Kelasi ya mbala ya 101 ya Gileadi—Bazali na molende mpo na misala malamu
MOZALISI na biso, Yehova Nzambe, azali na molende mpo na misala malamu, ezali mpe bongo mpo na Mwana na ye, Yesu Klisto. Lokola ndakisa na biso, Yesu amonisaki molende na kokokisáká mosala oyo Nzambe apesaki ye, mosala oyo esɛngaki mpe ete amipesa “mpo na biso ete apɛtola mpo na ye moko libota na ye mpenza, baoyo bazali na [molende] na kosalaka misala malamu.” (Tito 2:14) Basangani 48 ya kelasi ya 101 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya Watchtower basili komonisa mpenza molende na bango mpo na misala malamu. Molulu ya bopesi mapɔlɔ́mi mpo na bamisionere wana esalemaki na mokolo mwa 7 Sɛtɛ́mbɛ 1996, na Esika Monene ya Watchtower mpo na mateya na Patterson, na etúká ya New York.
Batoli ebongi mpo na kozala ntango nyonso na molende
Mokambi ya molulu ya bopesi mapɔlɔ́mi ezalaki bongo Carey Barber, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, oyo asali koleka mibu 70 kati na mosala ya ntango nyonso. Na maloba na ye ya ebandeli, ndeko Barber abendaki likebi likoló na mosala ya kosakola mpe ya koteya ya Yesu, oyo azalaki “pole na mokili.” (Yoane 8:12) Amonisaki ete Yesu abatelaki te mokumba wana ya lokumu bobele mpo na ye moko kasi asɛngaki na bayekoli na ye ete bango mpe bángɛngisa pole na bango. (Matai 5:14-16) Libaku malamu wana ya mosala ezali kosala ete bomoi ya moklisto ezala lisusu na ntina koleka mpe ezali kotya mokumba moko monene likoló na mapeka ya baoyo nyonso bazali “kotambola lokola bana na pole.”—Baefese 5:8, NW.
Nsima ya maloba wana ya ebandeli, Don Adams, oyo asalaka na biro eye etalelaka lolenge ya kotambwisa misala kati na Biro monene oyo ezali na Brooklyn, abyangamaki ete akamata maloba. Alobelaki lisoló oyo ezalaki na motó na likambo ete: “Bókende liboso, bózonga nsima te.” Ndeko Adams abendaki likebi likoló na Eteyelo ya Gileadi yango moko mpe mokano na yango— kokólisa mosala ya kosakola nsango malamu na mikili ya bopaya. Alobelaki bokóli ya lisangá ya Nzambe, oyo esili kobimisa mikanda mikolimbolaka Biblia na mokili mobimba na nkótá koleka 300. Búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, oyo ebimisamaki na 1995, ezali sikawa na nkótá 111 mpe ebongiseli esili kozwama mpo ete enyatama na nkótá mingi mosusu. Esili kokokisa mokumba monene mpo na kosalisa bayekoli ya sika ya Yesu ete, na boumeli bobele ya mwa basanza, bákoka kokóma kino na komipesa mpe kozwa batisimo bobele nsima ya mwa basanza. Na yango, bamisionere ya sika bakozala na búku wana ya sika oyo ekosunga na boyekoli ya Biblia kati na mosala na bango.
Molobi oyo alandaki na nsima, Lyman Swingle, moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alobelaki lisoló oyo ezalaki na motó na likambo ete “Bólanda kosalela Yehova mosala na bino ya bulɛɛ,” lisoló oyo etongamaki likoló na Emoniseli 7:15. Mpo ete Yehova ye moko azali Nzambe na esengo, kosalela ye ntango nyonso ezali likambo oyo esalaka ete moto azala na esengo. (1 Timoté 1:11) Lokola litomba ya mosala wana ya esengo, ebele monene ya bato oyo bauti na biteni bikeseni ya mabelé basili koya mpo na kosambela ye. Na boumeli ya bambula, baoyo bakɔtaki na Eteyelo ya Gileadi basili kosangana na mosala monene ya kosalisa bato yango ete bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo. Na yango, tozali na bantina malamu ya kondima ete Yehova akolanda kopambola baoyo bazali sikawa kotindama mpo na koyanganisa basangani mingi ya ebele monene oyo ezali sé kofuluka.
“Bómonisa esengo ya Yehova,” ezalaki motó na likambo oyo Daniel Sydlik alobelaki, ye azali mpe moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Amonisaki ete basaleli nyonso ya Nzambe, ezala mpe bamisionere ya sika, bazali na libaku malamu ya kolakisa bato nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko mpe lolenge ya kozwa litomba kati na bomoi uta sikawa. Ndeko Sydlik alobaki ete: “Kolakisa ezali mosala oyo mokopesaka mpe mbano epai na molakisi ye moko. Yango emonanaka na bilongi ya bato oyo bazali kolakisa mpe na bilongi ya bato oyo bazali koyekola.” (Nzembo 16:8-11) Atángaki maloba ya misionere moko na Estonie, oyo alobaki ete: “Tozali na nsango oyo eleki monene na mabelé mobimba, mpe ezali elongi na biso nde ezali komonisa yango.” Lolenge ya elongi na biso ekoki kotinda bato ete báyoka biso mpe kolamwisa bosepeli na bango. Bato balingaka koyeba eloko nini esalaka ete basaleli ya Yehova bázala na esengo. Ndeko Sydlik apesaki toli ete: “Boye bósɛnzɛla mpo na oyo etali elongi na bino. Bato basepelaka komona bato ya esengo.”
Ulysses Glass, oyo asili kosangana na kopesa mateya epai na banakelasi ya Gileadi kobanda na kelasi ya 12 na 1949, asololaki na bayoki likoló na lisoló oyo ezali na motó na likambo ete: “Na motema pɛtɛɛ nyonso, bóbatela milimo na bino.” Motema pɛtɛɛ ezali nini? Ezali kopesa likanisi ya kozela eloko moko na kimya nyonso, komonisa ezaleli ya kokanga motema liboso ya matumoli to nkanda. Moto ya motema pɛtɛɛ azalaka na motema likolólikoló te; nzokande moto oyo azangi motema pɛtɛɛ asalaka makambo mbangumbangu mpe asilikaka. Ndeko Glass amonisaki ete “mingi bakanisaka ete motema pɛtɛɛ elimboli bolɛmbu to kozanga koyeba kokamata bikateli,” nzokande “epai na Yehova yango ezali elembo ya nguya mpe ya mokano.” (Masese 16:32) Bilembeteli nini bimonisi ete motema pɛtɛɛ epesaka mbano? Lisese moko ya ba Chinois elobi ete: “Motema pɛtɛɛ na ntango ozali na nkanda ekolongwela yo mpasi oyo mbɛlɛ ekokaki koumela epai na yo mikolo mingi.” Ndeko Glass alobaki ete “Motema pɛtɛɛ ekólisaka bomoto ya moto. Ya solo, yango ekembisaka bizaleli mosusu ya malamu ete eumela libela. Ezali kosala ete kondima ezala malamu, kimya eumela, mpe bolingo ezala makasi.”
Mark Noumair, oyo asalaki lokola misionere na Kenya na boumeli ya mibu 11 mpe oyo azali sikawa molakisi na Gileadi, alobaki ete: “Ezali libaku malamu kozwa mokumba uta na Yehova Nzambe na nzela ya lisangá na ye.” Wana azalaki kolobela lisoló oyo ezalaki na motó na likambo “Soki ozangi kondima, okokoka kolendendela te,” ndeko Noumair abendaki likebi likoló na ndakisa ya Mokonzi Ahaza ya Yuda. Yisaya andimisaki mokonzi ete Yehova akosunga ye kati na mokumba na ye, kasi Ahaza atyelaki Ye motema te. (Yisaya 7:2-9) Na nsima, ndeko Noumair amonisaki ete bamisionere—ya solo, biso banso—tosengeli kozala na kondima epai na Yehova mpo na kolendendela kati na mikumba na biso ya Teokrasi. Mikakatano minene mpo na mosala ya misionere esɛngi kozala na kondima makasi. Ndeko Noumair alobaki ete: “Ntango nyonso bóbatela na makanisi ete ezali na likambo moko te ya kokoka kati na ebongiseli ya biloko oyo.”
Baeksperiansi oyo ezali kolendisa mosala ya molende
Na boumeli ya mateya na bango na Gileadi, pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, banakelasi bazalaki kobima na mosala ya kosakola, mosala oyo mokozala mpe lobanzo na bango ya libosoliboso kati na mosala ya misionere. Wallace Liverance, mosangani ya biro oyo etalelaka mateya ya Gileadi, asalaki mituna-lisoló elongo na banakelasi 15, oyo bayebisaki baeksperiansi na bango. Leon Weaver, mosangani ya Komité ya Departemá ya Misala mpe Lon Schilling, mosangani ya Komité ya Misala ya Betele asalaki mituna-lisoló elongo na basangani ya komité ya filiale oyo bautaki na Afrika mpe na Amérique latine, bango bayebisaki baeksperiansi euti na mosala ya misionere mpe bapesaki mwa batoli kitoko epai na bamisionere oyo balingi kozwa mapɔlɔ́mi. Eyebisamaki ete, na Sierra Leone, soko bato 90 likoló na monkámá kati na baoyo bazwaki batisimo na boumeli ya mbula ya mosala 1995, basalisamaki na bamisionere. Oyo nde ndakisa malamu ya mosala mosalemi na molende!
Na nsuka, Milton Henschel, prezidá ya la Société, asalaki lisoló liboso na bayoki 2 734 likoló na motó na likambo “Lisangá ya Yehova oyo ezali komonana ekeseni na masangá mosusu nyonso.” Nini ezali kosala ete lisangá ya Yehova likesena na masangá mosusu nyonso? Ezali te bonene na yango soki mpe nguya na yango, kasi nde likambo oyo ete yango etambwisami na malako ya sembo mpe na bikateli ya sembo ya Nzambe. Na ntango ya kala, ezalaki libota ya Yehova, libota ya Yisalaele, nde epesamelaki maloba na bulɛɛ, maloba oyo masalaki ete libota yango likesena na mabota nyonso mosusu. (Baloma 3:1, 2) Lelo oyo, lisangá ya Yehova ezali na bomoko awa yango ezali kosala na litambwisi ya Yesu Klisto. (Matai 28:19, 20) Ezali kobota mbuma, mpe ezali kokóla. Ezali nde na lisangá mosusu awa na mabelé oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi na yango batalelaka Liloba ya Nzambe, Biblia, liboso ya kokamata bikateli minene? Na makambo oyo mpe na makambo mosusu, lisangá ya Yehova oyo ezali komonana ekeseni mpenza na masangá mosusu nyonso.
Molulu kitoko wana mosukaki na bopesi mapɔlɔ́mi mpe na botángi ya nkomá eutaki epai na banakelasi mpo na komonisa botɔ́ndi na bango mpo na mateya oyo bazwaki.
[Etanda na lokasa 22]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 9
Motuya ya bikólo epai batindami: 12
Motuya ya bayekoli: 48
Mwayene ya bambula ya kobotama: 31,7
Mwayene ya bambula balekisi kati na solo: 13,8
Mwayene ya bambula balekisi kati na mosala ya ntango nyoso: 9,8
[Elilingi na lokasa 23]
Kelasi ya mbala ya 101 ya Gileadi, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower
Kati na bankombo oyo ezali awa na nsé, milɔngɔ́ mitángami kobanda na liboso kino na nsima, mpe bankombo etángami kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali.
(1) Swint, H.; Zezenski, A.; Highfield, L.; Mercado, S.; Diehl, A.; Chavez, V.; Smith, J.; Selenius, S.(2) Kurtz, D.; Clark, C.; Leisborn, J.; Mortensen, W.; Bromiley, A.; Toikka, L.; Marten, A.; Smith, D.(3) Zezenski, D.; Bjerregaard, L.; Garafalo, B.; Kaldal, L.; Chavez, E.; Fröding, S.; Khan, R.; Selenius, R.(4) Swint, B.; Bjerregaard, M.; Garafalo, P.; Holmblad, L.; Keyzer, M.; Fröding, T.; Palfreyman, J.; Palfreyman, D.(5) Minguez, L.; Leisborn, M.; Mercado, M.; Kurtz, M.; Diehl, H.; Toikka, J.; Clark, S.; Khan, A.(6) Minguez, F.; Marten, B.; Highfield, L.; Holmblad, B.; Bromiley, K.; Kaldal, H.; Mortensen, P.; Keyzer, R.