Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/3 nk. 4-5
  • Kotingama na bindimeli ya kala: Elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kotingama na bindimeli ya kala: Elimboli nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano na makambo ya eleko na biso
  • Tóyeba nani oyo azali motingami
  • Kopalangana ya kotingama na bindimeli ya kala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mwango moleki malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mituna oyo bato batunaka mingi
    Lamuká!—2010
  • Mangomba nde ezali komemela bato mikakatano?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/3 nk. 4-5

Kotingama na bindimeli ya kala: Elimboli nini?

KOTINGAMA na bindimeli ya kala ebandaki wapi? Na nsuka ya ekeke eleki, banganga-mayele ya teoloji oyo balukaka kokɔtisa mbongwana bakómaki kobongola bindimeli na bango mpo na koyokanisa yango na oyo ya banganga-batyoli ya Biblia mpe na mateya ya siansi, lokola oyo ya evolisyó. Mpo na yango, bato bazalaki lisusu kotyela Biblia motema te. Na États-Unis, bakonzi ya mangomba oyo babatelaka makasi bindimeli na bango ya kalakala batɛmɛlaki ezalela motindo wana na kotyáká oyo babéngaki ete miboko ya kondima.a Na ebandeli ya ekeke ya 20, babimisaki masoló oyo malobelaki makanisi na bango na búku ya bavolimi mingi oyo ezalaki na motó na likambo ete The Fundamentals: A Testimony to the Truth. Ezali uta na motó na likambo wana nde liloba “fondamentalisme” libimaki.

Na ebandeli ya ekeke ya 20, kotingama na bindimeli ya kala ekómaki kolobelama mbala na mbala na bipanzelo ya nsango. Na ndakisa, na 1925, na etúká ya Tennessee, na États-Unis, etuluku ya batingami na bindimeli ya lingomba bafundaki molakisi moko na nkombo ya John Scopes na esambiselo na likambo oyo eyaki kobéngama ete lisambisi ya Scopes. Mabe nini asalaki? Azalaki koteya evolisyó, mpe yango epekisamaki na mibeko ya etúká wana. Na eleko yango, bamoko bakanisaki ete ezaleli ya kotingama na bindimeli ya kala esengelaki koumela te. Na 1926, Christian Century, zulunalo moko ya lingomba ya Protestá, elobaki ete ezalaki “eloko mpamba mpe euti na makanisi ya bato” mpe ete “ezangi makoki nyonso ya kokokisa mikano ya malongá mpe ekoki koumela te.” Oyo nde libunga kati na maloba wana!

Bandá na bambula 1970, kotingama na bindimeli ya kala ekómaki kolobelama mbala na mbala na bansango. Profesɛrɛ Miroslav Volf, ya likindo ya teoloji ya Fuller, na etúká ya Californie, na États-Unis, alobi ete: “Kotingama na bindimeli ya kala esukaki bobele na kobika te, kasi lisusu epalanganaki.” Lelo oyo, maloba “kotingama na bindimeli ya kala” ezali kosalelama bobele mpo na bituluku ya lingomba ya Protestá te kasi lisusu na oyo ya mangomba mosusu, lokola lingomba ya Katolike, ya Mizilmá, ya Bayuda, mpe ya Hindou.

Eyano na makambo ya eleko na biso

Mpo na nini kotingama na bindimeli ya kala ezali kopalangana? Baoyo bazali kosala bolukiluki na ezaleli yango bamonisi ete ntina na yango, ata ezali yango moko, euti na kobeba ya bizaleli malamu mpe kobeba ya makambo ya mangomba na eleko na biso. Na ntango ya kala bato mingi bazalaki kofanda elongo, na kimya mpe na bizaleli malamu oyo etongamaki likoló na bindimeli ya kalakala. Sikawa bindimeli yango bizali kobɛtelama ntembe to mpe bibwakami. Banganga-mayele mingi bazali koloba ete Nzambe azali te mpe ete moto azali sé ye moko kati na molɔ́ngɔ́ oyo ezali komibanzabanza mpo na ye te. Bato mingi ya siansi bazali koteya ete moto abimaki pwasa na nzela ya evolisyó, kasi te na misala ya Mozalisi oyo azali na bolingo. Ezaleli ya kotika nzela na etamboli nyonso ezali kopalangana mingi. Kobeba ya ya etamboli malamu na bisika nyonso oyo bato bazali ezali kopesa mpasi na mokili.​—2 Timoté 3:4, 5, 13.

Batingami bazali na mabanzo ya makambo ya bizaleli malamu ya kala, mpe bamoko kati na bango bazali kosala molende ya kopusa bato oyo bazali pembeni na bango mpe bato ya ekólo na bango ete bázongela makambo oyo bakanisi ete mazali malamu ezala na etamboli to na moboko ya kondima. Bazali kosala nyonso ekoki na bango mpo na kotindika basusu ete bázala na bomoi oyo eyokani na mibeko ya etamboli malamu mpe ebongiseli ya bindimeli oyo “elongobani.” Motingami andimisami makasi ete ye nde azali na elónga mpe basusu bazali na libunga. Kati na búku na ye Fundamentalism, Profesɛrɛ James Barr alobi ete kotingama na bindimeli ya kala “ezali mbala mingi kotalelama lokola liloba ya koyina mpe koyoka mabe, ezali kopesa likanisi ya bosɛnzi, ya kokabolakabola, ya boínga mpe ya koponapona.”

Lokola moto moko te asepelaka ete bábenga ye mosɛnzi, moínga, to mpe moto na koponapona, bato nyonso bazali na likanisi moko te mpo na ntina na ye oyo azali motingami mpe ye oyo azali motingami te. Nzokande, ezali na mwa makambo oyo mazali komonisa kotingama na bindimeli ya kala ya lingomba.

Tóyeba nani oyo azali motingami

Kotingama na bindimeli ya kala ya lingomba emonanaka mingi na milende ya koluka kobatela oyo ekanisami ete ezali bonkɔ́kɔ ya kala to bindimeli ya lingomba ya etuluku moko ya bato mpe emonanaka na botɛmɛli, elimo oyo emonani ete ezali mpenza ya mokili. Yango elingi koloba te ete batingami bazali kotɛmɛla makambo nyonso ya sika. Bamoko bazali kosalela mpenza myango ya bopanzi nsango mpo na kopalanganisa makanisi na bango. Kasi bazali kotɛmɛla lisántola ya bizaleli ya bato.b

Batingami mosusu bazali kosuka te bobele na kozala na ekateli makasi ya kobatela mpo na bango moko lolenge makambo mazalaka uta kala na ntina na mateya mpe lolenge ya bomoi, kasi bazali lisusu kosɛngisa yango epai na basusu, mpo na kobongola lolenge makambo ya bomoi matambwisami mpe koyokanisa yango na bindimeli ya batingami. Na yango, motingami mokatolike akosuka te bobele na koboya kosopa zemi mpo na ye moko. Akoki mpe kosala bopusi likoló na basali-mibeko na mboka na ye mpo na kondimisa mibeko oyo mizali kopekisa kosopa zemi. Engebene zulunalo La Repubblica, na ekólo Pologne, mpo na kokɔtisa mobeko ya koboya kosopa zemi kati na mibeko ya mboka, lingomba ya Katolike ebundaki “‘etumba’ oyo kati na yango ebimisaki nguya mpe bopusi na yango nyonso.” Na kosaláká bongo, bakonzi ya lingomba basalaki mpenza na lolenge ya batingami. Lisangani ya boklisto ya Protestá na États-Unis ezali kobunda “bitumba” ya ndenge yango.

Batingami bazali koyebana libosoliboso na kokangama na bango makasi na bindimeli ya lingomba. Na yango, motingami moprotestá azali mokɔteli oyo andimisami makasi na likanisi na ye ete Biblia esengeli kolimbolama bobele lokola ekomami, mbala mosusu, bakisá endimeli oyo emonisi ete mabelé masalemaki na boumeli ya mikolo motoba ya ngonga 24. Motingami mokatolike akakatanaka te na likambo oyo elobi ete pápa akoki kokweisama te.

Na yango, ezali mpasi te na kokanga ntina ete “kotingama na bindimeli ya kala” ezali kopesa likanisi ya molende mabe mpe ya kolekisa ndelo, ya kozanga kokanisa mpe ezali mpo na yango nde, baoyo bazali batingami te, bazali kosepela te ntango ezaleli ya kotingama na bindimeli ya kala ezali kopalangana. Mpo na mokomoko, tokoki koboya makanisi ya batingami mpe kotungisama na myango na bango ya politiki mpe misala na bango oyo mizalaka ntango mosusu ya mobulu. Ya solo, batingami ya lingomba moko bakoki kobulunganisama na misala ya mobulu ya batingami ya lingomba mosusu! Atako bongo, bato mingi oyo bakanisaka bazali komibanzabanza na ntina na makambo oyo mazali koyeisa kopalangana ya kotingama na bindimeli ya kala​—kobeba ya bizaleli malamu oyo ezali sé kobakisama, kobungisa kondima, mpe koboya makambo ya elimo na mikolo na biso.

Kotingama na bindimeli ya kala ezali yango nde eyano bobele moko na makambo wana? Soki ezali boye te, wapi mwango mosusu?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali Makambo mitano makoki kobongwana te, matyamaki na 1895, ezalaki bongo “(1) Makomami nyonso mapɛmami mpe mazangi libunga; (2) bonzambe ya Yesu Klisto; (3) mbotama ya Yesu epai na ngɔndɔ mwasi; (4) bokitanyi mbɔndi ya Klisto na ekulusu; (5) lisekwa ya Klisto mpe koya na ye mpo na mbala ya mibale lokola moto mpe na nzoto ya mosuni awa na mabelé.”​—Studi di teologia (Boyekoli ya teoloji).

b “Kosántola” elimboli kopesa motuya mingi na makambo ya mokili, oyo makeseni na makambo ya elimo to ya bulɛɛ. Makambo ya mokili ezali kotalela lingomba te to mpe bindimeli ya lingomba te.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Na 1926 zulunalo moko ya lingomba ya Protestá elobelaki kotingama na bindimeli ya kala lokola “eloko mpamba mpe euti na makanisi ya bato” mpe “ezangi makoki nyonso ya mikano ya malongá mpe ekoki koumela te”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto