Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/4 lok. 26
  • Kopalanganisa mbóto ya Bokonzi na mabaku nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kopalanganisa mbóto ya Bokonzi na mabaku nyonso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/4 lok. 26

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

Kopalanganisa mbóto ya Bokonzi na mabaku nyonso

BIBLIA, Liloba ya Nzambe, ezali kolendisa biso ete tózala na molende na mosala. Mokonzi Salomo alobaki ete: “Na ntɔ́ngɔ́, koná mbóto na yo mpe na mpokwa pekisá lobɔkɔ na yo te; mpo ete oyebi te soko nini ekokóma malamu to oyo to yango to soko nyonso mibale ikozala malamu.”​—Mosakoli 11:6.

Na mabaku nyonso ya malamu, Batatoli ya Yehova bazali kolóna “mbóto” na kosakoláká nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Na mikili mpe bisanga koleka 230, bazali ‘kotika te kolakisa mpe kosakola nsango malamu ete Yesu azali Klisto.’ (Misala 5:42) Masoló oyo malandi mazali komonisa lolenge oyo Batatoli ya Yehova ‘bazali kopekisa te mabɔkɔ na bango’ na mosala ya kosakola.

◻ Na mokili ya Cap Vert, Motatoli moko ya Yehova azalaki kotambola pembenipembeni ya efelo ya bolɔ́kɔ wana azalaki na mosala ya kosakola. Na lopango ya bolɔ́kɔ, bamoko kati na bakangami bamataki likoló ya nzeté. Ntango bamonaki Motatoli na nsé, bakangami basɛngaki ye mwa bazulunalo. Motatoli akangisaki mwa liboké ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na libanga mpe abwakaki yango likoló na efelo ya bolɔ́kɔ. Lokola mbano mpo na bosepeli wana ya libosoliboso, bato 12 bakomaki koyekola Biblia. Misato kati na bakangami basili komipesa epai na Nzambe mpe basili kozwa batisimo ya mai. Esili koleka sikawa mbula mobimba, moko kati na bakangami azali kosala lokola mosakoli ya ntango nyonso, to mobongisi-nzela. Kasi, ndenge nini bazali kotambwisa misala ya kosakola kati na bolɔ́kɔ? Ya liboso bolɔ́kɔ ekabolami na bateritware. Na nsima teritware ezali kopesama na mokomoko kati na Batatoli yango misato mpe bazali kosakola na kokendáká na eteni mokomoko. Basakoli wana ya Bokonzi bazali kolanda bosepeli nyonso emonisami lolenge moko na oyo Batatoli ya Yehova basalaka na mokili mobimba​—na kosaláká bozongeli ya sika. Nzokande, bokeseni ezali na kotalela mbala boni oyo boyekoli ya Biblia ezali kotambwisama. Na esika ya koyekola bobele mbala moko to mibale na pɔ́sɔ na boumeli ya pene na ngonga moko na bokutani nyonso, bakangami mosusu bayekolaka mikolo nyonso! Lisusu, mokambi ya bolɔ́kɔ asilaki kopesa Batatoli ndingisa ya kosala makita nyonso ya lisangá kati na bolɔ́kɔ.

◻ Nsima ya liwa ya nkɔkɔ na ye ya mwasi, mwasi moko na mboka Portugal azwaki libula ya mwa mikanda ya la Société Watch Tower. Lokola azalaki Motatoli ya Yehova te, amonaki litomba moko te ya kobomba mikanda yango. Nzokande, alingaki mpe kobwaka yango te. Mokolo moko ayebisaki likambo ya mikanda wana epai na mwasi moko Motatoli ya Yehova oyo abɛtaki na ekuke na ye ntango azalaki na mosala ya kosakola ndako na ndako. Motatoli atunaki ye soko ayebaki motuya ya solosolo ya mikanda wana. Mwasi yango ayanolaki ete: “Mpo na koloba solo, nayebi mpenza motuya na yango ya solo te, kasi ndenge nini nakoki koyeba yango?” Mwasi yango andimaki boyekoli ya Biblia, mpe mwa moke nsima ayaki koyeba motuya ya mikanda ya nkɔkɔ na ye. Sikawa ye mpe azali Motatoli ya Yehova oyo asili kobatisama. Lisusu, mwana na ye ya mwasi mpe moninga moko ya libota na bango bazali mpe koyekola Biblia. Libómbo wana ya mikanda ezalaki solo libula ya motuya monene!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto