Libɔndisi mpo na banyokwami
OSILÁ komona ete na boumeli ya bomoi na yo mobimba maloba mosusu mazongelamaka mbala na mbala na mitó na masoló ya bopanzi-nsango? Olɛmbi kotánga maloba lokola bitumba, mobulu, makámá, nzala, mpe mpasi? Kasi, liloba moko liyokanaka te kati na bansango. Nzokande, liloba yango limonisi eloko oyo bato bazali na yango mpenza mposa. Liloba yango ezali “libɔndisi.”
“Kobɔndisa” elimboli “kopesa nguya mpe elikya na” mpe “kokitisa mawa to mokakatano ya” moto moko. Na ntina na yikiyiki nyonso oyo mokili ezali kati na yango na ekeke oyo ya 20, elikya mpe kokitisama ya mawa ezali makambo oyo bato bazali na yango mpenza mposa. Ezali solo ete, lelo oyo bamoko kati na biso bazali na biloko kitoko koleka oyo bankɔ́kɔ na biso bakokaki kokanisa. Yango euti mingimingi na bokóli na makambo ya siansi. Kasi siansi mpe zébi ya kosala masini ebɔndisi biso te na oyo etali kolongola bantina nyonso ya mpasi oyo ezali kozwa bato. Biutelo wana ya mpasi bizali nini?
Esili koleka bikeke mingi moto ya mayele Salomo alobelaki ntina monene ya mpasi ntango alobaki ete: “Moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Siansi mpe zébi ya kosala masini elóngi te kobongola ezaleli oyo moto azali na yango ya kolinga kozala na bokonzi likoló na bazalani na ye. Na ekeke oyo ya 20, yango esili kobimisa biyangeli mabe oyo bizali konyokola bato kati na bamboka na bango mpe bitumba ya nsɔ́mɔ kati na mikili mikeseni.
Uta mobu 1914 bato koleka milió nkámá moko basili kobomama kati na bitumba. Kanisá mawa monene oyo motángo yango ebimisi epai na bato—bamilió ya mabota oyo bazali kolela mpe bazali na mposa ya libɔndisi. Longola kufa ya nsɔ́mɔ, bitumba bizali mpe komema mitindo misusu ya mpasi. Na nsuka ya etumba ya mibale ya mokili mobimba, ezalaki na bamilió koleka 12 ya bato bakimá mboka na bango na Mpótó. Na bambula oyo euti koleka, bato koleka milió moko na ndambo bakimaki bisika oyo bitumba bizali kosalema na Azia ya Súdi-ɛ́sti. Etumba na etúká ya Balkans etindaki bato koleka milió mibale na kokima bandako na bango—mingi mpenza mpo na kokima “kopɛtɔlama ya ekólo.”
Na ntembe te, bato bakimá mboka na bango bazali na mposa ya libɔndisi, mingimingi baoyo basengelaki kotika bandako na bango na kokamatáká bobele mwa ndambo moke ya biloko oyo bakokaki komema, kozanga koyeba epai bazali kokenda to nini ekokómela bango mpe mabota na bango na mikolo mizali koya. Bato lolenge oyo bazali kati na baye banyokwami mingi koleka; baoyo bazali na mposa ya libɔndisi.
Kati na biteni ya mabelé oyo ezali na mwa kimya, bamilió ya bato bakómi mpenza baombo ya ebongiseli ya nkita ya mokili oyo. Ezali solo ete, bamoko bazali na bozwi mingi ya mosuni. Nzokande, mingi bazali kosala makasi mokolo na mokolo mpo na kobikela. Mingi bazali koluka ndako ya malamu. Ebele bazali na mosala te. Zulunalo moko ya Afrika esakolaki ete: “Mokili mozali kopusama epai na mpasi ya kozanga mosala lokola emonanaki naino liboso te, wana bato mosusu miliare 1,3 bakozala kolukaluka mosala na mobu 2020.” Ya solo, baye banyokwami na makambo ya nkita bazali na mposa ya “nguya mpe elikya”—libɔndisi.
Mpo na koyanola na ezalela wana ya kozanga elikya, basusu bazali komikɔtisa na misala ya mobulu. Ya solo, wana ezali bobele kobimisa mikakatano mpo na baye bakweaki na mabɔkɔ na bato yango ya mobulu, mpe koyikana ya mobulu ezali sé kobakisa monyoko. Motó na lisoló oyo ebimaki kala mingi te kati na The Star, zulunalo moko ya engumba Johannesburg, na mboka Afrique du Sud, elobaki ete: “Mokolo moko kati na ‘mboka oyo eleki na nsɔ́mɔ ya koboma bato kati na mokili.’” Lisoló yango elobelaki bomoi ya mokolo na mokolo na kati mpe na zingazinga ya engumba Johannesburg. Na mokolo wana, bato minei babomamaki mpe babɔtɔlaki bato mituka mwambe. Bapesaki lapólo ya moyibi na bisika zomi na nsambo na kartyé moko ya mwa bozwi. Lisusu, bayibi mosusu basalelaki mandóki ntango bazalaki koyiba. Engebene zulunalo yango, bapolisi balobelaki mokolo yango lokola mokolo oyo ezalaki “na mwa kimya.” Ezali likambo ya kokamwa te ete, baoyo babungisaki bandeko na bango mpe baoyo biloko ya bandako na bango eyibamaki mpe baoyo mituka na bango ebɔtɔlamaki bazalaki mpenza na mayoki ete banyokwami. Bazali na mposa ya kolendisama mpe elikya—ya libɔndisi.
Kati na bamboka mosusu, ezali na baboti oyo batekaka bana na bango ete bákóma bandumba. Eyebisami ete, mboka moko ya Azia epai kuna batamboli-bapaya basalaka mingi “mibémbo ya koluka basi” ezali na bandumba milió mibale, oyo mingi kati na bango batekamaki to babɔtɔlamaki ntango bazalaki naino bana. Ezali nde na bato oyo banyokwami koleka bana wana? Kolobeláká mobongo wana ya nsɔ́ni, zulunalo Time elobaki na ntina na likita moko ya masangá ya basi ya Azia ya Súdi-ɛ́sti oyo esalemaki na mobu 1991. Kuna, ekanisamaki ete “milió 30 ya basi basilaki kotekama na mokili mobimba uta na katikati ya bambula 1970.”
Ya solo, bana oyo banyokwami bazali te bobele baoyo batekamaki lokola bandumba. Motángo ya baoyo bazali kobɛtama to bazali kobebisama na baboti to na biboto na bango moko mozali sé kobakisama. Bana lolenge yango bakoki kobomba mpo na ntango molai mpota kati na mayoki na bango. Ya solo, awa ezali bango konyokwama, bazali na mposa ya libɔndisi.
Moto moko ya kala oyo ayekolaki minyoko ya bato
Mokonzi Salomo atungisamaki mingi na bonene ya monyoko ya bato. Akomaki ete: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso misalami na nsé na moi. Mpe talá, mpisoli na banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyokoli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.”—Mosakoli 4:1.
Eleki soki mibu 3000, mokonzi ya mayele amonaki ete banyokwami bazalaki na mposa makasi ya mobɔndisi, bongo asengelaki koloba nini lelo oyo? Atako bongo, Salomo ayebaki ete moto moko te ya kozanga kokoka, ezala ye moko, akokaki kopesa bato libɔndisi oyo bazali na yango mposa. Esengelaki moto moko oyo aleki bato nyonso mpo na kokweisa nguya ya banyokoli. Moto motindo yango akoki solo komonana?
Kati na Biblia, Nzembo 72 ezali kolobela mobɔndisi moko monene mpo na bato nyonso. Nzembo wana ekomamaki na tata ya Salomo, Mokonzi Davidi. Maloba oyo mazali likoló na yango malobi: “Na ntina na Salomo.” Na ntembe te, ekomamaki na mobangé Mokonzi Davidi na ntina na Ye oyo asengelaki kosangola kiti na ye ya bokonzi. Engebene Nzembo yango, Ye wana asengelaki kosukisa monyokoli mpo na libela. “Na mikolo na ye, moyengebene akozala na makila malamu [“akotɔa,” NW]; kimya ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai monene epai moko bobele na mai monene epai mosusu . . . kino ndelo na mokili mpenza.”—Nzembo 72:7, 8.
Ekoki mpenza kozala ete, ntango Davidi akomaki maloba oyo, azalaki kokanisa na ntina na mwana na ye Salomo. Kasi Salomo asosolaki ete kosunga libota ya bato na lolenge oyo elobelami kati na nzembo elekaki nguya na ye. Akokaki kosalela maloba ya nzembo wana bobele na lolenge ya moke mpe mpo na bolamu ya libota ya Yisalaele, kasi mpo na matomba ya bato na mabelé mobimba te. Ya solo, nzembo oyo ya esakweli oyo epemami ezalaki komonisa moto moko oyo alekaki Salomo. Moto yango ezalaki bongo nani? Ekokaki bobele kozala Yesu Klisto.
Ntango anzelu moko asakolaki kobotama ya Yesu, alobaki ete: “Nkolo Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi tata na ye.” (Luka 1:32) Epai mosusu, Yesu amilobelaki lokola “moto aleki Salomo.” (Luka 11:31) Uta lisekwa ya Yesu mpo na kofanda na lobɔkɔ na mobali ya Nzambe, azali na likoló, epai kuna akoki kokokisa maloba ya Nzembo 72. Epai mosusu, asili kozwa nguya mpe bokonzi epai na Nzambe mpo na kobuka ekanganeli ya banyokoli. (Nzembo 2:7-9; Danyele 2:44) Na bongo Yesu azali moto oyo akokokisa maloba ya Nzembo 72.
Mosika te monyoko ekosila
Likambo yango elingi koloba nini? Elimboli ete mosika te kosikolama na mitindo nyonso ya monyoko ya bato ekokóma likambo ya solo. Yesu asakolaki ete mpasi mpe monyoko monene ya ekeke oyo ya 20 ezali eteni ya elembo oyo esengelaki komonisa “nsuka na ekeke.” (Matai 24:3) Kati na makambo mosusu, asakolaki ete: “Libota moko ekotɛlɛmɛla libota mosusu mpe bokonzi moko ekotɛlɛmɛla bokonzi mosusu.” (Matai 24:7) Esakweli wana ebandaki kokokisama na ntango oyo etumba ya liboso ya mokili mobimba ebandaki na 1914. Yesu alobaki lisusu ete: “Mpo ete mobulu ekoyikana mingi, bolingo na mingi ekozwa mpiɔ.” (Matai 24:12) Kotyola mibeko mpe kozanga bolingo esili kobimisa libota moko ya bato mabe mpe banyokoli. Na yango, ntango etikali mpenza moke mpo ete Yesu asala lokola Mokonzi ya sika ya mabelé. (Matai 24:32-34) Yango ekolimbola nini mpo na bato banyokwami oyo bazali kondima Yesu Klisto mpe baoyo bazali kotalela ye lokola Mobɔndisi oyo Nzambe atye mpo na bato?
Mpo na kozwa eyano na motuna oyo, tótánga lisusu mwa maloba ya Nzembo 72 oyo makokokisama epai na Yesu Klisto: “Ye akobikisa mobólá oyo akonganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto na bolózi mpe mobólá mawa; akobikisa milimo na babólá. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” (Nzembo 72:12-14) Boye Yesu Klisto, Mokonzi oyo aponami na Nzambe akokeba ete moto moko te amona mpasi mpo na monyoko. Azali na nguya ya kosukisa bokesene ya lolenge nyonso.
Basusu bakoki koloba ete, ‘nyonso wana ezali malamu, kasi ezali boni mpo na sikawa?’ Libɔndisi nini lizali mpo na baoyo bazali konyokwama sikawa? Ya solo, libɔndisi lizali mpo na banyokwami. Masoló mibale malandi kati na zulunalo oyo makomonisa lolenge nini bamilió ya bato bazali kozwa libɔndisi kobanda sikawa na kolónáká boyokani ya penepene elongo na Nzambe ya solo, Yehova, mpe elongo na Mwana na ye, Yesu Klisto. Boyokani ya lolenge yango ekoki kobɔndisa biso na boumeli ya ntango oyo ya monyoko mpe ekoki komema bato na bomoi oyo ezangi minyoko. Yesu alobaki kati na libondeli na ye epai na Nzambe ete: “Oyo ezali bomoi na seko ete báyeba yo Nzambe moko na solo mpe Motindami na yo, Yesu Klisto.”—Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Na mokili ya sika ya Nzambe moto moko te akonyokola moto mosusu