Nzambe ayokaka mabondeli
Mbala na mbala, Koloneli azalaki kobondela Nzambe ayokela ye mawa. Lokola azalaki mokonzi ya basoda, azalaki mpe kosalela bato boboto mingi. Biblia elobi ete: ‘Azalaki kopesa’ babola ‘makabo ya mawa mingi.’—Misala 10:1, 2.
NA NTANGO wana, lisangá ya boklisto ezalaki kaka na Bayuda oyo bandimelaki Yesu, baprozelite, na Basamalia. Koloneli azalaki Moyuda te, akatamaki ngenga te, mpe azalaki moklisto te. Yango elingi nde koloba ete Nzambe azalaki koyoka mabondeli na ye te? Te. Yehova Nzambe ayokaki Koloneli mpe amonaki misala ya sembo oyo azalaki kosala.—Misala 10:4.
Anzelu asalisaki Koloneli ayeba lisangá ya boklisto. (Misala 10:30-33) Nsuka na yango ezalaki ete ye na libota na ye bazalaki bato ya liboso bakatami ngenga te oyo bakómaki baklisto. Yehova Nzambe amonaki malamu ete lisolo ya Koloneli ekomama na Biblia. Na ntembe te, na bomoi na ye, atikaki makambo mingi mpo na kotosa mibeko ya Nzambe. (Yisaya 2:2-4; Yoane 17:16) Lisolo ya Koloneli esengeli mpenza kolendisa bato ya bikólo nyonso oyo balingi ete Nzambe ayamba bango lelo oyo. Tótalela mwa bandakisa.
Bandakisa na mikolo na biso
Mwana mwasi moko na ekólo Inde azalaki mpenza na mposa ya libɔndisi. Abalaki ntango azalaki na mbula 21, mpe na nsima, abotaki bana mibale. Kasi, nsima ya kobota mwana na ye ya mibale, eumelaki te, mobali na ye akufaki. Mbala moko, elenge mwasi ya mbula 24 akómaki mwasi akufelá mobali na mwana ya sanza mibale na mabɔkɔ mpe mwana mosusu ya mbula moko na sanza zomi. Tomoni mpenza ete azalaki na mposa ya libɔndisi! Epai wapi akokaki kotya motó? Mokolo moko na butu, mawa esalaki ye mingi, abondelaki, mpe alobaki boye: “Tata Nzambe, soki olingi, bɔndisá ngai na nzela ya Liloba na yo.”
Mokolo oyo elandaki, na ntɔngɔ, moto moko ayaki kotala ye na ndako. Moto yango azalaki Motatoli ya Yehova. Mokolo yango, motatoli yango asalaki mosala ya mpasi mpamba te akutanaki na bato moke kaka oyo bandimaki koyoka ye. Lokola alɛmbaki nzoto, etikalaki moke azonga na ndako na ye, kasi motema moko etindaki ye atala lisusu ata na ndako moko. Na ndako yango nde akutanaki na elenge mwasi oyo akufelá mobali. Akɔtisaki ye na ndako mpe andimaki kozwa mokanda moko oyo ezali na masolo ya Biblia. Mwasi yango abɔndisamaki mingi ntango atángaki mokanda yango mpe lisolo oyo asololaki na Motatoli wana ebɔndisaki ye. Motatoli yango ayebisaki ye ete Nzambe alaki kosekwisa bato oyo bakufá mpe ateyaki ye Bokonzi ya Nzambe, oyo ekokómisa mabele paladiso. Likambo ya ntina mingi ezali ete na nsima, mwasi yango ayebaki mpe alingaki Nzambe se moko ya solo, Yehova, oyo ayokaki libondeli na ye.
Nora afandaka na mboka George, na Afrika ya Sudi. Asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko. Liboso abanda mosala na ye, abondelaki makasi ete Yehova asalisa ye akutana na moto moko oyo azali mpenza na mposa ya koyekola Biblia. Na teritware oyo Nora asengelaki kosakola ezalaki na moto moko oyo abenganaki ye liboso ntango akendaki kosakola kuna. Nora abangaki te mpe akendaki lisusu kobɛta na ndako ya moto yango. Likambo ya kokamwa, akutaki moto mosusu akómi kofanda na ndako yango, nkombo na ye Noleen. Noleen na mama na ye bazalaki kobondela Nzambe asalisa bango báyeba Biblia. Nora alobi boye: “Ntango natunaki bango soki bakolinga nayekola na bango Biblia, basepelaki mingi.” Noleen na mama na ye bakolaki nokinoki. Na nsima, bango mibale balandaki Nora na mosala ya kobikisa bato na elimo.
Ndakisa mosusu oyo emonisi ete libondeli ekoki kosalisa na ndenge ya kokamwa, ezali ya mobali moko na mwasi na ye na mboka Johannesburg, na Afrika ya Sudi. Mokolo moko ya pɔsɔ na butu, na 1996, Dennis na Carol bakómaki na matata makasi na libala na bango. Mpo bámeka kobongisa, bazwaki mokano ya kosala libondeli mpo Nzambe asalisa bango. Babondelaki mbala na mbala tii na kati ya butu. Mokolo oyo elandaki, na ngonga ya 11 ya ntɔngɔ, Batatoli ya Yehova mibale bayaki na ndako na bango. Dennis afungolaki ndako mpe alobaki na bango bázela abenga mwasi na ye. Dennis ayebisaki Carol ete soki akɔtisi Batatoli ya Yehova, bakotika bango noki te. Carol ayebisaki Dennis ete abosana te ete babondelaki Nzambe asalisa bango mpe alobaki ete mbala mosusu Nzambe nde atindi bango. Bakɔtisaki Batatoli yango, mpe babandaki koyekola Biblia na mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Dennis na Carol basepelaki mingi na makambo oyo bayekolaki. Na mpokwa ya mokolo yango kaka bakendaki na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso. Ntango bakómaki kosalela makambo oyo bazalaki koyekola na Biblia, Dennis na Carol basilisaki matata na bango. Lelo oyo bazali na esengo, bazali basanzoli ya Yehova oyo bazwi batisimo mpe mbala na mbala babimaka mpo na koyebisa bazalani na bango mateya ya Biblia.
Soki ozali komiyoka ete obongi kobondela te
Soki bakanisi misala mabe oyo basalaka, bato mosusu ya mitema sembo bamonaka ete babongi kobondela te. Yesu Klisto alobaki lisolo ya moto moko oyo azalaki kokanisa bongo; moto yango azalaki mokɔngɔli ya mpako. Ntango akɔtaki na lopango ya tempelo, amonaki ete abongi ata te kopusana na esika oyo babondelaka. ‘Atɛlɛmaki mosika . . . abɛtaki ntolo na ye mpe alobaki ete, Nzambe, yokelá ngai mawa, ngai moto ya masumu.’ (Luka 18:13) Yesu alobaki ete Nzambe ayokaki libondeli ya moto yango. Yango emonisi ete Yehova azali Nzambe ya motema mawa mpe andimaka koyoka bato ya masumu oyo babongoli mpenza motema.
Tózwa ndakisa mosusu ya elenge moko na Afrika ya Sudi, nkombo na ye Paul. Ntango azalaki mwana moke, azalaki kokende elongo na mama na ye na makita ya Batatoli ya Yehova. Kasi ntango akómaki na eteyelo ya ntei, akómaki kotambola na bilenge ya mabe. Na nsima, ntango alongwaki na kelasi, akɔtaki mosala ya soda ntango guvɛrnɛma ya Afrika ya Sudi ezalaki konyokola bato moindo. Na nsima, mwana mwasi oyo bazalaki kofanda ye makango aboyaki ye na mbalakaka. Paul akómaki komitungisa mingi mpe azalaki na esengo te. Alobi boye: “Mokolo moko na mpokwa, nabondelaki Yehova mpe nasɛngaki ye asalisa ngai, atako nazalaki lisusu kobondela Nzambe te banda bambula mingi.”
Nsima ya kosala libondeli yango, elekaki mikolo mingi te, mama ya Paul asɛngaki ye bákende na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. (Luka 22:19) Likambo oyo mama ya Paul asalaki ekamwisaki Paul, mpamba te azalaki motó makasi mpe azalaki mpenza kolanda makambo ya Biblia te. “Namonaki ete kobenga oyo mama abengaki ngai ezalaki eyano oyo Yehova apesaki na libondeli na ngai mpe namonaki ete nasengeli kondima.” Kobanda wana, Paul akómaki koyangana na makita nyonso ya lisangá. Nsima ya koyekola Biblia na boumeli ya sanza minei, akokisaki masɛngami mpo na kozwa batisimo. Asilisaki kelasi mpe akómaki ingénieur mpe aponaki kosalela Nzambe na mosala ya ntango nyonso. Lelo oyo, Paul azali moto ya esengo, makambo oyo asalaki na bomoi na ye etungisaka ye lisusu te. Na boumeli ya mbula 11 oyo eleki, azalaki kosala na filiale ya la Société Watch Tower na Afrika ya Sudi.
Ya solo, Yehova Nzambe azali na motema mawa mpe andimaka mabondeli mpe “akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Etikali moke mokolo monene ya Yehova eya mpe ekosukisa makambo nyonso ya mabe. Liboso mokolo yango eya, Yehova azali koyoka mabondeli ya basaleli na ye oyo bazali kosɛnga ye makasi mpe lisungi na mosala ya kopesa litatoli, mosala oyo ekobikisa bato. Na ndenge yango, bamilio ya bato ya bikólo nyonso bazali kokɔta na lisangá ya boklisto mpe bazali kozwa boyebi ya Biblia oyo ezali komema na bomoi ya seko.—Yoane 17:3.
[Elilingi na lokasa 5]
Koloneli abondelaki na bosembo nyonso, yango wana Nzambe atindaki ntoma Petelo na ndako na ye
[Elilingi na lokasa 6]
Libondeli esalisaki bato mingi na ntango ya mpasi
[Bililingi na lokasa 7]
Esengeli kobondela mpo na koyeba Biblia malamu
Mwasi na mobali basengeli kobondelaka mpo libala na bango ezala ntango nyonso malamu