Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/10 nk. 4-7
  • Ndɔ́tɔ ekoki kosakola makambo mazali koya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndɔ́tɔ ekoki kosakola makambo mazali koya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndɔ́tɔ oyo euti na Nzambe te
  • Talelá maloba na bango
  • Bandɔtɔ
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Bandɔtɔ oyo Nzambe azalaki kolɔtisa bato
    Lamuká!—2014
  • Tosengeli kolɔta ndɔ́tɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Bokonzi oyo ekoumela libela na libela
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/10 nk. 4-7

Ndɔ́tɔ ekoki kosakola makambo mazali koya?

UTA ntango ya kala, bato bazali kotya likebi mingi na ndɔ́tɔ. Baezipito bakomaki babúku minene mpo na bolimboli-ndɔ́tɔ, mpe bato ya Babilone bazalaki na balimboli ndɔ́tɔ na bango. Bagreke bazalaki na momeseno ya kosala ete babɛli balala kati na ndakonzambe ya Asclépios mpo bákoka kolɔta malako matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na bango. Na ekeke ya mibale ya Ntango na Biso, Artemidorus akomaki búku moko oyo kati na yango apesaki ndimbola ya bilembo ya ndɔ́tɔ. Babúku mingi oyo ekomamaki uta ntango yango ezwi moboko likoló na búku na ye. Kino lelo, bato bazali kosala milende mpo na kolimbola ndɔ́tɔ, kasi basakolaka solo makambo mazali koya?

Mpo ete ndɔ́tɔ ekoka komonisa makambo mazali koya, esengeli kopusama na nguya moko eleki monene. Tozali kokuta kati na Biblia bandakisa mingi oyo kati na yango Nzambe apesaki nguya lolenge yango. Apesaki ndɔ́tɔ ya bisakweli epai na basaleli na ye mpe epai na bato mosusu oyo bazalaki basaleli na ye te. Ya solo, Yobo 33:14-16 elobi ete: “Nzambe akoloba . . . kati na lilɔ́tɔ na emɔnɔneli na butu, wana mpɔ́ngi makasi eyeli bato, wana balali likoló na mbeto, wana azipoli matoi na bango.”

Nzambe asalaki bongo epai na Falo ya Ezipito na mikolo ya Yosefe, oyo azalaki na bomoi koleka mibu 1700 liboso na Ntango na Biso. Lilɔ́tɔ ya Falo ezwami na Genese 41:1-7, mpe na milɔngɔ́ 25 kino 32, Yosefe alimboli yango ete ezali kosakola mbula nsambo wana “kolya mingi ikozala na mokili mobimba na Ezipito,” oyo ekolandana na mbula nsambo ya nzala. Yosefe ayebisaki Falo ete: “Nzambe asili komonisa Falo yango elingi ye kosala.” (Genese 41:28) Lilɔ́tɔ yango lizalaki esakweli ya makambo oyo malingaki mpenza kosalema.

Mokonzi moko monene ya Babilone mpe akutanaki na likambo motindo yango. Nebukadanesala alɔ́taki lilɔ́tɔ moko oyo libulunganisaki ye mingi, kasi akokaki komikundola yango te. Abéngaki bongo banganga na ye mpo na koyebisa ye lilɔ́tɔ yango mpe ndimbola na yango. Wana ezalaki lisɛngi lileki makasi mpo na bango.​—Danyele 2:1-11.

Lokola Nzambe nde apesaki mokonzi lilɔ́tɔ, Ye apesaki mosakoli Danyele likoki ya komonisa lilɔ́tɔ yango mpe ndimbola na yango. Danyele 2:19 elobi ete: “Na nsima likambo libombami yango emonisami na Danyele na emɔnɔnɛli na ntango na butu.” Danyele apesaki lokumu nyonso epai na Nzambe na ntina na lilɔ́tɔ wana na maloba oyo: “Moto na mayele to nganga-na-nkísi to nganga-na-soloka to moto-na-zonga te ayebi kolimbola mpo na mokonzi likambo libombami lituni ye, kasi Nzambe azali na lola, oyo akomonisaka makambo mabombami mpe ye ayebisi mokonzi Nebukadanesala makambo makobima na mikolo na nsuka.”​—Danyele 2:27, 28.

Na bantango mosusu Nzambe azalaki kopesa mitindá epai na bato na ye na nzela ya ndɔ́tɔ, mpe na bantango mosusu azalaki komonisa ete andimi bango to azalaki kosalisa bango ete básosola lolenge oyo azalaki kosunga bango. Mpo na Yakobo, na nzela ya lilɔ́tɔ, Nzambe amonisaki ete asepelaki na ye.​—Genese 48:3, 4.

Ntango Yosefe, tata-mobokoli na Yesu, ayebaki ete Malia azalaki na zemi, azwaki ekateli ya koboyana na ye. Bongo azwaki malako kati na lilɔ́tɔ ete asengelaki te kosala bongo. Matai 1:20 elobi ete: “Nde ezalaki ye kobanzabanza bongo, talá mwanze na Nkolo amonani na ye na lilɔ́tɔ, alobi na ye ete, Yosefe, mwana na Dawidi, bangá kokamata Malia mwasi na yo te. Zambi yango esili koya na ye ezali mpo na [“elimo santu,” NW].” Na nsima, azwaki likebisi moko kati na lilɔ́tɔ: “Mwanze na Nkolo amonani na lilɔ́tɔ epai na Yosefe, ye ete, Tɛlɛmá, kamatá mwana mpe mama na ye mpe kimá na Ezipito.”​—Matai 2:13.

Ndɔ́tɔ oyo euti na Nzambe te

Likambo oyo ete momeseno ya kolimbola ndɔ́tɔ epalanganaki mingi kati na bato oyo bazalaki libota ya Nzambe te emonisi ete ndɔ́tɔ nyonso te ekoki kotalelama lokola bisakweli ya sikisiki mpo na koyeba makambo masengeli koya. Na mikolo ya Yilimia, mosakoli ya Nzambe, basakoli ya lokuta bazalaki koloba ete: “Nalɔti lilɔ́tɔ! Nalɔti lilɔ́tɔ!” (Yilimia 23:25) Makanisi na bango mazalaki bongo ya kozimbisa bato bákanisa ete Nzambe azalaki koloba na nzela na bango. Na ntina na balɔ́ti yango, Yilimia alobaki na kopemama na elimo santu ete: “Mpo ete [Yehova] na bibele, Nzambe na Yisalaele, alobi ete, Tiká te ete basakoli baoyo bazali kati na bino mpe bamoni-na-makambo na bino bázimbisa bino, bóyoka mpe te na ndɔ́tɔ izali bino kolɔta yango. Mpo ete bazali kosakola na lokuta na nkombo na ngai; [Yehova] alobi ete, Ngai natindi bango te.”​—Yilimia 29:8, 9.

Lokola basakoli wana ya lokuta bazalaki “banganga-na-soloka,” ndɔ́tɔ na bango epusamaki na nguya ya bilimu mabe na mokano ya kozimbisa bato. Likambo motindo moko eyebisami na Zekalia 10:2: “Mpo ete bikeko na ndako balobi mpamba mpe bamoni-na-makambo bamoni lokuta; basakoli ndɔ́tɔ na bokosi, bazali kobɔndisa bobele mpamba.”

Zábolo azali mozimbisi monene oyo na boumeli ya bankóto ya mibu azali kosalela bakonzi ya mangomba oyo balobaka na bokosi nyonso ete Nzambe asili koloba na bango na nzela ya bimonaneli mpe na ndɔ́tɔ, motindo moko lokola basakoli na mikolo na Yilimia mpe Zekalia. Na ntina na bato lolenge yango, Yuda, mokomi ya Biblia akomaki epai na baklisto ya ekeke ya liboso ete: “Bato mosusu basili kokɔta na nkuku baoyo basili kokomama kalakala kati na Makomami ete bakozwa ekweli oyo, bazali batyoli na Nzambe, bakobalolaka ngɔlu na Nzambe na biso kino bosɔtɔ, bakoangana ye Mokonzi moko mpenza mpe Nkolo na biso Yesu Klisto.” Alobi lisusu ete, bato yango, bazalaki nde “balɔti oyo bakobebisaka nzoto.”​—Yuda 4, 8.

Talelá maloba na bango

Moto moko akoki koloba ete Nzambe alobaki na ye kati na lilɔ́tɔ to ete bandɔ́tɔ na ye ekokanaki solo, nzokande yango ezali te ntina ya kondimela ye mpe na bozoba nyonso kolanda ye. Talá malako oyo makomamaki mpo na Bayisalaele, kati na Deteronome 13:1-3, 5: “Soko mosakoli atɛmi na kati na bino, to molɔti ndɔ́tɔ, mpe ye apesi yo elembo soko likambo na kokamwa, mpe elembo soko likambo na kokamwa yango ebimi bongo, mpe soko ye alobi ete, Tóbila banzambe mosusu, oyo oyebaki te, mpe tosalela bango, okoyoka maloba na mosakoli yango to molɔti na ndɔ́tɔ yango te . . . Kasi mosakoli yango to molɔti na ndɔ́tɔ yango akobomama.” Nzambe atikaki ete bato lolenge yango báloba makambo ya lokuta mpo na komeka bosembo ya libota na ye.

Na esika ya kondima na bozoba nyonso maloba ya balɔti ndɔ́tɔ ya kokamwisa, likambo ya mayele mpo na biso lizali bongo kotalela maloba na bango na motindo boye ete tózimbisama te na mokosi monene oyo azangi komonana, ye oyo azali “mozimbisi na bato na mokili mobimba.” (Emoniseli 12:9) Kasi lolenge nini okoki mpenza komeka bango na lolenge ya sikisiki?

Liloba ya Nzambe lipemami lizali litambwisi lipesami na Ye mpo na koyeba solo. Na ntina na yango, Yesu alobaki ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Na bongo tolendisami kati na 1 Yoane 4:1 ete: “Balingami, bóndima [“maloba mapemami,” NW] nyonso te, kasi bómeka [“maloba mapemami,” NW] soko mauti na Nzambe, mpo ete basakoli na lokuta basili kobima kati na mokili.” Soki okokanisi yango na likebi nyonso na Biblia, maloba, filozofi, mpe misala na bango mikotɛmɛla yango. Liloba ya Nzambe nde lizali kokata mpo na koyeba likambo oyo lizali solo.

Molɔti ndɔ́tɔ oyo alobi ete ayebi sɛkɛlɛ́ ya makambo mabombami azali mpenza kosalela soloka to komipesa na misala misusu ya bilimu mabe? Soki ezali bongo, akweisami na Liloba ya Nzambe. “Moto akozwama kati na bino te, oyo [azali] . . . moto na zonga, to moto na kotala miɔtɔ mpo na kosakola liboso, to moto na kosala nkisi mpo na kosakola liboso, to nganga na nkisi, to molengoli, to moto na kobyanga milimo, to nganga na soloka, to moto na kosolola na bakufi. Mpo ete bato nyonso na kosala makambo oyo bazali mbindo na miso na [Yehova].”​—Deteronome 18:10-12.

Soki alobi ete azalaka na molimo oyo mokoki kokufa te, azali bongo kotɛmɛla Liloba ya Nzambe oyo eyebisi polele ete: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Azali komitombola mpe kobenda bato nsima na ye? Matai 23:12 epesi likebisi oyo ete: “Ye oyo akominɛtɔla akosɔkisama.” Mpe Misala 20:30 epesi baklisto likebisi oyo: “Kati na bino mpenza mpe mibali bakotɛlɛma kolakisa mateyo na kokosa ete bábenda bayekoli nsima na bango.”

Azali kolendisa makambo ya mobulu? Yakobo 3:17, 18 ezali bongo kokweisa ye boye: “Nde mayele mauti na Likoló ezali liboso na pɛtɔ, na nsima ezali na kimya na boboto, na kotosa noki, matondi na mawa mpe na mbuma malamu, na ntembe te, na bokosi te. Mbuma na boyengebene ikokónama na kimya na bango bakosalaka kimya.” Alukaka bokonzi ya politiki to nguya kati na mokili? Liloba ya Nzambe ekweisi ye makasi, ete: “Moto nani akani ete azala moninga na mokili amizalisi moyini na Nzambe.” Biblia ezali bongo kotɔndɔla makambo ya lokuta.​—Yakobo 4:4.

Soki moto moko alɔti lilɔ́tɔ na ntina na liwa ya mosangani moko ya libota to ya moninga na ye, mbala mosusu ezali bongo mpamba te azali komibanzabanza na ntina na moto yango. Likambo oyo ete moto yango akufaki mpenza na butu ya lilɔ́tɔ yango elimboli te ete lilɔ́tɔ yango lizalaki bongo esakweli. Mpo na lilɔ́tɔ moko lolenge yango oyo ebimaka solo, ezali na ebele ya ndɔ́tɔ oyo ebimaka solo te.

Atako kala Nzambe asalelaki ndɔ́tɔ mpo na komonisa makambo ya bisakweli mpe kopesa malako ntango Liloba na ye lizalaki naino kokomama, lelo oyo azali na mposa ya kosala bongo te. Liloba wana likomami lizali na malako nyonso ya Nzambe oyo bato bazali na mposa na yango na ntango oyo, mpe bisakweli na yango bizali kútu kotalela makambo makobima koleka mibu nkóto na nsima. (2 Timoté 3:16, 17) Na yango, tokoki kondimisama mpenza ete ndɔ́tɔ na biso ezali te bisakweli biuti na Nzambe na ntina na makambo mazali koya kasi ezali mosala ya ntina mingi oyo bɔɔngɔ́ ezali kosala mpo na kobatela kolɔngɔ́nɔ́ ya makanisi na biso.

[Elilingi na lokasa 7]

Motindo moko lokola lilɔ́tɔ ya Falo limonisaki makambo malingaki kobima, Liloba ya Nzambe lizali kongɛngisela biso mikolo mizali koya

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto