Tolakisami mpo na kosala mokano ya Yehova
“Lakisá ngai ete nasala mokano na yo.”—NZEMBO 143:10.
1, 2. (a) Ntango nini tosengeli kolakisama, mpe yango esengeli kozala na mokano nini oyo ebongi mpenza? (b) Mpo na nini koteyama na Yehova ezali na ntina mingi?
MOKOLO na mokolo oyo moto azali na bomoi mpe azali kosala mosala, akoki kolakisama likambo moko ya motuya. Ezali bongo mpo na yo, mpe mpo na basusu. Kasi, nini esalemaka na nsima ya liwa? Moto akoki kolakisama to koyekola ata likambo moko te na ntango akufi. Biblia elobi polele ete bakufi “bayebi likambo te.” Boyebi ezali te kati na Sheol, nkunda ya bato nyonso. (Mosakoli 9:5, 10) Yango elimboli ete kolakisama, kozwa boyebi, ezali na ntina te? Yango etali makambo oyo tolakisami na yango mpe lolenge oyo tozali kosalela boyebi yango.
2 Soki tolakisami bobele makambo ya mokili, bomoi na biso ekozala na ndelo. Nzokande, na esengo nyonso, bamilió ya bato kati na mabota nyonso bazali kolakisama mokano ya Nzambe mpo ete bákoka kozwa bomoi ya seko. Moboko ya elikya wana euti na kolakisama oyo tozali kozwa epai na Yehova, ye Eutelo ya boyebi oyo ekopesaka bomoi.—Nzembo 94:9-12.
3. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete Yesu azalaki moyekoli ya liboso ya Nzambe? (b) Endimiseli nini tozali na yango ete bato bakolakisama na Yehova, mpe yango ekobimisa litomba nini?
3 Mwana ya liboso ya Nzambe, moyekoli na ye ya liboso, alakisamaki mpo ete akoka kosala mokano ya Tata na ye. (Masese 8:22-30; Yoane 8:28) Na nsima, Yesu amonisaki ete bibele na bato basengelaki kolakisama na Tata na ye. Bato oyo bazali koyekola epai na Nzambe bazali na bilikya nini? Yesu alobaki ete: “Ekomami kati na basakoli ete, Bango nyonso bakolakisama na Nzambe. Boye moto na moto oyo ayoki epai na Tata mpe ayekoli, akoya mboka na ngai. . . . Solo solo nazali koloba na bino ete, ye oyo akondima ngai azali na bomoi na seko.”—Yoane 6:45-47.
4. Lolenge nini mateya mauti na Nzambe masali bopusi likoló na bamilió ya bato, mpe bilikya nini bazali na yango?
4 Yesu atángaki bongo maloba ya Yisaya 54:13, oyo elobamaki mpo na mwasi ya Nzambe ya elilingi, Siona ya likoló. Esakweli yango ekokani na lolenge ya sikisiki epai na bana ya mwasi yango, bayekoli 144 000 ya Yesu Klisto babotami na elimo. Batikali ya bana yango na elimo bazali kosala na molende lelo oyo, bazali kokamba ebongiseli ya kolakisama oyo ezali kosalelama na mokili mobimba. Mpo na yango, bamilió ya bato mosusu oyo basali “ebele monene” bazali mpe kozwa litomba na kolakisama na Yehova. Bazali na elikya ya kokóba ntango nyonso koyekola kozanga ete liwa eya kokata bango boyekoli wana, elikya yango ekokani na mosusu te. Na lolenge nini? Ɛɛ, bazali na likoki ya kobikisama na “bolózi monene” mpe kozwa bomoi ya seko kati na mabelé oyo ekobongwana paladiso.—Emoniseli 7:9, 10, 13-17.
Tótya likebi monene mpenza na kosala mokano ya Nzambe
5. (a) Nini ekozala mokapo ya mobu 1997? (b) Lolenge nini tosengeli kotalela koyangana na makita ya boklisto?
5 Na boumeli ya mobu 1997, kati na masangá koleka 80 000 na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova bakobatela ntango nyonso kati na makanisi na bango maloba ya Nzembo 143:10: “Lakisá ngai ete násala mokano na yo.” Yango ekozala mokapo mpo na mobu 1997. Maloba yango, makokomama polele kati na Bandako ya Bokonzi, makosalelama lokola ekundweli ete makita ya lisangá ezali esika ebongi mpenza mpo na koteyama na Yehova, epai kuna tokoki kosangana na ebongiseli ya kolakisama oyo ezali sé kokende liboso. Wana tozali kosangana elongo na bandeko na biso na makita mpo na kolakisama na Molakisi na biso monene, tokoki kozala na mayoki motindo moko na mokomi ya Nzembo, oyo akomaki ete: “Nasepeli mingi wana balobelaki ngai ete, Tiká tókenda na ndako na [Yehova].”—Nzembo 122:1; Yisaya 30:20.
6. Maloba ya Davidi mazali kondimisa biso likambo nini?
6 Ɛɛ, tozali na mposa ya koteyama mpo na kosala mokano ya Nzambe na esika ya kosala mokano ya monguna na biso Zábolo to mokano ya bato ya kozanga kokoka. Na yango, lokola Davidi, tozali kondima Nzambe oyo tozali kosambela mpe kosalela: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo mpo ete yo ozali Nzambe na ngai. Molimo na yo ezali malamu; kambá ngai na mokili na sembo.” (Nzembo 143:10) Na esika ya kosangana na bato oyo balingaka solo te, Davidi asepelaki kozala epai kuna losambo ya solo ezalaki kosalelama. (Nzembo 26:4-6) Na lisalisi ya elimo ya Nzambe oyo ezalaki kotambwisa ye, Davidi alandaki nzela ya boyengebene.—Nzembo 17:5; 23:3.
7. Lolenge nini elimo ya Nzambe esili kosala likoló na lisangá ya boklisto?
7 Davidi monene, Yesu Klisto, apesaki bayekoli na ye elikya ete elimo santu ekoteya bango makambo nyonso mpe ekokundwela bango makambo nyonso oyo ayebisaki bango. (Yoane 14:26) Uta na Pantekote, Yehova azali mokemoke kobimisa “makambo mozindo na Nzambe” mazwami kati na Liloba na ye likokami. (1 Bakolinti 2:10-13) Asili kosala yango na nzela ya esaleli oyo ezali komonana, oyo Yesu abéngaki “moombo na sembo mpe na mayele.” Esaleli yango ezali kopesa bilei ya elimo oyo bitalelami kati na ebongiseli ya kolakisama mpo na masangá ya basaleli ya Nzambe na mokili mobimba.—Matai 24:45-47.
Toteyami na Yehova kati na makita na biso
8. Mpo na nini kosangana na Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali na ntina mingi?
8 Masoló ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na lisangá malobelaka mingimingi lolenge ya kosalela mitindá ya Biblia. Na ntembe te, yango esalisaka biso mpo na kolónga mitungisi ya bomoi. Na boyekoli mosusu, makambo mozindo ya solo ya elimo to bisakweli ya Biblia etalelamaka. Toteyamaka makambo mingi mpenza na boumeli ya boyekoli motindo oyo! Kati na mikili mingi Bandako ya Bokonzi ezali kotonda na bato na boumeli ya makita wana. Nzokande, na mikili mosusu, motángo ya bayangani mozali kokita. Okanisi ete ezali kokita mpo na nini? Ekoki kozala ete basusu bazali kotika nzela na mosala na bango ya mosuni ete epekisa bango koyangana elongo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ‘mpo na kolendisana ete tózala na bolingo mpe na misala malamu’? To bazali nde kolekisa ngonga mingi na kominanola to na kotala televizyo, kosaláká lokola ete bazali na makambo mingi ya kosala mpe bakoki te kokenda na makita nyonso. Tómikundola etindá epemami, oyo ezwami kati na Baebele 10:23-25. Lelo oyo koyangana elongo mpo na kolakisama na Nzambe ezali na ntina mingi mpenza koleka, awa ‘emoni biso ete mokolo yango mozali kobɛlɛma’?
9. (a) Lolenge nini Likita ya Mosala ezali kobongisa biso mpo na kosakola? (b) Ezaleli nini tosengeli kozala na yango na ntina na mosala ya kopesa litatoli?
9 Moko kati na mikumba na biso mileki mpenza ntina ezali bongo kosalela Nzambe lokola baministre. Likita ya Mosala ya kosakola ebongisami mpo na koteya biso lolenge oyo tokoki kokokisa mosala yango malamu mpenza. Tozali koyekola lolenge ya kosolola na bato, makambo nini tokoki koloba, lolenge nini tokoki kosala soki moto amonisi mposa, mpe oyo tokoki kosala soki moto aboyi nsango na biso. (Luka 10:1-11) Lokola myango oyo mikoki mpenza kobimisa matomba milobelamaka mpe mimonisamaka na nzela ya bilakeseli kati na likita ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, tozali kobongisama malamu mpo na kokutana na bato bobele te na ntango tozali kokende ndako na ndako kasi mpe na ntango tozali kosakola na balabála, na bisika ya kotɛlɛmisa mituka, kati na babísi, na mabándá ya mpɛpɔ, na bisika ya mombongo, to na biteyelo. Na boyokani na lilɔmbɔ na biso oyo: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo,” tokosalela mabaku nyonso mpo na kosala lokola Nkolo na biso alendisaki biso: “Tiká ete moi na bino engɛnga liboso na bato ete . . . bákumisa Tata na bino oyo azali na Likoló.”—Matai 5:16.
10. Lolenge nini tokoki mpenza kosalisa ‘baoyo babongi koyoka’?
10 Na makita wana ya boklisto, tozali kolakisama mpe mpo na oyo etali lolenge ya kokómisa basusu bayekoli. Soki moto amonisi bosepeli to totikeli ye mokanda, tokozongela ye lisusu na mokano ete tókoka kobanda boyekoli ya Biblia. Na lolenge moko, yango ekokani na likambo oyo ete bayekoli bazalaki ‘koumela epai na baoyo babongi koyoka’ mpo ete bákoka koteya bango makambo oyo Yesu atindaki bango. (Matai 10:11; 28:19, 20) Lokola tozali na mikanda mibongi, na ndakisa búku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, tozali na bisaleli malamu mpenza mpo na kokokisa mosala na biso na mozindo. (2 Timoté 4:5) Pɔ́sɔ na pɔ́sɔ, wana tozali koyangana na Likita ya Mosala mpe na Eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi, tozali kosala makasi mpo na kosimba mpe na nsima kosalela makambo ya ntina oyo makosalisa biso mpo ete tókóma baministre ya Nzambe oyo babongi kwa, kokokisáká bongo mokano na ye.—2 Bakolinti 3:3, 5; 4:1, 2.
11. Lolenge nini basusu bamonisaki kondima na maloba oyo mazwami kati na Matai 6:33?
11 Na kosaláká bongo, tozali nde “kokóba . . . koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.” (Matai 6:33) Omituna ete: ‘Lolenge nini nakoki kosalela etindá oyo soki makambo matali mosala na ngai [to ya mobalani na ngai] ya mosuni mazali kopekisa ngai koyangana na makita?’ Bato mingi oyo bakɔmeli na elimo bakamataki mikano ya kosolola elongo na bapatró na bango na ntina na likambo yango. Mosaleli moko ya ntango nyonso ayebisaki epai na patró na ye ete asengelaki kosilisa mosala na ngonga malamu pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na koyangana na makita. Andimaki lisɛngi na ye. Kasi lokola azalaki na mposa makasi ya koyeba makambo nini masalemaka na makita wana, patró yango asɛngaki ete ye mpe akende koyangana. Na ntango akómaki kuna, ayokaki liyebisi moko etalelaki liyangani ya etúká oyo likómaki pene ya kosalema. Litomba limonanaki ete, patró yango asalaki ebongiseli mpo na koyangana mokolo mobima na liyangani yango. Liteya nini ozwi kati na ndakisa oyo?
Balakisami kosala mokano ya Yehova na baboti oyo babangaka Nzambe
12. Mpo ete bana bákoka koteyama mokano ya Yehova, baboti baklisto basengeli kosala nini na motema pɛtɛɛ nyonso mpe na kozaláká ngwi?
12 Kasi ezali bobele te na makita ya boklisto mpe na mayangani nde tokoki kolakisama mpo na kosala mokano ya Yehova. Baboti oyo babangaka Nzambe bapesameli etindá ya koteya bana na bango, kopesa bango disipilini, mpe kobɔkɔla bango mpo na kosanzola Yehova mpe kosala mokano na ye. (Nzembo 148:12, 13; Masese 22:6, 15) Kosala bongo ezali kosɛnga ete tókende elongo na “bana” na biso na makita epai kuna bakoki ‘koyoka mpe koyekola,’ kasi ezali boni mpo na oyo etali koteya bango na lisalisi ya makomi mosantu kati na ndako? (Deteronome 31:12; 2 Timoté 3:15) Mabota mingi babandaki na etingya nyonso bibongiseli mpo na koyekola Biblia mbala na mbala kati na libota, kasi eumelaki te mpe bakómaki na bopɔtu to basundolaki yango. Likambo motindo wana esilá kokómela bino? Okoloba ete etindá oyo etaleli kosala boyekoli wana mbala na mbala elongobani te to ete ezalela ya makambo ya libota na yo ekeseni na boye ete ebongiseli yango ekopesa litomba te? Ata soki ezalela na bino ezali lolenge nini, tolɔmbi bino ete bótalela lisusu masoló, “Libula na biso ya bozwi ya elimo” mpe “Mbano ya bompikiliki” kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augústo 1995.
13. Lolenge nini mabota bakoki kozwa litomba na botaleli ya mokapo ya mokolo na mokolo?
13 Mabota balendisami ete bázala na momeseno ya kotalela mokapo ya mokolo na mokolo kati na mwa búku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo. Kotánga mokapo mpe bandimbola ezali malamu, kasi kosolola na ntina na mokapo yango mpe kosalela yango ezali na matomba mingi koleka. Na ndakisa, soki bozali kotalela Baefese 5:15-17 (NW ), basangani ya libota bakoki kososola mpo na koluka koyeba lolenge nini ‘kosomba ntango ebongi’ mpo na boyekoli ya moto na moto, kosangana na lolenge moko ya mosala ya ntango nyonso, mpe kokokisa mikumba mosusu ya teokrasi. Ɛɛ, lisoló kati na libota na ntina na mokapo ya mokolo na mokolo ekoki kopusa mosangani moko to basangani mingi ete ‘bákóba kososola [mingi mpenza] nini ezali mokano ya Yehova.’
14. Deteronome 6:6, 7 emonisi ete baboti basengeli kozala balakisi ya motindo nini, mpe yango ezali kosɛnga nini?
14 Baboti basengeli kozala balakisi ya molende epai na bana na bango. (Deteronome 6:6, 7) Kasi basengeli te bobele kopamelapamela bango to kopesapesa bango bitindá. Tata na mama basengeli mpe koyokamela bango, na kosaláká bongo bakozala mpenza na likoki ya koyeba nini esengeli kolimbolama, nini esengeli kolobelama polele, nini esengeli kolobelama na elilingi, to nini esengeli kozongelama lisusu. Kati na libota moko ya boklisto, baboti balamwisaka epai na bana na bango mposa ya kobanda lisoló na kolendisáká bango ete bátuna mituna na ntina na makambo oyo bazali kososola yango te to oyo ezali kotungisa bango. Na bongo, bayaki koyeba ete mwana na bango ya mobali oyo akómaki elenge azalaki na mokakatano mpo na kososola likambo oyo ete Yehova azali na ebandeli te. Baboti basalelaki makambo oyo mazwami kati na mikanda ya la Société Watch Tower, komonisáká ete endimami ete ntango mpe etando ezali na nsuka te. Basalelaki yango lokola elakiseli mpo na kosunga ye, mpe mwana yango asepelaki. Na yango, bózwaka ntango mpo na koyanola na mituna ya bana na polele nyonso mpe na lisalisi ya Makomami, kosalisáká bango bámona ete koyekola kosala mokano ya Nzambe ezali likambo ya kosepelisa mpenza. Basaleli ya Nzambe—bana mpe mikóló—balakisami lisusu makambo nini?
Tolakisami kolinga mpe kobunda
15. Ntango nini bosolo mpenza ya bolingo na biso ya bandeko ekoki kotyama na komekama?
15 Na boyokani na etindá ya sika oyo Yesu apesaki, ‘tolakisami na Nzambe ete tólingana.’ (1 Batesaloniki 4:9) Wana kimya ezali mpe manso mazali kotambola malamu, tokoki komiyoka ete tolingaka bandeko na biso nyonso. Kasi, nini emonanaka soki matáta mabimi kati na biso to toyokisami nkanda mpo na oyo moklisto mosusu alobi to asali mpo na biso? Ezali na ntango oyo nde bosolo mpenza ya bolingo na biso ekoki kotyama na komekama. (Kokanisá na 2 Bakolinti 8:8.) Biblia ezali koteya biso ete tósala nini kati na makambo motindo oyo? Moko na makambo oyo toteyami na yango ezali ete tosengeli kosala makasi mpo na komonisa bolingo na mobimba na yango mpenza. (1 Petelo 4:8) Na esika ete tóluka matomba na biso moko, kosilikáká na ntina na makambo mikemike, to kobomba ntango nyonso likambo oyo esalaki biso mpasi, tosengeli kosala makasi ete bolingo ezipa ebele ya masumu. (1 Bakolinti 13:5) Toyebi ete wana ezali mokano ya Nzambe, mpamba te ezali yango nde Liloba na ye ezali koteya biso.
16. (a) Baklisto balakisami kobunda lolenge nini ya etumba? (b) Lolenge nini tozali kobongisama mpo na kobunda?
16 Atako mingi bakoki te komona boyokani oyo ezali kati na bolingo mpe etumba, nzokande etumba ezali mpe likambo mosusu oyo tolakisami na yango, kasi etumba ya lolenge mosusu. Davidi andimaki ete asengelaki kotalela bobele Yehova mpo ete alakisa ye lolenge ya kobunda, atako na eleko na ye etumba yango etalelaki mpe etumba mpenza oyo Yisalaele ebundaki mpo na kotɛmɛla banguna. (1 Samwele 17:45-51; 19:8; 1 Mikonzi 5:3; Nzembo 144:1) Ezali boni mpo na etumba na biso lelo oyo? Bibundeli na biso bizali ya mosuni te. (2 Bakolinti 10:4) Etumba na biso ezali ya elimo, oyo mpo na yango tosengeli kolata molato mobimba ya etumba. (Baefese 6:10-13) Na nzela ya Liloba na ye, ya libota na ye oyo liyanganisami, Yehova azali kolakisa biso kobunda etumba ya elimo na bolóngi nyonso.
17. (a) Mayele mabe nini Zábolo azali kosalela mpo na kopɛngwisa biso? (b) Na mayele nyonso, tosengeli koboya nini?
17 Na lolenge ya mayele mabe, oyo ezangi komonana polele, Zábolo azali mbala mingi kosalela masɛnginya ya mokili, bapɛngwi, mpe batɛmɛli mosusu ya solo mpo na kobenda likebi na biso likoló na makambo mazangi ntina. (1 Timoté 6:3-5, 11; Tito 3:9-11) Ezali lokola nde amoni ete likoki ezali mingi te mpo na ye ete alónga biso na kobundisáká biso mbala moko, mpe na polele, yango wana azali koluka kobungisa biso nzela na kopusáká biso ete tóimaimaka mingi mpe tóbimisaka mituna ya mpambampamba, mizangi ntina na elimo. Lokola babundi oyo bazali miso gaa, tosengeli koyeba nokinoki makámá oyo mazali liboso na biso lokola nde tozali komona Zábolo kobundisa biso.—1 Timoté 1:3, 4.
18. Kozala na bomoi mpo na biso moko lisusu te elimboli nini?
18 Tozali te kotombola bamposa ya bato to mikano ya bikólo. Yehova asili kolakisa biso na nzela ya ndakisa ya Yesu ete tosengeli lisusu te kozala na bomoi mpo na biso moko; nzokande, tosengeli komibatela na kozaláká na elimo motindo moko lokola oyo Klisto azalaki na yango mpe kozala na bomoi mpo na mokano ya Nzambe. (2 Bakolinti 5:14, 15) Ekoki kozala ete na ntango ya kala, tozalaki na bomoi oyo elongobanaki te, ya bopɔtu, kobebisáká mpamba ntango na biso ya ntina mingi. Bilambo ya lokoso, komipesa na masanga, mpe etamboli ya mbindo oyo ezali komonana mingi na mokili oyo. Sikawa lokola tokómi kolakisama mokano ya Nzambe, tozali na botɔ́ndi ete tokabwani na mokili oyo esilá kobeba, boye te? Na yango tiká ete tóbunda etumba makasi na elimo mpo na koboya komikɔtisa na misala ya mbindo ya mokili.—1 Petelo 4:1-3.
Azali koteya biso mpo na litomba na biso moko
19. Kolakisama mokano ya Yehova mpe kosala yango ekomemela biso matomba nini?
19 Tosengeli mpenza koyeba ete tozali kozwa matomba mingi na kolakisama mokano ya Yehova. Yango wana, tosengeli kosala oyo ekoki na biso na kotyáká likebi makasi mpo ete tóyekola mpe na nsima tólanda mitindá oyo mizali kopesamela biso na nzela ya Mwana na Ye mpe na nzela ya Liloba na Ye mpe libota na ye liyanganisami. (Yisaya 48:17, 18; Baebele 2:1) Soki tosali bongo, tokolendisama ete tótikala ntango nyonso ngwi kati na eleko oyo ya mpasi mpe tóyika mpiko na mbula makasi oyo ezali koya mosika te. (Matai 7:24-27) Ata uta sikawa, tokosepelisa Yehova na kosaláká mokano na ye mpe tokondimisama ete mabondeli na biso makoyanolama. (Yoane 9:31; 1 Yoane 3:22) Mpe tokozwa esengo ya solosolo.—Yoane 13:17.
20. Ekozala malamu ete tómanyola likoló na likambo nini wana tokozala komona mokapo ya mobu na boumeli ya 1997 mobimba?
20 Na boumeli ya mobu 1997, tokozala mbala mingi na libaku ya kotánga mpe kotalela mokapo ya mobu, Nzembo 143:10: “Lakisá ngai ete nasala mokano na yo.” Wana tozali koyekola yango, tiká ete tósalela mwa ndambo ya mabaku yango mpo na komanyola likoló na bibongiseli oyo Yehova asili kokamata mpo ete tólakisama, lokola lisoló oyo limonisi yango. Mpe tiká ete bomanyoli likoló na maloba wana epusa biso na kosala ntango nyonso na etingya, koyebáká ete “ye oyo akosala mokano na Nzambe akoumela seko.”—1 Yoane 2:17.
Okoyanola lolenge nini?
◻ Banani bazali lelo kolakisama kosala mokano ya Yehova?
◻ Lolenge nini Nzembo 143:10 esengeli kosala bopusi epai na biso na boumeli ya 1997
◻ Lolenge nini tozali kolakisama na Yehova mpo na kosala mokano na ye?
◻ Nini esɛngami epai na baboti baklisto wana ezali bango kolakisa bana na bango?