Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/6 nk. 12-17
  • Tólanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babangaki Yehova ntango bayokaki nsango na ye
  • Makambo oyo Yehova asalelaki Abalayama ná Yisalaele
  • Yesu, Moteyi oyo azalaki kopona bilongi te
  • Malamu ya kopona bilongi te
  • Tótika kokanisela bato mosusu mabe
  • “Bófungwama”
  • Mokanda ya Biblia nimero 6—Yosua
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Yosua ná bato ya Gibeone
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Yosua
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Makambo oyo Yosua abosanaki te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/6 nk. 12-17

Tólanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te

“Epai ya Nzambe koponapona ezalaka te.”​—BALOMA 2:11.

1, 2. (a) Yehova alingaki básala Bakanana nyonso nini? (b) Yehova asalaki nini, mpe yango ezali kobimisa mituna nini?

NA MOBU 1473 liboso ya ntango na biso (L.T.B), bana ya Yisalaele bakómaki na mokili ya Moaba mpe batɛlɛmaki mwa moke wana; bango nyonso bafungolaki matoi mpo na koyoka Moize. Mokakatano moko monene ezalaki kozela bango na ngámbo mosusu ya Ebale Yolodani. Moize ayebisaki bango ete Yehova alingi Yisalaele elonga bikólo motoba ya Bakanana oyo ezalaki na basoda ya makasi oyo efandaki na Mokili ya Ndaka. Moize akitisaki bango motema ntango alobaki ete: “[Yehova] Nzambe na yo akopesa bango na yo mpe okobuka bango, na ntango yango ekoki ete oboma bango nyɛ”! Bayisalaele basengelaki te kosala boyokani na bikólo yango, esengelaki bámonisela bango boboto ata moke te.​—Deteronome 1:1; 7:1, 2.

2 Kasi, kaka na engumba ya liboso oyo babundisaki, Yehova abikisaki libota moko. Nzambe abatelaki mpe bato ya bingumba mosusu minei. Mpo na nini? Kobikisama ya Bakanana wana ezali koteya biso nini na ntina na Yehova? Mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?

Babangaki Yehova ntango bayokaki nsango na ye

3, 4. Bato mosusu ya Kanana basalaki nini ntango bayokaki nsango ya bolongi ya Bayisalaele?

3 Yehova abatelaki Bayisalaele mpe abundelaki bango na boumeli ya mbula 40 oyo bazalaki kotambola na esobe liboso bákɔta na Mokili ya Ndaka. Ntango Bayisalaele bakómaki na sudi ya Mokili ya Ndaka, babundaki na mokonzi ya Alada, ekólo moko ya Bakanana. Na lisalisi ya Yehova, balongaki ye ná bato na ye na Holoma. (Mituya 21:1-3) Na nsima, Bayisalaele balekaki pembenipembeni ya mokili ya Edome; bakendaki na nɔrdi tii na nɔrdi-ɛsti ya Mbu Ekufá. Baamola bakómaki kofanda na mokili yango oyo ezalaká mboka ya Bamoaba. Sihona, mokonzi ya Baamola, aboyaki ete Bayisalaele bákatisa na mokili na ye. Babundaki etumba na Yasana, na ntembe te na nɔrdi ya Lobwaku ya Alenono, mpe babomaki Sihona kuna. (Mituya 21:23, 24; Deteronome 2:30-33) Mwa mosika lisusu na nɔrdi, Ogu azalaki mokonzi ya Baamola mosusu oyo bazalaki kofanda na Basana. Atako Ogu azalaki mbinga ya mobali, akokaki kotɛlɛma liboso ya Yehova te. Babomaki ye na engumba Edeli. (Mituya 21:33-35; Deteronome 3:1-3, 11) Ntango bato mosusu oyo bafandaki na Kanana bayokaki na nsango ndenge oyo Bayisalaele babimaki na Ezipito mpe bitumba oyo bazalaki kolonga, bamonaki mpenza ete ezali ekólo moko ya kosakana na yango te.a

4 Ntango Bayisalaele bakatisaki Ebale Yolodani mpe bakɔtaki na mokili ya Kanana, batongaki kaa na bango na Gilegale. (Yosua 4:9-19) Yango ezalaki pene na Yeliko, engumba oyo ezalaki na lopango ya makasi. Lahaba, mwasi moko ya Kanana, ayokaki nsango ya Yehova mpe amonisaki kondima. Yango wana, ntango Yehova abomaki Yeliko, abikisaki Lahaba ná bato oyo bazalaki na ndako na ye.​—Yosua 2:1-13; 6:17, 18; Yakobo 2:25.

5. Mpo na nini bato ya Gibona basalaki na mayele?

5 Na nsima, Bayisalaele balongwaki na mabwaku penepene ya ebale mpe babandaki kobuta mpo na kokɔta na mokili wana. Yosua alandaki malako ya Yehova, abombaki basoda na nsima ya mboka Ai mpo na kobundisa yango. (Yosua, mokapo 8) Ntango bayokaki nsango ete Yisalaele elongi engumba yango, bakonzi mingi ya Bakanana basanganaki mpo na kobundisa Yisalaele. (Yosua 9:1, 2) Nzokande, bato ya Gibona, mboka moko ya Bahivi oyo ezalaki mosika te, basalaki lokola bango te. Yosua 9:4 elobi ete: “Basalaki na mayele.” Lokola Lahaba, bayokaki ndenge Yehova abikisaki bato na ye mpe abimisaki bango na Ezipito mpe ndenge asalisaki bango bálonga Sihona ná Ogu. (Yosua 9:6-10) Bato ya Gibona bamonaki ete bakomisala mabe soki babundisi Yisalaele. Yango wana, mpo Gibona ná bingumba mosusu misato​—Kefila, Belote ná Kilyata-Yalima​—ebomama te, batindaki bato epai ya Yosua na Gilegale; bato yango balataki bilamba epasuká mpo bámonana lokola nde bauti mosika mpenza. Mayele na bango elongaki. Yosua asalaki na bango boyokani ete bakoboma bango te. Mikolo misato na nsima, Yosua ná Bayisalaele bayebaki ete bato yango bakosaki bango. Atako bongo, lokola balapaki ndai na nkombo ya Yehova, batosaki maloba na bato yango bango. (Yosua 9:16-19) Yehova andimaki nde likambo yango?

6. Ndenge nini Yehova atalelaki boyokani oyo Yosua asalaki na bato ya Gibona?

6 Bayisalaele bapesaki bato ya Gibona mosala bákatelaka bango nkoni mpe bátokelaka bango mai, ata mpe “mpo na etumbelo ya Yehova” na tabenakle. (Yosua 9:21-27) Lisusu, ntango bakonzi mitano ya Baamola ná basoda na bango balingaki kobundisa bato ya Gibona, Yehova asalaki likamwisi moko mpo na kobikisa bango. Matandala ekitaki mpe ebomaki banguna mingi koleka oyo basoda ya Yosua babomaki. Kutu, Yosua asɛngaki Yehova atɛlɛmisa sanza ná moi mpo na koboma bango tii na nsuka mpe Yehova ayokelaki ye. Yosua alobaki ete: “Mokolo mosusu [lokola] yango ezalaki liboso te mpe na nsima te, wana eyokaki [Yehova] mongongo ya moto, mpo ete [Yehova] abundaki mpo na Yisalaele.”​—Yosua 10:1-14.

7. Petelo andimaki solo nini oyo emonanaki epai ya bato mosusu ya Kanana?

7 Lahaba, mwasi ya Kanana, ná libota na ye, bakisa mpe bato ya Gibona, babangaki Yehova mpe bamonisaki yango na misala. Makambo oyo ekómelaki bango ezali komonisa ete ntoma Petelo alobaki solo ntango alobaki bambula ebele na nsima ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:34, 35.

Makambo oyo Yehova asalelaki Abalayama ná Yisalaele

8, 9. Ndenge nini makambo oyo Yehova asalelaki Abalayama mpe ekólo ya Yisalaele ezali komonisa ete aponaka bilongi te?

8 Moyekoli Yakobo alobelaki motema-boboto oyo Nzambe alakisaki Abalayama mpe bankɔkɔ na ye. Soki Abalayama akómaki “moninga ya Nzambe,” ezalaki mpo na ekólo na ye te, kasi mpo na kondima na ye. (Yakobo 2:23) Bankɔkɔ ya Abalayama bazwaki mapamboli mpo na kondima mpe bolingo oyo ye amonisaki epai ya Yehova. (2 Ntango 20:7) Yehova alakaki Abalayama boye: “Nakopambola yo solo mpe nakofulisa bana na yo lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlɔ na libongo ya mai.” Kasi, yoká likambo alakaki na vɛrsɛ oyo elandi: “Mabota nyonso ya nse bakopambolama mpo na bana na yo.”​—Genese 22:17, 18; Baloma 4:1-8.

9 Makambo oyo Yehova asalaki na Yisalaele emonisaki ndenge oyo akoki kosala mpo na bato oyo bazali kotosa ye, kasi ezali te ete aponaki bilongi. Makambo yango ezali kolakisa ndenge Yehova amonisaka motema-boboto na ye epai ya basaleli na ye ya sembo. Atako Bayisalaele bazalaki “bato [ya Yehova] mpenza,” yango elingi koloba te ete Nzambe akokaki kosalela bato ya bikólo mosusu malamu te. (Exode 19:5; Deteronome 7:6-8) Ya solo, Yehova alongolaki Bayisalaele na boombo na Ezipito mpe alobaki ete: “Nayebi bobele bino kati na mabota nyonso ya mokili.” Kasi, na nzela ya mosakoli Amosa ná basakoli mosusu, Yehova ayebisaki mpe makambo malamu mingi oyo akosala mpo na “mabota nyonso.”​—Amosa 3:2; 9:11, 12; Yisaya 2:2-4.

Yesu, Moteyi oyo azalaki kopona bilongi te

10. Na ndenge nini Yesu alandaki ndakisa ya Tata na ye na oyo etali kopona bilongi te?

10 Yesu, elilingi ya sikisiki ya bomoto ya Tata na ye, alandaki ndakisa ya Yehova ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabelé: azalaki kopona bilongi te. (Baebele 1:3) Na ntango wana, atyaki libosoliboso makanisi na ye na koluka “bampate babungá ya ndako ya Yisalaele.” Atako bongo, yango epekisaki ye te kosakola nsango malamu epai ya mwasi moko Mosamalia oyo akutanaki na ye na libulu ya mai. (Matai 15:24; Yoane 4:7-30) Lisusu, asalaki likamwisi ntango mokonzi moko ya basoda oyo, na ntembe te azalaki Moyuda te, asɛngaki ye asalisa ye. (Luka 7:1-10) Atako misala na ye ezalaki mpo na komonisa bolingo na ye mpo na libota ya Nzambe, andimaki mpe kosala makambo wana. Bayekoli ya Yesu mpe basakolaki tii na bamboka mosika. Emonanaki polele ete Nzambe azalaki kopambola bato na kotalela ekólo na bango te, kasi elimo oyo bazali komonisa. Bato ya komikitisa mpe ya mitema sembo oyo bazalaki koluka solo bandimaki nsango malamu ya Bokonzi. Nzokande, bato ya lolendo batyolaki Yesu mpe mateya na ye. Yesu alobaki boye: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabelé, mpamba te obombi makambo oyo malamumalamu liboso ya bato ya bwanya mpe ya bato ya mayele, mpe omonisi yango epai ya bana mike. Ɛɛ, e! Tata, mpamba te omonaki malamu kosala ndenge wana.” (Luka 10:21) Ntango tozali kosalela bato makambo na bolingo mpe kondima, tokopona bilongi te mpo toyebi ete Yehova alingaka ezaleli ya kopona bilongi te.

11. Ndenge nini baklisto ya liboso bazalaki komonisa ete bazalaki kopona bilongi te?

11 Na lisangá ya boklisto ya ebandeli, Bayuda ná bato ya bikólo mosusu bazalaki bango nyonso ndenge moko. Paulo alobaki boye: “Nkembo mpe lokumu mpe kimya epai ya moto nyonso oyo asalaka oyo ezali malamu, epai ya Moyuda liboso mpe lisusu epai ya Mogrɛki. Mpo epai ya Nzambe koponapona ezalaka te.”b (Baloma 2:10, 11) Mpo Yehova amonisela bango motema-boboto na ye, azalaki kotala ekólo te, kasi azalaki kotala ekateli oyo bazalaki kozwa nsima ya koyekola makambo ya Yehova mpe makambo malamu oyo mbeka ya Mwana na ye Yesu efungolelaki bango nzela. (Yoane 3:16, 36) Paulo akomaki boye: “Moto oyo azali Moyuda ezali te oyo azali bongo na libándá, ndenge moko mpe kokatama ngenga oyo ezali na libándá likoló ya mosuni. Kasi moto oyo azali Moyuda ezali nde oyo azali bongo na kati, mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema na nzela ya elimo, kasi na mokanda moko boye te ya mibeko.” Na nsima, Paulo asalelaki nkombo “Moyuda” na ndimbola na yango (elingi koloba “moto ya Yuda,” oyo elimboli, oyo akumisami to asanzolami), mpe alobaki boye: “Kosanzolama ya moto wana ezali kouta, epai ya bato te, kasi epai ya Nzambe.” (Baloma 2:28, 29) Mpo na kosanzola bato, Yehova aponaka bilongi te. Biso mpe tosalaka bongo?

12. Emoniseli 7:9 epesi elikya nini, mpe elikya yango ezali mpo na banani?

12 Na nsima, ntoma Yoane amonaki na kati ya emonaneli moko, baklisto ya sembo oyo bazali bapakolami lokola ekólo moko ya elimo oyo ezali na bato 144 000, “batyamaki elembo na mabota nyonso ya bana ya Yisalaele.” Na nsima, Yoane amonaki “ebele ya bato . . . bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe mandalala ezalaki na mabɔkɔ na bango.” (Emoniseli 7:4, 9) Yango emonisi ete bato ya bikólo nyonso mpe minɔkɔ nyonso bakoki kokɔta na lisangá ya boklisto lelo oyo. Bato ya bikólo nyonso bakoki kobika na “bolɔzi monene” oyo ezali koya mpe komɛla mai na “maziba ya mai ya bomoi” na mokili ya sika.​—Emoniseli 7:14-17.

Malamu ya kopona bilongi te

13-15. (a) Ndenge nini tokoki kotika kokanisela bato oyo tokeseni na bango mposo mpe bikólo mabe? (b) Pesá bandakisa oyo ezali komonisa ete kosepela na bato ekoki komema matomba.

13 Yehova ayebi biso malamu, ndenge tata ayebaka bana na ye. Ndenge moko mpe, soki tozali koluka koyeba mimeseno ya bato mosusu, tokomitya na esika na bango mpe tokomona mpamba makambo oyo ezali kokesenisa biso na bango. Tokomona lisusu te ete moto oyo tokeseni na ye ekólo azali mopaya to monguna; boninga mpe bolingo nde ekokola. Bomoko ekokóma makasi. (1 Bakolinti 9:19-23) Likambo yango ezali mpenza komonana na mosala ya bamisionɛrɛ na bamboka mopaya. Lokola bamisionɛrɛ basepelaka na bato ya bikólo oyo batindi bango, baumelaka te komesana na bandeko na masangá na bango.​—Bafilipi 2:4.

14 Malamu ya kopona bilongi te ezali komonana na mikili ebele. Aklilu, moto moko ya Éthiopie, azalaki na baninga te na Londres, mboka-mokonzi ya Angleterre, epai azalaki kofanda. Likambo yango ezalaki kotungisa ye mingi mpamba te azalaki komona ete bato ya mboka yango basepelaka na bapaya te, ndenge ezali komonana na bingumba mingi ya Mpoto. Kasi, Aklilu amonaki likambo ya ndenge mosusu mpenza ntango akendaki na makita na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova! Bato oyo akutanaki na bango kuna bayambaki ye na esengo, mpe na nsima ya mwa ntango amiyokaki mpenza lokola azali na kati ya bandeko na ye. Boyebi mpe botɔndi na ye mpo na Mozalisi ekolaki nokinoki. Mosika te akómaki na mposa ya koyebisa bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi. Kutu, mokolo moko oyo azalaki kosakola na ndeko moko, ndeko yango atunaki ye mikano na ye, Aklilu alobaki ete azali na mposa ya kozala mokolo mosusu na lisangá ya Amharique, monɔkɔ ya mboka na ye. Ntango bankulutu ya lisangá ya Lingelesi oyo azalaki bayokaki likambo yango, bazwaki bibongiseli mpo na kosala lisukulu moko na monɔkɔ ya mboka ya Aklilu. Ebele ya bapaya oyo babengisaki basanganaki na bana-mboka mpo na kolanda lisukulu ya liboso na monɔkɔ ya Amharique na Angleterre. Lelo oyo, bato ya Éthiopie mpe bato ya bikólo mosusu oyo balobaka Amharique bazali na lisangá moko oyo ezali kokola mpenza. Mingi bamoni ete eloko moko te ezali kopekisa bango bámipesa na Yehova mpe bázwa batisimo.​—Misala 8:26-36.

15 Mimeseno mpe bonkɔkɔ ya bato ekeseni. Tokoki te koloba ete bato oyo baleki bato oyo kuna, kasi ezali nde ete bato boye bakeseni na bato boye. Na Malte, ntango bato oyo bamipesi mpo na kosalela Yehova bazalaki kozwa batisimo, Batatoli ya esanga yango bazalaki kosɛka makasi mpo na komonisa esengo na bango; nzokande, Batatoli oyo bautaki Angleterre bazalaki kolela na esengo. Bato ya Malte ná bato ya Angleterre bamonisaki esengo na bango, kasi bato na bato na ndenge na bango, mpe bolingo makasi mpo na Yehova elendisaki bondeko na bango ya boklisto.​—Nzembo 133:1; Bakolose 3:14.

Tótika kokanisela bato mosusu mabe

16-18. Lisolo nini ezali komonisa ete lisangá ya boklisto ekoki kosalisa moto atika kokanisela bato mosusu mabe?

16 Ntango bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bandeko na biso baklisto ezali kokola, tokoki kolanda malamu ndakisa ya Yehova na ndenge ya kotalela bato mosusu. Soki tozalaki kokanisela bato ya ekólo boye, ya mposo boye to bonkɔkɔ boye mabe, tokoki kotika ezaleli yango. Tókamata ndakisa ya Albert, mobali moko oyo azalaki soda ya Angleterre na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba mpe oyo basoda ya Japon bakangaki ntango bazwaki Singapour na 1942. Na nsima, na boumeli ya mbula soki misato, basalisaki ye misala ya makasi ntango bazalaki kotonga “nzela ya engbunduka ya liwa,” pembeni ya esika oyo batongá gbagba ya ebale Kwai. Ntango batikaki ye na nsuka ya etumba, atikalaki na kilo 32 mpamba, mbanga mpe zolo ebukaná, abɛlaki pulupulu, mapalata mpe malaria. Ebele ya bato mosusu oyo bakangaki bango elongo na ye banyokwamaki kutu koleka ye, mpe mingi bakufaki. Mpo na makambo ya nsɔmɔ oyo amonaki mpe oyo basalaki ye, ntango Albert azongaki na mboka na ye na 1945, azalaki lisusu na esengo te, alingaki mpe lisusu Nzambe to kosambela te.

17 Irene, mwasi ya Albert, akómaki Motatoli ya Yehova. Mpo na kosepelisa mwasi na ye, Albert akendaki na mwa makita mosusu na lisangá ya Batatoli ya Yehova. Paul, elenge mobali moko oyo azali mosakoli ya ntango nyonso akómaki kokende kotala Albert mpo na koyekola na ye Biblia. Mwa moke na nsima, Albert amonaki ete Yehova atalaka oyo ezali na mitema. Amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo.

18 Mwa bambula na nsima, Paul akómaki kofanda na Londres, kuna ayekolaki monɔkɔ ya Japonais, mpe akómaki koyangana na lisangá ya Japonais. Mokolo mosusu Paul azwaki likanisi ya kosala mobembo mpo na kotala bandeko ya lisangá na ye ya kala elongo na Batatoli mosusu oyo bautaki na Japon; bandeko ya lisangá wana bakanisaki lisusu makanisi mabe oyo Albert azalaki na yango mpo na bato ya Japon. Kobanda azongá na Angleterre, Albert azalaki kolinga kokutana na moto ya Japon te, yango wana bandeko bamitungisaki mpo bayebaki te soki akotalela Batatoli wana ndenge nini. Basengelaki komitungisa te: Albert ayambaki bapaya yango lokola bandeko na ye mpenza.​—1 Petelo 3:8, 9.

“Bófungwama”

19. Toli nini ya ntoma Paulo ekoki kosalisa biso soki tozali naino na ezaleli ya kopona bilongi?

19 Mokonzi Salomo akomaki ete: “Kopona bilongi ezali malamu te.” (Masese 28:21, NW) Kosala boninga na bato oyo toyebi malamu ezalaka mpasi te. Kasi, ntango mosusu tobosanaka kotya likebi epai ya bato oyo toyebi malamu te. Ezaleli ya kopona bilongi ndenge wana ebongi te na mosaleli ya Yehova. Ekozala malamu mingi soki tolandi toli malamu oyo Paulo apesaki ete ‘tófungwama’​—ɛɛ, tófungwama na oyo etali bolingo na biso mpo na baninga baklisto oyo bazali bato ya ekólo, monɔkɔ to mposo mosusu.​—2 Bakolinti 6:13.

20. Na makambo nini ya bomoi na biso tosengeli kolanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te?

20 Tózala bato oyo bazali na elikya ya kokende na likoló to baoyo bakozwa bomoi ya seko awa na mabelé, ezaleli na biso ya kopona bilongi te esalisaka biso tózala etonga moko mpe na Mobateli moko. (Baefese 4:4, 5, 16) Soki tozali kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yehova, Nzambe na biso oyo aponaka bilongi te, yango ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola, na mabota na biso, na lisangá​—na mokuse, na makambo nyonso ya bomoi. Na ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekolobela yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bambula mingi na nsima, bakómaki koyemba makambo minene oyo Yehova asalaki na banzembo ya losambo.​—Nzembo 135:8-11; 136:11-20.

b Na bavɛrsɛ yango, “Bagrɛki” ezali bato ya bikólo mosusu nyonso.​—Étude perspicace des Écritures, ebimisami na Batatoli ya Yehova, volimi 1, lokasa 1025.

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Yehova amonisaki ete aponaka bilongi te na makambo oyo asalelaki Lahaba mpe bato ya Gibona?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kopona bilongi te mpo na koteya bato?

• Ndenge nini tokoki kotika kokanisela bato ya ekólo to mposo mosusu mabe?

[Elilingi na lokasa 13]

Bayisalaele babandi kobɔtɔla mokili ya Kanana

[Elilingi na lokasa 15]

Yesu akakatanaki te kopesa mwasi Mosamalia litatoli

[Elilingi na lokasa 16]

Lisukulu ya bato nyonso na monɔkɔ ya Amharique na Angleterre

[Elilingi na lokasa 16]

Bolingo ya Albert mpo na Yehova esalisaki ye atika kokanisela bato mosusu mabe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto