 90, mpe bozolongano yango ezongelamaka mbala mitano to motoba na boumeli ya butu, mpe oyo ya nsuka esalemaka liboso ete tólamuka.

Ezali libúngá kokanisa ete na boumeli ya mpɔ́ngi bɔɔngɔ́ na yo etiki mpenza kosala mosala. Emonanaki ete bɔɔngɔ́ esalaka mosala mingi ntango ya kolɔta koleka ntango moto azali na mpɔngi te, longola bobele baselile mosusu na esika bɔɔngɔ́ ekangisami na misisa ya mafɛfɛ, baselile oyo etali bokɛngi mpe makoki ya kobomba makambo. Emonani lokola ete biteni yango bipemaka na eleko ya mpɔ́ngi ya kobɛtama nokinoki ya miso. Kasi na momeseno baselile nyonso ya bɔɔngɔ́ ezalaka na boyokani.

Bɔɔngɔ́ na biso ezali eteni ya nzoto oyo ezali na makambo mingi ya kokamwa, esalemi na bamiliare ya biloko mikemike oyo etindaka bilembo soko monkámá kino nkámá mibale to nkámá misato na sɛgɔndɛ moko. Bɔɔngɔ́ ya moto moko esalemi na biloko mingi koleka motángo ya bato nyonso oyo bazali na mabelé. Balukiluki mosusu bakanisaka ete esalemi na biloko miliare 20 kino koleka miliare 50. Bokamwisi na yango endimisi makambo Davidi, mokomi ya Biblia, alobaki na ntina na nzoto ya moto: “Nakotɔ́nda yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo izali na kokamwa.”​—Nzembo 139:14.

Bandɔ́tɔ

Ntango tozali na mpɔ́ngi te, biyokeli mitano oyo tozalaka na yango bitindaka ntango nyonso na bɔɔ́ngɔ makambo mpe bililingi, kasi na ntango ya mpɔ́ngi ezalaka bongo te. Bɔɔngɔ́ ebimisaka bililingi na yango moko kozanga lisalisi ya biyokeli oyo ezali libándá na yango. Na yango, makambo oyo tomonaka kati na ndɔ́tɔ mpe bikela oyo tosalaka kati na yango ezalaka mbala mosusu lokola bimonaneli. Yango epesaka biso makoki ya kosala makambo oyo mayokani te na mibeko ya biloko bizalisami, na ndakisa kopumbwa lokola elobamaka na masapo ya Peter Pan to kokwea longwa na libángá moko molai mpe kozanga kozoka. Ntango ekoki kobongwana na boye ete makambo ya kala makómi komonana lokola makambo oyo mazali naino kosalema. To soki tolingi kokima, emonanaka ete tokokaka te​—makolo maboyaka kokima. Ya solo, makambo oyo masimbaki mitema na biso mpe makambo mingi oyo tosalaka, wana tozali na mpɔ́ngi te ezalaka na bopusi likoló na ndɔ́tɔ na biso. Bato mingi oyo bamonaki makambo ya nsɔ́mɔ na bitumba bakoki te kobosana yango nokinoki, motindo moko lokola basusu bakoki mpe te kobosana mayoki oyo bazalaki na yango ntango babundisamaki na basáli na mabe. Makambo wana ya kobulunganisa oyo tokutanaki na yango makoki komonana kati na ndɔ́to, kokómisa yango ya nsɔ́mɔ. Makambo mingi oyo tokanisaka wana tokei kolala makoki koya kati na ndɔ́tɔ na biso.

Na bantango mosusu wana tozali koluka kosilisa mokakatano moko, lolenge ya kosilisa likambo yango eyelaka biso na boumeli ya mpɔ́ngi. Yango ezali mbala mosusu komonisa ete mpɔ́ngi na biso nyonso ezalaka bobele ndɔ́tɔ te. Mwa eteni na yango ezalaka ntango ya kokanisa makambo.

Búku moko oyo ezali kolobela ndɔ́tɔ mpe bɔɔngɔ́ na biso elobi ete: “Mosala mpenzampenza ya bɔɔngɔ na biso na ntango ya mpɔ́ngi ezalaka kolɔta te kasi kokanisa. Kokanisa kati na mpɔ́ngi ezalaka te elongo na mayoki ya lokuta ya kosalela moko na biyokeli na biso mpe ezalaka te makambo ya kokamwa. Esalemaka ntango nyonso, mbala mingi ezalaka makambo ya bomoi oyo masalemaki na mokolo moleki to maye makoya lobi, mpe mbala mingi ezalaka bongo na bongo, ebimisaka makambo ya sika te, mpe ezalaka bobele bozongeli.”

Bato mosusu bakanisaka ete makambo oyo bauti kolɔta mazali bongo nsango mpenza oyo epesameli bango. Mpo bákoka kolimbola bandɔ́tɔ yango, bato mosusu babombaka mwa kayé na mbeto na bango ete bákoka kokoma ndɔ́tɔ na bango ntango bakolamuka. Kolobeláká ntina ya babúku oyo emekaka kolimbola bilembo ya ndɔ́tɔ, búku The Dream Game, ya Ann Faraday, elobi ete: “Búku ya kolimbola ndɔ́tɔ oyo osalelaka mpo na koluka bandimbola ya makambo mpe bilembo ya ndɔ́tɔ ezali mpenza nyonso na ntina te, ata soki ekomami na motindo ya kala to engebene myango ya sika ya koyekola makanisi ya bato.”

Lokola emonani ete ndɔ́tɔ ebandaka mpenza kati na bɔɔngɔ́, ebongi te kondima ete yango ezalaka na nsango ya ntina mpo na biso. Tosengeli kotalela yango lokola mosala oyo bɔɔngɔ́ na biso esalaka, oyo esungaka yango ete etikala na kolɔngɔ́nɔ́ malamu.

Kasi tokoloba nini na ntina na baoyo balobaka ete basilaki kolɔta liwa ya ndeko moko to ya moninga na bango moko mpe na mokolo molandi moto yango akufaki? Yango emonisi te ete ndɔ́tɔ ekoki kosakola makambo makobima nsima? Kati na lisoló lilandi, tokotalela nini oyo ezali nsima ya ndɔ́tɔ ya bisakweli.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto