Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/11 nk. 25-27
  • Omekolaka Nzambe na biso oyo azangi koponapona?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omekolaka Nzambe na biso oyo azangi koponapona?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo mamonisi ezaleli ya kozanga koponapona ya Yehova
  • Tózwa liteya kati na ezaleli ya kozanga koponapona ya Nzambe
  • Tósepela mpenza na bizaleli ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Mekolá Yehova—Koponaka bilongi te!
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Tólanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nzambe azali na koponapona te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/11 nk. 25-27

Omekolaka Nzambe na biso oyo azangi koponapona?

EZALELI ya kozanga koponapona​—ekoki komonana epai wapi? Ezali na Ye oyo azangi mpenza koponapona, azangi kokanisela basusu mabe, azangi kotala bilongi, mpe azangi kokabolakabola. Ezali bongo Yehova Nzambe, Mozalisi ya bato. Nzokande, mpo na oyo etali bato, Charles Lamb, mokomi moko ya mikanda ya ekeke ya 19, ye moto ya Angleterre, akomaki na bosembo nyonso ete: “Nalobi polele ete natondi na makanisi ya mabe na ntina na bato mosusu​—baoyo nalingaka mpe baoyo nalingaka te.”

Ezaleli ya kozanga koponapona, emonanaka mingi epai na bato te. Esili koleka bikeke mingi, Salomo, mokonzi ya mayele, oyo ayangelaki na Yisalaele, amonaki ete “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Koyinana na ntina na mposo, kowelana kati na bikólo, mpe koswana kati na mabota ezali sé koyikana. Na yango, ezali likambo ya mayele kokanisa ete, bato bango moko bakoki kosala libota oyo ezangi ezaleli ya koponapona kati na yango?

Tosengeli mpenza kosala milende mingi na makanisi na biso mpo ete tókamba bizaleli na biso mpe tólongola makanisi mabe oyo masilá kotya misisa kati na mitema na biso. (Baefese 4:22-24) Kozanga ete tókoka koyeba yango, tokoki mbala mosusu komonisa makanisi oyo tokólaki na yango uta na esika oyo tofandaki mpe na bisika oyo tokɔtaki kelasi mpe oyo masilaki kopika misisa kati na libota na biso, kati na bato ya loposo lolenge moko na biso, mpe na ekólo na biso. Makanisi wana oyo emonani lokola ete ezali na likámá te, mbala mingi efandaka mpenza kati na biso mpe ekólisaka makanisi oyo epusaka bato na kokóma na ezaleli ya koponapona. Lord Francis Jeffrey, ye oyo azali nganga-mibeko mpe mokomi na zulunalo, moto ya mboka Écosse, andimaki kútu ete: “Ezali na eloko moko te oyo ekoki mpenza koumela ntango molai kati na motema ya moto kozanga ete akoka koyeba yango, koleka kokóla ya makanisi na ye ya mabe na ntina na basusu.”

Lenaa azali moko na bato oyo bandimi ete tosengeli kosala milende mpenza na lisosoli na biso mpo na kobundisa ezaleli ya koponapona. Mpo ete moto akoka kolongola makanisi mabe oyo ezali kati na ye “asengeli kosala milende makasi mpamba te lolenge oyo tobɔkwamaki ezali na bopusi makasi.” Lena andimi lisusu ete ezali kosɛnga bákundwelaka biso makanisi malamu ntango nyonso.

Makambo oyo mamonisi ezaleli ya kozanga koponapona ya Yehova

Yehova azali ndakisa ya kokoka mpo na oyo etali ezaleli ya kozanga koponapona. Uta na ebandeli ya Biblia, tozali kotánga lolenge nini amonisaki ezaleli na ye ya kozanga koponapona kati na boyokani na ye elongo na bato. Tokoki koyekola makambo mingi kati na bandakisa mpe makundweli oyo kitoko.

Yehova amonisaki kozanga koponapona na lolenge atambwisaki makambo na boye ete ntoma Moyuda Petelo asakola nsango malamu epai na Korneye mpe epai na Bapakano mosusu na mobu 36 T.B. Na ntango yango Petelo alobaki ete: “Nzambe akokabolaka [“aponaponaka,” NW ] bato te; kasi kati na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Na boyokani na ye nyonso elongo na bato, Yehova azalaki ntango nyonso komonisa ezaleli ya kozanga koponapona. Klisto Yesu alobaki na ntina na Tata na ye ete: “Zambi akobimisa moi na ye na bato mabe mpe na bato malamu mpe akonɔkisa mbula na bayengebene mpe na bapɛngwi.” (Matai 5:45) Lisusu, wana akumisaki Yehova lokola Nzambe oyo azangi koponapona, Petelo atatolaki ete: “Azali na motema molai epai na bino, alingi te ete bamosusu bábeba kasi ete bato nyonso bákóma kobongwana na motema.”​—2 Petelo 3:9.

Na mikolo ya Noa, na ntango “masumu na bato izalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso,” Yehova azwaki ekateli ya koboma mokili ya bato na eleko yango. (Genese 6:5-7, 11, 12) Nzokande, na kotosáká etindá ya Nzambe mpe wana bato ya eleko na ye bazalaki komona ye mpenza, Noa atongaki masuwa. Ntango ye na bana na ye bazalaki kotonga masuwa, Noa azalaki mpe “mosakoli na boyengebene.” (2 Petelo 2:5) Atako ayebaki ete bato ya eleko wana bazalaki mabe uta na mitema na bango mpenza, Yehova amonisaki ezaleli ya kozanga koponapona na kotindeláká bango nsango ya polele. Abendaki likebi na makanisi mpe na mitema na bango na kotindáká Noa ete atonga mpe asakola. Wana ezalaki mpo na bango libaku malamu ya kosalela toli na ye, nzokande “bayebaki likambo [“batyaki likebi,” NW ] te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso.”​—Matai 24:39.

Oyo nde ndakisa kitoko ya ezaleli ya kozanga koponapona ya Yehova! Na mikolo oyo ya nsuka mpe ya mpasi, ezaleli yango ezali kopusa basaleli ya Nzambe ete básakola nsango malamu ya bokonzi na kolandáká ndakisa ya ezaleli ya kozanga koponapona ya Nzambe. Lisusu, bazali komipekisa te mpo na kosakola mokolo ya nkanda ya Yehova. Na miso ya bato nyonso, bazali kosakola nsango ya Yehova kozanga koponapona mpo ete moto nyonso ayoka yango.​—Yisaya 61:1, 2.

Bilaka oyo Yehova apesaki epai na Abalayama, Yisaka, mpe Yakobo emonisaki polele ete Nzambe azali na koponapona te. Moponami asengelaki kobima uta na molɔngɔ́ ya libota ya mokomoko na bango, oyo na nzela na ye ‘mabota nyonso na nsé masengelaki kopambolama.’ (Genese 22:18; 26:4; 28:14) Emonani ete Yesu Klisto nde azali Moponami yango. Na nzela ya liwa ya Yesu mpe ya lisekwa na ye, Yehova apesaki nzela ya lobiko mpo na bato nyonso ya botosi. Ɛɛ, matomba ya mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto ezali mpo na moto nyonso, kozanga koponapona.

Na mikolo ya Mose, ezaleli ya kozanga koponapona ya Nzambe emonanaki na lolenge ya kobenda likebi mpenza kati na likambo litalelaki bana basi ya Selofehada. Basi wana mitano bakutanaki na mokakatano na ntina na libula ya tata na bango kati na Mokili ya Ndaka. Ezalaki bongo mpamba te ezalaki momeseno na Yisalaele ete libula ya mabelé epesama epai na bana mibali ya moto oyo akufi. Nzokande, Selofehada azalaki na mwana mobali te oyo akokaki kozwa libula na ye. Na bongo, bana basi mitano ya Selofehada bamemaki likambo na bango epai na Mose mpo ete etalelama na kozanga koponapona, balobaki ete: “Mpo nini nkombo na tata na biso elongwa na libota na ye mpo ete azalaki na mwana mobali te? Pesá biso libula na kati na bandeko na tata na biso.” Yehova ayokaki malɔmbɔ na bango mpe ayebisaki Mose ete: “Soko mobali akufi mpe azali na mwana mobali te, mbɛ okolekisa libula na ye na mwana na ye mwasi.”​—Mituya 27:1-11.

Oyo nde ndakisa kitoko ya kozanga koponapona! Mpo ete libula ya libota na bango eleka na libota mosusu te wana bana basi yango basengelaki kobala, esɛngisamaki na bango ete bábala bobele kati na “libota na tata na bango.”​—Mituya 36:5-12.

Tozali komona lisusu kozanga koponapona ya Yehova na mikolo ya mosambisi mpe mosakoli Samwele. Yehova apesaki ye etindá ya kopakola mokonzi ya sika likoló na libota ya Yuda na molɔngɔ́ ya Yisai, moto na Beteleme. Kasi Yisai azalaki na bana mibali mwambe. Nani asengelaki kopakolama lokola mokonzi? Likebi ya Samwele ebendamaki epai na Eliaba, mpo ete azalaki mbinga mobali. Nzokande, Yehova apusamaka te na makambo oyo mazali komonana na libándá. Ayebisaki Samwele ete: “Talá na elongi na ye te mpe na molai na nzoto na ye te. . . . Mpo ete [Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka na lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” Davidi, mwana mobali ya nsuka ya Yisai, ye nde aponamaki.​—1 Samwele 16:1, 6-13.

Tózwa liteya kati na ezaleli ya kozanga koponapona ya Nzambe

Bankulutu baklisto bakosala malamu soki bakomekola Yehova na kotaleláká bizaleli ya elimo ya baninga na bango bandimi. Ekómelaka biso mbala mingi ete tókoka kotalela moto engebene mibeko oyo biso moko tosilá komisalela, kotikáká nzela na mayoki na biso moko ete ezipa lisosoli na biso. Lokola nkulutu moko alobi yango: “Namekaka kosalela basusu na lolenge oyo esepelisaka Yehova, kasi te engebene makanisi na ngai moko oyo nasilaki komisalela.” Ezali mpenza na litomba ete basaleli nyonso ya Yehova básalela Liloba na ye lokola motambwisi!

Bandakisa elandi euti na Biblia ezali kosalisa biso ete tóbundisa makanisi na ntina na kokabola mposo to bikólo. Na komekoláká ezaleli ya Yehova ya kozanga koponapona, tozali kobatela lisangá ya boklisto na makanisi mabe, na kokabolakabola, mpe na kotala bilongi.

Ntoma Petelo ayekolaki ete “Nzambe akokabolaka [“aponaponaka,” NW ] bato te.” (Misala 10:34) Kotala bilongi ezali monguna ya kozanga koponapona mpe ebukaka mibeko ya bolingo mpe ya bomoko. Yesu abendaki babólá, bato na bolɛmbu, mpe bato mpamba, mpe ayeisaki bozito na bango pɛpɛlɛ. (Matai 11:28-30) Akesanaki mpenza na bakonzi ya lingomba ya Bayuda, oyo bazalaki kokonza bato na kotyeláká bango bozito na ebele ya mibeko. (Luka 11:45, 46) Na kosaláká bongo mpe na kotaláká bilongi mpo na kosala malamu bobele epai na bato ya bozwi mingi mpe epai na bato ya lokumu, eyokanaki soko moke te na mateya ya Klisto.​—Yakobo 2:1-4, 9.

Lelo oyo, bankulutu baklisto bazali kotosa litambwisi ya Klisto mpe bazali komonisa ezaleli ya kozanga koponapona epai na basaleli nyonso ya Yehova oyo bamipesá. Wana bazali ‘kobatela etongá na Nzambe kati na bango,’ bazali komipekisa ete bátala bilongi te mpo na kosala malamu bobele epai na baoyo bazali na bozwi mingi, epai na baoyo bakokani na bango na bizaleli, to epai na baoyo bazali bandeko na bango na mosuni. (1 Petelo 5:2) Na komekoláká Nzambe oyo azangi koponapona mpe na kolandáká likebisi na ye oyo ezali kokweisa ezaleli ya kotala bilongi, bankulutu baklisto bazali kokólisa elimo ya kozanga koponapona kati na lisangá.

Lisangá ya boklisto ya Batatoli ya Yehova ezali libota oyo esangisi bato ya mikili ndenge na ndenge. Ezali elembeteli ya polele oyo ezali komonisa ete mokili mozangi kokanisela baninga mabe, mozangi koponapona, ekoki kosalema na nsé ya litambwisi ya Yesu Klisto. Batatoli basili ‘kolata motindo [“bomoto,” NW ] na sika oyo ezali na motindo na Nzambe na boyengebene mpe na bulɛɛ nyonso.’ (Baefese 4:24) Ɛɛ, bazali kozwa liteya uta na ndakisa ya Yehova, Nzambe ya kozanga koponapona, mpe bazali na elikya ya bomoi ya seko kati na mokili ya sika epai kuna koponapona ekozala te.​—2 Petelo 3:13.

a Nkombo oyo ebongolamaki.

[Elilingi na lokasa 26]

Ntoma Petelo ayekolaki ete Nzambe azali na koponapona te

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto