Ntango ozali koyoka ete okómi mpenza na nsuka
OSILÁ koyoka ete okómi mpenza na nsuka mpe okómi kokanisa ete eleki malamu okufa na yo? Boye elakisi ete ozali koyeba mpo na nini Adriana alobaki maloba wana. Azalaki konyokwama makasi na makanisi mpe azalaki lisusu na elikya te. Konyokwama na makanisi ya Adriana ekómaki mpenza maladi.
Tózwa mpe ndakisa ya Kaoru, mobali moko ya Japon, oyo azalaki kobatela baboti na ye oyo bakómaki mibange mpe bazalaki kobɛla. Alobi boye: “Na ntango yango, nalɛmbaki makasi mpo bazalaki kosɛnga ngai makambo mingi na mosala. Nsukansuka, nazalaki lisusu na mposa ya kolya te, mpe mpɔngi ekómaki kokatanakatana. Nakómaki kokanisa ete nyonso wana ekozala lisusu te soki nakufi na ngai.”
Ojebode, moto moko ya Nigeria, alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso na mawa mpe nazalaki kolela, yango wana nakómaki koluka komiboma.” Nzokande, Ojebode, Kaoru, mpe Adriana bamibomaki te. Kasi, mbula na mbula, bato ebele bamibomaka.
NANI AKOKI KOSALISA BISO?
Mibali nde bamibomaka mingi, mpe mbala mingi ezalaka mpo bayokaka nsɔni mpo na kosɛnga lisalisi. Yesu alobaki ete bato ya maladi nde balukaka monganga. (Luka 5:31) Soki makanisi ya komiboma ezali koyela yo, koyoka nsɔni te, luká básalisa yo. Bato mingi oyo banyokwamaka na makanisi bamonaki ete kokutana na monganga esalisaki bango. Ojebode, Kaoru, ná Adriana bakutanaki na minganga mpe lelo oyo, bango nyonso bakómá koyoka mwa malamu.
Monganga akoki kokoma bankisi to kopesa batoli, to mpe kosangisa makambo yango mibale mpo na kosalisa moto oyo azali konyokwama na makanisi. Bato yango bazalaka na mposa ya bandeko mpe baninga oyo bazali na motema molai mpe bayebi komitya na esika na bango. Yehova azali moninga oyo aleki moninga mosusu nyonso oyo moto akoki kozwa; asalelaka Liloba na ye mpo na kosalisa biso malamumalamu.
NINI EKOKI KOSALISA MPO NA LIBELA?
Mbala mingi esɛngaka moto oyo azali konyokwama na makanisi azwa nkisi ntango molai mpe abongola makambo mosusu na bomoi na ye. Kasi, soki ozali na maladi ya konyokwama na makanisi, okoki kosala lokola Ojebode, elingi koloba komona na makanisi mokolo oyo okokóma na sante ya malamu. Ojebode alobi boye: “Nakanisaka ntango nakomona ndenge maloba ya Yisaya 33:24 ekokokisama; vɛrsɛ yango elobi ete mokolo mosusu moto moko te awa na mabele akoloba ete ‘nazali na maladi.’” Na ndakisa na ye, zwá makasi na maloba ya Nzambe oyo alaki “mabele ya sika” epai “mpasi” ekozala te. (Emoniseli 21:1, 4) Maloba wana elakisi mpe ete maladi nyonso ya motó mpe konyokwama na makanisi ekosila. Mpasi na yo ‘ekokanisama mpe ekoya na motema’ ata mokolo moko lisusu te; ekolimwa mpo na libela.—Yisaya 65:17.