Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/9 nk. 4-7
  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini bato bazali na bobola mpe bazali konyokwama?
  • Mokakatano oyo bato bakoki kosilisa te
  • “Mokano na yo esalema na nse”
  • Moto akoki mpenza kobongola mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Libɔndisi mpo na banyokwami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/9 nk. 4-7

Ezali na moto oyo amibanzabanzaka mpenza mpo na biso

BATO mingi bamonisaka ete bamibanzabanzaka mpo na basusu. Bato yango bazali na mitema makasi te to na moimi te mpo bámona ete mikakatano ya bato mosusu etali bango te. Kutu, basalaka nyonso oyo bakoki, mpe ntango mosusu batyaka ata bomoi na bango moko na likama, mpo na komeka kokitisa mpasi ya bato mosusu. Mosala yango ezali monene, mpe makambo mosusu oyo elekeli bango ezali kobakisa lisusu mpasi yango.

Moto moko oyo asalisaka bato bazali na mpasi alobaki ete lokoso, misala mabe ya bato mosusu ya politiki, mpe makama oyo ezali kobima na mokili ekoki kobebisa ata “milende makasi oyo ezali kosalema mpo na kosilisa nzala.” Nzokande, kosilisa nzala ezali kaka moko ya mikakatano oyo bato oyo bamibanzabanzaka mpo na basusu bazali kobunda na yango. Bazali mpe kosala makasi mpo na kosilisa mikakatano mosusu lokola maladi, bobola, kozanga bosembo, mpe mpasi oyo eutaka na bitumba. Kasi, bazali kolonga?

Mokonzi ya lisangá moko mpo na kosalisa bato alobaki ete bato oyo bazali kosala “milende ya solosolo” mpo na kosalisa bato oyo bazali na nzala mpe bampasi bazali lokola Mosamalia malamu oyo Yesu Klisto alobelaki na lisese moko. (Luka 10:29-37) Alobaki ete atako bango bazali kosala milende, bato oyo bazali na mpasi bazali se kobakisama. Yango wana atunaki motuna oyo: “Mosamalia malamu akosala nini soki mikolo nyonso, na boumeli ya bambula ebele, alekaka na nzela moko mpe pɔsɔ na pɔsɔ akutaka kaka moto mosusu oyo miyibi basali ye mabe mpe batikali kobwaka ye pembeni ya nzela?”

Moto akoki kobɛla maladi ya ‘kolɛmba nzoto ya bato oyo basalisaka baye bazali na mpasi’ mpe akoki kotika nyonso na nkanda. Kasi, malamu ya bato oyo bamibanzabanzaka mpenza mpo na basusu ezali ete balɛmbaka nzoto te. (Bagalatia 6:9, 10) Na ndakisa, moto moko akumisaki Batatoli ya Yehova na mokanda oyo atindaki na biro ya zulunalo Jewish Telegraph ya Grande-Bretagne. Alobaki ete ntango Banazi bazalaki na bokonzi na ekólo Allemagne, Batatoli ya Yehova “basalisaki Bayuda mingi na bwale oyo bazalaki na yango na káa ya Auschwitz.” Moto yango akomaki boye: “Ntango biloko ya kolya ezalaki mingi te, bazalaki kokabola mampa na bango na bandeko na biso [Bayuda]!” Batatoli batikaki te kosala nyonso oyo bakokaki na mwa biloko oyo bazalaki na yango.

Kasi, kokabela bato mwa biloko ya kolya ekoki kosilisa bampasi na bango nyonso te. Tolobi boye te mpo na kotyola to komona mpamba milende ya bato ya mitema mawa. Likambo nyonso oyo ezali kokitisa mpasi ya bato ezali na ntina. Batatoli wana bakitisaki mwa moke mpasi ya baninga na bango ya bolɔkɔ, mpe na nsima, bokonzi ya Nazi elongolamaki. Kasi, mokili mpe makambo na yango oyo ebimisaka minyoko ya ndenge wana esili naino te, mpe bato oyo bamibanzabanzaka te mpo na baninga na bango bazali se kokóma ebele. Ya solo mpenza, “libota ezali oyo mino na bango izali na mopotu lokola mipanga, mpe mino minene na bango lokola mbeli; ete bálya babola kati na mokili mpe bato na kozanga kati na bato.” (Masese 30:14) Na ntembe te, yo mpe omitunaka mpo na nini makambo ezali ndenge yango.

Mpo na nini bato bazali na bobola mpe bazali konyokwama?

Mokolo moko Yesu Klisto alobaki boye: “Bozali na babola awa na bino ntango nyonso mpe soko bolingi kosalela bango ntango nini, bokoki.” (Malako 14:7) Yesu alingaki nde koloba ete bobola mpe minyoko ekosila te? Yesu akanisaki, ndenge mpe bato mosusu bakanisaka, ete bampasi ezali mokano ya Nzambe mpo bato ya mitema mawa bámonisa ndenge oyo bamibanzabanzaka mpo na bamosusu? Te! Yesu akanisaki bongo te. Amonisaki nde ete na mokili oyo tozali lelo oyo, bobola ekosila te. Kasi, Yesu ayebaki mpe likambo oyo: Tata na ye ya likoló akanaki te ete makambo ya ndenge yango ezala na mokili.

Yehova Nzambe asalaki mabelé mpo ezala paladiso, kasi alingaki te ezala esika ya bobola, esika oyo bosembo ezali te, to mpe esika ya minyoko te. Mpo na kolakisa ete amibanzabanzaka mpo na bato, abongisaki makambo mpo bomoi ya bato ezala na makambo oyo epesaka esengo. Kanisá ata nkombo ya elanga oyo bankɔkɔ na biso Adama na Eva bazalaki! Ebéngamaki Edene, elingi koloba “Esengo.” (Genese 2:8, 9) Yehova asukaki kaka te na kopesa bato biloko oyo ezali na ntina mpo na kozala na bomoi, bongo na nsima atii bango na mokili ya mpasi mpe ya minyoko. Ntango Yehova asilisaki kokela biloko nyonso, atalaki biloko oyo asalaki mpe alobaki ete ezali “malamu mingi.”—Genese 1:31.

Kasi, mpo na nini lelo oyo bobola, minyoko, mpe makambo mosusu oyo epesaka bato mpasi etondi na mokili? Mabe ekɔtaki na mokili mpo baboti na biso ya liboso batombokelaki Nzambe. (Genese 3:1-5) Likambo yango ebimisaki motuna oyo: bikelamu ya Nzambe esengeli kotosaka ye? Yango wana Yehova atikelaki bana ya Adama lipanda mpo na mwa ntango. Atako bongo, Nzambe azalaki ntango nyonso komibanzabanza mpo na bato. Abongisaki makambo mpo na kosilisa mabe oyo botomboki ebimisaki. Mpe etikali moke mpenza Yehova asilisa bobola na minyoko. Ɛɛ, akosilisa bampasi nyonso.​—Baefese 1:8-10.

Mokakatano oyo bato bakoki kosilisa te

Na boumeli ya bambula nyonso oyo eleká banda moto akelamá, bato bapesaki mpe bazali se kopesa mibeko ya Yehova mokɔngɔ. (Deteronome 32:4, 5) Lokola bazali se koboya mibeko ya Nzambe, tozali komona ete bato bazali kobomana na bitumba, mpe “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Bato ya moimi, baoyo balingaka kosala makambo na ndenge na bango na esika bátosa bokonzi ya Nzambe, bazali kokanga nzela na milende nyonso oyo ezali kosalema mpo bosembo ezala mpe mpo na kosilisa makambo nyonso oyo epesaka bato mpasi.

Ezali mpe na mokakatano mosusu, mokakatano oyo bato mosusu bakoki komona yango lokola bibangabanga ya mpamba. Tii lelo oyo, ekelamu ya liboso oyo atombokelaki Nzambe azali naino kopusa bato na kosala makambo mabe mpe na kozala na moimi. Yesu Klisto abéngaki ye “mokolo na mokili,” Satana Zabolo. (Yoane 12:31; 14:30; 2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19) Na emoniseli oyo Nzambe alakisaki ntoma Yoane, bamonisi Satana lokola moto ya liboso mpenza oyo abimisaka makambo oyo epesaka mpasi, ye nde “mozimbisi ya bato na mokili mobimba.”—Emoniseli 12:9-12.

Ata soki bato mosusu bazali komibanzabanza mpenza mpo na baninga na bango, bakokoka kolongola Satana Zabolo te to mpe kobongola makambo oyo ezali konyokola bato ebele na mokili oyo. Na yango, esengeli kosala nini mpo bampasi ya mokili esila? Ezali kaka likambo ya kozala na moto oyo amibanzabanzaka mpo na baninga te. Esengeli moto moko oyo alingi mpe azali na makasi ya kolongola Satana na ebongiseli na ye mabe.

“Mokano na yo esalema na nse”

Nzambe alaki ete akolongola ebongiseli mabe oyo. Ye azali na mposa mpe na makasi ya kolongola yango. (Nzembo 147:5, 6; Yisaya 40:25-31) Esakweli moko ya mokanda ya Danyele elobi boye: “Nzambe na lola akotɛ[lɛ]misa bokonzi bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko” to mpo na libela. (Danyele 2:44) Yesu Klisto azalaki kokanisa bokonzi wana oyo ekoumela libela na libela mpe ekosala makambo malamu ntango ateyaki bayekoli na ye bábondelaka Nzambe ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalema na nse [lokola] na likoló.”—Matai 6:9, 10.

Yehova akoyoka mabondeli wana mpamba te amibanzabanzaka mpenza mpo na bato. Esakweli ya Nzembo 72 elobi ete Nzambe akotinda Mwana na ye Yesu Klisto aya kosilisa libela mpasi ya babola, banyokwami, mpe bato oyo bazali kotungisama, baoyo bazali kokumisa bokonzi ya Yesu. Yango wana, elimo santu esalisaki mokomi ya nzembo na koyemba ete: ‘[Bokonzi oyo Nzambe apesi na Masiya] ekolongisa babola na bato; ekobikisa bana na mozangi; mpe ekotuta monyokoli. . . . Ekobikisa mobola oyo akoganga mpe moto na mawa oyo azali na mosungi te. Ekoyokela moto na bolɔzi mpe mobola mawa; ekobikisa milimo na babola. Ekosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na [Yesu].’—Nzembo 72:4, 12-14.

Ntoma Yoane amonaki na emonaneli makambo oyo ekosalema na mikolo na biso; amonaki “likoló ya sika mpe nse ya sika,” elingi koloba ebongiseli ya sika oyo Nzambe akosala. Ekozala likambo malamu mpo na bato oyo bazali konyokwama! Yoane akomaki esakweli ya makambo oyo Yehova akosala na maloba oyo: “Nayoki mongongo makasi kobima na kiti na bokonzi ete, Talá! Efandelo na Nzambe ezali na bato esika moko. Akofanda na bango esika moko, mpe bango bakozala bato na ye, mpe Nzambe ye mpenza akozala na bango elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te, mpo ete makambo na liboso masili koleka. Mofandi na kiti na bokonzi alobi ete, Nakozalisa biloko nyonso biloko na sika. Alobi mpe ete, Komá ete maloba oyo mazali sembo, na solo.”—Emoniseli 21:1-5.

Tokoki mpenza kotyela maloba yango motema mobimba mpamba te ekokokisama solo. Etikali moke Yehova asilisa bobola, nzala, monyoko, maladi, mpe makambo nyonso ezangi sembo. Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaka yango mbala mingi mpe epesaka mikapo ya Biblia mpo na kondimisa yango, bilembeteli mingi ezali kolakisa ete tozali na mikolo oyo Nzambe akokokisa makambo oyo alakaki. Mokili ya sika oyo Nzambe alaki ezali lisusu mosika te! (2 Petelo 3:13) Etikali moke Yehova “akosilisa kufa libela” mpe “akokomba mpisoli na bilongi nyonso.”—Yisaya 25:8.

Liboso makambo yango eya, tozali na esengo ete ata lelo oyo, ezali na bato oyo bamibanzabanzaka mpenza mpo na basusu. Likambo oyo ezali kopesa biso esengo mingi lisusu ezali ete Yehova Nzambe ye moko amibanzabanzaka mpo na bato. Etikali moke asilisa minyoko mpe bampasi nyonso.

Okoki kotya elikya na yo na makambo oyo Yehova alaki. Yosua, mosaleli na ye, atyelaki maloba ya Yehova motema. Azalaki na kokakatana ata moke te ntango alobaki na libota ya kala ya Nzambe ete: “Boyebi na mitema na bino mpe na milimo na bino nyonso ete eloko moko ezangi te na makambo malamu nyonso oyo [Yehova] Nzambe na bino atyaki na ndaka na yango na ntina na bino. Yango nyonso ebimelaki bino, mpe eloko na yango moko ezangaki te.” (Yosua 23:14) Yango wana, atako ebongiseli oyo elongwe naino te, komitungisa mingi te mpo na minyoko oyo okoki kokutana na yango. Kitisá mitungisi na yo nyonso na mabɔkɔ ya Yehova, mpo amibanzabanzaka mpenza mpo na bato.​—1 Petelo 5:7.

[Bililingi na lokasa 7]

Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, bobola, monyoko, maladi, mpe kozanga bosembo ekozala te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto