Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/2 nk. 19-20
  • Mibeko ya mosala ya monganga mpe lipaso kozanga kozongisama makila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mibeko ya mosala ya monganga mpe lipaso kozanga kozongisama makila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likita mpo na kopesana makanisi
  • Atako nazalaki lisusu komona te, miso na ngai efungwamaki!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lipaso ya kozanga kozongisa moto makila—Matomba na yango ekómi koyebana mingi
    Lamuká!—1999
  • Wapi lolenge eleki malamu oyo minganga bakoki kosalisa moto?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/2 nk. 19-20

Mibeko ya mosala ya monganga mpe lipaso kozanga kozongisama makila

BOKÓLI mingi esili kosalema na mikolo na biso kati na mosala ya monganga. Atako bokóli mosusu esilisi mikakatano mitali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, nzokande esili mpe kobimisa mikakatano mitali mibeko ya mosala.

Minganga basengeli kokanisa malamu likoló na mituna ya mpasi lokola oyo: Ebongi nde na bantango mosusu kotika kopesa nkisi epai na mobɛli oyo emonani ete akobika te mpo ete akufa na lokumu nyonso? Monganga asengeli kokweisa ekateli ya mobɛli soki akanisi ete kosala bongo ezali nde mpo na litomba ya mobɛli? Lolenge nini lisalisi ya monganga ekoki kopesama epai na bato ya motindo nyonso, nzokande bobele bato moke mpenza nde bakoki kosalisama na myango ya ntalo mingi?

Mituna makasi motindo oyo misali ete likebi mingi likoka kotyama likoló na eteni moko ya zébi ya monganga oyo ebéngami zébi ya mibeko mitali mosala ya monganga. Mokano na yango ezali bongo ya kosalisa minganga mpe banganga-mayele ete bátalelaka kwɔkɔsɔ oyo bolukiluki ya bioloji mpe bokóli ya mosala ya monganga ekoki kobimisa likoló na mibeko ya mosala. Lokola mituna oyo mileki mpasi mibimaka kati na balopitalo, balopitalo mingi esili kosala bakomité ya kotalela mibeko ya mosala. Mingimingi, basangani ya bakomité yango​—kati na bango minganga mpe baí-mibeko​—bayanganaka na makita oyo elobelaka mibeko ya mosala ya minganga, epai kuna batalelaka mikakatano ya mosala ya minganga.

Mwa ndambo ya mituna oyo mibimaka kati na makita motindo wana ezali oyo: Kino na meko nini minganga basengeli kotosa bindimeli ya Batatoli ya Yehova oyo, liboso mpenza mpo na bantina etali lingomba, baboyaka kozongisama makila? Monganga asengeli nde kozongisa mobɛli makila kozanga kotosa mposa ya mobɛli soki emonani ete “ebongi bongo” engebene zébi ya monganga? Kosala bongo kozanga ete mobɛli ayeba yango eyokani nde na mibeko ya mosala, lokola nde ‘likambo oyo mobɛli ayebi yango te ekosala ye mpasi te’?

Mpo na koyanola na mituna wana na lolenge lobongi, ezali na ntina ete minganga báyeba malamu likanisi ya Batatoli kozanga kokanisela bango mabe. Batatoli ya Yehova bango moko bazali na mposa makasi ya kolimbola etɛlɛmɛlo na bango epai na minganga, kondimisamáká ete koyebana malamu moko na basusu ekoki kosilisa kowelana.

Likita mpo na kopesana makanisi

Profɛsɛrɛ Diego Gracia, nganga-mayele oyo ayebani mingi mpo na zébi ya mibeko ya mosala ya monganga na ekólo Espagne, alingaki ete lisoló motindo wana ekoka kosalema kati na kelasi na ye. Profɛsɛrɛ yango alobaki ete: “Ezali mpenza likambo lilongobani ete [Batatoli ya Yehova] bápesamela libaku ya koyebisa mabanzo na bango . . . na kotaleláká mikakatano oyo bosili kokutana na yango na ntina na kozongisama makila.”

Na yango, na mokolo mwa 5 Yúni 1996, bamonisi misato ya Batatoli ya Yehova babyangisamaki na Eteyelo monene ya Complutense na Madrid, na mboka Espagne, mpo na kolimbola makanisi na bango. Minganga 40 mpe bato mosusu bazalaki wana.

Nsima wana Batatoli bayebisaki mwa maloba mokuse ya ebandeli, bayangani bapesamelaki nzela ya kotuna mituna. Baoyo nyonso bayanganaki wana balobaki ete mobɛli oyo azali mokóló asengeli kozala na lotómo ya koboya lolenge moko to mosusu ya mwango ya kosilisa maladi. Banakelasi mpe bandimaki ete mobɛli akoki te kozongisama makila kozanga ete andima yango ye moko nsima ya koyebisamela yango. Kasi, mwa makambo mosusu matali etɛlɛmɛlo ya Batatoli ya Yehova mazali naino kotungisa bango.

Motuna moko motalelaki mosolo. Na bantango mosusu lipaso kozanga kozongisama makila esɛngaka bisaleli ya sipesiale, lokola lipaso na lisalisi ya rayons lazer, bakisá mpe bankisi ya ntalo makasi, lokola erythropoïetine, oyo esalelamaka mpo na kopesa makasi na mwango ya koyikanisa ba globules rouges kati na nzoto. Monganga moko amitunaki soki, na koboyáká lisalisi ya ntalo moke (makila), Batatoli bakoki komizela ete balopitalo ya Letá esalisa bango na koleka lolenge esalisaka bato mosusu.

Na kondimáká solo ete mosolo mozali likambo ya ntina mingi oyo minganga basengeli kotalela, moko na bamonisi ya Batatoli alobelaki mikanda mibimisamaki oyo milimbolaki polele mpasi oyo eyaka mpo na kozongisama makila, kasi elobelamaka mingi te. Yango etaleli mpasi oyo ezalaka mpo na kosilisa mikakatano oyo mibimaka nsima ya kozongisama makila, mpe kobimisama ya mosolo mpo na kosilisa mikakatano wana. Alobelaki bolukiluki moko oyo esalemaki na États-Unis oyo emonisi ete atako na ebandeli molangi moko ya makila ezali bobele na motuya ya badolare 250, eyaki mpenza kosɛnga kobisama ya badolare koleka 1 300​—mbala mitano koleka motuya oyo ebimisamaki na ebandeli. Na yango, amonisaki ete, na kotalela makambo nyonso, lipaso kozanga kozongisama makila esɛngaka mosolo mingi te. Lisusu, mingi na biloko oyo elobami ete esɛngaka kobimisa mosolo mingi mpo na lipaso kozanga kozongisama makila ezali bongo bisaleli oyo bisalelamaka lisusu mbala na mbala.

Motuna mosusu oyo minganga wana batunaki etalelaki bopusi ya bato mosusu. Bamitunaki ete, Ekozala boni soki Motatoli moko alɛmbisami mpe andimi kozongisama makila? Lingomba ya Batatoli ekobengana ye?

Eyano ekotalela lolenge mpenza likambo yango lisalemaki, mpamba te kozanga kotosa mobeko ya Nzambe ezali likambo moko monene, likambo oyo bankulutu ya lisangá basengeli kotalela malamu. Batatoli bakolinga kosalisa moto nyonso oyo azwaki lipaso ya mpasi mpe mpo na kobanga liwa, andimaki kozongisama makila. Na ntembe te, Motatoli wana akomiyoka mabe mpenza mpe akomibanzabanza mpo na boyokani na ye elongo na Yehova. Moto motindo wana akoki kozala na mposa ya lisungi mpe ete bámitya na esika na ye. Lokola moboko ya boklisto ezali bongo bolingo, bankulutu bakoyokanisa ezaleli ya ngwi mpe motema mawa​—lokola yango esengeli kosalema kati na kosambisama nyonso.​—Matai 9:12, 13; Yoane 7:24.

Profɛsɛrɛ moko ya mibeko mitali mosala ya monganga, oyo autaki na États-Unis atunaki ete: “Mbɛlɛ, mosika te, bokotalela lisusu etɛlɛmɛlo na bino? Mangomba mosusu masili kosala bongo na bambula oyo euti koleka.”

Bayebisaki ye ete etɛlɛmɛlo ya Batatoli na ntina na ezalela ya bulɛɛ ya makila ezali moko kati na mateya ya bindimeli na bango, kasi ezali te bobele mobeko ya lingomba oyo esengeli kobongolama mbala na mbala. Etindá wana ya polele ezwami na Biblia ekoki kokakolama soko moke te. (Misala 15:28, 29) Bobele lokola Motatoli akoki te kondima kosambela bikeko to kosala pite, lolenge moko mpe akoboya kobuka mobeko wana ya Biblia.

Batatoli ya Yehova basepelaka mingi na bolingo malamu ya minganga​—lokola baoyo bayanganaki na likita ya makambo matali mibeko ya mosala ya monganga na Madrid​—ya kotosa ekateli na bango ya koluka myango misusu ya kobikisa maladi na esika ya kosalela makila, yango eyokani na bindimeli na bango oyo bizwi moboko na yango kati na Biblia. Na ntembe te, mibeko mitali mosala ya monganga mikokokisa mokumba monene mpo na kobongisa boyokani kati na monganga mpe mobɛli mpe kokólisa botosi na bango mpo na oyo etali kokokisa mposa ya mobɛli.

Elobami na ntina na monganga moko oyo ayebani mingi na Espagne ete alobaki, minganga basengeli ntango nyonso komikundola ete “bazali kosala na bisaleli oyo bizangi kokoka mpe bazali kosalela myango oyo mikoki komema na libungá.” Na bongo, basengeli “kondimisama makasi ete bolingo esengeli ntango nyonso komonisama na esika oyo boyebi ekoki kokóma te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto