Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/2 nk. 4-12
  • Mabota minene esangani na mosala ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabota minene esangani na mosala ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mabota ya minene lelo oyo
  • Baboti basengeli kozala bato ya elimo
  • Kosala lokola ekipi
  • Kosolola malamu, kosalisana mpo na kokokisa mikano
  • Bótyela Yehova motema
  • Bólɛmba te!
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Bómema mokumba na bino ya kobatela libota
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bóteya bana na bino bálinga yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Baboti, bókokisa bamposa ya mabota na bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/2 nk. 4-12

Mabota minene esangani na mosala ya Nzambe

Mokomi ya Nzembo akomaki ete: “Bana mibali bazali likabo ya [Yehova], mpe mbuma na libumu ezali libonza. Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali [lokola] mbanzi na lobɔkɔ na elombe. Esengo ezali na moto oyo azali na ebuluki etondi na bango.”​—Nzembo 127:3-5.

YA SOLO, bana bakoki kozala lipamboli ya Yehova. Ndenge moko moto ya bokila asepelaka soki ayebi malamu kobwaka mbanzi oyo ezali na ebuluki [to likuba] na ye, baboti mpe basepelaka ntango bazali kotambwisa bana na bango na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko.​—Matai 7:14.

Na ntango ya kala, mabota ebele ya basaleli ya Nzambe ezalaki na ‘makuba matondi’ na bana. Na ndakisa, kanisá eleko oyo bazalaki baombo na Ezipito: “Bana na Yisalaele babotaki mingi mpe bakolaki mingi; bafulukaki mpe bakómaki makasi mingi, boye mokili etondaki na bango.” (Exode 1:7) Soki totaleli motuya ya bato oyo bakendaki na Ezipito mpe baoyo babimaki kuna, tokomona ete libota mokomoko ezalaki na bana soki zomi!

Na nsima, Yesu abɔkwamaki na libota oyo lelo, bato mingi bakobénga yango libota monene. Yesu azalaki mwana ya liboso, kasi Yosefe na Malia babotaki bana mosusu minei ya mibali mpe bana ya basi. (Matai 13:54-56) Ekoki kozala ete ntango batikaki Yelusaleme mpo na kozonga na mboka na bango, Malia na Yosefe bayebaki te ete Yesu atikalaki mpamba te bazalaki na bana mingi.​—Luka 2:42-46.

Mabota ya minene lelo oyo

Lelo oyo, baklisto mingi balingi lisusu kobota bana ebele te. Ntina ekoki kozala makambo ya elimo, mikakatano ya nkita, bomoi ya mokolo na mokolo ekómi mpasi, mpe bongo na bongo. Atako bongo, na bamboka mingi, bato bazali kobota bana ebele. Mwa buku La situation des enfants dans le monde 1997 eyebisi ete na Afrika, na sudi ya Sahara, bato babotaka bana mingi. Na mikili yango, mwasi mokomoko abotaka soki bana motoba.

Mpo na baboti baklisto oyo bazali na bana mingi, kobɔkɔla bango kino bákóma bato oyo balingi Yehova ezali likambo moke te. Kasi baboti mingi bazali kolonga kosala yango. Bolongi etaleli ndenge oyo libota esangani na losambo ya solo. Makambo oyo ntoma Paulo ayebisaki lisangá ya Kolinti mabongi mpe mpo na mabota ya baklisto lelo oyo. Akomaki ete: “Bandeko, nalɔmbi bino . . . ete bino nyonso bólobaka na motindo moko; bókabwana kati na bino te kasi bósangana na motema moko mpe na [elimo, NW] moko.” (1 Bakolinti 1:10) Ndenge nini kosala bomoko yango?

Baboti basengeli kozala bato ya elimo

Likambo ya ntina mingi ezali ete baboti basengeli kozala bato oyo bamipesi mobimba na Nzambe. Mose ayebisaki Bayisalaele boye: “Yoká, ɛ Yisalaele, [Yehova] azali Nzambe na biso, [Yehova] moko, mpe okolinga [Yehova] Nzambe na yo na motema na yo mobimba, mpe na molimo na yo mobimba, mpe na nguya na yo mobimba. Maloba oyo malakeli ngai yo lelo makozala na motema na yo, mpe okolakisa yango na etingya na bana na yo, mpe okosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako, mpe wana ekotambola yo na nzela, mpe wana ekolala yo, mpe wana ekotɛma yo.”​—Deteronome 6:4-7.

Tomoni ete Mose ayebisaki bango ete mibeko ya Nzambe esengeli kozala ‘na mitema’ ya baboti. Nsima na yango nde baboti bakozala ntango nyonso na mposa ya kolakisa bana na bango makambo ya elimo. Soki baboti bazali makasi na elimo, bakozala na mposa mingi ya kolakisa bana na bango makambo ya elimo.

Mpo na kokóma moto ya elimo mpe kolinga Yehova na motema mobimba, esengeli ntango nyonso kotángaka, komanyola, mpe kosalela Liloba ya Nzambe. Mokomi ya nzembo akomaki ete moto oyo asepelaka na mibeko ya Yehova mpe atángaka yango “butu na moi,” ‘akozala lokola nzete oyo bakoni penepene na bitima ya mai, ebotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ekaukaka te. Nyonso oyo akosala ekobonga.’​—Nzembo 1:2, 3.

Ndenge moko nzete ebotaka mbuma ya malamu soki ezali kozwa mai mingi, mabota oyo mazali kolya malamu na elimo mabotaka mbuma malamu oyo ekumisaka Yehova. Libota ya Uwadiegwu, oyo afandi na Afrika ya Wɛsti, ezali ndakisa na likambo yango. Atako Uwadiegwu na mwasi na ye bazali na bana mwambe, bango mibale bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza, elingi koloba Batatoli ya Yehova oyo basakolaka ntango nyonso. Alobi boye: “Sikoyo eleki mbula 20, pɔsɔ na pɔsɔ tosalaka boyekoli ya Biblia na libota. Tobandaki koteya bana na biso Liloba ya Nzambe banda bazalaki naino mike mpenza, tozalaki kosala yango kaka na boyekoli ya libota te kasi mpe na mosala ya kosakola mpe na mabaku mosusu. Sikoyo bana na biso nyonso bazali basakoli ya nsango malamu ya Bokonzi, kaka mwana oyo ya nsuka, azali sikoyo na mbula motoba, nde azwi naino batisimo te.”

Kosala lokola ekipi

Biblia elobi ete: “Ndako ekotongama malamu na nzela na mayele.” (Masese 24:3) Na kati ya libota, mayele motindo wana ebotaka elimo ya kosala na bomoko lokola ekipi. Tata azali “kapitene” ya ekipi oyo tobéngi libota; Nzambe aponi ye azala mokonzi na kati ya libota. (1 Bakolinti 11:3) Ntoma Paulo oyo apemamaki na Nzambe amonisaki bonene ya mokumba ya mokonzi ntango akomaki ete: “Soko moto nani akoleisa bato na ye te [na mosuni mpe na elimo] mpe na koleka bato kati na ndako na ye moko te, asili koboya bindimeli mpe aleki mabe moto oyo azangi kondima.”​—1 Timote 5:8.

Na boyokani na toli yango ya Liloba ya Nzambe, mibali baklisto basengeli kolandaka bokoli ya elimo ya basi na bango. Soki bazali kotikela basi na bango misala nyonso ya ndako, bakozala makasi te na elimo. Na ekólo moko ya Afrika, moklisto moko oyo autaki kozwa batisimo amilelaki epai ya bankulutu ya lisangá na ye ete mwasi na ye azalaki kosepela na makambo ya elimo te. Bankulutu bapesaki ye likanisi ete mwasi na ye asengeli na lisalisi na maloba kaka te, kasi na misala. Mobali yango abandaki kosalisa mwasi na ye na misala ya ndako. Abandaki mpe kozwa ntango ya kosalisa ye ete ayeba kotánga malamu mpe akolisa boyebi na ye ya Biblia. Mwasi asepelaki na lisungi yango, mpe sikoyo, libota mobimba esangani na mosala ya Nzambe.

Batata basengeli mpe kolandaka bokoli ya elimo ya bana na bango. Paulo akomaki boye: “Bino batata mpe bóyokisa bana na bino nkanda te, kasi bóbɔkɔla bango na mateya mpe na mpamela na Nkolo.” (Baefese 6:4) Ntango baboti bazali kolanda toli oyo elobi ete básilikisa bana na bango te, mpe etinda ya koteya bango, bana bamiyokaka ete bazali na kati ya ekipi ya libota. Mpe okomona ete bana bakosalisana mpe bakolendisana bango na bango mpo na kokokisa mikano ya elimo.

Kosala lokola ekipi esɛngi kopesa bana mikumba ya elimo na ntango bakoki mpo na komema yango. Moklisto moko oyo azali nkulutu mpe tata ya bana 11, alamukaka ntɔngɔntɔngɔ mpe ayekolaka Biblia na bana mosusu liboso ete akende mosala. Nsima ya kozwa batisimo, bana ya mikóló bazwaki mpe mokumba ya kosalisa baleki na bango, elingi koloba ete bango mpe bayekolaka Biblia na baleki na bango. Tata atalaka soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpe apesaka bango longonya mpo na milende na bango. Sikoyo bana 6 bazwi batisimo, mpe basusu bazali kosala milende mpo na kokokisa mokano yango.

Kosolola malamu, kosalisana mpo na kokokisa mikano

Mpo na mabota oyo ezali na bomoko, kosolola na elimo ya bolingo mpe kosalisana mpo na kokokisa mikano ya elimo ezali na ntina mingi. Gordon, azali nkulutu moklisto na ekólo Nigeria. Azali tata ya bana 7. Mwana ya liboso azali na mbula 27 mpe oyo ya nsuka azali na mbula 11. Bango moko baboti bazali babongisi-nzela na bana 6. Eumeli naino te, mwana ya nsuka azwaki batisimo. Ntango nyonso abimaka na mosala ya kozalisa bayekoli elongo na baboti to na bandeko na ye. Bana mibale ya mikóló bazali basaleli ya misala na lisangá.

Ye moko Gordon ayekolaki na mwana mokomoko Biblia. Longola wana, bazali na ebongiseli malamu ya boyekoli ya Biblia. Ntɔngɔ nyonso bayanganaka mpo na kotánga mokapo ya Biblia mpe babongisaka makita ya lisangá na libota.

Moko na mikano na bango ezali ete moto mokomoko na kati ya libota asengeli kotánga masolo nyonso na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lamuká. Eleki mwa mikolo, babakisaki botángi ya Biblia na ebongiseli na bango. Ntango bazali kosolola makambo oyo batángaki, balendisanaka ete bátika momeseno yango te.

Koyekola Biblia na libota pɔsɔ na pɔsɔ ekómá mpenza momeseno na bango na boye ete moto moko te azalaka na mposa bákundwela ye yango. Moto nyonso azelaka yango na mposa makasi. Lokola bambula ezali koleka, makambo ya kotalela, ndenge ya kosala boyekoli, mpe boumeli na yango ebongwanaka na kotalela bambula mpe bamposa ya bana. Libota ekómi na boyokani makasi na basaleli mosusu ya sembo ya Nzambe mpe yango ememeli bana litomba.

Libota yango basalaka makambo mingi elongo mpe bazwaka ntango ya kominanola elongo. Mbala moko na pɔsɔ, basalaka mwa ebongiseli ya komisepelisa na “mpokwa na kati ya libota.” Basalaka masano ya mituna, kobɛta masolo ya kosɛkisa, babɛtaka piano, babɛtaka masapo, mpe makambo mosusu mpo na kominanola. Na mabaku mosusu, bakendaka kolekisa ntango pembeni ya mai to na bisika mosusu ya malamu.

Bótyela Yehova motema

Libota moko te na kati ya mabota oyo tolobeli awa etalelaka mokumba ya kobɔkɔla bana mingi lokola likambo moke. Moklisto moko alobaki ete: “Kozala tata malamu mpo na bana mwambe ezali etumba monene. Esengeli kozwa bilei mingi ezala ya mosuni to ya elimo mpo na koleisa bango; nasengeli kosala mosala makasi mpo nazwa mbongo oyo ekokoka na bamposa na bango. Sikoyo bana ya mikóló bakómi bilenge, mpe bango nyonso mwambe bazali na kelasi. Nayebi ete koteya bango makambo ya elimo ezali na ntina mingi, kasi bana na ngai mosusu bazali matoi mangbongi mpe balingaka kotosa te. Bayokisaka ngai mawa, kasi nayebi ete ngai moko mpe ntango mosusu nasalaka makambo oyo eyokisaka Yehova mawa, kasi alimbisaka ngai. Yango wana, nasengeli kokanga motema mpe nasengeli kolɛmba te mpo na kosembola bana na ngai kino bakozwa makanisi malamu.

“Namekaka kolanda ndakisa ya Yehova mpo na motema molai na ye epai na biso mpamba te alingi ete bato nyonso bábongola motema. Nayekolaka na libota na ngai, mpe bana mosusu bazali kosala makasi mpo bázwa batisimo. Mpo nalonga, natyelaka makasi na ngai moko motema te; na makasi na ngai moko nakoki kosala eloko moko te. Namekaka kopusana pene na Yehova na nzela ya libondeli mpe nasalelaka maloba ya lisese oyo elobi ete: ‘Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.’ Yehova akosunga ngai nalonga koteya bana na ngai.”​—Masese 3:5, 6.

Bólɛmba te!

Mbala mosusu kobɔkɔla bana ekoki komonana lokola mosala ya mpunda, kasi kolɛmba te! Lendendelá! Soki bana na yo bazali kosepela te to bazali kobongwana te atako ozali kosala nyonso, mbala mosusu bakobongwana nsima. Esɛngaka ntango mingi mpo mwana akola mpe akóma moklisto oyo azali na mbuma ya elimo.​—Bagalatia 5:22, 23.

Monica, afandi na ekólo Kenya; ye auti na libota oyo ezali na bana zomi. Alobi ete: “Baboti na ngai bateyaki biso solo ya Biblia banda bomwana mpenza. Pɔsɔ na pɔsɔ, Papa azalaki koyekola na biso mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mosala na ye ezalaki kopesa ye nzela te ya kopona mikolo ya sikisiki oyo tokoki koyekola. Ntango mosusu, soki auti mosala, akuti biso tozali kosakana na libándá, azalaki koyebisa biso ete nsima ya miniti mitano biso nyonso tosengeli kozala na kati ya ndako mpo na koyekola Biblia. Nsima ya koyekola Biblia, azalaki kosɛnga biso ete tótuna mituna to tólobela makambo nyonso oyo tolingi.

“Azalaki koluka koyeba soki baninga na biso bazali bana malamu. Mbala na mbala, Papa azalaki kokende na eteyelo mpo na kotuna balakisi soki etamboli na biso ezali ndenge nini. Mokolo moko ayokaki ete bayaya na ngai misato ya mibali babundaki na bana mosusu mpe ete ntango mosusu bazalaki kosala mobulu. Papa apesaki bango etumbu mpo na etamboli na bango mabe, kasi na lisalisi ya Biblia alimbwelaki bango mpe ntina oyo basengeli kozala na etamboli malamu.

“Baboti na biso balakisaki biso matomba ya koyangana na makita na ndenge bazalaki kobongisa makita yango na biso elongo. Bazalaki kosalisa biso bilakiseli na ndako mpo ete tókóma basakoli. Banda bomwana tozalaki kobima elongo na baboti na biso na mosala ya kosakola.

“Lelo oyo, bayaya na ngai mibale ya mibali bazali babongisi-nzela monene, yaya na ngai moko ya mwasi azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mpe leki na ngai mosusu ya mwasi, abalá mpe azali na bana, azali Motatoli ya molende. Baleki na ngai mibale ya basi, moko azali na mbula 18, mosusu na mbula 16, basili kozwa batisimo. Baleki mibale ya mike ya mibali bazali mpe koyekola. Sikoyo nakokisi mbula misato ya mosala na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo Kenya. Nalingaka baboti na ngai mpe nasepelaka na bango mpamba te bazali bato ya elimo; bapesaki biso ndakisa ya malamu.”

Ata soki ozali na bana boni, kolɛmba te kosalisa bango na kotambola na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yehova akopambola milende na yo mpe okoloba lokola ntoma Yoane mpo na bana na ye ya elimo ete: “Nazali na esengo eleki oyo te ete nayoka ete bana na ngai bazali kotambolaka kati na makambo na solo.”​—3 Yoane 4.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto