Wapi lolenge eleki malamu oyo minganga bakoki kosalisa moto?
Michael Rose, monganga-mokambi oyo apesaka nkisi ya mpɔngi na ntango ya lipaso, alobaki boye: “Moto nyonso oyo basali ye lipaso kozanga kozongisa ye makila, tokoki koloba ete, azwi lisalisi ya monganga oyo eleki malamu.” Mayele nini mpe nkisi nini mosusu bakoki kosalela mpo na “kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila”? Osengeli koyeba mayele mpe nkisi yango mpo ozwa bikateli oyo ebongi soki esengeli básalisa yo to básala yo lipaso. Tálá kasɛti-video Pas de sang: la médecine relève le défi. Na nsima, mpo na koyeba soki okangi makambo yango, yanolá na mituna oyo elandi.—Liyebisi: Lokola kasɛti-video yango ezali mpe komonisa ndenge bazali kosala moto lipaso, baboti basengeli kokeba ntango bazali kotala yango elongo na bana mike.
(1) Wapi ntina ya libosoliboso oyo Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila? (2) Na likambo ya kosalisa nzoto, Batatoli ya Yehova balingaka nini? (3) Lotomo nini bato ya maladi bazalaka na yango? (4) Mpo na nini kopona mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya kozongisa makila ezali mabe te mpe etali moto ye moko? (5) Soki makila ebimi mingi, wapi makambo mibale ya ntina oyo minganga basengeli kosala nokinoki? (6) Wapi mayele minei oyo bakoki kosalela mpo na kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila? (7) Ndenge nini minganga bakoki kosala (a) mpo makila ebima mingi te, (b) mpo na kobatela ba globule rouge, (c) mpo makila ebakisama na nzoto, mpe (d) mpo moto abungisa makila mingi te? (8) Limbolá mayele oyo babengi (a) hémodilution mpe (b) récupération de sang épanché. (9) Makambo nini osengeli koluka koyeba mpo na kosalisa nzoto kozanga kozongisa makila? (10) Bakoki kosala moto lipaso ya monene mpe ya mindɔndɔ kozanga ete bázongisa ye makila? (11) Mayele nini mosusu ya malamu minganga bazali kosalela sikoyo mpo na kosalisa bato?
Kondima balolenge mosusu ya kosalisa oyo balakisi na kasɛti-video oyo, ezali ekateli ya moto ye moko, na kolanda lisosoli na ye oyo eteyami na Biblia. Osili kopona mayele mosusu oyo basalelaka na esika ya kozongisa makila oyo okoki kondima mpo na yo moko mpe mpo na bana na yo? Bandeko na yo ya libota, oyo bazali Batatoli te basengeli mpe koyeba malamu ekateli na yo wana mpe bantina oyo ozwi yango.—Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2004, mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000.