Nzambe azali kosɛnga ete tókilaka bilei?
KATI na Mibeko oyo Nzambe apesaki na nzela ya Mose, ezalaki bobele na libaku moko oyo mpo na yango bato basengelaki kokila bilei—na mokolo ya Mbondi oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula nyonso. Mibeko mipesaki etindá ete na mokolo yango Bayisalaele basengelaki [“konyokola milimo na bango,” NW], elingi koloba bazalaki kokila bilei. (Levitike 16:29-31; 23:27; Nzembo 35:13) Nzokande, kokila bilei ezalaki molulu mpamba te. Kokundola mokolo ya Mbondi ezalaki kopusa Bayisalaele ete básosola malamu mpenza ezalela na bango ya bato ya masumu mpe bámona ntina ya koluka kosikolama. Bazalaki kokila bilei na mokolo yango mpo na komonisa mawa na ntina na masumu na bango mpe kobongola motema na bango liboso na Nzambe.
Wana ezalaki lisɛngami bobele moko ya kokila bilei kati na Mibeko ya Mose, kasi atako bongo Bayisalaele bazalaki mpe kokila bilei na mabaku mosusu. (Exode 34:28; 1 Samwele 7:6; 2 Ntango 20:3; Ezela 8:21; Esetele 4:3, 16) Na mabaku mosusu wana, moto akokaki kokila bilei mpo ete ye moko akani kosala bongo mpo na komonisa elembo ya kobongola motema. Yehova asɛngaki na bato ya Yuda oyo bazalaki koyengayenga ete: “Bóbongwa epai na ngai na mitema na bino nyonso, mpe na kokila bilei mpe na kotangisa mpe na kolela.” Yango esengelaki kozala bobele elembo ya libándá te, mpamba te Nzambe alobaki lisusu ete: “Pasolá mitema na bino nde bilamba na bino te.”—Yoele 2:12-15.
Na nsima, bato mingi bakómaki kokila bilei bobele na lolenge ya molulu mpamba, mpo na komilakisa. Yehova aboyaki lolenge wana ya kokila bilei esalemi na kozanga sembo mpe na bongo atunaki Bayisalaele oyo bazalaki bakosi ete: “Ezali lolenge oyo na kokila oyo ngai naponi yango? Mokolo mpo na moto kotuta molimo na ye? Ezali nde mokolo na kokumbamela motó na nsé lokola mongendu mpe kotandisa ngɔtɔ mpe mputulu na mɔ́tɔ na nsé na ye? Okobyanga oyo kokila mpe mokolo na koyambama na [Yehova]?” (Yisaya 58:5) Na esika ete bákila bilei na lolenge ya komilakisa na bato, libota wana ya kotengatenga basengisamaki ete bábota mbuma ya misala ya kobongola motema.
Mitindo mosusu ya kokila bilei oyo Bayuda babandisaki esepelisaki Nzambe te uta na ebandeli na yango. Na ndakisa, na eleko moko bato ya Yuda bazalaki kokila bilei mbala minei na mbula mpo na komikundola makambo ya mawa oyo masalemaki na ntango Yelusaleme ezingelamaki mpe ebebisamaki na ekeke ya nsambo L.T.B. (2 Mikonzi 25:1-4, 8, 9, 22-26; Zekalia 8:19) Nsima wana Bayuda babimisamaki na boombo na Babilone, Yehova alobaki na nzela ya mosakoli Zekalia ete: “Ekilaki bino . . . bilanga oyo ntuku nsambo, okilelaki ngai, ɛɛ mpo na ngai mpenza?” Nzambe aboyaki mitindo wana ya kokila bilei mpamba te Bayuda bazalaki kokila bilei mpe kolela na ntina na bikateli oyo biutaki na Yehova ye moko. Bazalaki kokila bilei na ntina na mawa oyo makwelaki bango, kasi basalaki yango te mpo na mabe na bango oyo mamemaki mawa wana. Nsima wana bazongaki na mboka na bango, ezalaki ntango mpo na bango ete básepela na esika ete bámilelalela na ntina na makambo ya kala.—Zekalia 7:5.
Baklisto basengeli kokila bilei?
Atako Yesu Klisto apesaki bayekoli na ye etindá te ete bákilaka bilei, ye na bayekoli na ye bakilaki bilei na Mokolo ya Mbondi mpamba te bazalaki na nsé ya Mibeko ya Mose. Lisusu, na mabaku mosusu, bamoko kati na bayekoli na ye bakilaki bilei mpo ete bango moko bakanaki yango, mpamba te Yesu apekisaki bango yango te. (Misala 13:2, 3; 14:23) Nzokande, basengelaki te ‘kokanga bilongi lokola bakosi ete bámonana na bato lokola bazali kokila bilei.’ (Matai 6:16) Komonisa na elongi ete bazali bato oyo babangaka Nzambe ekokaki kopusa bato mosusu ete básepela na bango mpe bákumisa bango. Kasi, Nzambe asepelaka te na komimonisa motindo wana.—Matai 6:17, 18.
Yesu alobaki mpe ete bayekoli na ye basengelaki kokila bilei na ntango ya liwa na ye. Elingi koloba te ete, na kosaláká bongo, abandisaki molulu ya kokila bilei. Nzokande, azalaki nde kolobela mawa monene oyo basengelaki koyoka. Na nsima ya lisekwa na ye, akozala na bango lisusu, mpe ntina ya kokila bilei ekozala lisusu te mpo na bango.—Luka 5:34, 35.
Mibeko ya Mose misukaki ntango ‘Klisto atombwamaki mbala moko mpo na komema masumu ya bato mingi.’ (Baebele 9:24-28) Mpe lokola Mibeko misukaki, etindá ya kokila bilei na Mokolo ya Mbondi esukaki mpe. Na yango, lisɛngisi bobele moko oyo elobelami kati na Biblia na ntina na kokila bilei elongolamaki.
Ezali boni mpo na Karézimo?
Kasi, momeseno ya kokila bilei na eleko ya Karézimo oyo esalemaka na mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba ezwi moboko na yango likoló na nini? Ezala lingomba ya Katolike to ya Protestá basalaka Karézimo, atako lolenge ya kosalela yango ekeseni na lingomba moko na mosusu. Bamoko balyaka bobele mbala moko na mokolo, na boumeli ya eleko ya mikolo 40 liboso ya Pásika. Basusu balyaka ata eloko moko te bobele na mokolo ya Eyenga ya Putulú mpe na mokolo Mwamitano Mosantu. Mpo na basusu, Karézimo elimboli koboya kolya nyama, mbisi, maki, mpe koboya komela miliki.
Ekanisami ete Karézimo ezwi moboko na yango likoló na likambo oyo ete Yesu akilaki bilei na boumeli ya eleko ya mikolo 40 na mokili mokauki nsima ya batisimo na ye. Na kosaláká bongo, abandisaki nde molulu oyo mosengelaki kosalemaka mbula na mbula? Soko moke te. Yango emonani polele na likambo oyo ete kati na Biblia ekomami ata na esika moko te ete baklisto ya liboso bazalaki na momeseno motindo wana. Karézimo ebandaki kosalelama na ekeke ya minei nsima ya kufa ya Klisto. Lolenge moko na mateya mosusu mingi ya boklisto ya nkombo mpamba, momeseno yango moutaki na losambo ya bapakano.
Soki Karézimo ezali bongo komekolama ya kokila bilei oyo Yesu asalaki kati na mokili mokauki nsima ya batisimo na ye, mpo na nini esalelami na boumeli ya bapɔ́sɔ oyo ezalaka liboso ya Pásika—oyo ekanisami ete ezali ntango oyo ye asekwaki? Yesu akilaki bilei te na boumeli ya mikolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye. Baevanzile emonisi ete ye mpe bayekoli na ye batambolaki na bandako ya bato mpe balyaki na Betani mwa mikolo moke liboso ya kokufa na ye. Mpe alyaki bilei ya Pásika na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye.—Matai 26:6, 7; Luka 22:15; Yoane 12:2.
Tokoki kozwa liteya moko na lolenge oyo Yesu akilaki bilei na nsima ya batisimo na ye. Azalaki pene ya kobanda mosala moko ya ntina mingi. Kolóngisama ya lotómo ya koyangela ya Yehova mpe bomoi ya libota mobimba ya bato mpo na mikolo mizalaki koya etalelamaki. Yango ezalaki ntango ya komanyola mozindo mpe ya komibalola epai na Yehova na libondeli mpo na kosɛnga lisungi mpe litambwisi. Na boumeli ya ntango yango, Yesu akilaki bilei na lolenge lobongi. Yango emonisi ete kokila bilei ekoki kozala na litomba soki esalemi na mokano malamu mpe na libaku oyo ebongi mpenza.—Kokanisá na Bakolose 2:20-23.
Ntango kokila bilei ekoki kozala na litomba
Tiká tótalela mwa mabaku oyo mpo na yango mosaleli ya Nzambe lelo oyo akoki kokila bilei. Moto oyo asali lisumu akoki mbala mosusu kozanga mposa ya kolya na boumeli ya mwa ntango. Yango esengeli kozala te mpo na komimonisa na miso ya bato to mpo na nkanda na ntina na disipilini oyo epesameli ye. Mpe, ya solo, bobele kokila bilei ekoki te mpo na kobongisa makambo liboso na Nzambe. Nzokande, moto oyo abongoli mpenza motema akoyoka mawa makasi mpo ete asili kopesa Yehova nkanda mpe, na ntembe te, baninga mpe libota bakoyoka mpasi. Koyoka mawa mpe kosala libondeli na etingya mpo na kosɛnga bolimbisi ekoki kolongola moto mposa ya kolya.
Davidi mokonzi ya Yisalaele akutanaki mpe na likambo motindo yango. Wana ayebaki ete mwana mobali oyo abotaki elongo na Bata-seba asengelaki kokufa, atyaki makanisi na ye nyonso na kobondela Yehova ete amonisa motema mawa likoló na mwana yango. Wana amipesaki na makanisi na ye nyonso mpe na nguya na ye nyonso na mabondeli, akilaki bilei. Bobele bongo, na mikolo na biso, mbala mosusu ekobonga kolya te wana tozali kati na ezalela ya mawa makasi.—2 Samwele 12:15-17.
Ekoki mpe kozala na ntango oyo moto moko oyo abangaka Nzambe alingi kotya makanisi na ye nyonso likoló na likambo moko ya ntina mingi mpenza na elimo. Ekoki kozala mpenza na ntina ete asala bolukiluki kati na Biblia mpe kati na mikanda ya boklisto oyo mikolimbolaka Biblia. Akoki kozala na mposa ya mwa ntango mpo na komanyola. Na boumeli ya ntango motindo wana, oyo moto amipesi mobimba na boyekoli, akoki komipimela kolya mpo na kopɛngola makanisi na ye te.—Kokanisá na Yilimia 36:8-10.
Tozali na bandakisa euti na Makomami, basaleli ya Nzambe bakilaki bilei na ntango basengelaki kokamata bikateli ya ntina mingi. Na eleko ya Nehemia, Bayuda basengelaki kolapa ndai liboso na Yehova, mpe basengelaki kolakelama mabe soki babukaki ndai yango. Basengelaki kolaka ete bakolongola basi na bango oyo bazalaki bapaya mpe bakomikabola na mabota ya zingazinga. Liboso ya kolapa ndai yango mpe na boumeli ya ntango ya koyambola libungá na bango, lisangá mobimba bakilaki bilei. (Nehemia 9:1, 38; 10:29, 30) Wana asengeli kokamata bikateli ya ntina mingi, moklisto akoki kozanga kolya na boumeli ya mwa ntango mokuse.
Mbala mosusu, mpo ete bákoka kozwa bikateli, masangani ya bankulutu ya masangá ya baklisto na ekeke ya liboso bakilaki bilei. Lelo oyo, bankulutu ya masangá basengeli kozwa bikateli ya mpasi, mbala mosusu na likambo oyo etaleli lisambisi, bakoki kozanga kolya wana bazali kotalela likambo yango.
Kokila bilei na ntango okutani na likambo moko to mosusu ezali ekateli etaleli moto ye moko. Moto moko asengeli te koloba mabe mpo na mosusu na ntina na likambo yango. Tosengeli te ‘komimonisa na libándá epai na bato ete tozali bayengebene’; tosengeli mpe te kopesa motuya mingi na bilei kino kopekisa biso kokokisa mikumba na biso ya ntina mingi. (Matai 23:28; Luka 12:22, 23) Mpe Biblia ezali komonisa ete Nzambe asɛngi na biso te ete tókila bilei, kasi apekisi mpe biso yango te.
[Elilingi na lokasa 7]
Oyebi ntina oyo Yesu akilaki bilei na boumeli ya mikolo 40 nsima ya batisimo na ye?