“Nazali bobele moko kati na ebele ya bato oyo osimbaki mitema na bango”
NA Yanuáli 1996, Carol azalaki kobɛla kansɛr ya bɔɔngɔ́. Azalaki na mibu koleka 60 mpe kino eleko wana azalaki ntango nyonso na esengo, azalaki mwasi makasi na maloba ya kolendisa epai na moto nyonso. Kasi, na ntango yango minganga bazalaki kosala makasi mpo na kolónga bokɔnɔ yango oyo ebomaka wana ezalaki bobele kokóla. Ntango azalaki kobunda na bokɔnɔ yango, Carol azwaki nkomá oyo:
“Molingami Carol:
“Nazali na mawa mingi mpo na kobeba ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo. Likambo ya esengo, tozali na elikya moko kitoko oyo Biblia ezali kosalisa biso ete tóyeba yango mpe tólinga yango. Elikya yango etaleli Bokonzi ya Yehova ete eyangela mabelé mpo ete tókoka kofanda kati na paladiso, ntango oyo biso banso tozali kozela motema likoló.
“Nalingi oyeba ete mosala na yo moko ya kosakola ebikisi ebele ya bato longwa na liwa ya seko. Nazali moko kati na bato yango. Nandimisami te ete ozali komikundola mbala ya liboso oyo tokutanaki. Na ntango wana nazalaki na mibu 20. Nazalaki na nsuki milai, nazalaki kotɛkisa bilangwiseli, mpe nazalaki koyengayenga elongo na etuluku moko ya basali-mobulu. Biso nyonso tozalaki kotambola na mandoki mpe tozalaki ata kolinga moto moko te longola bobele biso mpenza.
“Obɛtaki na ekuke na ngai elongo na Motatoli mosusu mpe olakisaki ngai Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Nalingaki kopesa yo dolare moko mpe nalobaki ete nasepelaki te kozwa bazulunalo yango. Nzokande, olimbwelaki ngai ete ozalaki kati na mosala ya kosakola mpo na kozwáká makabo te. Mpe oyebisaki ngai ete ozalaki kosala mosala ya kosunga bato ete bátánga Biblia. Nandimisami te ete nazwaki bazulunalo yango to natángaki yango. Nzokande, olónaki momboto ya solo kati na bomoi na ngai.
“Nsima ya mwa bambula, Motatoli mosusu na nkombo Gary ayaki kotala mama na ngai ntango ngai mpe nazalaki wana. Nayebisaki ye ete oyaki kotala ngai esili koleka mwa bambula. Gary ayekolaki Biblia elongo na ngai na boumeli ya ntango molai kino nsukansuka nayaki kobatisama na 1984. Sikawa nazali koteya bana na ngai solo ya Bokonzi ya Nzambe.
“Nandimisami ete nazali bobele moko kati na ebele ya bato oyo osimbaki mitema na bango kati na bambula na yo ya mosala ya sembo. Nzokande, na nzela ya motema boboto oyo omonisaki, osili kopesa ngai mpe libota na ngai likoki ya koyeba Nzambe Monene, Yehova, mpe Mwana na ye, Yesu Klisto. Nazali kozela motema likoló mokolo oyo nakomona yo kati na ebongiseli ya sika ntango Yehova akolongola mpisoli nyonso na miso na biso, mpe ntango liwa ekozala lisusu te.—Emoniseli 21:4.
“Ngai mpe libota na ngai, tozali na esengo ete tozwaki libaku ya koyeba yo mpe ya kozala eteni moko ya mosala na yo ya litatoli. Matɔ́ndi mingi.
“Yambá mbote na ngai ya bolingo,
Peter”
Nsima ya bokɔnɔ oyo eumelaki sanza motoba, Carol akufaki na Mársi 1996, alónaki mbóto mingi ya solo kati na mosala na ye ya mopalanganisi ya molende ya nsango malamu na boumeli ya mibu 35. Ayekolaki ete moto moko te akoki koyeba ntango momboto ekobota mbuma, ata nsima ya bambula mingi.—Matai 13:23.