Basalaki mokano ya Yehova
Yesu akumisami lokola Masiya mpe Mokonzi!
BIBELE oyo bakɔ́taki na makɛlɛlɛ makasi na Yelusaleme na mokolo mwa 9 Nisan 33 T.B., bakamwisaki bafandi na Yuda mingi. Atako ezalaki likambo ya kokamwa te komona ebele ya bato kokɔ́ta kati na engumba liboso ya Pasika, nzokande bapaya oyo bakesanaki na basusu. Elongi ya kobenda likebi kati na bango ezalaki bongo ya mobali moko oyo azalaki kotambola likoló ya mwana-mpunda-mobali. Mobali yango ezalaki bongo Yesu Klisto, mpe bato bazalaki kopɛpa bilamba mpe mandalala liboso na ye wana bazalaki konganga ete: “Osana epai na mwana na Davidi! Masanzoli na oyo akoya na nkombo na [“Yehova,” NW], Osana na bisika-bileki-Likoló.” Na komonáká bibele, bato mingi oyo basilaki kokóma na Yelusaleme bakendaki kokutana na botamboli yango.—Matai 21:7-9; Yoane 12:12, 13.
Atako wana azalaki kokumisama, Yesu ayebaki ete komekama ezalaki kozela ye. Na yango, bobele nsima ya mikolo mitano, abomamaki bobele kati na engumba yango! Ɛɛ, Yesu ayebaki ete Yelusaleme ezalaki teritware moko ya botɛmɛli makasi, mpe ntango abongisaki bokɔ́ti na ye ya polele azalaki na likanisi wana na motema.
Esakweli moko ya kala ekokisami
Na 518 L.T. B., Zekalia asakolaki bokɔ́ti monene ya Yesu na Yelusaleme. Akomaki ete: “Sepelá mingi, ɛ mwana mwasi na Siona, ɛ mwana mwasi na Yelusaleme; talá mokonzi na yo akoyela yo, ye azali na boyengebene mpe na kobikisa; na bopɔlɔ mpe atamboli likoló na mpunda, . . . mpe akolakisa kimya epai na mabota nyonso. Bokonzi na ye ekozala longwa na mai-na-monana kino mai-na-monana mpe longwa na Ebale monene kino nsuka na mokili.”—Zekalia 9:9, 10.
Na bongo bokɔ́ti ya Yesu na Yelusaleme na mokolo mwa 9 Nisan ekokisaki esakweli ya Biblia. Ezalaki likambo moko ya mbalakaka te kasi elɛngɛlamaki malamumalamu. Mwa moke liboso, wana ezalaki bango na libándá ya Yelusaleme, Yesu apesaki etinda epai na bayekoli na ye mibale ete: “Bókenda na mboka liboso na bino mpe nokinoki bokomona mpunda ekangami mpe mwana na mpunda na ye elongo. Bókangola bango mpe bóya na bango epai na ngai. Soko moto alobi likambo nini na bino, bóloba ete, Nkolo azali na bosɛnga na bango mpe akotinda bango nokinoki.” (Matai 21:1-3) Kasi mpo na nini Yesu alingaki kotambola kati na Yelusaleme likoló ya mpunda, mpe nini ezalaki bongo ndimbola ya likambo oyo bibele basalaki?
Nsango etali Bokonzi
Elilingi oyo ezali komonana na miso mbala mingi ezalaka na nguya koleka liloba lilobami. Na yango, na bantango mosusu Yehova azalaki kosala ete basakoli na ye bámonisa nsango na bango na nzela ya bilakiseli mpo na kolendisa nsango ya esakweli. (1 Mikonzi 11:29-32; Yilimia 27:1-6; Ezekiele 4:1-17) Mwango wana ya koyebisa makambo na nzela ya bilakiseli ya polele mpenza etikaki makanisi oyo ata bato ya motema makasi koleka bakokaki kobosana yango te. Ndenge moko, Yesu amonisaki nsango ya nguya na kotamboláká likoló ya mpunda kati na engumba Yelusaleme. Na lolenge nini?
Na ntango ya lisoló ya Biblia mpunda ezalaki kosalelama mpo na bantina ya lokumu. Na ndakisa, Salomo atambolaki likoló ya “mpunda-mwasi,” mwana ya mpunda mobali ya tata na ye ntango apakolamaki lokola mokonzi. (1 Mikonzi 1:33-40) Na bongo, lokola Yesu atambolaki likoló ya mpunda kati na Yelusaleme elingaki koloba ete azalaki komimonisa ye moko lokola mokonzi.a Ezaleli ya bibele elendisaki likanisi yango. Na ntembe te, etuluku yango esangisaki bafandi ya Galilai oyo bazalaki kopɛpa bilamba na bango liboso ya Yesu—ekela oyo ezali kokundola koyebisama oyo esalemaki epai na bato banso ntango Yehu akómaki mokonzi. (2 Mikonzi 9:13) Kobénga babéngaki Yesu ete “Mwana na Davidi” emonisaki polele lotómo na ye ya boyangeli. (Luka 1:31-33) Mpe kosalelama ya mandalala emonisaki mpenza botosi na bango na nsé ya bokonzi na ye.—Kokanisá na Emoniseli 7:9, 10.
Na bongo, botamboli oyo esalemaki kati na Yelusaleme na mokolo mwa 9 Nisan bomonisaki polele ete Yesu azalaki bongo Masiya mpe Mokonzi oyo aponamaki na Nzambe. Ya solo, bato nyonso te nde bazalaki na esengo ya komona Yesu kolakisama na lolenge wana. Bafalisai na makanisi na bango bamonaki ete ezalaki malamu te ete Yesu amonisama na lokumu ya bokonzi motindo wana. Basɛngaki, na ntembe te na nkanda kati na maloba na bango, ete “Molakisi, pamelá bayekoli na yo.” Yesu azongisaki ete: “Nalobi na bino ete soko bakozala nye, mbɛ mabanga makonganga.” (Luka 19:39, 40) Ɛɛ, Bokonzi ya Nzambe ezalaki motó na likambo ya mosala ya kosakola ya Yesu. Atako bato bandimi to bandimi te asengelaki kosakola nsango yango na molende.
Liteya mpo na biso
Esengelaki mpiko makasi epai na Yesu ete akɔta na Yelusaleme na lolenge oyo mosakoli Zekalia asakolaki. Ayebaki ete na kosaláká bongo azalaki komibendela nkanda ya banguna na ye. Liboso ete amata na likoló, Yesu apesaki etindá na bayekoli na ye ete básakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe “bázalisa bayekoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14; 28:19, 20) Esengeli mpe kozala na mpiko mpo na kokokisa mosala yango. Bato nyonso te nde bazalaka na esengo ya koyoka nsango yango. Bamoko batyolaka yango, nzokande basusu batɛmɛlaka yango. Biyangeli mosusu bisili kotya bipekiseli na mosala ya kosakola to biboi yango nyɛɛ.
Nzokande, Batatoli ya Yehova bayebi ete nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo esili kotyama esengeli kosakolama ata soki bato bazali koyoka yango to bazali koyoka yango te. (Ezekiele 2:7) Wana bazali kokóba kokokisa mosala yango ya kobikisa bomoi ya bato, bandimisami na elaka ya Yesu oyo ete: “Mpe talá, ngai nazali na bino elongo mikolo nyonso kino nsuka ya ekeke.”—Matai 28:20.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisoló ya Malako libakisi ete mwana-mpunda-mobali yango “moto afandi naino likoló na yango te.” (Malako 11:2) Ya solo, nyama oyo esalelamaki naino te ezalaki mpenzampenza malamu mpo na makambo ya bulɛɛ.—Kokanisá na Mituya 19:2; Deteronome 21:3; 1 Samwele 6:7.