Bomoi nsima ya kufa—Lolenge nini, epai wapi mpe ntango nini?
MOZALISI na bato mpe Mopesi-na-bomoi azali kopesa ndanga na ye moko ete kufa ya bato ezali kotya nsuka te na bomoi na bango libela. Lisusu, Nzambe azali kondimisa biso ete likoki ezali bobele te ya kozala na bomoi lisusu mpo na mwa ntango moke kasi kozala na bomoi na elikya ya kokufa lisusu te! Ntoma Paulo amonisaki yango polele, kasi na kondimisama mpenza na maloba oyo: “[Nzambe] amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye [Klisto Yesu] na bakufi.”—Misala 17:31.
Ya solo, yango ezali kobimisa mituna misato ya ntina oyo mizwi naino biyano te: Ndenge nini mokufi akoki kozonga lisusu na bomoi? Yango ekosalema ntango nini? Bomoi yango ya sika ekozala epai wapi? Na mokili mobimba, biyano ndenge na ndenge bizali kopesama na mituna yango, kasi fungola mpenza mpo na koyeba bosolo ya likambo ezali kososola na bosikisiki nini ekómelaka bato ntango bakufaka.
Kozanga kokufa ezali nde eyano?
Likanisi moko lipalangani bipai binso ete eteni moko oyo ezali kati na moto nyonso ekufaka te mpe ete bobele nzoto nde ekufaka. Na ntembe te osilá koyoka likambo motindo wana. Eteni yango oyo elobamaka ete ekufaka te etalelami na lolenge mingi lokola “molimo” to “elimo.” Elobami ete etikalaka na bomoi na ntango ya kufa ya nzoto mpe ekóbaka kozala na bomoi epai mosusu. Na bosembo mpenza, endimeli motindo wana euti na Biblia te. Ya solo, Baebele ya kala oyo balobelami na Biblia bazalaki na elikya ya kozala na bomoi nsima ya liwa, kasi te na kobika ya eteni moko ya bomoto na bango oyo ekufaka te. Bazalaki kotalela na elikya nyonso kozonga na bomoi awa na mabelé na mikolo mizali koya na nzela ya lisekwa ya kokamwisa.
Abalayama tata na mabota azali ndakisa monene ya moko ya baoyo bazalaki na kondima kati na lisekwa ya bakufi na mikolo mizali koya. Komonisáká bolingi oyo Abalayama azalaki na yango ya kopesa mwana na ye Yisaka lokola mbeka, Baebele 11:17-19 eyebisi biso ete: “Mpo na kondima, Abalayama atombolaki Yisaka lokola mbeka wana emekamaki ye . . . Atángaki ete Nzambe azalaki na nguya ya kosekwisa bato ata na bakufi. Bongo tokoki koloba ete azwaki ye lisusu,” mpamba te Nzambe asɛngaki te ete Yisaka apesama lokola mbeka. Elembeteli mosusu ya kondima ya ntango ya kala kati na Bayisalaele ete bakozonga lisusu na bomoi na ntango ekoya (na esika ete ezala kokóba ya bomoi kati na esika moko ya elimo), emonani na maloba ya mosakoli Hosea oyo akomaki ete: “Longwa na lobɔkɔ na Sheol [nkunda ya bato nyonso] nakosikola bango; longwa na kufa nakobikisa bango.”—Hosea 13:14, NW.
Na bongo, ntango nini likanisi ya kozanga kokufa ya molimo ekɔtaki kati na makanisi mpe bindimeli ya Bayuda? Búku Encyclopaedia Judaica endimi ete “ezalaki mbala mosusu na nsé ya bopusi ya Bagreke nde liteya ya kozanga kufa ya molimo ekɔtaki kati na losambo ya Bayuda.” Nzokande, kino na ntango ya Klisto, Bayuda ya molende bazalaki kondima mpe kozela lisekwa na mikolo mizali koya. Tokoki komona yango polele na lisoló ya Yesu elongo na Malata ntango ndeko mobali na ye Lasalo akufaki: “Malata alobi na Yesu ete, Motei, soko ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na ngai akufi te. . . . Yesu alobi na ye ete, ndeko na yo akosekwa. Malata alobi na ye ete, nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.”—Yoane 11:21-24.
Ezalela ya bakufi
Awa lisusu, ntina ya kobanza likambo yango ezali te. Bosolo ya Biblia ezali ete bakufi “balali mpɔngi,” bazali koyeba eloko moko te, bazali ata na liyoki moko te to boyebi moko te. Kati na Biblia bosolo yango emonisami te na lolenge ya kokakatana, to na lolenge ya mpasi mpo na kososola. Tótalela mikapo ya Makomami oyo mizali mpasi te mpo na kososola: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te . . . Oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na nguya na yo mpo ete ezali na mosala te, na mwango te, na mayele te, to boyebi te kati na esika na bakufi, esika ekokenda yo.” (Mosakoli 9:5, 10) “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te. Soko [elimo] ekolongwa, moto akozonga na mabelé lisusu; bobele na mokolo yango kokanisa na ye esili.”—Nzembo 146:3, 4.
Na yango, ezali mpasi te na kokanga ntina ete Yesu atalelaki kufa lokola mpɔngi. Ntoma Yoane akomi lisoló oyo lisalemaki kati na Yesu mpe bayekoli na ye: “Alobi na bango ete, Moninga na biso Lasalo asili kolala mpɔngi; kasi nakokenda kobetola ye. Bayekoli na ye balobi na ye ete, Motei, soko alali mpɔngi mbɛlɛ akobika. Nde Yesu alobi mpo na kufa na ye; bango bakanisi ete azalaki koloba mpo na kolala mpɔngi mpenza. Bongo Yesu alobi na bango polele ete, Lasalo akufi.”—Yoane 11:11-14.
Moto akufaka na mobimba mpenza
Kufa ya moto esalemaka na mobimba na yango, kasi te bobele kufa ya nzoto. Engebene maloba ya polele oyo mazwami kati na Biblia, tosengeli kosukisa ete moto azali te na molimo oyo ezangi kokufa oyo ekoki kotikala na bomoi na ntango ye akufi. Makomami mazali komonisa polele ete molimo ekoki kokufa. “Talá, milimo nyonso mizali na ngai; molimo na tata mpe molimo na mwana mizali na ngai; molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Epai moko te maloba “ekufaka” to “kozanga kokufa” malobelami ete moto abotamaka na yango.
Búku New Catholic Encyclopedia ezali kopesa makanisi oyo mabongi likoló na maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo mabongolami na “molimo” kati na Biblia: “Molimo kati na K.K. [Kondimana ya kala] ezali nepeš, kati na K.S. [Kondimana ya sika] [psy·kheʹ]. . . . Nepeš euti na mosisa ya moboko oyo elimboli kopema, mpe na yango . . . lokola mpema ekesenisaka oyo ezali na bomoi mpe oyo ekufa, nepeš elimboli bomoi to ekómaki bongo kolimbola moto ye moko to bobele bomoi ya moto. . . . Bokabwani ezali te [bokabwani kati na biteni mibale] ya nzoto mpe molimo kati na K.K. Moyisalaele azalaki bongo komona makambo na lolenge ya polele, na mobimba na yango, mpe azalaki kotalela bato na mobimba kasi te lokola kosangisama ya biteni bikeseni. Nzokande, liloba nepeš, oyo ebongolami na liloba na biso molimo, elimboli soko moke te ete molimo ezali eteni mosusu oyo ekeseni na nzoto to na moto ye moko. . . . Liloba [psy·kheʹ] ezali liloba ya K.S. oyo ekokani na nepeš. Ekoki kolimbola eloko esimbi bomoi, bomoi yango moko, to moto na bomoi.”
Na yango, okoki komona ete na ntango ya kufa, moto oyo azalaki na bomoi, to molimo ya bomoi, ezalaka lisusu na bomoi te. Nzoto ezongaka na “mputulu” to na biloko ya mabelé, moke nsima ya kokundama mpe kopola to kokóma mputulu nsima wana ezikisami. Yehova ayebisaki Adama ete: “Ozali mputulu mpe okozonga kati na mputulu.” (Genese 3:19) Na bongo, ndenge nini bomoi ekoki kozala nsima ya kufa? Ezali mpamba te Nzambe azali koyeba kati na makanisi na ye moto oyo akufi. Yehova azali na nguya ya kokamwa mpe na likoki ya kokela bato, na bongo ezali likambo ya kokamwa te ete kati na mayele na ye akoka kobomba motindo ya moto yango. Ɛɛ, bilikya nyonso mpo na moto yango ya kozala lisusu na bomoi ezali epai na Nzambe.
Yango ezali ndimbola ya liloba “elimo,” oyo elobelami lokola ezongi epai na Nzambe ya solo oyo apesaki yango. Komonisáká likambo yango, mokomi ya mokanda ya Mosakoli oyo apemamaki alobi ete: “Mpe mputulu ekozonga na mabelé lokola ezalaki yango, mpe [elimo] ekozonga epai na Nzambe oyo apesaki yango.”—Mosakoli 12:7.
Bobele Nzambe nde akoki kopesa moto bomoi. Ntango Nzambe asalaki moto kati na Edene mpe afuli mpema kati na zolo na ye “mpema na bomoi,” longola likambo ya kotondisáká mimpúlúlú ya Adama na mopɛpɛ, Yehova asalaki ete nguya ya bomoi esala mosala kati na baselile nyonso oyo ezali na nzoto. (Genese 2:7) Mpo ete nguya yango ya bomoi ekoki koleka longwa na baboti kino bana na nzela ya mwango ya zemi mpe kobotama, ebongi mpenza kolobama ete bomoi ya moto eutaka epai ya Nzambe, atako ezwami nde na nzela ya baboti.
Lisekwa—Ntango moko ya esengo
Lisekwa esengeli te kotalelama lokola kobotama mbala na mbala, likambo oyo lizwi moboko te kati na Makomami Mosantu. Kobotama mbala na mbala ezali endimeli oyo ete nsima wana moto akufi, abotamaka lisusu na motindo moko to na mitindo mingi milandani ya kozala na bomoi. Yango elobamaka ete ekoki kozala na bomoi malamu mingi to na bomoi mabe koleka oyo moto azalaki na yango liboso, engebene makambo oyo asalaki na boumeli ya bomoi wana ya liboso. Engebene endimeli yango, moto akoki “kobotama lisusu” ata lokola moto to lokola nyama. Yango ekeseni mpenza na oyo Biblia ezali koteya.
Liloba “lisekwa” ebongolami longwa na liloba ya Greke a·naʹsta·sis, oyo elimboli mpenza “kotɛlɛma lisusu.” (Babongoli ya Liebele babongolaki a·naʹsta·sis na maloba ya Liebele techi·yathʹ ham·me·thimʹ, mpe yango elimboli “kobikisama ya bakufi.”) Lisekwa etalelaka kozongisa na mosala motindo ya bomoi ya moto moko, motindo ya bomoi oyo Nzambe abombaki kati na mayele na ye. Engebene mokano ya Nzambe mpo na moto yango, ye akozongisama na nzoto ya mosuni to na nzoto ya elimo; na bizaleli na ye, kozaláká na bomoto mpe makanisi bobele lokola ntango ye akufaki.
Ɛɛ, Biblia ezali kolobela mitindo mibale ya lisekwa. Moko ezali lisekwa ya likoló na nzoto ya elimo, yango ezali mpo na mwa bato moke. Yesu Klisto asekwisamaki na motindo yango. (1 Petelo 3:18) Mpe amonisaki ete lisekwa motindo yango elingaki mpe kozala mpo na baye baponamaki kati na baoyo balandaki matambe na ye, kobanda na bantoma na ye ya sembo, apesaki bango elaka oyo: “Nakokenda kobongisela bino esika. . . . Nakoya lisusu mpe nakoyamba bino epai na ngai ete esika ezali ngai, bino bozala mpe wana lokola.” (Yoane 14:2, 3) Biblia ezali kolobela yango lokola “lisekwa ya liboso,” liboso na oyo etali molɔngɔ́ mpe lokumu na yango. Na bongo Makomami mazali komonisa baoyo basekwisami mpo na bomoi ya likoló ete bazali banganga ya Nzambe mpe bakoyangela lokola bakonzi elongo na Klisto Yesu. (Emoniseli 20:6) “Lisekwa yango ya liboso” ezali mpo na motángo ya bato moke, mpe Makomami yango moko ezali komonisa ete bato 144 000 bakozwama kati na mibali mpe basi ya sembo. Bakomonisa bosembo na bango epai na Yehova Nzambe mpe Klisto Yesu kino kufa na bango, kozaláká na molende ya kopesa litatoli epai na basusu na ntina na kondima na bango.—Emoniseli 14:1, 3, 4.
Na ntembe te, lisekwa ya bakufi ezali ntango moko ya esengo monene mpo na baoyo basekwisami mpo na kozala na bomoi na likoló. Kasi esengo esuki bobele mpo na bango te, esengo ezali mpe mpo na baoyo bakosekwisama mpo na kozala na bomoi awa na mabelé. Baoyo bakosekwisama bakokutana na baoyo bakobika na nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. Nsima ya komona motángo moke ya baoyo babongi mpo na lisekwa ya likoló, ntoma Yoane apesamaki emonaneli ya “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Oyo nde ntango ya esengo ekozala wana bamilió, mbala mosusu bamiliare ya bato bakozonga lisusu na bomoi awa na mabelé!—Emoniseli 7:9, 16, 17.
Yango ekozala ntango nini?
Nsai mpe esengo ekoki kozala ya ntango mokuse soki bakufi bazongi lisusu na mabelé oyo etondi na bitumba, koboma, kobeba ya ezingelo mpe mobulu—lokola yango ezali komonana lelo oyo. Te, lisekwa esengeli kozela kotyama ya “mabele ya sika.” Kanisá naino, mokili mobimba mopɛtolami na bato mpe biyangeli oyo kino sikawa bazali bobele na mokano ya kobebisa mabelé mpe kobebisa kitoko na yango, bakisa mpe bampasi oyo bazali kopesa epai na bafandi na yango.—2 Petelo 3:13; Emoniseli 11:18.
Ya solo mpenza, ntango mpo na lisekwa ya bato nyonso ezali liboso. Nzokande likambo ya kosepelisa ezali ete etikali lisusu mosika te. Ya solo, esengeli kozela nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo. Nzokande, bilembeteli mingi bizali komonisa ete kobima ya pwasa ya “bolozi monene” ebɛlɛmi, oyo ekosuka na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso.”—oyo ebéngami Armagedon. (Matai 24:3-14, 21; Emoniseli 16:14, 16) Yango ekoyeisa kolongolama ya bato mabe nyonso na etando kitoko oyo, mabelé. Nsima na yango Boyangeli ya mbula nkóto ya Klisto Yesu ekobanda, wana mabelé makobongolama mokemoke na paladiso.
Biblia ezali komonisa ete na boumeli ya boyangeli yango ya mbula nkóto, lisekwa ya bakufi ekosalema. Na nsima elaka ya Yesu oyo apesaki ntango azalaki awa na mabelé ekokokisama: “Bókamwa na likambo oyo te, mpo ete ntango ekoya wana nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima . . . kino lisekwa.”—Yoane 5:28, 29.
Bopusi ya elikya ya lisekwa
Oyo nde elikya kitoko ya lisekwa mpo na mikolo mizali koya—ntango wana bakufi bakozonga lisusu na bomoi! Oyo nde elendiseli tozwi wana totungisami na bobangé, makɔnɔ, makámá oyo tomizelaki na yango te mpe mawa, mpe mitungisi ya mokolo na mokolo mpe mikakatano ya bomoi! Ezali kolongola mpasi ya liwa—ezali kolongola mawa nyonso te kasi ezali kokesenisa biso na baoyo bazangi elikya mpo na mikolo mizali koya. Ntoma Paulo ayebaki libɔndisi yango ya elikya ya lisekwa wana alobaki maloba oyo: “Bandeko, tolingi te ete bózanga koyeba makambo na bango basili kolala ete bóyoka mawa te pelamoko bamosusu baoyo bazali na elikya te. Zambi soki tozali kondima ete Yesu akufi mpe asekwi lisusu, bongo na nzela na Yesu, Nzambe akoyeisa lisusu bango balali esika moko na ye.”—1 Batesaloniki 4:13, 14.
Mbala mosusu tosilaki koyeba bosolo ya likanisi mosusu oyo ekómelaki Yobo mofandi na epai ya ebimelo na ntango, wana alobaki: “Moto akopolaka lokola eloko ebebi, lokola elamba elyami na mpomboli. Moto oyo abotami na mwasi azali na mikolo mingi te mpe atondi na mpasi. Akobima lokola fololo mpe akokauka, akolimwa lokola molili mpe akoumela te.” (Yobo 13:28–14:2) Biso mpe toyebi makambo mosusu ya bomoi oyo tokoki kotyela yango motema te mpe bosolo oyo ete “ntango mpe makambo makanami te” ekoki kokómela moto nyonso kati na biso. (Mosakoli 9:11) Ya solo, moto moko te kati na biso asepelaka na likanisi ya kokufa. Nzokande, elikya ya solo ya lisekwa ezali kosalisa na kolongola kobanga ya kufa.
Na bongo, lendisamá! Talá liboso koleka likoki ya kolala kati na kufa na kozeláká kozongisama na bomoi na nzela ya lisekwa ya kokamwisa. Talelá na motema likoló elikya na bomoi ezangi nsuka na mikolo mizali koya, mpe bakisá na yango esengo ya koyeba ete ntango motindo wana oyo epambolami ezali mosika te.