Kopalangana ya kotingama na bindimeli ya kala
KOTINGAMA na bindimeli ya kala—likambo oyo ezalaki na bato bobele moke kati na lingomba ya Protestá esili koleka mwa bambula. Kasi makambo masili mpenza kobongwana! Bruce B. Lawrence, mokomi na makambo ya lingomba, akomaki ete esili koleka mbula 30, bato moke bakokaki kokanisa ete na nsuka ya ekeke ya 20, kotingama na bindimeli ya kalaa esengelaki kokóma likambo monene mpe oyo ezali kolobelama mbala na mbala na bipanzelo ya bansango mpe na bolukiluki ya biteyelo minene.
Nzokande, ezali yango nde esili kosalema. Bazulunalo ezali kolobela kotambola ya bato na balabala mpo na komonisa nkanda na bango, koboma, bituluku ya bato oyo baboyaka likambo ya kosopa zemi, kosalelama ya myango ya politiki na bituluku ya bato ya mangomba oyo bazali kotɛmɛla bikateli oyo basepeli na yango te, mpe kotumba liboso na bato mikanda oyo mitalelami ete mizali kotuka, ezali wana mwa makambo mazali kokundwela biso misala ya batingami. Mondo Economico, zulunalo ya makambo ya nkita oyo ebimisamaka pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na Italie elobaki ete pene na bisika nyonso oyo kotingama na bindimeli ezali komonana ezali “kosala mabe na nkombo ya Nzambe.”
Batingami bazali mbala mingi komonisama ete bazali bato ya molende mabe mpe eleká ndelo, bazali kokanisa myango mpe kokokisa misala ya mobulu. Bato bazali komilelalela na bokóli ya bituluku motindo wana lokola oyo eyebani na nkombo Comunione e Liberazione na lingomba ya Katolike ya Loma, Gush Emunim na lingomba ya Bayuda, mpe Lisangani ya boklisto na lingomba ya Protestá ya Amerika ya nɔ́rdi. Mpo na nini ezaleli ya kotingama na bindimeli ezali kopalangana? Nini ezali kopusa yango? Ezali nde, lokola sociologue Gilles Kepel, moto na France, alobi yango ete “bobekoli ya Nzambe?”
[Maloba na nse ya lokasa]
a Motingami (fondamentaliste) ezali ye oyo alendendali makasi na bindimeli ya kalakala ya lingomba, oyo bikoki kobongwama te. Ndimbola ya maloba “kotingama na bindimeli ya kala” ekolobelama mingi mpenza na lisoló lilandi.