Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/1 nk. 3-5
  • Mpo na nini biso banso tosengeli kosanzola Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini biso banso tosengeli kosanzola Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ‘Bobele Yehova nde akokaki kopesa ngai elikya’
  • ‘Atako nazali mokufi-miso, nazali komona’
  • Tiká ete biso nyonso “tókumisa Ya”
  • Ntango ozali koyoka ete okómi mpenza na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Masolo ya basakoli ya Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Bósanzola Yah elongo na ngai
    Tóyembela Yehova
  • Sanzolá Yah elongo na ngai
    Tóyembela Yehova na esengo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/1 nk. 3-5

Mpo na nini biso banso tosengeli kosanzola Nzambe?

ALELUYA! Basangani mingi ya mangomba ya boklisto ya nkombo mpamba bayebi liloba wana. Bamoko kati na bango babelelaka yango na misa na bango ya mokolo ya Lomingo. Kasi, bato boni kati na bango bayebi mpenza ndimbola ya solosolo ya liloba wana? Ya solo, ezali bongo maloba “Kumisá Ya!” mabongolami uta na Liebele. Ezali bongo maloba ya kokumisa Mozalisi na esengo mpe na mpiko nyonso, oyo nkombo na ye ezali bongo Yehova.a

Liloba “Aleluya” esalelami mbala mingi kati na Biblia. Mpo na nini? Mpamba te bantina mpo na kosanzola Nzambe ezali mingi. Yah (Yehova) azali Mozalisi mpe Mobateli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Nzembo 147:4, 5; 148:3-6) Ye nde abandisaki ezingelo oyo ezali kopesa nzela ete bato bázala na bomoi awa na mabelé. (Nzembo 147:8, 9; 148:7-10) Mpe amibanzabanzaka mpenza mpo na bato. Soki tozali kosala mokano na ye, akopambola biso mpe akobatela bomoi na biso kati na mokili oyo mpe akopesa biso elikya ya solosolo mpo na bomoi ya kitoko koleka na mikolo mizali koya. (Nzembo 148:11-14) Ezali bongo Yah (Yehova) nde apemisaki maloba oyo: “Bayengebeni bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:29.

Na yango, elendiseli epesameli bato nyonso ete: “Aleluya!” “Bókumisa Ya, bino bato!” (Nzembo 104:35, NW; maloba na nsé ya lokasa) Nzokande, na mawa nyonso, bato nyonso te nde bazali kolanda elendiseli wana. Lelo oyo, bato bazali komona mpasi. Mingi bazali na nzala, na maladi, to banyokwami. Bato mingi bazali na mawa monene mpo ete basalelaki bilangwiseli mpe masanga makasi to mpo na mbuma mabe oyo bazwaki na ntina na etamboli na bango ya mbindo to mpo na botomboki na bango. Ezali na ntina oyo mpo na yango bato motindo wana basengeli kosanzola Nzambe?

‘Bobele Yehova nde akokaki kopesa ngai elikya’

Ɛɛ, ezali bongo. Yehova azali kobyanga moto nyonso ete ayeba ye, ayekola kosala mokano na ye, mpe azwa mapamboli oyo epusaka bato ete básanzola ye. Mpe bato mingi bazali koyanola na libyangi yango. Tókamata ndakisa ya Adriana, na Guatemala. Ntango Adriana azalaki na mbula nsambo, mama na ye akufaki. Mwa moke na nsima, tata na ye asundolaki ye. Wana akómaki na mbula zomi, abandaki kosala mosala mpo na kozwa mwa mosolo ya kobikela. Lokola mama na ye asilaká koyebisa ye ete asalela Nzambe mpe lingomba, Adriana akɔtaki na bituluku mingi ya Katolike, kasi ntango akómaki na mbula 12, amonaki ete bituluku yango ya Katolike bikokisaki mposa na ye te mpe akɔtaki na etuluku moko ya bilenge ya mobulu. Abandaki komela makaya, kosalela bilangwiseli, mpe koyiba. Mpo na nini elenge wana alingaki ete asanzola Nzambe?

Ndeko mwasi ya Adriana abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, kasi Adriana azalaki kosɛka ye. Mpe na nsima, ndeko mwasi ya mama na bango akufaki. Na ntango molulu ya bokundi esalemaki, abulunganisamaki na mituna mingi. Ndeko mwasi ya mama na bango akendaki wapi? Akendaki na likoló? Akendaki na lifelo ya mɔ́tɔ? Ezalaki mpenza likambo ya kobulunganisa, mpe Adriana akendaki na ndako ya losambo oyo ezali pene na malita mpo na kosala mabondeli ya kosɛnga lisungi, kosaleláká nkombo ya Yehova, lokola ndeko na ye ya mwasi alakisaki ye.

Mwa moke na nsima, abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita na bango ya boklisto. Yango epesaki ye libaku ya kotalela bomoi na lolenge moko ya sika mpe, na mpiko nyonso, akataki boyokani elongo na etuluku ya bilenge ya mobulu. Sikawa Adriana akómi na mibu koleka 20, alobi ete: “Bobele bolingo mpo na Yehova nde epusaki ngai ete natika lolenge mabe wana ya bomoi. Bobele Yehova na mawa na ye monene nde akokaki kopesa ngai elikya ya bomoi ya seko.” Atako Adriana akutanaki na mikakatano na bomwana na ye, azali na bantina malamu mpenza ya kosanzola Nzambe.

Likambo moko ya mawa mingi koleka eyebisameli biso uta na Ukraine. Mobali moko azali kati na bolɔ́kɔ, azali kozela mokolo ya kobomama na ye. Azali komiyokela mawa? Abulunganisami na makanisi? Te, kútu azali nde na esengo. Na mikolo oyo miuti koleka, nsima ya kokutana na Batotoli ya Yehova mpe kozwa boyebi ya Yehova, asɛngaki na bango ete bákende kokutana na mama na ye. Sikawa akomeli bango mpamba te ayoki ete bakokisaki lisɛngi na ye. Alobi ete: “Natɔ́ndi bino mpo ete bokendaki kotala mama na ngai. Ezali nsango eleki mpenza kosepelisa oyo nazwaki na mobu moleki.”

Kolobáká na ntina na ye moko mpe na ntina na baninga na ye ya bolɔ́kɔ, akomi ete: “Sikawa tozali na kondima epai na Nzambe mpe tozali komeka koyokanisa bomoi na biso na kondima na biso.” Asukisi nkomá na ye na maloba oyo: “Matɔ́ndi mingi epai na bino mpamba te bosalisi biso ete tóyekola soki bolingo ezali nini mpe tókóma na kondima. Soki nakotikala na bomoi, nakopesa mabɔkɔ na mosala na bino ya kosakola. Nazali kotɔ́nda Nzambe mpo ete lingomba na bino lizali mpe mpo ete bozali kosalisa basusu ete bálinga Nzambe mpe bandimela ye.” Mobali yango asɛngi ete etumbu na ye ya liwa etalelama lisusu malamu na esambiselo mosusu. Ata soki akobomama to soki akolekisa mbula mingi na bolɔ́kɔ, kasi azali na ntina ya polele ya kosanzola Nzambe.

‘Atako nazali mokufi-miso, nazali komona’

Tótalela sikawa ndakisa ya elenge mwasi moko oyo azali na nzoto makasi kasi miso na ye ekufaki na mbalakaka. Ezali bongo likambo oyo likomelaki Gloria, oyo afandaka na mboka Argentine. Na mbalakaka, Gloria akufaki miso na ntango akómaki na mibu 19, mpe kino lelo amonaka lisusu te. Ntango akómaki na mibu 29, mobali moko azwaki ye lokola makango mpe eumelaki te, akómaki na zemi. Mpe na ntango yango, amiyokaki ete bomoi na ye ekómaki na ntina. Kasi ntango mwana na ye akufaki, akómaki komituna mituna. Amitunaki ete: ‘Mpo na nini likambo motindo oyo likómeli ngai? Ngambo nini namemá? Nzambe azali mpenza?’

Na ntango yango, basi mibale Batatoli ya Yehova bayaki epai na ye. Abandaki koyekola Biblia mpe ayaki koyeba elaka ezwami kati na yango oyo elobi ete na mokili ya sika, bakufi-miso bakomona lisusu. (Yisaya 35:5) Oyo nde elikya kitoko mpo na Gloria! Azalaki na esengo mpenza, mingimingi na ntango mobali na ye andimaki kokomisa libala na bango na búku ya Letá. Na nsima, mobali na ye azwaki likámá mpe akómaki ɛlɛmɛ, akómaki kofanda sé na kiti ya kotambwisa. Lelo oyo, mwasi yango mokufi-miso asengeli kosala makasi mpo na kobikela. Lisusu, asalaka misala nyonso ya ndako, bakisá mpe kobatela mobali na ye. Atako bongo, Gloria azali kosanzola Yehova! Na lisalisi ya bandeko baklisto mibali mpe basi, azali koyekola Biblia na ekomeli mpo na bakufi-miso, mpe azwaka elendiseli mingi na makita ya boklisto kati na Ndako ya Bokonzi. Alobi ete: “Ezali mpasi mpo na kolimbola yango, kasi atako nazali mokufi-miso, ezali lokola nde nazali komona.”

Na bantango mosusu, bato bazali konyokolama mpo ete bazali kosanzola Nzambe. Mwasi moko na mboka Croatie azalaki na esengo wana ayekolaki makambo matali Nzambe, kasi mobali na ye atɛmɛlaki ye mpo na kondima na ye ya sika mpe abenganaki ye, abotolaki ye mwana mwasi ya mbula moko oyo babotaki. Azangaki esika ya kolala, mobali na ye mpe libota na ye basundolaki ye, azalaki na ndako te, mosala te, ata mwana na ye mpe azalaki na ye elongo te; na ebandeli, bomoi na ye ebulunganaki mpenza. Kasi bolingo na ye mpo na Nzambe ebatelaki ye, atako azalaki kokutana mingi te na mwana na ye ya mwasi liboso ete mwana yango akóla. Mwasi yango asilaki kozwa “mayaka ya motuya monene” mpe akangamaki bobele na yango. (Matai 13:45, 46, NW) Lolenge nini abatelaki esengo na ye na boumeli ya ntango wana ya mpasi? Alobi ete: “Esengo ezali mbuma ya elimo ya Nzambe. Ekoki kolónama kozanga kotalela makambo oyo mazingeli biso, lolenge moko lokola nzeté ekoki kokóla kati na ndako ya kobatelama ata soki mopepe, to moi, to mbula ezali libándá.”

Na Finlande, emonanaki epai na mwana moko ya mibu motoba, Markus, ete azalaki na maladi ya misisa oyo ekokaki kobikisama te. Nokinoki akokaki lisusu kotambola te, bobele kofanda na kiti ya kotambwisa. Mwa bambula na nsima, mama na ye amemaki ye epai na moto moko ya Lingomba ya Pantekote oyo akómaki na lokumu mingi mpo azalaki koloba ete azali na nguya ya kobikisa bato ya maladi. Kasi alóngaki te kobikisa Markus. Na yango, Markus azalaki kosepela lisusu na Nzambe te mpe alandaki boyekoli ya siansi mpe makambo mosusu ya boyebi ya mokili. Na nsima, esili koleka mbula mitano, mwasi moko oyo afandaki na kiti ya kotambwisa mpe elenge mobali moko azalaki kotambwisa ye, bayaki na ndako epai Markus azalaki kofanda. Ezalaki bongo Batatoli ya Yehova. Markus azalaki kondima lisusu te ete Nzambe azali, kasi aboyaki te kosolola makambo matali lingomba mpe abyangaki bango ete bákɔta na ndako.

Na nsima, babalani mibale bayaki kotala ye, mpe babandaki boyekoli ya Biblia elongo na ye. Na nsuka, nguya ya solo ya Biblia ebongolaki lolenge ya Markus ya kotalela makambo, mpe ayaki kososola ete atako azali mokakatali, azalaki na bantina ya kosanzola Nzambe. Alobaki ete: “Nazali na esengo mpamba te nasili komona solo mpe lisangá oyo Yehova azali kosalela. Sikawa bomoi na ngai ezali na mokano mpe ezali na ntina. Mpate mosusu ebungá esili komonana mpe elingi te kotika etongá ya Yehova!”​—Kokanisá na Matai 10:6.

Tiká ete biso nyonso “tókumisa Ya”

Wana ezali mwa ndambo kati na ebele ya bandakisa oyo ekoki kolobelama mpo na komonisa ete lelo oyo bato bakoki kozala na bantina ya kosanzola Yehova, ata soki ezalela ya makambo na bango ezali nini. Ntoma Paulo alimbolaki yango na maloba oyo: “Komipesa epai na Nzambe ezali na ntina kati na makambo nyonso, mpamba te esimbi elaka ya bomoi ya sikawa mpe oyo ya mikolo mizali koya.” (1 Timoté 4:8, NW) Soki tozali kosala mokano ya Nzambe, akokokisa “elaka ya bomoi ya sikawa.” Ya solo, kati na ebongiseli ya biloko oyo, akosala te ete babólá bakóma bazwi to mpe ete maladi elongwa epai na baoyo bazali kobɛla. Kasi azali kopesa elimo na ye epai na baoyo bazali kosalela ye mpo ete bázwa esengo mpe bosepeli ata soki makambo oyo mazingeli bango mazali lolenge nini. Ɛɛ, ata kati na “bomoi ya sikawa,” bato ya maladi, baoyo bazali konyokwama, mpe babólá bakoki kozala na bantina ya kosanzola Nzambe.

Kasi ezali boni mpo na bomoi “ya mikolo mizali koya”? Bobele kokanisa yango esengeli kopusa biso ete tósanzola Yehova na molende mingi mpenza koleka! Tokosepela na kokanisáká ntango oyo bobólá ekozala lisusu te; wana “mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na malali; bato baoyo bakofanda wana bakolimbisama masumu na bango.” (Yisaya 33:24; Emoniseli 21:3, 4; Nzembo 72:16) Lolenge nini otalelaka bilaka oyo ya Nzambe?

Elenge mobali moko na mboka El Salvador andimaki trakte moko ya kolimbola Biblia, oyo ezalaki kolobela mwa ndambo ya bilaka yango. Alobaki epai na Motatoli oyo apesaki ye yango ete: “Elenge mwasi, makambo malobami na trakte oyo makoki kosalema soko moke te.” Bato mingi balobaka bongo. Nzokande, wana ezali bongo bilaka ya Ye oyo asalaki molɔ́ngɔ́, oyo abandisaki zolongano ndenge na ndenge awa na mabelé, mpe oyo azali kosalisa ata babólá mpe bato ya maladi ete bázwa esengo. Tokoki kondima makambo oyo azali koyebisa biso. Elenge mobali oyo tolobeli ayekolaki Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe amonaki ete yango ezali solo. Soki naino obandi koyekola Biblia te, tozali kolendisa yo ete obanda yango. Na bongo, tiká ete ozala wana na ntango ebongiseli ya biloko oyo ekolongwa, mpe wana bikelamu nyonso bikosangisa mingongo mpo na konganga ete: “Aleluya!” “Bósanzola Ya, bino bato!”​—Nzembo 112:1, NW; Nz. 135:1.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Kati na Biblia, na bisika mosusu nkombo “Yehova” ebéngami na mokuse “Ya.”

[Elilingi na lokasa 5]

Tiká ete ozala wana na ntango bikelamu nyonso bikosangisa mingongo mpo na konganga ete: “Aleluya!”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto