Liyangani ya sika ya mokolo moko
1 “Bateyami na Yehova.” Yango nde ekozala motó na likambo ya mayangani ya sika ya mokolo moko oyo makobanda na Sɛtɛ́mbɛ. (Yoa. 6:45) Mateya ya Yehova mazali mpenza kosalisa biso na kozala na bomoi moko ya kosepelisa. Ezali kokólisa kati na biso botɔ́ndi mozindo mpo na libula na biso ya elimo. Milende oyo tozali kosala mpo ete basusu báyoka nsango malamu ezali kosala ete tózala na ntina kati libota ya bato. Liyangani oyo ya mokolo moko likomonisa mapamboli mazali kozwama epai na baoyo bateyami na Yehova.
2 Matomba ya mateya mauti na Nzambe makomonisama na bokeseni na makámá ya boyebi oyo mokili ezali kopesa. Tokososola mpenza polele ete Yehova azali kopesa biso mateya matombwami, mateya mauti na Liloba na ye, Biblia. Nsɛ́tɛ ekobɛtama mingi likoló na makambo misato ya losambo na biso oyo kati na yango tozali na esengo lokola toteyami na Nzambe. Lisusu, bilenge bakolendisama na komekola bandakisa minene ya Biblia, lokola Davidi na Timoté, mpe kotonga bomoi na bango likoló na makambo ya elimo. Kondima na biso ekolendisama ntango tokoyoka bandakisa ya bosembo ya mibangé Batatoli. Baoyo bauti komipesa kala mingi te epai na Nzambe mpe baoyo bazali kokokisa masɛngami bakokoka kozwa batisimo. Soki yango ezali mposa na bango, basengeli koyebisa yango na mokɛngɛli-mokambi liboso mpenza ya liyangani.
3 Lisukúlu ya moboko ya liyangani ya mokolo moko ezali na motó na likambo “Bateyami na Yehova mpo na kosala mokano na ye.” Ekomonisa mpo na nini biso banso tosengeli kokóba koyekola, kokemba kati na kondima mpe kokóba kokóla. Tokolendisama na komekola Yehova na koteyáká bazalani na biso solo oyo ezali komema na bomoi ya seko. Makambo oyo makotonga kondima na biso makomonisa lolenge mikanda ya la Société misalisaki ebele ya bato na kozwa mateya ya Yehova. Bakolobela mingi matomba mauti na ebongiseli ya koteya ya Yehova na mokili mobimba.
4 Tókamata bibongiseli ya sikisiki mpo na koyangana na yango. Tólendisa baoyo nyonso bazali komonisa bosepeli na kozala wana. Tósepela uta sikawa na ntina na ebele na makambo kitoko oyo Molakisi Monene na biso akoteya biso.—Yis. 30:20.