Tózala na kondima mpo na bomoi ya seko
’Tózala na kondima mpo na kobikisa molimo.’—BAEBELE 10:39, MN.
1. Encyclopédie catholique endimi nini mpo na ndimbola na Biblia na lilola “molimo”?
ESIKA moko te Biblia ezali komonisa ete bato bazali na molimo ezangi kokufa oyo ezali kotika nzoto nsima na kufa ya moto mpe elandi kozala na bomoi ya seko kati na makoló. Ata la Nouvelle Encyclopedie catholique (angl.) endimi yango. Tozali kotanga na kati boye: “Likanisi ya kobika na molimo nsima na kufa ezali komonana mpenza kati na Biblia te. . . . Kati na Kondimana na Kala, molimo emonisi eteni moko ya moto te, kasi moto na mobimba na ye, na ndimbola mosusu moto ye moko lokola ekelamu na bomoi. Bobele bongo, kati na Kondimana na Sika, molimo emonisi bomoi ya moto, ya moto ye moko. Na yango, moto azali na molimo te: ezali ye moko nde molimo.
2. (a) Endimeli oyo ete molimo ekufaka te eutaki wapi? (b) Solo mpo na ezalela na moto nsima na kufa ezali nini?
2 Lokola lisolo oyo ezalaki liboso emonisaki yango makasi, endimeli oyo ete molimo ekufaka te ezali likanisi na bopakano oyo eumeli longwa na ebandeli na lisolo na bato. Mobandisi na liteya yango ezali ye oyo atiaki ntembe na maloba polele oyo Nzambe alobaki ete moto ‘akokufa solo’ soki azangi botosi. (Genese 2:17) Ezali bongo motemeli, Satan le Diable, ye moto alobaki ete: “Bino bokokufa solo te.” (Genese 3:4). Ezalaki lokuta. (Yoane 8:44) Nsima na yango, Satana abimisaki mpe asimbaki liteya ya kozanga kokufa na molimo na moto. Nzokande, solo likolo na ezalela na moto nsima na kufa ezali oyo tozali kotanga na Liloba lipemami na Nzambe, na Mosakoli 9:5 ete: ‘Bakufi . . . bayebi eloko te.’—Tala Baloma 5:12.
Elikya na bomoi ya seko
3. Biblia ezali kolobela mingi mpo na elikya nini?
3 Atako Biblia ezali komonisa polele ete likanisi oyo ete molimo ekufaka te ezali lokuta, nzokande ezali mpe kolobela mingi mpo na bomoi ya seko. Elikya ya bomoi ezangi nsuka ezalaki liteya na moboko na Yesu. Alobaki ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3). Alobaki mpo na baoyo bandimeli Nzambe mpe ye ete: “Nazali kopesa bango bomoi na seko.” (Yoane 10:28). Na elikya nyonso, alobaki: “Ye oyo akondima ngai azali na bomoi na seko. . . . akozala na bomoi libela.” (Yoane 6:47, 51). Alobi lisusu ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana na ye bobele moko, ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko.” Yoane 3:16.
4. Yesu apesaki elikya nini mpo na ntango ezali koya?
4 Lokola molimo ezangi kokufa oyo ebikaka nsima na kufa ezali te, ndenge nini elaka na Biblia ya bomoi ya seko ekokokisama? Yesu apesaki engengiseli mpo na likambo yango ntango akendaki kotala Malata mpe Marie nsima na liwa na ndeko na bango Lazare. Alobaki na Malata ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akozonga na bomoi.” Na bongo atunaki na Malata ete: “Ozali kondima yango?” Ye azongisi monoko ete: “Ee, Nkolo, nazali kondima ete yo ozali Klisto, Mwana na Nzambe.”—Yoane 11:25-27.
5, 6. Yesu emonisaki nini ntango asekwisaki Lazare?
5 Mpo na kopesa elembo ete ye, Mwana na Nzambe, azwaki nguya ya kozongisa bakufi na bomoi, Yesu akendaki na liyita na Lazare. Oyo asilaki kokufa longwa mikolo minei, mpe nzoto na ye ebandaki kopola. Ata bongo, “(Yesu) angangi na mongongo makasi ete: ‘Lazare, bima libanda!’ Ye oyo asili kokufa abimi naino ekangami ye na bilamba na makolo mpe na maboko mpe elongi na ye ezingami na litambala Yesu alobi na bango ete: “Bokangola ye mpe tika ete alongwa.’ ” (Yoane 11:43, 44). Lazare oyo akufaki, azongisamaki na bomoi!.
6 Lazare abimaki uta na likolo te to esika mosusu te oyo ezali efandelo na elimo. Na liwa na ye, akendaki na makoló te, kasi azalaki kati na nkunda na kozanga koyeba likambo moko, epai bakufi nyonso bazali. (Nzembo 146:4; Yoane 3:13; Misala 2:34). Mbele ekozala bozoba na kokanisa ete molimo na Lazare esilaki kobanda kooka bisengo na likoló, mpe na nsima elongolamaki na likoló mpo na kosangana lisusu na nzoto ezangi kokoka awa na mabelé mpo na kobika lisusu kati na mokili etondi na mpasi, na maladi mpe na liwa. Nzokande lokola akendaki na likoló te, Lazare asepelaki mpo na lisekwa na ye, mpo epesaki ye nzela ya kobakisa mikolo na bomoi na ye mpe kokutana lisusu na balingami na ye. Na nsima, akufaki lisusu.
7, 8. (a) Bato nini mosusu Yesu esekwisaki? (b) Mpo na nini Yesu akokisaki bikamwiseli yango?
7 Ntango Yesu asekwisaki elenge mwasi, baboti na mwana oyo “bakamwaki na kokamwa monene”. (Malako 5:42.) Ata bongo, elenge mwasi oyo, ye mpe, asengelaki lisusu kokufa Ntango Yesu azongisaki na bomoi mwana mobali na mwasi akufela mobali na mboka Naina, “bato nyonso bayokaki nsomo mpe bakumisaki Nzambe”. (Luka 7:16.) Kasi elenge mobali oyo asukaki bobele na kokufa lisusu. Mpo na bikamwiseli oyo, le Nouveau dictionnaire international de théologie du Nouveau Testament (angl.) elobi: “Baoyo Yesu asekwisaki na boumeli na mosala na ye awa na mabelé bakufaki lisusu, mpamba te lisekwa na bango epesaki kozanga kokufa te.”
8 Mpo na nini Yesu asekwisaki bato wana longwa na kati na bakufi? Ezalaki mpo na kopesa bango bomoi ya seko na eleko wana te, kasi mpo na komonisa ete azalaki Masiya mpe komonisa nguya oyo Nzambe apesaki ye. Yango epesaki nzela epai na bato na kozala na kondima kati na elikya ya lisekwa mpe ya bomoi ya seko na nse na boyangeli ekoya ya Bokonzi na likoló na Nzambe oyo ekotambwisama na Klisto.—Matai 6:9, 10; Yoane 11:41, 42.
9. Boyebi nini ya solo Malata mpe ntoma Paulo bazalaki na yango mpo na liteya na Yesu likolo na elikya na lisekwa?
9 Malata asilaki koyoka Yesu koloba mpo na elikya yango. Yango wana akokaki kozongisa na ntina na Lazare ete: “Nayebi ete akosekwa na lisekwa na mokolo na nsuka.” (Yoane 11:24). Ayebaki ete lisekwa ekozala, na mokolo na nsuka na ye te (oyo ya Lazare), kasi “na mokolo na nsuka”, elingi koloba na Mokolo na Kosambisa, ntango bakufi bakosekwa na nse na Bokonzi na Nzambe. Ntoma Paulo ayebaki mpe yango, mpamba te alobaki: “(Nzambe) asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo.” (Misala 17:31). Alobi lisusu ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15). Na bongo alobi te ete lisekwa esili kosalama, kasi ete “lisekwa ekozala” na ntango ekoya, na nse na Bokonzi.
10. Profesere moko Mofalanse akomaki nini mpo na bindimeli ya boklisto ya lokuta na ntina etali lisekwa na kotalela yango na mateya na Biblia oyo mazali polele na likambo yango?
10 Kati na mokanda na ye lmmortalité de l’ame ou Resurrection des morts? Oscar cullmann, profesere Mofalansé ye protesta, akomi ete: “Bokeseni monene ezali kati na kozela na baklisto mpo na lisekwa na bakufi mpe kondima ya Bagreke na kozanga kokufa na molimo. . . . Lokola boklisto oyo eyaki nsima esangisaki kondima yango mibale mpe ete moklisto oyo azali na boyebi moke lelo azali kobulunganisa yango mpenza, epesaki biso nzela te ya kotika koloba likolo na oyo elongo na balimboli mosusu na Biblia tozali komona yango lokola solo. . . . Bomoi nyonso mpe likanisi nyonso na Kondimana na Sika etondi na kondima kati na lisekwa. . . . Moto mobimba oyo akufi mpenza, abiangami lisusu na bomoi na nzela na mosala na sika na Nzambe Mozalisi.”
Lisekwa Mpo na kozala na bomoi wapi?
11, 12. (a) Mokano na Nzambe ezali nini mpo na oyo etali bato mpe mabelé? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki ete mokano na Nzambe mpo na mabele ebongwanaki te?
11 Ntango Nzambe azalisaki bato, apesaki bango mabelé mpo ezala efandelo na bango libela mpe akanaki ete etando yango etonda na bato bayengebene. (Genese 1:26-28; Nzembo 115:16). Biblia ezali komonisa Jéhovah lokola “ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango, ye akokisaki yango, atongaki yango mpo ezala mpamba te, kasi mpo ete bato bafanda wana.”—Yisaya 45:18.
12 Atako kozanga kokoka mpe liwa ezali na mokili uta bikeke mingi—kobanda botomboki na moto—mokano na Nzambe ezali ntango nyonso ete mabelé ezala efandelo na moto libela. Tozali kotanga mpo na yango ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29). “Esengo epai na basokemi, mpamba te bakosangola mokili.” (Matai 5:5). Na yango, ntango Yesu azongisaki bakufi na bomoi, asekwisaki bango bobele awa na mabelé, mpe bato oyo bazalaki wana bayebaki bango kozanga nkaka. Likambo yango, emonisaki ete, na nse na Bokonzi, bakufi bakozongisama na bomoi na mabelé epai bakopesamela likoki ya kozala na bomoi ya seko. (Emoniseli 20:12, 13). Na lolenge yango mokano na Nzambe mpo na bato mpe mabelé ekokokisama.—Yisaya 46:9-11; 55:11; Tite 1:1, 2.
13. Mangomba na boklisto ya lokuta bakangami na mokakatano nini, mpe ndenge nini bazali komeka kobima na kati na yango?
13 Nzokande, lokola Mangomba na boklisto ya lokuta bazali kondima kozanga kokufa na molimo, bakangami kati na mokakatano: Ndenge nini koyokanisa lisekwa na “moto na mobimba na ye” lisekwa oyo Yesu asalaki, mpe kondima na bango ete molimo ekufaka te, oyo esili kokende na likoló to na lifelo? L’Encyclopédie catholiaue elobi ete “Concile (likita monene ya basángó) ya minei na Latran elobaki ete bato nyonso, baponami to baoyo baboyami, bakosekwa na nzoto oyo bazali na yango sikawa’.” Ebakisi: ”Lokola nzoto ezali kosangana na mabe ya molimo mpe ezali moninga na makambo malamu na molimo, boyengebene na Nzambe ekoki kosenga ete nzoto mpe ezwa etumbu to lifuti oyo molimo ekozwa.” Engebene kondima oyo, nzoto ekosangana na molimo na likoló to na lifelo. Mpo na ntango boni? Bobele mokanda yango elobi ete “nzoto oyo ekosekwa, ezala ya basantu to ya basumuki, ekolata kozanga kokufa”.
14. Sángo moko jésuite akomaki nini mpo na komeka kongengisa to kolimbola likanisi oyo boklisto ya lokuta bazali na yango likoló na lisekwa ya nzoto?
14 Na mokanda na ye La vie future (angl.), jésuite J. Sasia akomi: “Bomoi na likoló ekozala bongo bomoi moko ya bisengo lisusu mpo mayoki ekobakisama (ya nzoto esangani na molimo).” Mpo na nzoto oyo ekosangana na molimo na yango na lifelo, alobi ete: “Kati na lifelo, nsima na lisekwa (na nzoto), eyokeli mokomoko na nzoto na moto ekozwa etumbu na ndenge na yango. . . . Bisimbeli mpe biyokeli mingimingi ezali yango nde ekonyokwama, mpamba te ezali mpo na masumu na nzoto nde bato mabe basalaki masumu kotemela Nzambe. . . . Kosangana na yango elongo na nzoto na bango ekozala mpo na bango ntina na konyokwama mpe na kotungisama ebakisami.”
15. Mpo na nini koteya ete Nzambe azali konyokola bato seko kati na lifelo na móto ezali kotuka ya?
15 Na yango, kondima likanisi na bopakano na kozanga kokufa na molimo ememaki boklisto ya lokuta na kondima likanisi mosusu ya bopakano: oyo ya minyoko makasi mpe na seko na milimo, mpe ata na nzoto, kati na lifelo. Nzokande, mpo na ezalela na kala oyo etalaki kotumba bana lokola mbeka epai na banzambe ya lokuta, Jéhovah alobaki ete: ‘Batumbi bana babali na bango lokola mbeka na kotumba epai na Bala, eloko oyo nalakaki yango te, nalobaki yango mpe te, eyaki uta kati na makanisi na ngai te.’ (Yilímia 19:5). Ezali bongo kotuka Nzambe na koteya ete azali konyokola bato seko, wana Liloba na ye moko emonisi polele ete basumuki oyo babongoli motema te bakobomama nyee. “Soko moto (molimo, MN) nani akoyoka mosakoli yango te, akobomama nyee na kati na bato.”—Misala 3:23; tala Matai 10:28; Luka 17:27; Yoane 3:16; 2 Petelo 2:12; Yuda 5.
Kozanga kokufa
16. Bíblia ezali koteya nini mpo na kozanga kokufa?
16 Nzokande, Biblia ezali koteya te ete bato basengeli kokenda na likoló mpe kozwa kuna bomoi bokoki kosuka te? Ya solo. Kasi yango etali te kolandana na bomoi na molimo na moto ezangi kokufa. Oyo azwi bomoi bokoki kosuka te, azwi yango mpamba te asekwisami ekelamu na elimo (lokola Yesu), kasi ezali te mpo azali na molimo ezangi kokufa oyo ekobika nsima na liwa. Lifuti na kozanga kokufa ezali mpo na bato basembwi, bamekoli na Klisto, mpe basengelaki kozwa yango bobele nsima wana Yesu azwaki bokonzi na likoló, kasi noki te nsima na kozonga na ye na likoló, na ekeke ya liboso.—Nzembo 110:1; 1 Bakolinti 15:53, 54.
17. Bato boni bakozwa bomoi bokoki kosuka te, mpe mokumba nini bakozala na yango kati na mokano na Nzambe mpo na mabelé?
17 Epai mosusu, elikya oyo epesamaki bobele na bato moke kati na libota ya bato. Yesu abiangaki bango nyonso ete bazali “etonga moke”. (Luka 12:32.) Etuluku oyo na bato, baoyo motuya na bango ezali 144 000, bakosekwa mpo na bomoi na likoló lokola bikelamu na elimo bakoki kokufa lisusu te, baoyo bakotambwisa mabelé elongo na Klisto kati na Bokonzi na ye na likoló. (2 Petelo 3:13; Emoniseli 7:4; 14:1, 4; 20:4). Mabelé oyo bakoyangela ekozala na bamiliare na bato oyo na nsuka bakokoma bato ya kokoka Mingi na bango bakozala kati na baoyo bakozonga na mabelé na ntango na “lisekwa na bato sembo mpe na bato sembo te”. (Misala 24:15.) Nzokande, longola bato oyo bakosekwa, bato mosusu mpe bakozwa bomoi kati na mokili ya sika. Ezali banani?
‘Libela bakokufa te’
18. Nsima na koloba mpo na elikya ya lisekwa, yesu asakolaki likambo nini ya kokamwa?
18 Soki lisekwa ezali elikya ya solo mpo na bakufi, elikya mosusu kitoko ezali mpo na bato bazali na bomoi na ntango na biso. Yesu alobelaki yango na kokoba na lisolo na ye elongo na Malata. Na yango, nsima na koloba ete: “Ye oyo azali kondima ngai, ata asili kokufa, akozonga na bomoi (na nzela ya lisekwa)”, Yesu abakisaki: “moto na moto oyo azali na bomoi mpe andimi ngai, libela akokufa te.” (Yoane 11:25, 26). Na maloba oyo, asakolaki likambo na kokamwa: Ntango ekoya wana bato oyo bakozala na bomoi bakokufa te! Kasi ntango yango nini?
19. (a) Na ntango nini elikya oyo ete libela bakokufa te esengeli kokokisama? (b) Ndenge nini Biblia ezali kolakisa baoyo bazali kolikya ete libela bakokufa te?
19 Ezali sikawa, na ntango na biso, nde elaka yango esengeli kokokisama Bilembo nyonso bimonisi ete nsuka na mokili mabe ebelemi mpenza. (Matai 24:3-14; 2 Timoté 3:1-5, 13). Na yango, baoyo lelo bazali na kondima na Nzambe mpe na Mwana na ye bazali na elikya kitoko ya kobika na nsuka na biloko mabe na ntango oyo mpe kokota wana ezali bango na bomoi kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, ee, libela bakokufa te! Na Emoniseli 7:9, 14, elobami ete basali “ebele monene oyo moto akoki kotanga motuya na bango te; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikolo nyonso, na minoko nyonso”, mpe babatelami na Nzambe mpo na kondima na bango. Yesu alobaki mpo na nsuka na biloko mabe na ntango oyo lokola “bolozi monene, oyo naino emonanaki longwa na ebandeli te, ekobima mpe boye lisusu te”.—Matai 24:21; tala Masese 2:21, 22; Nzembo 37:10, 11, 34.
20, 21. Na mikolo na biso, ndenge nini bamilió na bato bamonisi kondima na bango epai na Nzambe mpe epai na Klisto, mpe mingi kati na bango bakozala na mposa ya nini te?
20 Na mokili mobimba, bamilió na basangani na ebele monene baoyo bazali na mposa ya kozala na bomoi ya seko na mabelé babandi uta sikawa komonisa kondima kati na bilaka na Nzambe mpe epai na oyo aponaki ete azala “lisekwa mpe bomoi”, ye Yesu Klisto. Bango nyonso bamipesi epai na Nzambe, mpe bamonisi yango na kozwa batisimo na mai. (Matai 28:19, 20). Bayebi malamu ete lobiko na bango ekouta bobele epai na “Nzambe oyo afandi na kiti na bokonzi, mpe na Mwana na Mpate”, Yesu Klisto.—Emoniseli 7:10.
20 Basangani na ebele monene oyo bakobika na nsuka na mokili ya lelo bakozala na mposa na lisekwa te, mpamba te ‘libela bakokufa te’. Ozali kosala oyo esengeli mpo na kozala esika moko na etuluku yango? Soki ee, libaku kitoko mpe oyo ekokani na mosusu te ezali kozela yo: oyo ya kobika na nsuka na biloko mabe oyo eyangelami na Satana mpe kokota na ebongiseli ya sika oyo ekomemela yo kolongono na nzoto ya kokoka mpe bomoi ya seko na mabelé mabongwani paradis. (Luka 23:43; Emoniseli 21:4, 5)! Na koyekolaka nini ezali mokano na Nzambe mpe na kokokisaka yango na kolendendela, okoki komonisa ete ‘ozali kati na bango te baoyo bakozongaka nsima mpe bakobebisama’. Ee, yo mpe, okoki ‘kozala na kondima mpo na kobikisa molimo.’—Baebele 10:39; 1 Yoane 2:15-17; Emoniseli 7:15.
Bozongeli
◻ Elikya ya solo mpo na bakufi ezali nini?
◻ Mpo na nini lisekwa na nzoto lokola boklisto ya lokuta eteyaka yango ezali nde koluka Nzambe?
◻ Biblia ezali koteya nini mpo na oyo etali kozanga kokufa?
◻ Elikya nini ya kokamwa tokoki kozala na yango na mikolo na biso?